Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kozala na esengo mpe na kimya ntango ozali komitungisa

Ndenge ya kozala na esengo mpe na kimya ntango ozali komitungisa

MITUNGISI ekoki kozala lokola mokumba moko ya kilo na kati ya motema na biso. (Mas. 12:25) Esí ekómela yo onyokwama mpo na mitungisi ya bomoi? Okanisaka ete okokoka lisusu te koyikela yango mpiko? Soki oyokaka bongo, yebá ete ozali yo moko te. Mingi kati na biso tolɛmbaka nzoto mpe tomitungisaka na makanisi mpo na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, basusu bamitungisaka mpo na maladi ya ndeko moko ya libota, liwa ya moto oyo balingaka, mpe mpo na makama oyo ebimaka yango moko. Kasi nini ekoki kosalisa biso tózala na esengo mpe na kimya ntango tozali komitungisa? *

Tokoki koyekola makambo mingi mpo na kozala na esengo mpe na kimya ntango tozali komitungisa soki totaleli ndakisa ya Mokonzi Davidi. Akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye, mpe na bantango mosusu balingaki koboma ye. (1 Sa. 17:34, 35; 18:10, 11) Nini esalisaki Davidi azala na esengo mpe na kimya ntango azalaki komitungisa? Ndenge nini tokoki komekola ndakisa na ye?

NDENGE DAVIDI AZALAKI NA ESENGO MPE NA KIMYA NTANGO AZALAKI KOMITUNGISA

Davidi akutanaki na komekama ndenge na ndenge na mbala moko. Na ndakisa, tótala likambo oyo esalemaki ntango azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo azalaki koluka koboma ye. Ntango Davidi ná bato na ye bazongaki na etumba, bayokaki mpasi ntango banguna bayibaki biloko na bango nyonso, batumbaki bandako na bango na mɔtɔ, mpe bamemaki mabota na bango na bokangami. Davidi asalaki nini? “Davidi ná bato oyo bazalaki elongo na ye babandaki kotombola mingongo na bango mpe kolela, tii bazalaki na makasi ya kolela lisusu te.” Davidi atungisamaki lisusu mingi, ntango bato na ye ya motema “balobaki bábamba ye mabanga.” (1 Sa. 30:1-6) Davidi akutanaki na mikakatano misato ya minene na mbala moko: Libota na ye ezalaki na likama, azalaki kobanga ete bato na ye bakoboma ye, mpe Mokonzi Saulo azalaki kaka koluka koboma ye. Kanisá ndenge Davidi azalaki komitungisa!

Davidi asalaki nini na nsima? Na mbala moko, “azwaki makasi mpo na Yehova Nzambe na ye.” Ndenge nini Davidi azwaki makasi yango? Toyebi ete Davidi abondelaki Yehova asalisa ye mpe akanisaki ndenge asalisaki ye liboso. (1 Sa. 17:37; Nz. 18:2, 6) Davidi amonaki ntina ya koluka litambwisi ya Yehova, yango wana Davidi atunaki Yehova makambo oyo asengelaki kosala. Ntango Yehova apesaki Davidi malako, asalaki nokinoki. Yango wana, Yehova apambolaki ye ná bato na ye mpe babikisaki mabota na bango mpe biloko na bango. (1 Sa. 30:7-9, 18, 19) Omoni makambo misato oyo Davidi asalaki? Abondelaki Yehova asalisa ye, akanisaki makambo oyo Yehova asalelaki ye, mpe akangaki mabɔkɔ te kasi asalaki makambo na kolanda malako ya Yehova. Ndenge nini tokoki komekola Davidi? Tótalela makambo misato.

MEKOLÁ DAVIDI NTANGO OZALI KOMITUNGISA

1. Bondeláká. Ntango nyonso tobandi komitungisa, tokoki kobondela Yehova asalisa biso mpe apesa biso bwanya. Tokoki komiyoka malamu soki tolobeli ye makambo oyo ezali kotungisa biso. To tokoki kosala libondeli moko ya mokuse, na nse ya motema soki tozali na mwaye mosusu te ya kosala na ntango wana. Ntango nyonso tosɛngaka Yehova asalisa biso, tomonisaka ete totyelaka ye motema ndenge Davidi asalaki, ntango alobaki: “Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai. Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye.” (Nz. 18:2) Libondeli esalisaka mpenza? Ndeko mwasi moko na nkombo Kahlia oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Nsima ya kobondela, nakómaka na kimya na motema. Libondeli esalisaka ngai nayokanisa makanisi na ngai ná oyo ya Yehova, mpe natyela ye lisusu motema mingi.” Ya solo, libondeli ezali likabo moko kitoko oyo euti na Yehova oyo esalisaka biso tózala na esengo mpe na kimya ntango tozali komitungisa.

2. Kanisáká ndenge Yehova asalisaki yo. Ntango ozali kokanisa makambo oyo ekómelá yo, okoki kokanisa komekama oyo oyikelaki mpiko mpo Yehova asalisaki yo? Ntango tokanisaka ndenge Yehova asungaki biso tólonga komekama moko boye kaka ndenge asungaki basaleli na ye ya ntango ya kala, tozwaka makasi mpe tokómaka lisusu kotyela ye motema mingi. (Nz. 18:17-19) Ndeko mobali moko na nkombo Joshua, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Nazali na liste ya mabondeli oyo nazwaki biyano na yango. Yango esalisaka ngai nakanisa mbala boni nasɛngaki Yehova mpo na likambo moko ya sikisiki mpe apesaki ngai kaka oyo nasengelaki na yango.” Ya solo, ntango tokanisaka makambo oyo Yehova asalelá biso, tozwaka lisusu makasi ya koyika mpiko ntango tozali komitungisa.

3. Kokanga mabɔkɔ te. Liboso ya kozwa ekateli na likambo moko, tosengeli kolukaluka na Liloba ya Nzambe mpo na kozwa litambwisi ya malamu. (Nz. 19:7, 11) Bato mingi bamonaka ete ntango basalaka bolukiluki mpo na vɛrsɛ moko, bayebaka malamu ndenge oyo bakoki kosalela vɛrsɛ yango na bomoi na bango. Ndeko mobali moko na nkombo Jarrod, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Kosala bolukiluki esalisaka ngai nayekola makambo mingi etali vɛrsɛ moko, mpe nayeba makambo oyo Yehova azali koyebisa ngai. Yango esalisaka ngai nandima mpenza makambo oyo nazali kotánga mpo nakoka kosala makambo na kolanda litambwisi na ye.” Ntango tolukaka litambwisi ya Yehova na Makomami mpe tolandaka litambwisi yango, tozalaka na nyonso oyo ekoki mpo tózala na esengo mpe na kimya ntango tozali komitungisa.

YEHOVA AKOSALISA YO OYIKA MPIKO

Davidi akangaki ntina ete mpo azala na esengo mpe na kimya ntango azalaki komitungisa, lisalisi ya Yehova ezalaki na ntina. Azalaki na botɔndi mingi ndenge Yehova asalisaki ye mpe alobaki boye: “Na lisalisi ya Nzambe na ngai, namataka efelo. Nzambe ya solo nde Moto azali kokanga ngai loketo na nguya ya bomoi.” (Nz. 18:29, 32) Tokoki komona ete tokoki te koyikela mikakatano na biso mpiko. Kasi na lisalisi ya Yehova, tokoki koyikela mikakatano nyonso ya minene mpiko! Ya solo, ntango tobondelaka Yehova asalisa biso, tokanisaka makambo nyonso oyo asalelá biso, mpe tosalaka makambo na kolanda litambwisi na ye, totyaka motema ete akopesa biso makasi mpe bwanya mpo tózala na esengo mpe na kimya ntango tozali komitungisa!

^ Moto oyo azali komitungisa koleka ndelo asengeli koluka lisalisi ya minganga.