Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 14

Bankulutu: Bókoba komekola ntoma Paulo

Bankulutu: Bókoba komekola ntoma Paulo

“Bókóma bamekoli na ngai.”​—1 KO. 11:1.

LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kosalisa bankulutu lelo oyo?

 NTOMA Paulo azalaki kolinga bandeko. Azalaki koboma nzoto mpo na bango. (Mis. 20:31) Yango wana bandeko basi mpe mibali bazalaki kolinga Paulo mingi. Na libaku moko boye, “mpisoli mingi esopamaki” ntango bankulutu ya Efese bayebaki ete bakomona ye lisusu te. (Mis. 20:37) Ndenge moko mpe, bankulutu na biso ya molende balingaka mingi mpenza bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá, mpe basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bango. (Flp. 2:16, 17) Kasi na bantango mosusu, bankulutu bakutanaka na mikakatano. Nini ekoki kosalisa bango bálonga mikakatano yango?

2 Bankulutu na biso, oyo basalaka mosala makasi, bakoki kotalela ndakisa ya Paulo. (1 Ko. 11:1) Azalaki na makoki lokola anzelu te. Paulo azalaki moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu azalaki kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu. (Rom. 7:18-20) Lisusu, azalaki na mikakatano ndenge na ndenge. Kasi Paulo atikaki te kosalela bandeko mpe abungisaki esengo na ye te. Soki bankulutu bazali komekola Paulo, ekosalisa bango bálonga mikakatano oyo bazali na yango, mpe bábatela esengo na bango ntango bazali kosalela Yehova. Tótalela ndenge oyo bakoki kosala yango.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo, mpe tokolobela ndakisa ya nani?

3 Na lisolo oyo, tokotalela makambo minei oyo ezalaka mokakatano mpo na bankulutu mingi: (1) kozala na bokatikati kati na mosala ya kosakola mpe mikumba mosusu, (2) kozala mobateli ya mpate ya malamu, (3) kobundisa bolɛmbu na bango moko, mpe (4) kotalela mabunga ya basusu na ndenge ya malamu. Tokolobela ndenge oyo Paulo alongaki mokakatano yango mokomoko mpe ndenge bankulutu bakoki kolanda ndakisa na ye.

KOZALA NA BOKATIKATI KATI NA MOSALA YA KOSAKOLA MPE MIKUMBA MOSUSU

4. Mpo na nini bankulutu bakoki komona ete ezali mokakatano bázala ndakisa na mosala ya kosakola?

4 Mpo na nini ekoki kozala mokakatano? Longola kozala ndakisa ya malamu na mosala ya kosakola, bankulutu bazalaka mpe na mikumba mingi. Na ndakisa, mingi kati na bango basalaka lokola prezida na Likita bomoi mpe mosala ya bakristo, mpe batambwisaka Boyekoli ya Biblia na lisangá. Ntango mosusu basalaka mpe badiskur. Bapesaka basaleli na misala formasyo, mpe bakendaka kolendisa bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá. (1 Pe. 5:2) Bankulutu mosusu basalaka mosala ya kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu ya teokrasi. Nzokande, ndenge moko na bandeko nyonso na lisangá, nkulutu azali libosoliboso mosakoli ya nsango malamu.​—Mat. 28:19, 20.

5. Ndakisa nini Paulo atikaki lokola mosakoli ya nsango malamu?

5 Ndakisa ya Paulo. Likambo oyo esalisaki Paulo alonga, ezali na Bafilipi 1:10, epai alobaki: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” Paulo asalelaki toli yango. Azwaki mokumba ya kosakola, mpe na boumeli ya bambula mingi, azalaki komona ete mosala ya kosakola ezali na kati ya makambo oyo eleki ntina. Azalaki kosakola “na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” (Mis. 20:20) Azalaki kaka te kosakola na ngonga moko boye to mokolo moko boye. Azalaki kosakola na mabaku nyonso oyo emonani! Na ndakisa, ntango azalaki kozela baninga na ye na Atene, ayebisaki etuluku moko ya bato minene nsango malamu, mpe bamosusu kati na bango bandimaki. (Mis. 17:16, 17, 34) Ata ntango bakangaki ye “minyololo,” Paulo asakwelaki baoyo bazalaki zingazinga na ye.​—Flp. 1:13, 14; Mis. 28:16-24.

6. Makambo nini Paulo alakisaki basusu?

6 Paulo azalaki kosalela ntango na ye malamu. Mbala mingi, azalaki kobenga basusu mpo bákende kosakola elongo. Na ndakisa, na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ, azwaki Yoane Marko, mpe na mobembo na ye ya mibale, azwaki Timote. (Mis. 12:25; 16:1-4) Na ntembe te, Paulo asalaki nyonso mpo na kolakisa mibali yango ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá, ndenge ya kokokisa mokumba ya mobateli ya mpate, mpe ndenge ya kokóma bateyi ya malamu.​—1 Ko. 4:17.

Lokola Paulo, zaláká ntango nyonso pene ya kopesa litatoli (Talá paragrafe 7) *

7. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalela maloba ya Paulo oyo ezali na Baefese 6:14, 15?

7 Liteya. Mpo na komekola Paulo, bankulutu basengeli kosuka kaka te na kosakola ndako na ndako, kasi basengeli kozala pene mpe kondima kopesa litatoli na mabaku nyonso. (Tángá Baefese 6:14, 15.) Na ndakisa, bakoki kopesa litatoli ntango bazali kosomba biloko, to na esika na bango ya mosala. To mpe ntango bazali kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga bandako ya teokrasi, bakoki kosakola nsango malamu epai ya bato ya kartye to bato oyo batɛkɛlaka bango biloko. Ndenge moko na Paulo, bankulutu bakoki kosalela ntango oyo bazali na mosala ya kosakola mpo na kopesa bandeko mosusu, ata basaleli na misala, formasyo.

8. Na bantango mosusu ekoki kosɛnga nkulutu asala nini?

8 Bankulutu basengeli kotika ata moke te ete mikumba oyo bakokisaka na lisangá to na zongazonga ezangisa bango ntango ya kobima na mosala ya kosakola. Mpo bázala ntango nyonso na bokatikati, na bantango mosusu ekosɛnga ete báboya mikumba mosusu. Nsima ya kokanisa malamumalamu mpe kobondela, bakoki komona ete soki bandimi mokumba moko boye, bakokoka te kosala makambo oyo eleki ntina. Na kati ya makambo yango, tokoki kotánga kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, komipesa na mosala ya kosakola, to kosakola ná bana mpo na kopesa bango formasyo. Bamosusu bakokaka te koboya mokumba moko oyo bapesi bango, atako bongo basengeli kondima ete Yehova amonaka mposa na bango ya kozala na bokatikati na makambo nyonso.

KOZALA MOBATELI YA MPATE YA MALAMU

9. Mokakatano nini bankulutu bazalaka na yango lokola bazali na makambo ebele ya kosala?

9 Mpo na nini ekoki kozala mokakatano? Basaleli ya Yehova bazali kokutana na makambo mingi ya mpasi. Na mikolo oyo ya nsuka, biso nyonso tozalaka na mposa ya malendisi, lisalisi, mpe libɔndisi. Mpe bandeko mosusu bazalaka na mposa ya lisalisi mpo báboya etamboli ya mabe. (1 Tes. 5:14) Ya solo, bankulutu bakoki te kolongola makambo nyonso ya mpasi oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango. Atako bongo, Yehova alingi ete bankulutu básala nyonso oyo bakoki mpo na kolendisa mpe kobatela bampate na ye. Lokola bankulutu bazalaka na makambo ebele ya kosala, ndenge nini bakoki kozwa ntango mpo na kopesa bandeko lisalisi oyo basengeli na yango?

Pesáká basusu longonya mpe lendisáká bango (Talá paragrafe 10, 12) *

10. Na kotalela 1 Batesaloniki 2:7, ndenge nini Paulo azalaki kosalela basaleli ya Yehova makambo?

10 Ndakisa ya Paulo. Paulo azalaki koluka mabaku ya kopesa bandeko longonya mpe kolendisa bango. Ezali malamu bankulutu bálanda ndakisa na ye, mpe básalelaka bandeko makambo na bolingo mpe na boboto. (Tángá 1 Batesaloniki 2:7.) Paulo azalaki koyebisa bandeko ete alingaka bango, Yehova mpe alingaka bango. (2 Ko. 2:4; Ef. 2:4, 5) Paulo azalaki kozwa bandeko ya lisangá lokola baninga, mpe azalaki kolekisa ntango elongo na bango. Amonisaki ete azalaki kotyela bango motema na ndenge azalaki koyebisa bango makambo oyo etungisaka ye mpe mabunga na ye. (2 Ko. 7:5; 1 Tim. 1:15) Kasi Paulo atyaki makanisi na ye nyonso na mikakatano na ye te. Azalaki nde kolinga kosalisa bandeko.

11. Nini ezalaki kotinda Paulo apesa bandeko toli?

11 Na bantango mosusu, Paulo asengelaki kopesa bandeko mibali mpe bandeko basi toli. Kasi ata mokolo moko te asalaki yango na nse ya nkanda. Azalaki kopesa bango toli mpo azalaki kotyela bango likebi mpe alingaki kobatela bango na makama ndenge na ndenge. Azalaki kosala nyonso mpo toli na ye ezala pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina, mpe alingaki ete endimama. Na ndakisa, na mokanda moko oyo akomelaki Bakorinti, Paulo apesaki toli ya makasi. Nsima ya kokoma mokanda yango, atindelaki bango Tito. Azalaki mpenza komituna soki bandeko basalaki nini ntango batángaki mokanda yango. Kanisá esengo na ye ntango ayebaki ete bandimaki toli na ye mpe basalelaki yango!​—2 Ko. 7:6, 7.

12. Ndenge nini bankulutu bakoki kolendisa kondima ya bandeko?

12 Liteya. Na ndakisa ya Paulo, bankulutu basengeli kolekisaka ntango ná bandeko ya lisangá. Lolenge moko oyo bakoki kosala yango ezali ya kokóma liboso makita ebanda mpo na kosolola na basusu mpe kolendisa bango. Mbala mingi ezwaka kaka mwa miniti moke mpo na koyebisa ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko maloba ya kolendisa oyo asengeli na yango. (Rom. 1:12; Ef. 5:16) Nkulutu oyo alandaka ndakisa ya Paulo akosalela mpe Liloba ya Nzambe mpo na kolendisa kondima ya bandeko ya lisangá, mpe kosalisa bango bámona ete Nzambe alingaka bango. Lisusu, asalaka ete bandeko báyeba ete alingaka bango. Atunaka bango bansango na bango, mpe alukaka mabaku ya kopesa bango longonya. Ntango nkulutu alingi kopesa toli, azwaka makanisi na Liloba ya Nzambe. Asimbaka mosisa ya likambo, kasi asalaka yango na boboto mpo mposa na ye ezalaka ete ndeko andima toli yango mpe asalela yango.​—Gal. 6:1.

KOBUNDISA BOLƐMBU NA BANGO MOKO

13. Ndenge nini bankulutu bakoki komiyoka mpo na kozanga kokoka na bango?

13 Mpo na nini ekoki kozala mokakatano? Bankulutu bazali bato ya kokoka te. Lokola bato nyonso, basalaka mabunga. (Rom. 3:23) Na bantango mosusu ekoki kozala mpasi bázala na makanisi oyo ebongi mpo na bolɛmbu na bango. Basusu bakoki komitungisa mingi mpo na kozanga kokoka na bango, mpe bakoki kolɛmba nzoto. Nzokande bamosusu mpe bakipaka mabunga na bango te mpe bamonaka ntina ya kosala bambongwana te.

14. Na kotalela Bafilipi 4:13, ndenge nini komikitisa esalisaki Paulo azala na makanisi malamu mpo na bolɛmbu na ye?

14 Ndakisa ya Paulo. Na komikitisa nyonso, Paulo andimaki ete akokaki te kolonga bolɛmbu na ye na makasi na ye moko. Asengelaki na makasi oyo Nzambe apesaka. Liboso, Paulo azalaki konyokola bakristo na molende mpenza. Kasi na nsima, andimaki ete azalaki kosala mabe, mpe andimaki kobongola makanisi na ye mpe bomoto na ye. (1 Tim. 1:12-16) Yehova asalisaki Paulo, mpe akómaki mobateli ya mpate ya bolingo, ya motema mawa mpe ya komikitisa. Ayebaki malamu bisika oyo azalaki na bolɛmbu, kasi aponaki kotya motema ete Yehova akosalisa ye, na esika atya makanisi nyonso kaka na bolɛmbu na ye. (Rom. 7:21-25) Azalaki koluka te kozala moto ya kokoka. Kasi, asalaki makasi abongisa bomoto na ye ya bokristo mpe na komikitisa nyonso, atyaki motema ete Yehova akosalisa ye akokokisa mosala na ye.​—1 Ko. 9:27; tángá Bafilipi 4:13.

Salá makasi obundisa bolɛmbu na yo (Talá paragrafe 14-15) *

15. Ndenge nini nkulutu akoki komonisa ete azali na makanisi ya malamu na oyo etali bolɛmbu na ye?

15 Liteya. Soki bandeko batyamaka bankulutu, ezali te mpo bazali bato ya kokoka. Kasi Yehova alingi ete bándimaka mabunga na bango mpe bábongisa bomoto na bango ya bokristo. (Ef. 4:23, 24) Nkulutu asengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo esalisa ye amona bisika oyo asengeli kobongisa, mpe na nsima kosala mbongwana nyonso oyo esengeli. Bongo Yehova akosalisa ye azala na esengo mpe azala nkulutu ya malamu.​—Yak. 1:25.

KOTALELA MABUNGA YA BASUSU NA NDENGE YA MALAMU

16. Nini ekoki kosalema soki nkulutu azali kotala kaka mabunga ya basusu?

16 Mpo na nini ekoki kozala mokakatano? Lokola bankulutu balekisaka ntango mingi elongo na bandeko ya lisangá, ezali mpasi te mpo bámona mabunga ya bandeko. Soki bankulutu bakebi te, bakoki kobanda kosilikela bango, kogangela bango, to mpe kokanisela bango mabe. Paulo ayebisaki bakristo ete Satana akosepela soki bazali kosala bandeko bongo.​—2 Ko. 2:10, 11.

17. Ndenge nini Paulo azalaki kotalela bandeko?

17 Ndakisa ya Paulo. Paulo azalaki ntango nyonso na makanisi ya malamu mpo na bandeko ya lisangá. Ayebaki malamu mabunga na bango, mpo na bantango mosusu makambo oyo basalaki epesaki ye mpasi. Kasi, Paulo ayebaki ete soki moto asali libunga moko, yango elakisi te ete azali moto mabe. Alingaki bandeko, mpe azalaki kotala mingimingi bizaleli na bango ya malamu. Ntango bandeko bazalaki komona ete ezali mpasi kosala oyo ezali malamu, Paulo azalaki koloba te ete bazalaki kosala yango na nko; azalaki nde komona ete bazali kaka na mposa ya lisalisi.

18. Ndenge Paulo asalaki na likambo ya Evodi ná Sɛntishe eteyi yo nini? (Bafilipi 4:1-3)

18 Na ndakisa, tótala ndenge Paulo asalisaki bandeko basi mibale oyo bazalaki na lisangá ya Filipi. (Tángá Bafilipi 4:1-3.) Emonani ete Evodi ná Sɛntishe batikaki ete matata oyo bazalaki na yango ekabola bango. Paulo agangelaki bango te, mpe akaniselaki bango mabe te. Atalaki mingimingi nde bizaleli na bango ya malamu. Bandeko basi yango ya sembo bazalaki kosalela Yehova banda kala. Paulo ayebaki ete Yehova azalaki kolinga bango. Lokola Paulo azalaki na makanisi ya malamu mpo na bandeko basi yango, yango etindaki ye alendisa bango básilisa matata na bango. Ndenge Paulo azalaki na makanisi ya malamu mpo na basusu esalisaki ye abatela esengo na ye mpe abatelaki boninga makasi ná bandeko ya lisangá wana.

Salá makasi okaniselaka basusu mabe te (Talá paragrafe 19) *

19. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki kobatela makanisi malamu mpo na bandeko? (b) Elilingi ya nkulutu oyo azali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi ekoki koteya yo nini?

19 Liteya. Bankulutu, bólukaka komona bizaleli malamu oyo bandeko ya lisangá bazali na yango. Moto nyonso azali moto ya kozanga kokoka, kasi moto nyonso azalaka na bizaleli ya malamu oyo tokoki kosepela na yango. (Flp. 2:3) Ya solo, na bantango mosusu esɛngaka bankulutu bápesa ndeko mobali to ndeko mwasi moko toli. Kasi ndenge moko na Paulo, bankulutu basengeli kosala makasi bátala kaka te maloba mabe oyo moto yango alobi, to makambo ya mabe oyo asali. Kasi, ekozala malamu bátala mingimingi bolingo oyo moto yango azali na yango mpo na Yehova, ndenge oyo ayikaka mpiko mpo na kosalela Yehova, mpe mposa na ye ya kosala oyo ezali malamu. Bankulutu oyo bazalaka na makanisi malamu mpo na bandeko basalaka ete moto nyonso na lisangá amona ete balingaka ye.

KOBÁ KOMEKOLA PAULO

20. Ndenge nini bankulutu bakoki kokoba kozwa matomba na ndakisa ya Paulo?

20 Bankulutu, bokozwa matomba mingi soki bokobi koyekola makambo oyo Paulo asalaki. Na ndakisa, na Index des publications des Témoins de Jéhovah, okoki kokende na motó ya likambo “Paul” mpe na nsima na motó ya likambo moke “exemple pour les anciens.” Ntango ozali kotánga masolo mosusu oyo etyami wana, omituna boye: ‘Ndenge nini ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa ngai nabatela esengo na ngai wana nazali kokokisa mokumba na ngai lokola nkulutu?’

21. Likambo nini bankulutu bakoki kondima?

21 Bankulutu, bóbosana te: Yehova asɛngi bino te bózala bato ya kokoka; asɛngi bino nde ete bózala sembo. (1 Ko. 4:2) Yehova asepelaki na mosala makasi ya Paulo mpe bosembo na ye. Bokoki kondima ete Nzambe asepelaka mpe na makambo oyo bosalaka na mosala na ye. Yehova akobosana ata mokolo moko te “mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”​—Ebr. 6:10.

LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi

^ Tozalaka na botɔndi mingi mpo na mosala makasi oyo bankulutu basalaka mpo na biso na bolingo nyonso! Na lisolo oyo, tokolobela mikakatano minei oyo bankulutu bazalaka na yango. Tokomona mpe ndenge ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kosalisa bankulutu lelo oyo bálonga mikakatano yango. Lisolo oyo ekosalisa mpe biso nyonso tómityaka na esika ya bankulutu, mpe ekotinda biso tólinga bango, mpe tópesaka bango mabɔkɔ.

^ ELILINGI: Ndeko moko asilisi mosala, mpe azali koyebisa moninga moko ya mosala nsango malamu.

^ ELILINGI: Na boboto nyonso, nkulutu moko azali kolendisa ndeko oyo alingi kozala kaka ye moko.

^ ELILINGI: Ndeko moko asiliki mpo na likambo moko, mpe ndeko mosusu azali kopesa ye toli.

^ ELILINGI: Nkulutu moko azali kotala ndeko mobali moko oyo akómi kosala makambo mosusu na esika ya kosala mosala oyo esengeli.