Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 13

Kosambela Yehova epesaka esengo mingi

Kosambela Yehova epesaka esengo mingi

“Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.”​—EM. 4:11.

LOYEMBO 31 Tambolá elongo na Nzambe!

NA MOKUSE *

1-2. Nini ekosala ete Nzambe andima losambo na biso?

 OKANISAKA nini ntango oyoki liloba “losambo”? Mbala mosusu omonaka na makanisi ndeko mobali moko ya komikitisa afukami pene na mbeto na ye, azali kosopela Yehova motema na ye na libondeli. To mpe okanisaka bato ya libota moko ya esengo oyo bazali koyekola Biblia na mozindo.

2 Na bandakisa yango mibale, bato yango bazali kosala makambo ya losambo. Yehova akondima losambo na bango? Akondima yango soki eyokani na mokano na ye mpe esalemi na bolingo mpe limemya. Tolingaka Yehova mingi mpenza. Toyebi ete tosengeli kosambela ye, mpe tolingaka kosala yango na ndenge ya malamu mpenza.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela lolenge ya losambo oyo Yehova azalaki kondima na ntango ya kala mpe tokotalela makambo mwambe ya losambo oyo andimaka lelo oyo. Wana tozali kotalela makambo yango, tokoki kokanisa ndenge oyo biso moko tokoki kobongisa lolenge ya losambo oyo topesaka Yehova. Tokotalela mpe bantina oyo losambo ya solo epesaka biso esengo.

LOSAMBO OYO YEHOVA AZALAKI KONDIMA NA NTANGO YA KALA

4. Liboso Yesu aya awa na mabele, ndenge nini basambeli ya Yehova bamonisaki ete bazalaki komemya Yehova mpe kolinga ye?

4 Liboso Yesu aya awa na mabele, bato ya sembo lokola Abele, Noa, Abrahama, mpe Yobo bamonisaki ete bazalaki komemya Yehova mpe kolinga ye. Na ndenge nini? Bazalaki kotosa ye, bazalaki na kondima, mpe bazalaki kopesa ye bambeka. Biblia elobeli na bosikisiki te makambo nyonso oyo bazalaki kosala na losambo na bango. Kasi emonani ete basalaki nyonso oyo bakoki mpo na kopesa Yehova lokumu, mpe andimaki losambo na bango. Na nsima, Yehova apesaki Bayisraele mibeko na nzela ya Moize. Na kati ya mibeko yango, ezalaki na malako ya sikisiki oyo emonisi ndenge oyo Yehova alingaki bato básambela ye.

5. Mbongwana nini esalemaki na losambo ya solo nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu?

5 Nsima ya liwa ya Yesu mpe lisekwa na ye, Yehova atikaki kosɛnga ete bato básambela ye na kolanda Mibeko ya Moize. (Rom. 10:4) Bakristo basengelaki kolanda mobeko moko ya sika: “mobeko ya Kristo.” (Gal. 6:2) Kotosa “mobeko” yango esɛngaki te kokanga yango na motó to kolanda liste moko molai ya makambo ya kosala to ya kosala te; esɛngaki nde kolanda ndakisa ya Yesu mpe kosalela mateya na ye. Lelo oyo mpe, bakristo basalaka oyo bakoki mpo na kolanda Kristo mpo básepelisa Yehova mpe mpo ‘milimo na bango epema.’​—Mat. 11:29.

6. Lisolo oyo ekoki kosalisa biso na nini?

6 Wana tozali kotalela likambo mokomoko oyo tosalaka na losambo na biso, omituna boye: ‘Milende nini nasali na likambo yango?’ Okoki mpe komituna boye: ‘Nakoki lisusu kobongisa lolenge ya losambo na ngai?’ Osengeli kosepela mpo na milende oyo osali, kasi ekozala mpe malamu obondela Yehova asalisa yo mpo omona makambo oyo osengeli kobongisa.

MWA MAKAMBO MOSUSU OYO EZALI NA KATI YA LOSAMBO NA BISO

7. Ndenge nini Yehova atalelaka mabondeli na biso oyo euti na motema?

7 Libondeli ezali na kati ya losambo na biso epai ya Yehova. Biblia ekokanisi mabondeli na biso na mpaka ya malasi oyo ebongisami malamumalamu, oyo ezalaki kopesama na tabernakle mpe na nsima na tempelo. (Nz. 141:2) Mpaka ya malasi yango ezalaki kobimisa nsolo kitoko oyo ezalaki kosepelisa Nzambe. Ndenge moko mpe, mabondeli na biso oyo euti na motema “esepelisaka” Nzambe, ata soki tosaleli maloba milaimilai te. (Mas. 15:8; Mib. 33:10) Tozali na ntina mpenza ya kondima ete motema ya Yehova esepelaka ntango toyebisaka ye ete tolingaka ye mpe tozali na botɔndi epai na ye. Alingaka tóyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa biso, makambo oyo tozali kolikya, mpe bamposa na biso. Liboso osolola na Yehova na libondeli, mpo na nini te okanisa liboso makambo oyo olingi koloba? Soki osali bongo, okopesa Tata na yo ya likoló “mpaka ya malasi” ya malamu mpenza.

8. Libaku nini ya malamu tozali na yango mpo na kosanzola Nzambe?

8 Kosanzola Yehova ezali na kati ya losambo na biso. (Nz. 34:1) Tosanzolaka Yehova ntango tozali kolobela na esengo bizaleli na ye kitoko mpe misala na ye. Tokozala na makambo mingi ya malamu ya koloba mpo na Yehova soki motema na biso ezali na botɔndi. Soki tozali kozwa ntango ya komanyola bolamu ya Yehova, elingi koloba makambo nyonso oyo asaleli biso, tokozanga ata mokolo moko te likambo ya koloba mpo na kosanzola ye. Mingimingi mosala ya kosakola epesaka biso libaku malamu ya ‘kopesa Nzambe mbeka ya lisanzoli, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso.’ (Ebr. 13:15) Kaka ndenge tosengeli kokanisaka liboso makambo oyo tokoyebisa Yehova na libondeli, tosengeli mpe kokanisaka malamu makambo oyo tokoyebisa bato oyo tokosolola na bango na mosala ya kosakola. Tolingaka ete “mbeka [na biso] ya lisanzoli” ezala ya malamu koleka. Yango wana toyebisaka bato mateya ya solo na esengo mpenza.

9. Ndenge ezalaki mpo na Bayisraele, matomba nini tozwaka soki toyangani na makita? Lobelá ndakisa na yo moko.

9 Koyangana na makita ezali na kati ya losambo na biso epai ya Yehova. Bayisraele bazwaki malako oyo: “Mbala misato na mbula, mobali nyonso epai na yo akomonana liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo ye akopona.” (Mib. 16:16) Esɛngaki bátika ndako na bango mpe bilanga na bango kaka boye. Kasi Yehova alakaki bango ete: “Moto moko te akolula mokili na yo ntango okomata komona elongi ya Yehova Nzambe na yo.” (Kob. 34:24) Lokola Bayisraele bazalaki kotyela Yehova motema mobimba bazalaki koyangana na bafɛti yango mbula na mbula. Bazalaki kozwa matomba mingi; bazalaki kokanga malamumalamu ntina ya Mibeko ya Nzambe, bazalaki kokanisa bolamu ya Yehova, mpe bazalaki kosepela ndenge bazalaki elongo na basusu mpo na kolendisana. (Mib. 16:15) Biso mpe tozwaka matomba ya ndenge wana ntango tosali nyonso mpo na koyangana na makita. Mpe kanisá ndenge Yehova asepelaka ntango tobongisi makita malamu mpe topesi biyano ya mikuse oyo elendisi bandeko.

10. Nini emonisi ete koyemba ezali na ntina na losambo na biso?

10 Koyembela Yehova na lisangá ezali na kati ya losambo na biso. (Nz. 28:7) Mpo na Bayisraele, koyemba ezalaki likambo ya ntina na kati ya losambo na bango. Mokonzi Davidi atyaki Balevi 288 mpo báyembaka na tempelo. (1 Nt. 25:1, 6-8) Lelo oyo, tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe ntango tozali koyemba nzembo ya masanzoli. Mongongo na biso ezali te eloko oyo eleki ntina. Tótalela ndakisa oyo: Ntango tolobaka, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi,” kasi yango epekisaka biso te koloba na makita mpe na mosala ya kosakola. (Yak. 3:2) Ndenge moko mpe, ata soki tokanisi ete tozali na mongongo ya malamu te mpo na koyemba, tosengeli te kotika yango epekisa biso koyemba mpo na kosanzola Yehova.

11. Ndenge emonisami na Nzembo 48:13, mpo na nini tosengeli kozala na programɛ ya koyekola Biblia na libota?

11 Koyekola Liloba ya Yehova mpe koteya bana na biso makambo na ye ezali na kati ya losambo oyo topesaka ye. Mokolo ya Sabata ezalaki kopesa Bayisraele libaku ya kotya makambo ya mokolo na mokolo pembeni mpo na kotya makanisi nyonso na boyokani na bango na Yehova. (Kob. 31:16, 17) Baoyo bazalaki sembo bazalaki koteya bana na bango makambo ya Yehova mpe bolamu na ye. Ndenge moko mpe, mokomoko na biso asengeli kozala na programɛ mpo na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Yango ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova, mpe esalisaka biso tópusana lisusu penepene na ye. (Nz. 73:28) Mpe ntango tozali koyekola na libota, tokoki kosalisa bana na biso bákóma na boyokani makasi elongo na Yehova, Tata na biso ya likoló.​—Tángá Nzembo 48:13.

12. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova azalaki komona mosala ya baoyo basalaki biloko ya tabernakle?

12 Kotonga mpe kobatela bisika na biso ya losambo ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Biblia elobi ete mosala ya kotonga tabernakle mpe kotya biloko na yango ya kati ezalaki “mosala mosantu.” (Kob. 36:1, 4) Lelo oyo mpe, Yehova amonaka ete mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu ya teokrasi ezali mosala mosantu. Bandeko mosusu, ya mibali mpe ya basi, bapesaka ntango mingi na misala yango. Na ntembe te tosepelaka ndenge bapesaka mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi! Kasi, babimaka mpe na mosala ya kosakola. Basusu bakoki kutu kolinga kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela. Bankulutu bakomonisa ete bazali kopesa misala ya kotonga mabɔkɔ soki bazali kondima ete bandeko yango, oyo basalaka mosala makasi, bákóma babongisi-nzela ntango bakokisi masɛngami. Ezala toyebi malamu mosala ya kotonga to te, biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo bandako yango ezala ntango nyonso pɛto mpe kobongisa bisika oyo ebebi.

13. Ndenge nini tosengeli kotalela makabo oyo topesaka mpo na mosala ya Bokonzi?

13 Kopesa makabo mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Bayisraele basengelaki te komonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba. (Mib. 16:16) Bayisraele basengelaki komema likabo na kotalela oyo bazali na yango. Na ndenge yango bazalaki komonisa botɔndi mpo na bibongiseli nyonso oyo Yehova azalaki kozwa mpo bázala malamu na elimo. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na makambo nyonso oyo asalelaka biso mpo tózala makasi na elimo? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kotya makabo mpo na kokokisa bamposa ya lisangá na biso mpe mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na kotalela makoki na biso. Ntoma Paulo alobelaki likambo yango boye: “Soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” (2 Ko. 8:4, 12) Yehova asepelaka na makabo nyonso oyo totyaka, ata soki ezali mingi te.​—Mrk. 12:42-44; 2 Ko. 9:7.

14. Na kotalela Masese 19:17, ndenge nini Yehova atalelaka lisalisi oyo topesaka bandeko na biso oyo bazali na bosɛnga?

14 Kosalisa bakristo mosusu oyo bazali na bosɛnga ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Yehova alakaki ete akopambola Bayisraele oyo bazalaki kokabela babola. (Mib. 15:7, 10) Ya solo, mbala nyonso oyo tosalisi ndeko moko oyo azali na bosɛnga, Yehova amonaka ete tokabeli nde Ye. (Tángá Masese 19:17.) Na ndakisa, ntango bakristo ya engumba Filipi batindelaki ntoma Paulo likabo ntango azalaki na bolɔkɔ, abengaki yango “mbeka oyo endimami, oyo ezali kosepelisa Nzambe.” (Flp. 4:18) Kanisá bandeko ya lisangá na bino mpe omituna boye: ‘Ezali na moto oyo nakoki kosalisa?’ Yehova asepelaka soki tozali kosalela ntango, makasi, mayele mpe biloko na biso ya mosuni mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Amonaka ete ezali na kati ya losambo na biso.​—Yak. 1:27.

KOSAMBELA YEHOVA EPESAKA BISO ESENGO

15. Losambo ya solo esɛngaka ntango mpe milende, kasi mpo na nini ezalaka kilo te?

15 Losambo ya solo esɛngaka ntango mpe milende. Kasi ezali kilo te. (1 Yoa. 5:3) Mpo na nini? Mpamba te tosambelaka Yehova mpo tolingaka ye. Meká kokanisa mwana moko oyo alingi kopesa tata na ye eloko. Akoki kolekisa ntango mingi mpo na kosalela tata na ye liyemi. Mwana akoyoka mawa te mpo na ntango oyo alekisaki na kosala liyemi yango. Alingaka tata na ye, mpe azali na esengo ya kopesa ye likabo yango. Ndenge moko mpe, lokola tolingaka Yehova, tozalaka na esengo ya kopesa ntango mpe kosala milende mpo na komipesa na losambo na ye.

16. Na kotalela Baebre 6:10, ndenge nini Yehova atalelaka milende oyo mokomoko na biso asalaka mpo na kosepelisa ye?

16 Baboti oyo balingaka bana na bango bazelaka te ete bango nyonso bápesa bango likabo ya ndenge moko. Bayebaka ete mwana na mwana azali na ndenge na ye mpe mokomoko azali na makambo oyo akoki kosala. Ndenge moko mpe, Tata na biso ya likoló ayebi makambo oyo mokomoko na biso akoki kosala. Mbala mosusu okoki kosala mingi koleka bato oyo oyebi mpe oyo olingaka. Mbala mosusu mpe okoki kosala mingi te lokola basusu, ntango mosusu mpo okómi mokóló, ozali na maladi, to mpe mpo na mikumba ya libota. Kolɛmba nzoto te. (Gal. 6:4) Yehova akobosana mosala na yo te. Soki ozali kosala makasi opesa eloko na yo oyo eleki malamu mpe ozali na makanisi ya malamu, akosepela na yango. (Tángá Baebre 6:10.) Yehova amonaka ata makanisi ya mitema na yo. Alingaka ete ozala na esengo mpe osepela na makambo oyo okoki kosala mpo na kosambela ye.

17. (a) Soki tozali kokoka mpenza te kosala makambo mosusu ya losambo na biso, tokoki kosala nini? (b) Ndenge nini moko ya makambo ya losambo na biso oyo ezali na etanda “Bakisá esengo na yo” esalisaki yo?

17 Tokosala nini soki tozali kokoka mpenza te kosala makambo mosusu ya losambo na biso, na ndakisa, koyekola Biblia biso moko mpe kokende kosakola? Na ntembe te soki tozali kolekisa ntango mbala na mbala na makambo yango, tokobanda kosepela na yango mpe tokozwela yango matomba. Tokoki kokokanisa makambo ya losambo na biso na makambo mosusu, na ndakisa kosala ngalasisi moko boye, to koyekola ebɛtɛlo moko ya miziki. Soki tozali kosala yango kaka ntango libaku emonani, tokoyeba yango malamu te. Sikoyo kanisá ete tozwi mokano ya kosala yango mokolo na mokolo. Na ebandeli tokoki kolekisa kaka ntango moke mpo na kosala yango, na nsima tokoki kobakisa ntango mingi. Ntango tokomona ete milende na biso ezali kofuta, na ntembe te tokobanda kozela ntango yango na esengo mpe tokobanda kosepela mpenza. Omoni ndenge ndakisa yango eyokani na makambo ya losambo na biso?

18. Wapi likambo eleki ntina oyo tokoki kosala, mpe matomba nini tokozwa?

18 Kosala oyo tokoki mpo na kosambela Yehova nde likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Yango ekosala ete tózala na bomoi ya esengo mpe ya malamu mpe tokozala na elikya ya kosambela Yehova libela na libela. (Mas. 10:22) Banda sikoyo tozali na kimya ya makanisi mpo toyebi ete Yehova asalisaka biso ntango tokutani na mikakatano. (Yis. 41:9, 10) Tozali mpenza na bantina mingi ya kozala na esengo wana tozali kosambela Tata na biso ya bolingo, oyo abongi “kozwa nkembo mpe lokumu” oyo euti na bikelamu na ye nyonso!​—Em. 4:11.

LOYEMBO 24 Bóya na ngomba ya Yehova

^ Lokola Yehova azali Mozalisi ya biloko nyonso, tosengeli kosambela ye. Andimaka losambo oyo tozali kopesa ye soki tozali kotosa mibeko na ye mpe bomoi na biso eyokani na mitinda na ye. Na lisolo oyo, tokolobela makambo mwambe oyo tosalaka na losambo na biso. Kanisá ndenge oyo osalaka makambo yango, mpe ndenge oyo ekoki kosalisa yo ozala na esengo.