Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

Bamama​—Bózwa mateya na ndakisa ya Enise

Bamama​—Bózwa mateya na ndakisa ya Enise

“Kotika mobeko ya mama na yo te. Mpo yango nde motole kitoko ya fololo na motó na yo mpe nsinga kitoko ya monzɛlɛ na nkingo na yo.”​—MAS. 1:8, 9.

LOYEMBO 137 Basi ya sembo, basi bakristo

NA MOKUSE *

Enise, mama ya Timote mpe nkɔkɔ na ye Loisi bazali kosepela komona ndenge Timote azali kozwa batisimo mpo akóma mokristo (Talá paragrafe 1)

1-2. (a) Enise azalaki nani, mpe mokakatano nini akutanaki na yango lokola azalaki mama? (b) Lobelá elilingi ya ezipeli.

 ATAKO Biblia elobeli te batisimo ya Timote, ezali mpasi te komona na makanisi esengo oyo mama na ye, Enise, ayokaki na mokolo wana. (Mas. 23:25) Kanisá esengo makasi oyo mama ya Timote ayoki wana Timote atɛlɛmi na kati ya mai. Enise azali kosepela wana Loisi, nkɔkɔ ya Timote atɛlɛmi pene na ye mpe asimbi ye. Enise abendi mwa mpema mpe akangi yango wana Timote azindisami na mai. Ntango Timote abimi na mai, asɛki makasi mpe mama na ye abandi kolela mpo azali na esengo mingi. Atako akutanaki na mikakatano, Enise alongaki koteya mwana na ye alinga Yehova mpe Mwana na ye, Yesu Kristo. Mikakatano nini asengelaki kolonga ntango azalaki koteya mwana na ye?

2 Timote akolaki na libota oyo basangani na yango bazalaki kosambela na lingomba moko te. Tata na ye azalaki Mogrɛki, mpe mama na ye ná nkɔkɔ na ye bazalaki Bayuda. (Mis. 16:1) Emonani lokola Timote azalaki naino elenge ntango Enise ná Loisi bakómaki bakristo. Kasi tata na ye akómaki mokristo te. Lingomba nini Timote akopona? Ekoki kozala ete akolaki mwa moke mpo azwa ekateli ye moko. Akopona lingomba ya tata na ye? Akokangama na mimeseno ya Bayuda oyo bateyaki ye ntango azalaki naino mwana? To akokóma moyekoli ya Yesu Kristo?

3. Na kotalela Masese 1:8, 9, ndenge nini Yehova atalelaka milende oyo bamama basalaka mpo na kosalisa bana na bango bákóma baninga na ye?

3 Lelo oyo mpe bamama bakristo balingaka libota na bango. Oyo eleki ntina, balingaka kosalisa bana na bango bákóma baninga ya Yehova. Mpe Nzambe na biso azwaka na motuya mingi milende oyo basalaka. (Tángá Masese 1:8, 9.) Yehova asalisi ebele ya bamama mpo báteya bana na bango solo.

4. Mikakatano nini bamama mingi bazali kokutana na yango lelo oyo?

4 Na bantango mosusu, bamama mingi bakoki komituna soki bana na bango bakopona kosambela Yehova, ndenge Timote asalaki. Baboti mingi bayebi mbamba oyo mokili ya Satana etyaka bana na bango. (1 Pe. 5:8) Longola yango, bamama mingi babɔkɔlaka bana bango moko mpo bazali na mibali te to mibali na bango basambelaka Yehova te. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Christine * alobi boye: “Mobali na ngai azalaki tata moko malamu mpe azalaki kolinga libota na ye, kasi alingaki te nateya bana mpo bákóma Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki kolela mpe komituna soki bana na ngai bakosambela Yehova.”

5. Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Soki ozali mama mokristo, okoki kolonga kosalisa bana na yo bálinga Yehova mpe básalela ye, ndenge Enise alongaki. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge okoki komekola ndakisa ya Enise na koteya bana na yo na makambo oyo olobaka mpe na makambo oyo osalaka. Tokolobela mpe ndenge Yehova akosalisa yo.

TEYÁ BANA NA YO NA MAKAMBO OYO OLOBAKA

6. Ndenge emonisami na 2 Timote 3:14, 15, ndenge nini Timote akómaki mokristo?

6 Ntango Timote azalaki naino mwana, mama na ye asalaki nyonso mpo na koteya ye “makomi mosantu,” ndenge mpe Bayuda bakangaki ntina na yango. Na ntembe te, Enise ayebaki makambo mingi te mpo ayebaki likambo moko te na oyo etali Yesu Kristo. Kasi, makambo oyo Timote ayekolaki na Makomami ezalaki mateya ya moboko oyo ekokaki kosalisa ye akóma mokristo. Kasi akokóma mokristo? Lokola azalaki elenge, azalaki na lotomo ya kopona soki akokóma mokristo. Na ntembe te, mpo na milende oyo mama na ye asalaki, Timote ayebaki mwa mateya ya solo oyo etali Yesu mpo ‘basalisaki ye andima bosolo na yango.’ (Tángá 2 Timote 3:14, 15.) Enise azalaki mpenza na esengo mpo alongaki koteya mwana na ye makambo etali Yehova atako azalaki na mokakatano! Enise asalaki makambo oyo ekokani na nkombo na ye, oyo euti na liloba moko oyo elimboli “kolonga.”

7. Ndenge nini Enise akokaki kosalisa mwana na ye akola na elimo nsima ya kozwa batisimo?

7 Ntango Timote azwaki batisimo, asalaki likambo moko ya ntina mingi na bomoi na ye, kasi Enise azalaki kaka komitungisa mpo na ye. Azalaki komituna boye: Ndenge nini mwana na ye akotambwisa bomoi na ye? Akokóma moninga ya bato mabe? Akokende na eteyelo na Atene mpe akondima mateya ya filozofi ya bapakano kuna? Akolekisa ntango, nguya mpe bolenge na ye mpo na koluka bomɛngo? Enise akokaki te kozwa bikateli na esika ya Timote, kasi akokaki kosalisa ye. Ndenge nini? Akokaki kokoba kosala nyonso oyo akoki mpo na kosalisa mwana na ye akóma kolinga Yehova mingi mpe azala na botɔndi epai ya Mwana na ye, Yesu Kristo. Ezali kaka te baboti oyo balongani na bango basalelaka Yehova te nde bakutanaka na mikakatano mpo na kosalisa bana na bango bálinga Yehova. Ata soki bango nyonso mibale basalelaka Yehova, ekoki kozala mpasi kosimba mitema ya bana na bango mpo bákóma basaleli ya sembo ya Yehova. Mateya nini baboti bakoki kozwa na ndakisa ya Enise?

8. Ndenge nini ndeko mwasi akoki kopesa mobali na ye oyo azali na kati ya solo mabɔkɔ ntango azali kosalisa bana bákola na elimo?

8 Yekolá Biblia elongo na bana na yo. Ndeko mwasi, soki molongani na yo azali na kati ya solo, Yehova alingi ete opesa ye mabɔkɔ ntango azali kosalisa bana bákola na elimo. Na ndakisa, mbala na mbala okoki kopesa ye mabɔkɔ ntango bozali kosala losambo na kati ya libota. Koloba mabe te mpo na ebongiseli yango, mpe luká makambo oyo okoki kosala mpo losambo yango eleka na kimya mpe na esengo. Mbala mosusu okoki kosalisa mobali na yo mpo na kopona masolo ya kolobela na losambo na kati ya libota. Longola yango, soki bana mosusu bakómi mikóló basengeli koyekola Biblia na buku Sepelá na bomoi libela na libela!, okoki mbala mosusu kozala elongo na mobali na yo na boyekoli yango mpo na kopesa lisalisi oyo ebongi.

9. Epai wapi ndeko mwasi oyo mobali na ye azali na kati ya solo te akoki kozwa lisalisi?

9 Bamama mosusu basengeli koyekola Biblia na bana na bango, mpo ekoki kozala ete bazali na mibali te to mpo mibali na bango basambelaka Yehova te. Soki ezali bongo mpo na yo, komitungisa koleka ndelo te. Yehova akosalisa yo. Salelá bisaleli mpo na koteya oyo ebongi oyo ebongiseli na ye ebimisá mpo na koyekola na bana na yo. Okoki kotuna baboti oyo bayebi makambo mingi mpo na koluka koyeba ndenge basalelaka bisaleli yango na losambo na kati ya libota! * (Mas. 11:14) Lisusu, Yehova akoki kosalisa yo osololaka na bana na yo. Sɛngá ye asalisa yo oyeba makanisi oyo bazali na yango mpe makambo oyo ezali na mitema na bango. (Mas. 20:5) Motuna ya pɛtɛɛ lokola oyo: ‘Mokakatano nini ya monene ozali kokutana na yango na eteyelo?’ ekoki kobandisa lisolo moko oyo ekosalisa yo oyeba makambo mingi.

10. Likambo nini mosusu okoki kosala mpo na kosalisa bana na yo báyekola makambo etali Yehova?

10 Lukáká mabaku mpo na koteya bana na yo makambo etali Yehova. Lobeláká makambo etali Yehova mpe makambo mingi ya malamu oyo asalelá yo. (Mib. 6:6, 7; Yis. 63:7) Yango ezali na ntina mingimingi soki okoki te mbala na mbala koyekola na bana na ndako. Ndeko mwasi Christine, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Mabaku ya kolobela makambo ya elimo ezalaki moke mpenza, yango wana soki ntango emonani nazalaki kosalela yango mpo na kolobela Yehova. Tozalaki kotambola na makolo to kozwa bwato mpe kolúka pene na libongo mpo na kolobela bozalisi mpe makambo mosusu mingi ya elimo oyo ekosalisa bana bákóma baninga ya Yehova. Ntango bana na ngai bakómaki mikóló, nalendisaki bango báyekola Biblia bango moko.” Longola yango, lobeláká malamu ya ebongiseli ya Yehova mpe lobeláká malamu ya bandeko ya lisangá. Koloba mabe te mpo na bankulutu. Makambo oyo ozali koloba mpo na bango ekoki kosalisa bana básolola na bankulutu ntango bakozala na mposa ya lisalisi.

11. Na kotalela Yakobo 3:18, mpo na nini ezali na ntina mingi kosala ete kimya ezala na ndako?

11 Salá ete kimya ezala na ndako. Monisáká ete olingaka mobali na yo mpe bana na yo. Lobáká na mobali na yo na boboto mpe na limemya, mpe teyáká bana na yo básala mpe bongo. Soki ozali kosala bongo, okotya kimya mpe yango ekosala ete bana na yo báyekola makambo etali Yehova. (Tángá Yakobo 3:18.) Tótalela ndakisa ya ndeko Jozsef, oyo azali mobongisi-nzela monene na ekólo Roumanie. Ntango azalaki kokola, tata na ye atɛmɛlaki ye, mama na ye mpe bandeko na ye makasi mpo alingaki te básalela Yehova. Jozsef alobi boye: “Mama na ngai azalaki kosala nyonso mpo kimya ezala na ndako. Ntango tata azalaki kosilika makasi, mama na ngai azalaki ntango nyonso komonisa boboto. Ntango azalaki komona ete ezalaki mpasi tómemya mpe tótosa tata na biso, azalaki kosalela Baefese 6:1-3 mpo na kosolola na biso. Na nsima azalaki kolobela biso bizaleli malamu ya tata mpe kosalisa biso tókanga ntina oyo tosengeli kolinga ye. Yango ezalaki kosala ete kimya ezala na libota.”

TEYÁ BANA NA YO NA MAKAMBO OYO OSALAKA

12. Na kotalela 2 Timote 1:5, ndakisa ya Enise etindaki Timote asala nini?

12 Tángá 2 Timote 1:5. Enise atikaki ndakisa malamu mpo na Timote. Ateyaki ye ete kondima ya solosolo emonanaka na misala. (Yak. 2:26) Na ntembe te, Timote amonaki misala ya mama na ye na nzela ya bolingo oyo mama na ye azalaki na yango mpo na Yehova. Ya solo, Timote amonaki ete kosalela Yehova esalaki ete mama na ye azala na esengo. Ndakisa ya Enise etindaki Timote asala nini? Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, Timote azalaki na kondima makasi lokola oyo ya mama na ye. Timote akómaki na kondima yango na mbalakaka te. Azalaki kotala ndakisa ya mama na ye mpe etindaki ye amekola yango. Ndenge moko mpe lelo, bamama mingi bazali kosalisa bato ya libota na bango básalela Yehova “na maloba te.” (1 Pe. 3:1, 2) Ndenge nini okoki mpe kosala bongo?

13. Mpo na nini mama ya libota asengeli kosala ete boyokani na ye ná Yehova ezala na esika ya liboso?

13 Salá ete boyokani na yo ná Yehova ezala na esika ya liboso. (Mib. 6:5, 6) Ndenge moko na bamama mingi, omipimelaka makambo mingi. Opesaka ntango, mbongo, okataka mpɔngi mpe osalaka makambo mosusu mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya bana na yo. Kasi osengeli soki moke te kolekisa ntango mingi mpo na kokokisa bamposa yango tii ozanga ntango ya kokómisa makasi boyokani na yo ná Yehova. Mbala na mbala zwáká ntango ya kobondela yo moko, kosala boyekoli na yo moko ya Biblia, mpe koyangana na makita ya lisangá. Kosala bongo, ekosalisa yo okómisa makasi boyokani na yo ná Yehova mpe okotikela bato ya libota na yo ná bato mosusu ndakisa malamu.

14-15. Mateya nini ozwi na ndakisa ya ndeko Leanne, Maria, mpe João?

14 Tótalela mwa bandakisa ya bilenge oyo bayekolaki kolinga Yehova mpe kotyela ye motema na kotala makambo oyo bamama na bango bazalaki kosala. Ndeko Leanne, mwana mwasi ya ndeko mwasi Christine, alobi boye: “Tozalaki te koyekola ntango tata azalaki na ndako. Kasi mama azalaki ntango nyonso kokende na makita. Atako toyebaki makambo mingi te oyo etali Biblia, ndakisa mpe kondima na ye esalisaki biso tókómisa kondima na biso makasi. Toyebaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo liboso kutu tóbanda kokende na makita.”

15 Ndeko Maria, oyo na bantango mosusu tata na ye azalaki kobɛta ye mpe koloba na ye mabe mpo azalaki kokende na makita, alobi boye: “Mama na ngai azali na kati ya bandeko basi oyo bazali na mpiko oyo nayebi. Ntango nazalaki mwana, na bantango mosusu nazalaki koboya kosala makambo mpo nazalaki kobanga makambo oyo basusu bakoloba. Kasi komona ndenge mama azalaki na mpiko mpe ndenge azalaki ntango nyonso kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye esalisaki ngai natika kobanga bato.” Ndeko João, oyo tata na ye azalaki kopekisa bato ya libota bálobela makambo ya elimo na ndako, alobi boye: “Likambo oyo esalisaki ngai mingi koleka ezali ndenge mama azalaki kondima kotika makambo nyonso mpo na kosepelisa tata na ngai, longola kaka bolingo na ye mpo na Yehova.”

16. Ndakisa ya mama ya libota ekoki kotinda basusu básala nini?

16 Bamama, bóbosana te ete ndakisa na bino ekoki kosalisa basusu. Na ndenge nini? Tótala ndenge ndakisa ya Enise ebendaki likebi ya ntoma Paulo. Akomaki ete Timote azalaki na kondima oyo ezangi bokosi, “oyo liboso . . . Enise” azalaki na yango. (2 Tim. 1:5) Ntango nini Paulo amonaki kondima ya Enise mpo na mbala ya liboso? Ekoki kozala ezalaki na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ epai akutanaki na Loisi ná Enise na Listra, mpe asalisaki bango bákóma bakristo. (Mis. 14:4-18) Kanisá naino: Ntango ntoma Paulo akomelaki Timote mbula soki 15 na nsima, azalaki kaka kokanisa misala ya kondima ya Enise mpe kolobela ye lokola ndakisa oyo ebongi komekola! Na ntembe te, ndakisa na ye elendisaki ntoma Paulo mpe bakristo mosusu mingi ya siɛklɛ ya liboso. Soki ozali kobɔkɔla bana yo moko mpo ozali na mobali te to ozali na libota oyo basangani na yango basambelaka na lingomba moko te, omindimisa ete ndakisa na yo ya sembo ekopesa yo ná bato oyo bazali zingazinga na yo makasi mpe ekobɔndisa bino.

Esɛngaka ntango mpo na kosalisa mwana akola na elimo. Kolɛmba te! (Talá paragrafe 17)

17. Osengeli kosala nini soki emonani ete mwana na yo azali kosalela te makambo oyo ozali koteya ye?

17 Ezali boni soki emonani ete mwana na yo azali kosalela te makambo oyo ozali koteya ye? Kobosana te ete esɛngaka ntango mpo na koteya mwana. Ndenge emonisami na elilingi, ntango oloni mboto, mbala mosusu okoki komituna soki ekokola mpo ebota mbuma. Atako okoki te kobotisa yango mbuma, okokoba kosopela yango mai mpo osalisa yango ekola. (Mrk. 4:26-29) Ndenge moko mpe, na bantango mosusu mama akoki komituna soki milende na ye ezali mpenza kosalisa bana na ye bálinga Yehova. Okoki te koyeba bikateli oyo bana na yo bakozwa. Kasi soki ozali kokoba kosala nyonso oyo okoki mpo na koteya bango, okosalisa bango bákola na elimo.​—Mas. 22:6.

TYELÁ LISALISI YA YEHOVA MOTEMA

18. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa bana na yo bákola na elimo?

18 Banda kala, Yehova asalisi bilenge mingi bákóma baninga na ye. (Nz. 22:9, 10) Akoki mpe kosalisa bana na yo bákola na elimo, soki balingi. (1 Ko. 3:6, 7) Ata soki emonani ete bana na yo babungi nzela, Yehova akokoba kotyela bango miso mpo alingaka bango. (Nz. 11:4) Ntango bamonisi mwa elembo ya kozala “na ezaleli oyo ebongi,” akozala wana mpo na kosalisa bango bákóma baninga na ye. (Mis. 13:48; 2 Nt. 16:9) Akoki kosalisa yo oloba likambo moko ya malamu na ntango oyo ebongi, ntango bana na yo bazali na mposa makasi ya koyoka yango. (Mas. 15:23) To akoki kosalela ndeko moko ya lisangá mpo na kosalisa bango. Ata soki bana na yo bakómi mikóló, Yehova akoki kosala ete makambo oyo oteyaki bango ezongela bango na makanisi. (Yoa. 14:26) Okopesa Yehova libaku ya kopambola yo ntango ozali kokoba koteya bana na yo na maloba mpe na ndakisa.

19. Mpo na nini okoki kondima ete Yehova akondima yo?

19 Bolingo oyo Yehova amoniselaka yo etaleli te bikateli oyo bana na yo bazwaka. Alingaka yo mpo yo mpe olingaka ye. Soki obɔkɔlaka bana yo moko, Yehova alaki ete akozala Tata mpo na bana na yo mpe Mobateli na yo. (Nz. 68:5) Okoki te koyeba soki bana na yo bakozwa bikateli ya malamu to ya mabe. Kasi soki ozali kokoba kotyela lisalisi ya Yehova motema mpe kosala nyonso oyo okoki, Yehova akondima yo.

LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi

^ Lisolo oyo ezali kolobela ndenge bamama bakristo bakoki kozwa mateya na ndakisa ya mama ya Timote, Enise, mpe ndenge oyo bakoki kosalisa bana na bango báyeba Yehova mpe bálinga ye.

^ Topesi bango bankombo mosusu.

^ Na ndakisa, talá liteya 50 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpe lisolo “Makanisi mpo na losambo na libota mpe boyekoli ya moto ye moko,” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2011, na nkasa 6-7.