Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 6

Otyeleka ndenge oyo Yehova asalaka makambo motema?

Otyeleka ndenge oyo Yehova asalaka makambo motema?

“Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.”​—MIB. 32:4.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mpo na nini lelo oyo bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kotyela bakonzi motema? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 LELO oyo bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kotyela bakonzi motema. Bamonaka ete mbala mingi bakonzi ya guvɛrnema mpe mibeko oyo batyaka ezalaka mpo na kobatela bato ya mbongo mpe bato minene, kasi te mpo na kosalisa babola. Biblia elobi solo ete: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mos. 8:9) Lisusu, bakonzi mosusu ya mangomba basalaka makambo ya mabe mpenza, mpe yango esali ete bato mosusu bátyela lisusu Nzambe motema te. Na yango, ntango moto andimi tóyekola na ye Biblia, tozali na mokumba monene ya kosalisa ye ayekola kotyela Yehova motema mpe bamonisi na Ye awa na mabele.

2 Nzokande, ezali kaka bayekoli ya Biblia te nde basengeli koyekola kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, tosengeli ata mokolo moko te kotika kondima ete lolenge na ye ya kosala makambo nde eleki malamu. Na bantango mosusu, ekoki kozala na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete ezala mpasi tóndima likambo yango. Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato oyo ekoki komeka kondima na biso: (1) ntango tozali kotánga masolo mosusu ya Biblia, (2) ntango tozwi malako oyo euti na ebongiseli ya Yehova mpe (3) ntango tokutani na mikakatano na mikolo ezali koya.

TYELÁ YEHOVA MOTEMA NTANGO OZALI KOTÁNGA BIBLIA

3. Ndenge nini masolo mosusu ya Biblia ekoki komeka kondima na biso epai ya Yehova?

 3 Ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe, tokoki komituna ntina oyo Yehova asalelaki bato mosusu makambo boye to boye mpe ntina oyo azwaki ekateli boye to boye. Na ndakisa, na mokanda ya Mitángo, lisolo moko emonisi ete Yehova akatelaki Moyisraele moko etumbu ya liwa mpo alɔkɔtaki nkoni na mokolo ya Sabata. Na mokanda ya mibale ya Samwele, totángaka ete bambula mingi na nsima, ntango Davidi asalaki ekobo mpe abomaki moto, Yehova alimbisaki ye. (Mit. 15:32, 35; 2 Sam. 12:9, 13) Mbala mosusu tokoki komituna: ‘Mpo na nini Yehova alimbisaki Davidi ndenge abomaki moto mpe asalaki ekobo, kasi akatelaki moto wana etumbu ya liwa mpo na likambo oyo emonanaki ete ezalaki lisumu monene te?’ Mpo na koyanola na motuna yango, tótalela makambo misato oyo tosengeli kobosanaka te ntango tozali kotánga Biblia.

4. Ndenge nini Ebandeli 18:20, 21 mpe Kolimbola Mibeko 10:17 ezali kosalisa biso tótyela bikateli ya Yehova motema mingi?

4 Na masolo mosusu, Biblia elobeli te makambo nyonso ya mikemike. Na ndakisa, toyebi ete Davidi abongolaki mpenza motema mpo na makambo oyo asalaki. (Nz. 51:2-4) Kasi moto oyo abukaki mobeko ya Sabata azalaki moto ya lolenge nini? Ayokaki mawa mpo na likambo oyo asalaki? Abuká mibeko ya Yehova liboso? Atyaki likebi te to kutu aboyaki nde koyoka makebisi oyo bapesaki ye? Biblia elobi eloko moko te mpo na yango. Kasi, tosengeli koyeba likambo oyo: Epai ya Yehova “kozanga bosembo ezali te.” (Mib. 32:4) Mpo na kozwa bikateli, atalelaka makambo nyonso; alandaka te makambo oyo bato bazali koloba, oyo bazali kokanisa, to eloko mosusu nyonso oyo mbala mingi etindaka bato bákóma na makanisi ya libunga na likambo moko boye. (Tángá Ebandeli 18:20, 21; Kolimbola Mibeko 10:17.) Soki tokobi koyekola koyeba Yehova mpe mibeko na ye malamu, tokotyela mpe bikateli na ye motema mingi. Ata soki lisolo moko ya Biblia ebimisi mituna oyo tokoki koyanola te sikoyo, makambo oyo toyebi mpo na Nzambe na biso ekoki mpenza mpo na kondimisa biso ete “azali moyengebene na banzela na ye nyonso.”​—Nz. 145:17.

5. Kozanga kokoka esalá nini na likoki na biso ya kokata makambo? (Talá mpe etanda “ Kozanga kokoka ebebisá ndenge na biso ya kokata makambo.”)

5 Kozanga kokoka ebebisá likoki na biso ya kokata makambo. Nzambe asalá biso na elilingi na ye, yango wana tolingaka ete básalela basusu makambo na bosembo. (Eba. 1:26) Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kozala na makanisi ya libunga, ata ntango tokanisi ete toyebi makambo nyonso. Na ndakisa, kanisá lisusu ndenge Yona asepelaki te na ekateli oyo Yehova azwaki ya komonisela bato ya Ninive motema mawa. (Yona 3:10–4:1) Nzokande, yango ebimisaki mbuma ya malamu. Bato ya Ninive koleka 120 000 babongolaki motema mpe babikaki! Na nsuka, eyebanaki ete Yona nde asengelaki kosembolama, kasi Yehova te.

6. Mpo na nini Yehova asɛngisami te kolimbolela biso ntina ya bikateli oyo azwi?

6 Yehova asɛngisami te kolimbwela bato ntina oyo azwi ekateli boye to boye. Ezali solo ete Yehova azalaki kopesa basaleli na ye na ntango ya kala nzela bábimisa mayoki na bango mpo na bikateli oyo azwaki to oyo alingaki kozwa. (Eba. 18:25; Yona 4:2, 3) Mpe na bantango mosusu, alimbolaki bikateli na ye. (Yona 4:10, 11) Atako bongo, Yehova asɛngisami te kolimbolela biso ntina oyo azwi ekateli boye to boye. Lokola azali Mozalisi na biso, azali na mposa te ya kozwa ndingisa na biso, ezala liboso asala likambo moko to na nsima.​—Yis. 40:13, 14; 55:9.

TYELÁ YEHOVA MOTEMA NTANGO OZWI MALAKO

7. Mokakatano nini tokoki kozala na yango, mpe mpo na nini?

7 Na ntembe te, tondimaka na motema mobimba ete Yehova asalaka ntango nyonso makambo ya malamu. Kasi, tokoki kozala na mokakatano ya kotya motema na bamonisi na ye awa na mabele, bato oyo bazali kotambwisa lisangá na ye. Ntango mosusu tomitunaka soki baoyo bazali na mwa bokonzi na ebongiseli ya Yehova basalaka mpenza na kolanda litambwisi ya Yehova to oyo ya bango moko. Ekoki kozala ete basaleli na ye mosusu ya ntango ya kala mpe bazalaki kokanisa bongo. Tótalela bandakisa oyo tolobelaki na  paragrafe 3. Ndeko ya moto oyo abukaki mobeko ya Sabata akokaki ntango mosusu komituna soki Moize atunaki mpenza makanisi ya Yehova liboso ya kokatela ndeko na bango etumbu ya liwa. Mpe moninga ya Uria Mohiti, oyo mwasi na ye asalaki ekobo na Davidi, akokaki koloba ete Davidi asalelaki bokonzi na ye mpo na kokima etumbu ya liwa, oyo asengelaki na yango. Mpo na koloba solo, tokoki koloba te ete totyelaka Yehova motema, soki totyelaka bamonisi na ye awa na mabele motema te, nzokande ye moko atyelaka bango motema.

8. Bokokani nini ezali kati na likambo oyo Misala 16:4, 5 elobeli mpe ndenge oyo lisangá ya bokristo etambwisami lelo?

8 Lelo oyo, Yehova atambwisaka eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Ndenge moko na lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso, moombo ya sembo atambwisaka basaleli ya Yehova na mokili mobimba mpe apesaka bankulutu malako. (Tángá Misala 16:4, 5.) Na ngala na bango, bankulutu basalelaka malako yango na masangá. Tokomonisa ete totyelaka lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema soki tozali kotosa malako oyo tozwi na ebongiseli na ye mpe epai ya bankulutu.

9. Ntango nini ekoki kozala mpasi tótosa ekateli oyo bankulutu bazwi, mpe mpo na nini?

9 Na bantango mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi tótosa bikateli oyo bankulutu bazwi. Na ndakisa na bambula oyo eleki, babongisaki masangá mpe bazongazonga na ndenge mosusu. Ekómaki ete bankulutu básɛnga basakoli bákende na lisangá mosusu mpo na kotondisa bisika ya kofanda na Bandako ya Bokonzi. Soki basɛngi biso tókende na lisangá mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi kotika baninga mpe bato ya libota na biso. Bankulutu bazwaka nde malako epai ya Nzambe oyo elakisaka bango esika oyo basengeli kotinda mosakoli mokomoko? Te. Na yango, ekoki kozala mpasi mpo tótosa malako oyo bapesi biso. Kasi Yehova atyelaka bankulutu motema mpe atikaka bango bázwa bikateli ya ndenge wana. Biso mpe tosengeli kotyela bango motema. *

10. Na kotalela Baebre 13:17, mpo na nini tosengeli kondima bikateli oyo bankulutu bazwi?

10 Mpo na nini tosengeli kondima bikateli oyo bankulutu bazwi ata soki tosepeli na yango te? Mpo soki tosali bongo, tokosalisa mpo bomoko ekoba kozala na kati ya basaleli ya Nzambe. (Ef. 4:2, 3) Lisangá ekómaka makasi ntango basakoli nyonso bamonisi komikitisa mpe bandimi bikateli oyo lisangani ya bankulutu ezwi. (Tángá Baebre 13:17.) Oyo eleki ntina, tokomonisa Yehova ete totyelaka ye motema, mpo tosali na bomoko na bato oyo apesi mokumba ya kobatela biso.​—Mis. 20:28.

11. Nini ekoki kosalisa biso tótya lisusu motema mingi na litambwisi ya bankulutu?

11 Tokotya lisusu motema mingi na litambwisi ya bankulutu soki tozali kobosana te ete babondelaka mpo na kosɛnga lisalisi ya elimo santu ntango bazali kotalela makambo ya lisangá. Batalelaka mpe na likebi mitinda ya Biblia oyo esengeli mpe batángaka malako oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova. Balukaka mpenza kosepelisa Yehova mpe kobatela basaleli na ye na ndenge oyo ebongi. Mibali yango ya sembo bayebaka ete bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ndenge oyo bakokisaka mikumba na bango. (1 Pet. 5:2, 3) Kanisá naino: Na mokili oyo bato bakabwani mpo na loposo na bango, lingomba na bango, mpe makambo ya politiki, basaleli ya Yehova bazali kosambela na bomoko Nzambe ya solo kaka moko. Ezali bongo kaka mpo Yehova azali kopambola ebongiseli na ye!

12. Makambo nini bankulutu basengeli kotalela mpo báyeba soki moto abongoli motema?

12 Yehova apesi bankulutu mokumba monene ya kobatela lisangá na ye pɛto. Soki mokristo moko asali lisumu ya monene, Yehova asɛngi na bankulutu bátalela soki moto yango akoki kotikala na lisangá to te. Na ndakisa, basengeli koluka koyeba soki moto yango abongoli mpenza motema. Akoki koloba ete abongoli motema, kasi azali mpenza koyina mabe oyo asalaki? Azwi ekateli ya kozongela lisumu yango te? Soki kozala na baninga mabe nde ememaki ye na lisumu, andimi kokabwana na baninga yango? Bankulutu basalaka libondeli, batalelaka likambo oyo esalemi mpe oyo Biblia elobi mpo na yango, mpe batalelaka ndenge oyo mosali-mabe azali komiyoka mpo na likambo oyo asalaki. Na nsima nde bazwaka ekateli soki akoki kotikala na lisangá to te. Ntango mosusu, asengeli kolongolama na lisangá.​—1 Ko. 5:11-13.

13. Makanisi nini ekoki koyela biso ntango moninga to ndeko moko ya libota alongolami na lisangá?

13 Nini ekoki kosala ete ezala mpasi tótyela bankulutu motema? Soki moto oyo alongolami na lisangá azali moninga na biso ya motema te to ndeko ya libota, mbala mosusu tokondima mbala moko ekateli oyo bankulutu bazwi. Bongo soki moto oyo alongolami na lisangá azali moninga na biso ya motema? Tokoki kokanisa ete mbala mosusu bankulutu batalelaki makambo nyonso te, to komituna soki bakati mpenza likambo yango ndenge oyo Yehova alingaki kokata yango. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu mpo na ekateli oyo ezwami?

14. Nini ekoki kosalisa biso soki bankulutu bazwi ekateli ete moninga to ndeko na biso moko ya libota asengeli kolongolama na lisangá?

14 Tosengeli kobosana te ete kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli oyo Yehova atyá, mpe ezalaka mpo na bolamu ya lisangá mpe ya moto oyo asalaki lisumu. Soki mosumuki oyo abongolaki motema te atikali kaka na lisangá, akoki komema mpe bandeko mosusu na lisumu. (Gal. 5:9) Ekoki mpe kosala ete amona te bonene ya lisumu na ye, mpe mbala mosusu akomona mpenza te ntina ya kosembola makanisi mpe misala na ye mpo Yehova andima ye lisusu. (Mos. 8:11) Tokoki kotya motema ete ntango bankulutu bazali kotala soki mosumuki moko asengeli kolongolama na lisangá to te, bazwaka makambo na lisɛki te. Ndenge moko na basambisi na Yisraele, bankulutu bayebaka ete ‘basambisaka mpo na moto te, kasi nde mpo na Yehova.’​—2 Nt. 19:6, 7.

KOTYELA YEHOVA MOTEMA SIKOYO EZALI KOBONGISA BISO MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

Nini ekosalisa biso tóndima mpe tótosa malako oyo tokozwa na ntango ya bolɔzi monene? (Talá paragrafe 15)

15. Mpo na nini tosengeli kotyela litambwisi ya Yehova motema mingi koleka banda sikoyo?

15 Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, tosengeli lisusu kotyela lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema mingi koleka. Mpo na nini? Na ntango ya bolɔzi monene, tokoki kozwa malako oyo ekoki kokamwisa biso, oyo ekoki komonana ete ebongi te to ete ezangá motó ná makolo. Yehova akoloba epai na biso mbala moko boye te. Na ntembe te akopesa litambwisi na nzela ya bato oyo atyá mpo bátambwisa biso. Wana ekozala te ntango ya kokanisa ete ekateli ya ndenge mosusu ekobima, to ya koboya kondima yango, mpe komituna: ‘Malako yango euti mpenza epai ya Yehova, to bandeko oyo bazali kokamba bazali kosala makambo na ndenge na bango?’ Okotyela Yehova motema mpe ebongiseli na ye na ntango yango oyo makambo ekozala ndongo? Ndenge oyo otalelaka malako oyo tozwaka sikoyo ekosalisa yo oyanola na motuna yango. Soki ondimaka litambwisi oyo tozwaka lelo mpe olandaka yango mbala moko, na ntembe te okosala mpe bongo na ntango ya bolɔzi monene.​—Luka 16:10.

16. Nini ekoki kosala ete ezala mpasi kotyela bikateli ya Yehova motema na mikolo ezali koya?

16 Tosengeli mpe kokanisa ndenge oyo tokotalela bikateli oyo Yehova akozwa na nsuka ya mokili oyo. Lelo oyo, tolikyaka ete bato mingi oyo bazali kosalela Yehova te, ata mpe bandeko na biso ya libota, bakopona kosalela ye liboso nsuka eya. Kasi na Armagedone, na nzela ya Yesu Kristo, Yehova akozwa ekateli ya nsuka mpo na bango. (Mat. 25:31-33; 2 Tes. 1:7-9) Kokata soki banani Yehova akomonisela motema mawa to te ekozala mokumba na biso te. (Mat. 25:34, 41, 46) Tokondima mpenza bikateli ya Yehova, to tokotika ete yango ebɛtisa biso libaku? Ya solo, tosengeli koyekola kotyela Yehova motema mingi banda sikoyo mpo tótyela ye mpe motema mobimba na mikolo ezali koya.

17. Matomba nini tokozwa mpo na bikateli oyo Yehova akozwa na nsuka ya mokili oyo?

17 Kanisá ndenge oyo tokomiyoka na mokili ya sika ntango tokomona matomba oyo bikateli ya Yehova ekobimisa. Mangomba ya lokuta ekozala lisusu te, ata mpe bibongiseli ya mombongo ya lokoso ná baguvɛrnema oyo enyokolaka bato mpe ebimiselaka bato ebele ya bampasi banda kala. Maladi, bobange, mpe liwa ya bato oyo tolingaka ekozala lisusu te. Satana ná bademo na ye bakokangama mpo na mbula nkóto. Makambo nyonso ya mabe oyo botomboki na bango ebimisá ekozala lisusu te. (Em. 20:2, 3) Na ntango yango, tokozala mpenza na botɔndi ndenge totyelaki lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema!

18. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Bayisraele, na kotalela Mitángo 11:4-6 mpe 21:5?

18 Bomoi na mokili ya sika ekoki ntango mosusu kobimisa mwa mikatatano oyo ekosala ete ezala mpasi tótyela lolenge ya Yehova ya kosala makambo motema? Na ndakisa, kanisá makambo oyo esalemaki mwa moke na nsima ntango Bayisraele balongwaki na boombo na Ezipito. Bato mosusu bakómaki komilelalela mpo bazangaki biloko oyo bazalaki kolya na Ezipito, mpe bamonaki mpamba mana oyo Yehova azalaki kopesa. (Tángá Mitángo 11:4-6; 21:5.) Makanisi ya ndenge wana ekoki mbala mosusu koyela biso ntango bolɔzi monene ekosuka? Toyebi te mosala nini ekosɛnga tósala mpo na kopɛtola mabele mpe kokómisaka yango mokemoke paradiso. Ekoki kozala ete mosala ekozala mingi mpe makambo mosusu ekozala pɛtɛɛ te na ebandeli. Tokomeka nde komilelalela mpo na biloko oyo Yehova akopesa biso na ntango wana? Tóbosana te: Soki tosepelaka mingi na oyo Yehova apesaka biso sikoyo, tokosepela mpe mingi na oyo akopesa biso na ntango wana.

19. Lobelá na mokuse makambo ya ntina oyo totaleli na lisolo oyo.

19 Lolenge oyo Yehova asalaka makambo ezalaka ntango nyonso malamu. Tosengeli kondima likambo yango. Tosengeli mpe kotya motema na baoyo Yehova atyelaka motema ete bakopesa biso malako na ye. Tóbosana te maloba oyo Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete: “Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.”​—Yis. 30:15.

LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe

^ par. 5 Lisolo oyo ekosalisa biso tómona ntina oyo tosengeli koyekola kotyela Yehova motema mingi mpe bamonisi na ye awa na mabele. Tokomona mpe ndenge oyo kosala yango ekomemela biso matomba sikoyo mpe ekobongisa biso mpo na mikakatano na mikolo ezali koya.

^ par. 9 Makambo mosusu ekoki kosɛnga ete mosakoli moko to libota mobimba etikala na lisangá oyo bazali sikoyo. Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya 11/2002, “Biyano na mituna na bino.”