Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini 2 Samwele 21:7-9 elobi ete Davidi ‘ayokelaki Mefiboshete mawa’ kasi na nsima andimaki ete Mefiboshete abomama?

Bato mosusu oyo batángaka lisolo yango mbangumbangu bamitunaka motuna wana. Kasi bavɛrsɛ yango elobeli mibali mibale oyo bankombo na bango ezalaki Mefiboshete, mpe tokoki kozwa liteya na lisolo yango soki totaleli lisusu makambo oyo esalemaki.

Saulo mokonzi ya Yisraele azalaki na bana mibali nsambo mpe bana basi mibale. Mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki Yonatane. Na nsima, Saulo abotaki na makango na ye Rizipa mwana mobali moko na nkombo Mefiboshete. Yonatane mpe azalaki na mwana mobali moko na nkombo Mefiboshete. Na yango, Mokonzi Saulo azalaki na mwana mobali moko na nkombo Mefiboshete mpe na nkɔkɔ moko oyo azalaki mpe na nkombo yango.

Na ntango moko boye, Mokonzi Saulo akómaki koyina Bagibeone oyo bazalaki kofanda na kati ya Bayisraele mpe alukaki koboma bango nyonso. Emonani ete mwa mingi babomamaki. Yango ezalaki mabe mpenza. Mpo na nini? Mpo, na mikolo ya Yosua, bankumu ya Yisraele basalaki kondimana ya kimya na Bagibeone.​—Yos. 9:3-27.

Kondimana yango esilaki te ata na mikolo ya Mokonzi Saulo. Atako bongo, mokonzi alukaki koboma Bagibeone nyonso. Mpe yango ememisaki Saulo mpe ndako na ye “ngambo ya makila.” (2 Sa. 21:1) Nsukansuka, Davidi akómaki mokonzi. Bagibeone oyo batikalaki na bomoi bayebisaki ye mabe oyo esalemaki. Davidi atunaki bango soki asala nini mpo na kozipa mabe monene oyo Saulo asalaki, mpo na nzela na yango Yehova apambola ekólo. Bagibeone basɛngaki mbongo te; basɛngaki nde ete bápesa bango bana nsambo ya Saulo, mobali oyo “akanaki kolimwisa” bango mpo bábomama. (Mit. 35:30, 31) Davidi andimaki makambo oyo basɛngaki ye.​—2 Sa. 21:2-6.

Na ntango wana, Saulo ná Yonatane basilaki kokufa na bitumba, kasi Mefiboshete mwana ya Yonatane azalaki na bomoi. Akómaki motɛngumi na bomwana na likama moko oyo azwaki, mpe apesaki nkɔkɔ na ye mabɔkɔ te mpo na kobundisa Bagibeone. Davidi asalaki kondimana ya boninga elongo na Yonatane, oyo esengelaki mpe komemela bakitani na ye bolamu, kati na bango Mefiboshete, mwana ya Yonatane. (1 Sa. 18:1; 20:42) Lisolo yango elobi: “Mokonzi [Davidi] ayokelaki Mefiboshete, mwana ya Yonatane mwana ya Saulo mawa, mpo na ndai ya Yehova oyo ezalaki kati na bango.”​—2 Sa. 21:7.

Kasi, Davidi akokisaki makambo oyo Bagibeone basɛngaki. Apesaki bango bana mibali mibale ya Saulo, oyo moko nkombo na ye ezalaki Mefiboshete, mpe bankɔkɔ mitano ya Saulo. (2 Sa. 21:8, 9) Likambo oyo Davidi asalaki esilisaki ngambo ya makila ya ekólo.

Lisolo yango ezali kaka te makambo oyo eleká. Mobeko ya Nzambe ezalaki polele. Elobaki: “Bana bakobomama te mpo na batata.” (Mib. 24:16) Yehova akokaki te kondima ete bana mibale ya Saulo mpe bankɔkɔ na ye mitano bábomama soki bázalaka na ngambo te. Mobeko yango elobaki lisusu: “Moto na moto akobomama mpo na lisumu na ye moko.” Emonani ete na lolenge moko boye, bakitani nsambo ya Saulo oyo babomamaki bapesaki mabɔkɔ ntango Saulo alukaki koboma Bagibeone nyonso. Na yango, bakitani yango nsambo bafutaki mabe oyo basalaki.

Lisolo yango emonisi ete moto akoki te komilongisa mpo na mabe oyo azali kosala mpe kokanisa to koloba ete azalaki kaka kotosa malako oyo epesami. Lisese moko ya Biblia elobi: “Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo, mpe tiká banzela na yo nyonso ezala semba.”​—Mas. 4:24-27; Ef. 5:15.