Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Namoná eloko oyo eleki mosala ya monganga

Namoná eloko oyo eleki mosala ya monganga

“MAKAMBO oyo bozali koyebisa ngai, yango nde mposa na ngai banda bomwana!” Na esengo nyonso, nalobaki maloba yango epai ya mwasi moko ná mobali na ye oyo bayaki na lopitalo na 1971. Nautaki kokóma doktɛrɛ mpe nafungolaki mwa lopitalo na ngai moko. Mwasi wana ná mobali na ye bazalaki banani, mpe mposa na ngai banda bomwana ezalaki nini? Tiká nayebisa bino ndenge lisolo yango ebongolaki makambo oyo nazalaki kotya na esika ya liboso na bomoi na ngai mpe ntina oyo nandimaki ete mposa na ngai oyo nazalaki na yango banda bomwana ekokokisama mosika te.

Nabotamá na 1941 na engumba Paris, na France, mpe libota na biso ezalaki na bozwi mingi te. Nazalaki kosepela koyekola mingi; na yango nalɛmbaki nzoto mpenza ntango nakómaki na mbula zomi, mpo nabɛlaki maladi ya ntolo (tuberculose) mpe esɛngaki nakata kelasi! Minganga bayebisaki ngai ete nazalaka mingi ya kolala na mbeto mpo mipululu (poumons) na ngai ezalaki kobeba. Yango wana, nalekisaki basanza ebele na kotánga diksionɛrɛ moko mpe koyoka baemisyo ya Iniversite ya Paris oyo ezalaki koleka na Radio Sorbonne. Nsukansuka, ntango monganga ayebisaki ngai ete maladi na ngai esili mpe ete nakokaki kozongela kelasi, nasepelaki makasi mpenza. Na nse ya motema nalobaki, ‘Mosala ya monganga ezali malamu mpenza!’ Kobanda wana, nakómaki na mposa ya kobikisaka bato na bamaladi na bango. Mbala nyonso oyo tata azalaki kotuna ngai makambo oyo nakosepela kosala na bomoi na ngai, nazalaki koyebisa ye ntango nyonso ete: “Nalingi kokóma monganga.” Ndenge wana nde nakómaki kosepela na mosala ya monganga.

SIANSI ESALISI NGAI NAPUSANA PENEPENE YA NZAMBE

Na libota na biso, tozalaki bato ya Lingomba ya Katolike. Kasi nayebaki makambo mingi te na ntina etali Nzambe, mpe nazalaki na mituna mingi oyo nazalaki kozwa biyano na yango te. Kaka ntango nabandaki kelasi ya monganga na iniversite nde nandimaki mpenza ete bomoi ekelamá.

Nabosanaka te mbala ya liboso oyo natalaki baselile ya fololo babengi tulipe na mikroskope. Nakamwaki komona ndenge baselile ya fololo yango emibatelaka na molunge mpe na malili. Namonaki mpe ndenge cytoplasme (eloko moko oyo ezalaka na kati ya selile) ezalaki kokɔnda soki batye yango na mungwa mpe kovimba soki batye yango na mai ya pɛto. Likoki yango mpe makoki mosusu ebele esalisaka bikelamu ya mikemike emesana ntango makambo ebongwani. Ntango natalaki makoki ndenge na ndenge ya kokamwa oyo selile ezali na yango, namonaki ete bomoi ebimá kaka yango moko te.

Na mbula na ngai ya mibale na kelasi ya monganga, namonaki makambo mosusu mingi oyo endimisaki ngai ete Nzambe azali. Na mateya ya anatomie, toyekolaki ete ndenge lobɔkɔ ya moto esalemá esalisaka biso tógumbaka mpe tósembolaka misapi na biso. Ndenge misuni ya nzoto na biso ekangamá na mikuwa mpe ndenge biteni nyonso esalaka na bomoko ezali mpenza likamwisi. Na ndakisa, nayekolaki ete misisa ya mikemike oyo esangisi mosuni na mokuwa ya mibale ya mosapi ekabwaná na biteni mibale, mpe esalá mwa gbagba (pont) esika misisa ya mikemike oyo ekei na nsɔngɛ ya misapi elekaka mpe ebatelami. Misisa mosusu esalisaka misisa yango ya mikemike ekangama na mikuwa ya misapi. Soki makambo ezalaka bongo te, misisa yango ya mikemike elingaki kozala makasi mpe misapi na biso elingaki kozala na likoki ya kosembwama te. Namonaki polele ete Moto oyo asalá nzoto ya moto azali na mayele mingi mpenza.

Nasepelaki lisusu mingi na Mozalisi ntango nayekolaki ndenge mwana abandaka kopema nsima ya kobotama. Nayekolaki ete ntango mwana azali naino na libumu, apemaka na nzela ya nsinga ya motolu. Na yango, mwa biloko oyo ezalaka lokola biloko ya mpema na kati ya mipululu evimbaka naino te. Kasi mwa bapɔsɔ liboso ete mwana abotama, mai moko ya ntina mingi etondisaka biloko yango. Bongo ntango mwana abotami, makambo ndenge na ndenge ya kokamwa esalemaka mpo apema mpo na mbala ya liboso. Lidusu moko oyo ezalaka na kati ya motema ya mwana ekangamaka mpe yango esalaka ete makila ekende na mipululu. Na ntango yango, mai oyo etondisaka biloko ya mpema epekisaka biloko yango ekangamakangama wana mopɛpɛ ezali kokɔta nokinoki na kati. Nyonso wana esalaka ete mwana abanda kopema.

Lokola nazalaki na mposa ya koyeba Moto oyo asalá makambo yango ya kokamwa, nakómaki kotánga Biblia na molende. Nakamwaki mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele na likambo etali bopɛto eleki sikoyo bambula koleka 3 000. Nzambe apesaki Bayisraele malako bákundaka nyɛi na bango, básokolaka mbala na mbala, mpe ntango bamoni ete moto moko azali na maladi oyo ekoki kopanzana, bátya ye mosika na bato mosusu. (Lev. 13:50; 15:11; Mib. 23:13) Biblia elobeli malamu ndenge bamaladi epanzanaka, nzokande bato ya siansi bayei koyeba yango eleki kaka mbula 150. Nandimaki mpe ete mibeko oyo etali kosangisa nzoto, oyo mokanda ya Balevi elobeli, esalisaki mpo na kobatela bato ya ekólo Yisraele nyonso bázala na nzoto kolɔngɔnɔ. (Lev. 12:1-6; 15:16-24) Namonaki ete Mozalisi apesaki Bayisraele mibeko yango mpo na bolamu na bango mpe ete apambolaki baoyo batosaki mibeko na ye. Nandimaki mpenza ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe​—Nzambe oyo nayebaki naino nkombo na ye te na ntango wana.

NAKUTANI NA MWASI NA NGAI MPE NAYEBI YEHOVA

Ngai ná Lydie na mokolo ya libala na biso, na mwa 03/04/1965

Ntango nazalaki kokoba kotánga kelasi na ngai ya monganga na iniversite, nakutanaki na elenge mwasi moko na nkombo Lydie, mpe tolinganaki. Tobalanaki na 1965, ntango nakómaki na katikati ya bambula oyo nakosala na iniversite. Na 1971, ngai ná Lydie tozalaki na bana misato, mpe nsukansuka bakómaki motoba. Lydie asungaka ngai mingi mpenza, na mosala na ngai ya monganga mpe na libota.

Nasalaki mbula misato na lopitalo moko, liboso ya kofungola mwa lopitalo na ngai moko. Mwa moke na nsima, mwasi moko ná mobali na ye, oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo, bayaki epai na ngai mpo na koluka lisalisi ya monganga. Ntango nalingaki kokomela mobali nkisi oyo asengelaki kozwa, mwasi alobaki: “Monganga, bankisi yango ezala na makila te.” Nakamwaki mpe natunaki ye: “Ya solo? Mpo na nini?” Azongisaki: “Tozali Batatoli ya Yehova.” Liboso na yango, nayokaki naino nsango ya Batatoli ya Yehova te to ndenge oyo batalelaka makila. Mwasi yango abimisaki Biblia na ye mpe alakisaki ngai vɛrsɛ ya Biblia oyo etindaki bango báboya makila. (Mis. 15:28, 29) Na nsima, ye ná mobali na ye, balakisaki ngai makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala: ekosilisa mpasi, maladi mpe liwa. (Em. 21:3, 4) Nalobaki: “Makambo oyo bozali koyebisa ngai, yango nde mposa na ngai banda bomwana. Nakómaki monganga mpo nasalisaka bato oyo bazali na mpasi.” Nazalaki mpenza na esengo, yango wana tosololaki ngonga moko ná ndambo. Ntango mwasi yango ná mobali na ye bakendaki, na motema na ngai, nalongwaki moto ya Lingomba ya Katolike, mpe nayekolaki ete Mozalisi oyo nazalaki kosepela na ye azalaka na nkombo: Yehova!

Nakutanaki na mwasi wana ná mobali na ye mbala misato na lopitalo na ngai, mpe mbala nyonso tosololaki koleka ngonga moko. Nabengisaki bango na ndako na ngai mpo tólobela makambo mingi oyo etali Biblia. Atako Lydie andimaki koyekola Biblia elongo na biso, azalaki kondima te ete mateya mosusu oyo bateyá biso na Lingomba ya Katolike ezalaki ya lokuta. Yango wana, nabengisaki sango moko aya epai na biso. Tolobelaki mateya ya lingomba tii butu, tozalaki kosalela kaka Biblia. Lisolo yango endimisaki Lydie ete Batatoli ya Yehova bazalaki koteya solo. Na nsima, tokómaki kolinga Yehova mingi tii tozwaki batisimo na 1974.

NAKÓMI KOTYA YEHOVA NA ESIKA YA LIBOSO

Makambo oyo nayekolaki na ntina etali mokano ya Nzambe mpo na bato etindaki ngai nabongola makambo oyo nakotya na esika ya liboso. Mpo na ngai ná Lydie, kosalela Yehova nde ekómaki na ntina mingi na bomoi na biso. Tozwaki mokano ya kobɔkɔla bana na biso na kolanda mitinda ya Biblia. Toteyaki bana na biso bálingaka Nzambe mpe bato, mpe yango ekómisaki boyokani na biso na libota makasi.​—Mat. 22:37-39.

Soki tokanisi, mbala mingi ngai ná Lydie tosɛkaka mpo na ndenge bana na biso bazalaki komona ete tozalaki kozwa bikateli oyo ekokani. Bayebaki ete likambo oyo Yesu ateyaki ete: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te,” ezalaki mobeko na libota na biso. (Mat. 5:37) Na ndakisa, ntango mwana na biso moko ya mwasi akómaki na mbula 17, mokolo moko Lydie aboyaki kopesa ye nzela ya kobima na bilenge mosusu. Moko ya bilenge yango ayebisaki mwana na biso ya mwasi ete: “Soki mama na yo aboyi obima, sɛngá tata na yo!” Kasi mwana na biso ayanolaki ete: “Ekobongola eloko te. Bazalaka ntango nyonso na makanisi ndenge moko.” Bana na biso motoba bazalaki komona ete tozalaki na bomoko na oyo etali kosalela mitinda ya Biblia. Topesaka Yehova matɔndi ndenge lelo oyo, bato mingi ya libota na biso bazali kosalela ye.

Atako solo ebongolaki makambo oyo natyaka na esika ya liboso, mposa na ngai ezalaki ete nasalela mayele na ngai ya mosala ya monganga mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe. Yango wana, nakómaki kopesa mabɔkɔ lokola monganga na Betele ya Paris, mpe na nsima na Betele oyo batongaki na Louviers. Nazalaki kokende kosala na Betele na boumeli ya mbula pene na 50. Na boumeli ya ntango yango, nasalá boninga makasi na bandeko ya libota ya Betele, oyo bamosusu kati na bango bakómi na bambula koleka 90. Nasepelaki mpe mingi mokolo moko ntango nakutanaki na ndeko moko oyo akɔtaki Betele sika. Toyaki koyeba ete ngai nde monganga oyo nasalisaki mama na ye mpo abota ye mbula soki 20 liboso!

NAMONI ETE YEHOVA ASALISAKA MPENZA BATO NA YE

Na boumeli ya bambula, nakómá kolinga Yehova mingi ntango namonaka ndenge atambwisaka mpe abatelaka basaleli na ye na nzela ya ebongiseli na ye. Na ebandeli ya bambula ya 1980, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki bibongiseli na États-Unis mpo na kosalisa minganga bákanga ntina ya ekateli ya Batatoli ya Yehova ya koboya makila.

Na nsima na 1988, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaki departema moko ya sika na Betele na nkombo Biro ya makambo etali boyokani elongo na minganga. Na ebandeli, departema yango ezalaki kokamba Bakomite mpo na boyokani na minganga (CLH) oyo esalemaki na États-Unis mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kobɛla bázwa lisalisi ya malamu. Ntango Bakomite mpo na boyokani na minganga ekómaki na bisika mingi na mokili, etyamaki mpe na France. Nasepelaka mingi komona ndenge ebongiseli ya Yehova esalisaka mpenza bandeko oyo bazali kobɛla mpo bázwa lisalisi oyo basengeli na yango!

MPOSA NA NGAI EKOKISAMI

Tozali kokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe

Nalingaki liboso mosala ya monganga. Kasi ntango natalelaki likambo nini nasengelaki kotya na esika ya liboso, namonaki ete likambo eleki ntina ezali nde ya kobikisa bato na elimo, elingi koloba kosalisa bango bázongisa boyokani elongo na Yehova Nzambe, oyo azali Liziba ya bomoi. Nsima ya kozwa pansiɔ na mosala, ngai ná Lydie tokómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza, tolekisaka bangonga mingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Tii lelo tosalaka oyo ekoki na mosala yango oyo ebikisaka bomoi.

Elongo na Lydie, na 2021

Ata sikoyo, nasalaka oyo nakoki mpo na kosalisa mwa moke baoyo bazali kobɛla. Kasi namoni ete ata monganga ya mayele ndenge nini akokoka te kosilisa maladi nyonso to mpe kopekisa liwa. Yango wana, nazelaka na mposa makasi ntango oyo mpasi, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. Na mokili ya sika oyo ekómi pene, nakozala na likoki ya koyekola libela na libela makambo etali biloko oyo Nzambe akelá, ata mpe lolenge ya kokamwa oyo asalá nzoto ya moto. Ya solo, mposa na ngai ya bomwana ekokisami kaka ndambo. Nazali na kondima ete ya malamu koleka ezali koya!