Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

Toli na yo “esepelisaka motema”?

Toli na yo “esepelisaka motema”?

“Mafuta mpe mpaka ya malasi nde esepelisaka motema, ndenge mpe elɛngi ya kozala na moninga esepelisaka motema mpo na toli na ye oyo epesami na molimo na ye mobimba.”​—MAS. 27:9.

LOYEMBO 102 ‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’

NA MOKUSE *

1-2. Liteya nini ndeko mobali moko azwaki na likambo etali kopesa toli?

 ELEKI sikoyo bambula mingi, bankulutu mibale bakendaki kotala ndeko mwasi moko oyo azalaki lisusu koya na makita te. Nkulutu oyo azwaki maloba liboso apesaki ndeko mwasi yango bavɛrsɛ oyo elobeli koyangana na makita. Akanisaki ete ndeko mwasi yango alendisamaki, kasi ntango ye ná moninga na ye balingaki kokende, ndeko mwasi yango alobaki: “Boyebi ata moke te makambo oyo nazali kokutana na yango.” Bankulutu yango bapesaki ndeko mwasi wana toli kozanga ete bátuna ye mikakatano oyo azali kokutana na yango. Na yango, ndeko mwasi amonaki ete toli na bango esalisaki ye te.

2 Ntango akanisaki likambo yango, nkulutu oyo apesaki ndeko mwasi wana bavɛrsɛ alobi boye: “Na ntango wana, namonaki ete ndeko mwasi yango azangaki limemya. Kasi ntango nakanisaki malamu, nayaki komona ete na esika napesa ye ebele ya bavɛrsɛ oyo ebongaki, nasengelaki nde kotuna ye mituna oyo ebongaki, na ndakisa: ‘Makambo ezali kotambola ndenge nini na bomoi na yo?’ ‘Ndenge nini nakoki kosalisa yo?’” Nkulutu wana azwaki liteya monene mpenza. Lelo oyo, akómá nkulutu oyo ayebi komitya na esika ya basusu mpe asalisaka mingi.

3. Na kati ya lisangá, nani akoki kopesa toli?

 3 Lokola bazali babateli ya mpate, bankulutu bazali na mokumba ya kopesa toli ntango esengeli. Kasi, na bantango mosusu ekoki kosɛnga mpe bandeko mosusu ya lisangá bápesa toli. Na ndakisa, ndeko mwasi to ndeko mobali moko akoki kopesa moninga mosusu toli oyo euti na Biblia. (Nz. 141:5; Mas. 25:12) To mpe ndeko mwasi moko ya mokóló akoki kopesa bilenge basi toli na makambo lokola oyo elobelami na Tito 2:3-5. Mpe baboti basengeli kopesaka bana na bango toli mbala na mbala. Na yango, atako lisolo oyo elobeli libosoliboso bankulutu, biso nyonso tokoki kozwa matomba soki totaleli lisusu ndenge oyo tokoki kopesa toli oyo ekosalisa, ekolendisa mpe ‘ekosepelisa motema.’​—Mas. 27:9.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo, tokolobela mituna minei na likambo etali kopesa toli: (1) Nini esengeli kotinda biso tópesa toli? (2) Esengeli mpenza kopesa toli yango? (3) Nani asengeli kopesa toli yango? (4) Ndenge nini okoki kopesa toli ya malamu?

NINI ESENGELI KOTINDA BISO TÓPESA TOLI?

5. Nini ekoki kosalisa nkulutu apesa toli na lolenge oyo ndeko akoki kondima yango mbala moko? (1 Bakorinti 13:4, 7)

5 Bankulutu balingaka bandeko ya lisangá. Mpo na komonisa bolingo yango, na bantango mosusu esɛngaka bápesa ndeko oyo azali kokende na nzela ya mabe toli. (Gal. 6:1) Kasi liboso ya kosolola na ndeko yango, ekozala malamu nkulutu atala makambo mosusu oyo ntoma Paulo alobaki na ntina etali bolingo. “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. . . . Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (Tángá 1 Bakorinti 13:4, 7.) Kokanisa maloba ya bavɛrsɛ yango na mozindo ekosalisa nkulutu ayeba soki bolingo nde ezali kotinda ye apesa toli mpe asolola na ndeko na ye na ndenge oyo ebongi. Soki ndeko oyo bazali kopesa toli amoni mpenza ete nkulutu azali kotyela ye likebi, na ntembe te, yango ekosala ete andima toli yango.​—Rom. 12:10.

6. Ndakisa nini ya malamu ntoma Paulo atiká?

6 Ntoma Paulo atikelá bankulutu ndakisa ya malamu. Na ndakisa, ntango esengelaki kopesa bandeko ya Tesaloniki toli, ntoma Paulo akakatanaki te mpo na kopesa yango. Kasi na mikanda oyo akomelaki bango, apesaki bango liboso longonya mpo na mosala na bango ya sembo, mosala makasi na bango ya bolingo, mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko. Lisusu, atalelaki makambo ya bomoi na bango mpe ayebisaki bango na boboto nyonso ete ayebi mikakatano na bango mpe ndenge bazalaki koyika mpiko na minyoko. (1 Tes. 1:3; 2 Tes. 1:4) Kutu, ayebisaki bango ete bazalaki ndakisa mpo na bakristo mosusu. (1 Tes. 1:8, 9) Na ntembe te, bazalaki mpenza na esengo ndenge ntoma Paulo apesaki bango longonya! Nyonso wana emonisaki ete ntoma Paulo alingaki bandeko yango mingi mpenza. Yango wana toli oyo apesaki na mikanda na ye mibale epai ya Batesaloniki esimbaki mpenza mitema na bango.​—1 Tes. 4:1, 3-5, 11; 2 Tes. 3:11, 12.

7. Nini ekoki kosala ete moto aboya kondima toli?

7 Nini ekoki kosalema soki topesaki toli na ndenge oyo ebongi te? Nkulutu moko oyo aumeli na mokumba yango alobi boye: “Soki bato mosusu baboyaka kondima toli, ezalaka te mpo toli yango ezalaki mabe, kasi nde mpo epesamaki na bolingo te.” Yango ekoki koteya biso nini? Moto andimaka toli na pɛtɛɛ soki epesami na bolingo, kasi na nkanda te.

ESENGELI MPENZA KOPESA TOLI YANGO?

8. Mituna nini nkulutu asengeli komituna mpo na koyeba soki asengeli kopesa ndeko moko toli?

8 Bankulutu basengeli kowelaka te kopesa toli. Liboso ya kopesa toli, nkulutu asengeli komituna boye: ‘Nasengeli mpenza koloba? Nayebi mpenza soki moto yango azali kosala likambo ya mabe? Azali kobuka mobeko moko ya Biblia? To ndenge oyo azali kosala ekeseni kaka na oyo ngai nalingaki kosala?’ Bwanya etindaka bankulutu báboya ‘kobimisa maloba na bango mbangumbangu.’ (Mas. 29:20) Soki nkulutu azali koyeba mpenza te soki asengeli kopesa moto toli, akoki kosolola na nkulutu mosusu mpo bátala elongo soki ndeko yango azali kosala likambo oyo eyokani te na Makomami, oyo esɛngi toli.​—2 Tim. 3:16, 17.

9. Mateya nini tokoki kozwa epai ya Paulo mpo na ndenge ya kopesa toli na likambo etali molato mpe kosala monzɛlɛ? (1 Timote 2:9, 10)

9 Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete nkulutu moko azali komitungisa mpo na molato ya ndeko moko to ndenge na ye ya kosala monzɛlɛ. Nkulutu yango akoki komituna boye: ‘Biblia epesi ngai ntina ya koloba na likambo yango?’ Lokola nkulutu yango akolinga te kopesa makanisi na ye moko, akoki kotuna makanisi epai ya nkulutu mosusu to ya mosakoli oyo akɔmɛli na elimo. Bakoki kotalela elongo toli oyo ntoma Paulo apesaki mpo na molato mpe kosala monzɛlɛ. (Tángá 1 Timote 2:9, 10.) Na ndenge ya mokuse, ntoma Paulo amonisaki ete mokristo asengeli kozala na molato ya malamu, alekisaka ndelo te, mpe amonisa ete azali na makanisi ya malamu. Kasi Paulo atángaki te bilamba oyo mokristo asengeli kolata to kolata te. Ayebaki ete bandeko basi mpe bandeko mibali bazali na lotomo ya kopona bilamba bango moko, kasi na boyokani na oyo Biblia elobi. Na yango, ntango bankulutu bazali kotalela soki basengeli kopesa toli, basengeli kotala soki molato ya moto yango elekisi ndelo mpe soki emonisi ete azali na makanisi ya malamu te.

10. Likambo nini tosengeli koyeba na oyo etali bikateli oyo basusu bakoki kozwa?

10 Ekozala malamu tóyeba ete bakristo mibale oyo bakɔmɛli bakoki kozwa bikateli oyo ekeseni, kasi nyonso mibale ezali ya malamu. Tosengeli te kotyela bandeko mibeko na biso moko na oyo etali mabe ná malamu.​—Rom. 14:10.

NANI ASENGELI KOPESA TOLI YANGO?

11-12. Soki toli esengeli kopesama, mituna nini nkulutu asengeli komituna, mpe mpo na nini?

11 Soki emonani ete moto moko asengeli kozwa toli, motuna ya komituna ezali oyo: Nani asengeli kopesa yango? Liboso ya kopesa toli na ndeko mwasi moko oyo abalá to mpe na mwana moke, nkulutu akosolola na mokonzi ya libota, oyo mbala mosusu akomona malamu atalela yango ye moko. * To mpe mokonzi ya libota yango akoki kosɛnga ete ye moko azala wana ntango bankulutu bazali kopesa toli. Mpe ndenge tomonaki yango na  paragrafe 3, na bantango mosusu ekoki kosɛnga ete ndeko mwasi ya mokóló apesa toli na ndeko mwasi ya elenge.

12 Ezali na likambo mosusu oyo nkulutu asengeli kotalela. Asengeli komituna boye: ‘Ngai nde nabongi kopesa toli yango, to mpe ekoleka malamu soki moto mosusu apesi yango?’ Na ndakisa, ndeko moko oyo amimonaka ntina te akoki kondima toli oyo euti epai ya nkulutu oyo azalaki mpe na mokakatano yango, koleka soki euti epai ya oyo azali na mokakatano yango te. Nkulutu oyo azalaki na mokakatano yango akoki koyeba malamu komitya na esika ya ndeko yango, mpe ndeko yango akoki kondima mbala moko makambo oyo nkulutu akoloba. Atako bongo, bankulutu nyonso bazali na mokumba ya kolendisa bandeko na lisangá mpe kosalisa bango básala mbongwana nyonso oyo Makomami ezali kosɛnga. Yango wana, oyo eleki ntina, ezali nde kopesa toli ntango esengeli, ata soki nkulutu moko te akutaná na likambo ya ndenge wana.

NDENGE NINI OKOKI KOPESA TOLI YA MALAMU

Mpo na nini bankulutu basengeli “koyokaka noki”? (Talá paragrafe 13-14)

13-14. Mpo na nini ezali na ntina nkulutu ayeba koyoka?

13 Yebá koyoka. Ntango nkulutu alingi akende kopesa toli, asengeli komituna boye: ‘Nayebi makambo ya bomoi ya ndeko yango? Makambo nini azali na yango mikolo oyo? Ekoki nde kozala ete azali kokutana na mikakatano oyo nayebi te? Azali mpenza na mposa ya nini sikoyo?’

14 Na ntembe te, likanisi oyo ezali na Yakobo 1:19 etaleli mpenza baoyo bapesaka toli. Yakobo akomaki boye: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” Nkulutu akoki kokanisa ete ayebi makambo nyonso, kasi ezali mpenza bongo? Masese 18:13 elobi: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.” Eleki malamu kotuna ndeko yango ye moko ayebisa biso makambo oyo azali na yango. Yango esɛngi koyoka liboso ya koloba. Kobosana te liteya oyo nkulutu oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo azwaki. Ayaki komona ete na esika abanda mbala moko na bavɛrsɛ oyo abongisaki, asengelaki naino kotuna ndeko mwasi yango mituna lokola: “Makambo ezali kotambola ndenge nini na bomoi na yo?” “Ndenge nini nakoki kosalisa yo?” Soki bankulutu bazali kozwa ntango mpo na koyeba likambo malamu, na ntembe te bakobanda kosalisa mpe kolendisa bandeko.

15. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalela likanisi oyo ezali na Masese 27:23?

15 Yebá etonga na yo. Ndenge tolobaki yango na ebandeli, kopesa toli ya malamu esuki kaka te na kotánga mwa mikapo ya Biblia to mpe kopesa likanisi moko to mibale. Bandeko na biso basengeli komona mpenza ete tozali kotyela bango likebi, tozali komitya na esika na bango, mpe tolingi kosalisa bango. (Tángá Masese 27:23.) Bankulutu basengeli kosala nyonso oyo bakoki mpo bázala na boninga ya malamu elongo na bandeko ya lisangá.

Nini ekosala ete ezala mpasi te mpo bankulutu bápesa toli? (Talá paragrafe 16)

16. Nini ekosalisa bankulutu mpo bápesa toli ya malamu?

16 Na ntembe te, bankulutu bakolinga te kotinda bandeko bámona ete bankulutu bayaka kosolola na bandeko kaka ntango esɛngi kopesa bango toli na likambo moko. Kasi, bankulutu basengeli kosololaka na bandeko basi mpe bandeko mibali mbala na mbala mpe kotyela bango likebi ntango bazali kokutana na mikakatano. Nkulutu moko oyo aumeli na mokumba yango alobi boye: “Soki ozali kosala bongo, okokóma moninga na bango. Mpe ntango ekosɛnga opesa bango toli, ekozala mpasi te kosala yango.” Mpe moto oyo ozali kopesa toli akozala mpenza na mokakatano te mpo na kondima yango.

Mpo na nini nkulutu asengeli kozala na motema molai mpe na boboto ntango azali kopesa toli? (Talá paragrafe 17)

17. Ntango nini mpenza nkulutu asengeli kozala na motema molai mpe na boboto?

17 Zalá na motema molai mpe na boboto. Kozala na motema molai mpe na boboto ezali na ntina mingimingi ntango moto azali kotɛmɛla toli ya Biblia oyo bapesi ye. Nkulutu asengeli kokeba ete asilika te soki toli oyo apesi endimami mbala moko te to soki basaleli yango te. Biblia elobi mpo na Yesu ete: “Akobuka te mongendu oyo efinamá, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke.” (Mat. 12:20) Yango wana na mabondeli na ye moko, nkulutu akoki kosɛnga Yehova apambola moto oyo azali na mposa ya toli, asalisa ye ayeba ntina ya toli yango mpe asalela yango. Ekoki kosɛnga ntango eleka mpo moto oyo bapesi toli akanisa makambo oyo bayebisi ye. Soki nkulutu azali na motema molai mpe na boboto, moto oyo azali kozwa toli akolanda te ndenge oyo toli yango epesami, kasi akotya likebi na makambo oyo bayebisi ye. Nzokande, toli na biso esengeli ntango nyonso kouta na Liloba ya Nzambe.

18. (a) Na oyo etali kopesa toli, likambo nini tosengeli kobosana te? (b) Na kotalela elilingi oyo ezali na etanda, baboti bazali kolobela nini?

18 Zwá liteya na mabunga na yo. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokokoka te kosalela na ndenge ya kokoka makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo. (Yak. 3:2) Tokosala mabunga, kasi soki esalemi bongo, tosengeli koluka kozwa liteya na mabunga yango. Soki bandeko na biso bamoni mpenza ete tolingaka bango, ekozala mpasi te mpo bálimbisa biso ntango tolobi to tosali likambo moko oyo epesi bango mpasi.​—Talá mpe etanda “ Epai ya baboti.”

TOYEKOLI NINI?

19. Ndenge nini tokoki kosepelisa mitema ya bandeko na biso?

19 Ndenge touti komona yango, ezalaka pɛtɛɛ te kopesa toli ya malamu. Ezala biso to baoyo topesaka toli, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Kobosana te makanisi oyo totaleli na lisolo oyo. Salá makasi mpo bolingo nde etindaka yo opesa toli. Lisusu, talá soki esengeli mpenza kopesa toli yango mpe soki yo nde obongi kopesa yango. Liboso ya kopesa toli, tunáká mituna mpe yokáká na likebi mpo na koyeba makambo oyo moto azali na yango. Meká komitya na esika ya moto yango. Zalá na boboto, mpe kolisá boninga elongo na bandeko ya lisangá. Kobosana te mokano na biso: Tolingi toli na biso ezala ya malamu, kasi ezala mpe oyo ‘ekosepelisa motema.’​—Mas. 27:9.

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate​—Makabo oyo ezali bato

^ par. 5 Kopesa toli ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Soki tolingi kopesa toli, nini ekosalisa biso tóloba na ndenge oyo ekosalisa mpe ekolendisa basusu? Lisolo oyo ekosalisa mingimingi bankulutu bápesaka toli na ndenge oyo ekosimba motema ya baoyo bayoki yango.

^ par. 11 Talá lisolo “Mokumba oyo bankulutu bazali na yango na kati ya lisangá” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2021.