Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 12

Omonaka makambo oyo Zekaria amonaki?

Omonaka makambo oyo Zekaria amonaki?

“‘Na elimo na ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”​—ZEK. 4:6.

LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko

NA MOKUSE *

1. Likambo nini epesaki Bayuda oyo bazalaki na mboka mopaya esengo?

 BAYUDA bazalaki na esengo makasi. Yehova Nzambe “alamwisaki elimo ya Siruse mokonzi ya Perse” mpo apesa Bayisraele, oyo balekisaki bambula mingi na Babilone, nzela ya kozonga na mboka na bango. Mokonzi atindaki bábelela ete Bayuda bázonga na mboka na bango mpo na ‘kotonga lisusu ndako ya Yehova Nzambe ya Yisraele.’ (Ezr. 1:1, 3) Ekateli yango epesaki esengo mpenza! Yango elimbolaki ete Bayuda bakokaki kozongisa losambo ya Nzambe ya solo na mokili oyo apesaki bango.

2. Likambo nini ya liboso Bayuda balongaki kosala ntango bazongaki na Yerusaleme?

2 Na mobu 537 L.T.B., etuluku ya liboso ya baoyo bautaki na mboka mopaya bakómaki na Yerusaleme, oyo kala ezalaki engumba-mokonzi ya Yuda, bokonzi ya sudi. Eumelaki te, Bayuda yango babandaki mosala ya kotonga tempelo, mpe tii na 536 L.T.B., basilisaki kotya mobɔkɔ na yango!

3. Botɛmɛli nini Bayuda bakutanaki na yango?

3 Kasi ntango babandaki mosala ya kotonga lisusu tempelo yango, Bayuda yango babandaki kokutana na botɛmɛli ya makasi. Bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga “bazalaki ntango nyonso kolɛmbisa mabɔkɔ ya bato ya Yuda mpe kolɛmbisa bango nzoto mpo bátika kotonga.” (Ezr. 4:4) Yango ezalaki likambo ya mpasi mpo na Bayuda, kasi makambo ebebaki lisusu mingi. Na 522 L.T.B., Artazerezese mokonzi ya sika ya Perse, akómaki koyangela. * Banguna bamonaki ete lokola mokonzi ya sika akómi koyangela, bakolonga “kobimisa mpasi na nzela ya mobeko” mpo mosala ya kotonga tempelo ekatana libela. (Nz. 94:20) Banguna yango batindelaki Mokonzi Artazerezese mokanda oyo elobaki mpe ete Bayuda bazali kokana kotombokela ye. (Ezr. 4:11-16) Mokonzi andimaki makambo wana ya lokuta mpe apekisaki mosala ya kotonga tempelo. (Ezr. 4:17-23) Na yango, mosala ya kotonga tempelo oyo Bayuda bazalaki kosala na esengo etɛlɛmaki.​—Ezr. 4:24.

4. Yehova asalaki nini ntango banguna bapekisaki mosala ya kotonga lisusu tempelo? (Yisaya 55:11)

4 Bafandi ya mokili yango oyo bazalaki kosambela Yehova te mpe bato mosusu na guvɛrnema ya Perse bazalaki na ekateli ya kokata mosala ya kotonga lisusu tempelo. Kasi Yehova alingaki ete Bayuda bákoba mosala ya kotonga lisusu tempelo, mpe akokisaka ntango nyonso mokano na ye. (Tángá Yisaya 55:11.) Yehova atyaki mosakoli moko ya mpiko na nkombo Zekaria, mpe alakisaki ye bimonaneli mwambe ya kokamwisa mpenza. Zekaria asengelaki koyebisa yango Bayuda mpo na kolendisa bango. Bimonaneli yango ya kolendisa esalisaki Bayuda bámona ete basengelaki kobanga eloko moko te epai ya banguna na bango, mpe etindaki bango bákoba na mosala oyo Yehova apesaki bango. Na emonaneli ya mitano, Zekaria amonaki etɛlɛmiselo ya miinda mpe nzete mibale ya olive.

5. Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Ekómelaka biso nyonso tólɛmba nzoto. Na yango, tokoki kozwa matomba soki totaleli elendiseli oyo Yehova apesaki Bayisraele na nzela ya emonaneli ya mitano oyo Zekaria azwaki. Kokanga ntina ya emonaneli yango ekoki kosalisa biso tósalela Yehova na bosembo ntango tokutani na botɛmɛli, ntango mbongwana esalemi na bomoi na biso, mpe ntango bapesi biso litambwisi oyo tozali kokanga ntina na yango te.

NTANGO TOKUTANI NA BOTƐMƐLI

Zekaria amonaki emonaneli ya banzete mibale ya olive oyo ezalaki kosopa mafuta na etɛlɛmiselo ya miinda oyo ezalaki na miinda nsambo. (Talá paragrafe 6)

6. Ndenge nini emonaneli ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe banzete mibale ya olive, oyo Zekaria 4:1-3 elobeli, epesaki Bayuda mpiko? (Talá elilingi ya ezipeli.)

6 Tángá Zekaria 4:1-3. Emonaneli ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe ya nzete mibale ya olive epesaki Bayuda mpiko ya kokoba mosala atako botɛmɛli. Na ndenge nini? Vɛrsɛ emonisi ete etɛlɛmiselo ya miinda ezalaki ntango nyonso na mafuta. Mafuta oyo ezalaki kouta na nzete mibale ya olive ezalaki kotondisa kibakuli, mpe kibakuli ezalaki kokitisa mafuta na mokomoko ya miinda nsambo ya etɛlɛmiselo ya miinda. Mafuta yango ezalaki kosala ete miinda ekoba ntango nyonso kopela. Zekaria atunaki boye: “Biloko oyo elimboli nini?” Anzelu apesaki ye eyano oyo eutaki epai ya Yehova ete: “‘Na limpinga ya basoda te, na nguya mpe te, kasi nde na elimo na ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.” (Zek. 4:4, 6) Mafuta oyo ezalaki kouta na banzete yango ezalaki komonisa elimo santu ya Yehova, nguya oyo ekosila te. Liboso ya nguya ya elimo ya Nzambe, limpinga ya basoda ya Baperse ezalaki eloko te. Na lisalisi ya Yehova, baoyo bazalaki kotonga tempelo bakokoba mosala atako botɛmɛli, mpe bakosilisa mosala yango. Ezalaki mpenza nsango ya kolendisa! Bayuda basengelaki kaka kotyela Yehova motema mpe kozongela mosala ya kotonga. Basalaki mpe kaka bongo atako epekiseli ezalaki naino.

7. Mbongwana nini esalisaki mwa moke baoyo bazalaki kotonga tempelo?

7 Mbongwana moko oyo esalemaki esalisaki mwa moke baoyo bazalaki kotonga tempelo. Mbongwana nini? Na mobu 520 L.T.B., mokonzi mosusu ya sika, Dariuse I, azalaki mokonzi ya Perse. Na mbula ya mibale ya boyangeli na ye, ayebaki ete epekiseli wana ya kotonga tempelo ebongaki te. Na yango, mokonzi Dariuse apesaki mitindo ete básilisa mosala ya kotonga tempelo. (Ezr. 6:1-3) Ekateli wana ekamwisaki mpenza bato​—kasi esukaki kaka wana te. Mokonzi Dariuse apesaki bato ya bikólo ya zingazinga mitindo ete bátika kotɛmɛla mosala ya Bayuda mpe bápesa bango mbongo mpe biloko oyo esengeli mpo básilisa kotonga tempelo! (Ezr. 6:7-12) Na yango, Bayuda basilisaki kotonga tempelo nsima ya mbula minei ná mwa basanza, na mobu 515 L.T.B.​—Ezr. 6:15.

Tyelá nguya ya Yehova motema ntango okutani na botɛmɛli (Talá paragrafe 8)

8. Mpo na nini okoki kozala na mpiko ntango okutani na botɛmɛli?

8 Lelo oyo mpe, basaleli mingi ya Yehova bazali kokutana na botɛmɛli. Na ndakisa, bamosusu bafandi na bikólo oyo makambo mosusu ya losambo na biso epekisami. Na bikólo yango, bakangaka bandeko mosusu mpe ‘bamemaka bango liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi,’ mpe bandeko yango bapesaka bango litatoli. (Mat. 10:17, 18) Na bantango mosusu, mbongwana oyo esalemi na guvɛrnema esalisaka bandeko bázwa mwa bonsomi. To mpe zuzi moko ya boboto akoki kozwa ekateli oyo epesi biso nzela ya kokoba na losambo na biso. Batatoli mosusu bazali kokutana na botɛmɛli ya ndenge mosusu. Na bikólo oyo bafandi, bazali na bonsomi ya kosambela Yehova, kasi bazali kokutana na botɛmɛli oyo euti epai ya bato ya mabota na bango oyo bazali na ekateli ya kopekisa bango básalela Yehova. (Mat. 10:32-36) Mbala mingi, ntango bato oyo bazalaki kotɛmɛla biso bamoni ete balongi te kopekisa biso kosambela Yehova, batikaka kotɛmɛla biso. Mpe bato mosusu oyo kala bazalaki batɛmɛli ya makasi mpenza bakómá Batatoli ya molende. Ntango okutani na botɛmɛli, kotika te kosalela Yehova! Zalá na mpiko. Yehova azali na yo, elimo santu na ye mpe ekosalisa yo; yango wana kobanga eloko te!

NTANGO MBONGWANA ESALEMI NA BOMOI NA YO

9. Mpo na nini Bayuda mosusu balɛmbaki nzoto ntango bamonaki mobɔkɔ ya tempelo ya sika etyami?

9 Ntango mobɔkɔ ya tempelo ya sika etyamaki, Bayuda mosusu ya mikóló balelaki. (Ezr. 3:12) Bamoná tempelo kitoko ya Salomo mpe bazalaki kokanisa ete tempelo ya sika oyo bakotonga ekozala “eloko mpamba” soki bakokanisi yango na oyo ya liboso. (Hag. 2:2, 3) Bayokaki mawa mpo bakokanisaki tempelo ya sika na oyo ya kala. Emonaneli ya Zekaria elingaki kosalisa bango bálongola makanisi wana oyo ezalaki kolɛmbisa nzoto. Na ndenge nini?

10. Ndenge nini maloba ya anzelu oyo ezali na Zekaria 4:8-10 esalisaki Bayuda bálongola makanisi na bango ya kolɛmbisa nzoto?

10 Tángá Zekaria 4:8-10. Anzelu alingaki koloba nini ntango alobaki ete Bayuda “bakosepela mpenza mpe bakomona nsinga ya nivo na lobɔkɔ ya Zerubabele” guvɛrnɛrɛ ya Bayuda? Nsinga ya nivo ezali esaleli oyo basalelaka mpo na kotala soki eloko moko ezali semba. Na yango, anzelu alingaki komonisa basaleli ya Nzambe ete, atako bato mosusu bazalaki komona lokola tempelo yango ekozala na nkembo te lokola oyo ya liboso, ekotongama tii na nsuka mpe ekokokisa masɛngami ya Yehova. Yehova akosepela na yango, yango wana Bayuda mpe basengelaki kosepela na yango. Likambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na Yehova ezalaki ete losambo oyo ekosalema na tempelo wana ya sika eyokana na mitinda na ye. Soki Bayuda basambeli Yehova na ndenge oyo alingaka mpe bandimami na miso na ye, esengo na bango ekozonga.

Zalá na makanisi malamu ntango makambo ya bomoi na yo ebongwani (Talá paragrafe 11-12) *

11. Makambo nini basambeli mosusu ya Yehova bakutanaka na yango lelo?

11 Mbongwana ezalaka mpasi mpo na mingi kati na biso. Makambo ebongwanaki mpo na bandeko mosusu oyo basalaki mosala moko ya ntango nyonso bambula ebele. Esɛngaki bamosusu bátika mokumba oyo bazalaki kolinga mingi mpo mbula na bango epusanaki. Ntango makambo ya bongo ekómeli biso, toyokaka mawa mpo tozali kaka bato. Na ebandeli, tokoki koyeba te ntina ya ekateli yango to mpe kokakatana mpo na kondima yango. Tokoki kobanda kokanisa ndenge makambo ezalaki liboso. Tokoki kolɛmba nzoto, mpe kokanisa ete ndenge bomoi na biso ekómi, tozali lisusu na ntina mingi te mpo na Yehova. (Mas. 24:10) Ndenge nini emonaneli ya Zekaria ekoki kosalisa biso tókoba kopesa Nzambe eloko na biso oyo eleki malamu?

12. Ndenge nini emonaneli ya Zekaria ekoki kosalisa biso tolɛmba nzoto te ntango mbongwana moko ezwi biso?

12 Ekozala mpasi te tómesana na mbongwana soki tozali kotalela makambo ndenge Yehova azali kotalela yango. Azali kosala makambo ya minene lelo oyo, mpe tozali na lokumu monene ndenge tozali bato oyo bazali kosala elongo na ye. (1 Ko. 3:9) Mokumba na biso ekoki kobongwana, kasi bolingo oyo Yehova alingaka biso ekobongwana te. Yango wana, soki mbongwana moko oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova ezwi yo, boyá kolekisa ntango na komituna mituna ebele mpo na mbongwana yango. Na esika ya kokanisa mikolo oyo eleká, sɛngá Yehova asalisa yo omona makambo ya malamu na mbongwana yango. (Mos. 7:10) Na esika okanisa makambo oyo okoki lisusu kosala te, kanisá makambo nyonso oyo okoki kosala. Emonaneli ya Zekaria emonisi biso ete ezali na ntina tóbatela makanisi ya malamu. Yango ekosala ete tóbatela esengo na biso mpe tótikala sembo ata ntango bomoi na biso ebongwani.

NTANGO EZALI MPASI KOLANDA LITAMBWISI

13. Mpo na nini Bayisraele mosusu bakokaki kokanisa ete malako ya kozongela kotonga tempelo ezalaki ekateli ya mabe?

13 Mosala ya kotonga lisusu tempelo epekisamaki. Atako bongo, Nganga-nzambe monene Yosua mpe Guvɛrnɛrɛ Zerubabele, oyo batyamaki mpo na kokamba mosala yango, “babandaki kotonga lisusu ndako ya Nzambe.” (Ezr. 5:1, 2) Bayuda mosusu bakokaki kokanisa ete ezalaki ekateli ya mabe. Ntango bazali kotonga tempelo, banguna bakozanga te komona yango mpe bakosala nyonso oyo bakoki mpo na koluka kobebisa makambo. Yosua mpe Zerubabele, mibali oyo bazalaki kokamba mosala yango bazalaki na mposa ya koyeba mpenza soki Yehova azalaki elongo na bango. Bayaki koyeba yango. Ndenge nini?

14. Na kotalela Zekaria 4:12, 14, Nganga-nzambe monene Yosua mpe Guvɛrnɛrɛ Zerubabele bayebaki likambo nini?

14 Tángá Zekaria 4:12, 14. Na eteni oyo ya emonaneli ya Zekaria, anzelu ayebisaki mosakoli ya sembo ya Nzambe ete banzete mibale ya olive ezalaki komonisa “bato mibale oyo batyamaki mafuta,” Yosua mpe Zerubabele. Na ndenge ya elilingi, mibali yango mibale ‘bazalaki kotɛlɛma pene na Nkolo ya mabele mobimba,’ Yehova. Ezalaki mpenza lokumu monene! Yehova azalaki kotyela bango motema. Na yango, Bayisraele bakokaki kotya motema na ekateli nyonso oyo mibali yango bazwi, mpamba te Yehova azalaki kosalela mibali yango mibale mpo na kotambwisa bango.

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolandaka litambwisi ya Yehova na nzela ya Liloba na ye?

15 Lelo oyo, lolenge moko oyo Yehova azali kokoba kotambwisa bato na ye ezali na nzela ya Biblia, Liloba na ye. Na buku yango mosantu, ayebisi biso lolenge ya losambo oyo andimaka. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolandaka litambwisi oyo tozwaka na Liloba ya Nzambe? Tokomonisa yango soki totángaka yango na likebi mpe tozwaka ntango mpo na kokanga ntina na yango. Omituna boye: ‘Ntango nazali kotánga Biblia to moko ya mikanda ya moombo ya sembo, nazwaka ntango mpo na komanyola makambo oyo natángi? Nalukaka koyeba ndimbola ya mateya ya Biblia oyo “ezali mpasi moto akanga ntina na yango”? To natángaka yango kaka likolólikoló mpe naleki?’ (2 Pe. 3:16) Soki tozwaka ntango mpo na kokanisa na mozindo makambo oyo Yehova ateyaka biso, tokozala na likoki ya kolanda litambwisi na ye mpe ya kokokisa mokumba na biso ya kosakola.​—1 Tim. 4:15, 16.

Tyaká motema na litambwisi oyo tozwaka epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” (Talá paragrafe 16) *

16. Ntango tozali mpenza kokanga te ntina ya litambwisi oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesi biso, nini ekosalisa biso mpo tólanda yango?

16 Lolenge mosusu oyo Yehova apesaka biso litambwisi ezali na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Na bantango mosusu, moombo yango akoki kopesa litambwisi oyo tozali kokanga ntina na yango te. Na ndakisa, tokoki kozwa malako ya sikisiki na oyo etali komibongisa mpo na makama oyo ebimaka yango moko, oyo biso tokanisi ete ekoki kosalema te na esika oyo tofandi. To mpe tokoki komona ete moombo ya sembo alekisi ndelo na malako oyo azali kopesa na eleko moko ya maladi mabe. Tosengeli kosala nini soki tomoni lokola ete malako oyo epesami ebongi te? Tokoki kokanisa matomba oyo Bayisraele bazwaki ntango basalaki makambo oyo Yosua ná Zerubabele bayebisaki bango. Tokoki mpe kokanisa masolo mosusu ya Biblia oyo totángá. Na bantango mosusu basaleli ya Yehova bazwaki litamwisi oyo emonanaki ete ebongi te na ndenge ya bomoto kasi nsukansuka ebikisaki bomoi na bango.​—Bas. 7:7; 8:10.

MONÁ MAKAMBO OYO ZEKARIA AMONAKI

17. Emonaneli ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe ya nzete mibale ya olive esalisaki Bayuda na nini?

17 Atako emonaneli ya mitano oyo Zekaria amonaki ezalaki mokuse, esalisaki Bayuda bázala na makanisi ya malamu mpo na mosala na bango mpe losambo na bango. Mpe ntango basalaki na boyokani na makambo oyo Zekaria amonaki, bamonaki ndenge Yehova azalaki kosalisa bango mpe kotambwisa bango na bolingo nyonso. Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova asalisaki bango bákoba mosala na bango mpe bázongela esengo na bango.​—Ezr. 6:16.

18. Ndenge nini emonaneli ya Zekaria ekoki kosalisa yo?

18 Emonaneli ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe ya nzete mibale ya olive oyo Zekaria amonaki ekoki kosalisa yo mingi. Ndenge touti komona yango, ekoki kopesa yo makasi oyo osengeli na yango ntango bato mosusu bazali kotɛmɛla yo. Ekoki kosalisa yo ozala na esengo ntango makambo ya bomoi na yo ebongwani. Ekosalisa yo mpe otya motema mpe otosa malako ata soki ozali kokanga ntina na yango te. Osengeli kosala nini soki okutani na mikakatano na bomoi na yo? Ya liboso, moná makambo oyo Zekaria amonaki: elembeteli oyo emonisi ete Yehova asalisaka basaleli na Ye. Mpe na kolanda makambo oyo omoni, tyeláká Yehova motema mpe kobá kosambela ye na motema na yo mobimba. (Mat. 22:37) Soki osali bongo, Yehova akosalisa yo osalela ye na esengo libela na libela.​—Kol. 1:10, 11.

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

^ Yehova alakisaki mosakoli Zekaria bimonaneli ebele ya kokamwisa. Makambo oyo Zekaria amonaki epesaki ye ná bato ya ekólo ya Yehova makasi ya kolonga mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango ntango bazalaki kobunda mpo na kozongisa lisusu losambo ya pɛto. Bimonaneli yango ekoki kosalisa mpe biso tósalela Yehova na bosembo atako mikakatano na biso. Na lisolo oyo, tokolobela mateya ya ntina oyo tokoki koyekola na moko ya bimonaneli ya Zekaria: emonaneli ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe banzete ya olive.

^ Bambula mingi na nsima, na mikolo ya guvɛrnɛrɛ Nehemia, mokonzi mosusu oyo azalaki mpe na nkombo Artazerezese amoniselaki Bayuda boboto.

^ ELILINGI: Ndeko mobali moko amoni ete asengeli kosala makasi amesana na mbongwana oyo esalemi na bomoi na ye mpo akómi mokóló mpe azali kobɛla.

^ ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kokanisa ndenge oyo Yehova azali kosalisa “moombo ya sembo mpe ya mayele,” kaka ndenge asalisaki Yosua mpe Zerubabele.