Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 18

Ndenge ya komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango

Ndenge ya komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango

“Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”​—1 TIM. 4:15.

LOYEMBO 84 Tómipesa

NA MOKUSE *

1. Mikano nini ya elimo tokoki komityela?

 LOKOLA tozali bakristo ya solo, tolingaka Yehova mingi mpenza. Tolingaka kopesa Yehova oyo eleki malamu na mosala na ye. Soki tolingi mpenza kosalela makoki na biso, tosengeli komityela mikano ya elimo, na ndakisa, kokolisa bizaleli ya bokristo, kokolisa makoki na biso, mpe koluka ndenge ya kosalela basusu. *

2. Mpo na nini tosengeli komityela mikano ya elimo mpe kosala makasi mpo na kokokisa yango?

2 Mpo na nini tosengeli kozala na mposa ya kokola na elimo? Ya liboso, tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló. Yehova asepelaka ntango azali komona tozali kosalela mayele mpe makoki na biso nyonso na mosala na ye. Longola yango, tolingaka kokola na elimo mpo tókoka kosalela bandeko na biso lisusu mingi. (1 Tes. 4:9, 10) Ata soki tosali bambula boni na kati ya solo, tokoki kosala makasi tókoba kokola na elimo. Tótala ndenge oyo tokoki kosala yango.

3. Ndenge emonisami na 1 Timote 4:12-16, ntoma Paulo alendisaki Timote asala nini?

3 Atako Timote azalaki naino elenge ntango ntoma Paulo akomelaki ye mokanda na ye ya liboso, Timote asilaki kokóma nkulutu. Atako bongo, ntoma Paulo alendisaki ye akoba kokende liboso na elimo. (Tángá 1 Timote 4:12-16.) Ntango ozali kotánga maloba ya ntoma Paulo, okomona ete alingaki ete Timote akoba kokende liboso na makambo mibale: akolisa bizaleli ya bokristo lokola bolingo, kondima, ná bizaleli ya pɛto mpe akolisa makoki na ye ya kotánga liboso ya bato nyonso, kolendisa mpe koteya. Wana tozali kobatela ndakisa ya Timote na makanisi, tótala ndenge ya komityela mikano oyo ebongi oyo ekoki kosalisa biso tókola na elimo. Tokotalela mpe makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.

KOLISÁ BIZALELI YA BOKRISTO

4. Na kotalela Bafilipi 2:19-22, nini esalaki ete Timote azala mosaleli ya Yehova oyo abongi?

4 Nini esalaki ete Timote azala mosaleli ya Yehova oyo abongi? Bizaleli ya bokristo oyo azalaki na yango. (Tángá Bafilipi 2:19-22.) Na makambo oyo ntoma Paulo alobaki mpo na Timote, tokoki komona ete Timote azalaki moto ya komikitisa, sembo, molende, mpe moto oyo bakoki kotyela motema. Azalaki kolinga bandeko mpe kotyela bango likebi. Yango wana, ntoma Paulo alingaki Timote mpe akakatanaki te mpo na kopesa ye mikumba minene. (1 Ko. 4:17) Ndenge moko mpe, Yehova akolinga biso mpe tokozala na ntina na lisangá soki tozali kokolisa bizaleli oyo alingaka.​—Nz. 25:9; 138:6.

Luká koyeba ezaleli ya bokristo oyo okosepela komonisa lisusu mingi (Talá paragrafe 5-6)

5. (a) Ndenge nini okoki kokokisa mokano na yo ya kokolisa ezaleli moko ya bokristo? (b) Ndenge emonisami na elilingi, ndenge nini elenge mwasi oyo azali kosala makasi mpo na kokokisa mokano na ye ya komitya na esika ya basusu?

5 Omityela mikano ya sikisiki. Bondelá mpe kanisá bizaleli nini ya bomoto na yo oyo osengeli kobongisa. Poná ezaleli moko ya sikisiki oyo okosepela kobongisa. Na ndakisa, okoki kokolisa lisusu ezaleli ya komitya na esika ya basusu to kozala na mposa makasi ya kosalisa bandeko na yo bakristo? Ozali na mposa ya kozala moto oyo atyaka kimya mpe oyo alimbisaka? Ekoki kozala malamu otuna moninga moko ya motema ayebisa yo esika oyo osengeli kobongisa.​—Mas. 27:6.

6. Okoki kosala nini mpo okokisa mokano na yo ya kokolisa ezaleli moko ya bokristo?

6 Salá makasi okokisa mokano na yo. Ndenge nini okoki kosala yango? Okoki kosala yango soki ozali koyekola malamumalamu ezaleli oyo olingi kobongisa. Kanisá ete ozwi ekateli ya kosala makasi mpo olimbisaka basusu. Okoki kobanda kotánga mpe komanyola na bandakisa ya Biblia ya bato oyo balimbisaki basusu na motema moko mpe baoyo baboyaki kolimbisa. Tólobela ndakisa ya Yesu. Azalaki kosepela kolimbisa basusu. (Luka 7:47, 48) Lisusu, azalaki te kotya makanisi na ye na mabunga ya basusu, kasi azalaki kotya makanisi na ye na makambo malamu oyo bakokaki kosala. Yesu akesanaki mpenza na Bafarisai ya mikolo na ye, oyo “bazalaki kotalela bato mosusu ete bazali mpamba.” (Luka 18:9) Nsima ya komanyola na bandakisa yango, omituna boye: ‘Namonaka nini epai ya basusu? Naponi kotya makanisi na ngai na bizaleli nini oyo bazali na yango? Soki ozali na mokakatano ya kolimbisa moto moko, meká kokoma bizaleli malamu oyo azali na yango. Na nsima omituna boye: ‘Yesu atalelaka moto yango ndenge nini? Akolimbisa ye?’ Koyekola bongo ekoki kosalisa biso tósembola makanisi na biso. Tosengeli naino kosala makasi mpo na kolimbisa moto oyo azokisi biso. Kasi soki tozali kokoba kokolisa ezaleli ya kolimbisa, tokokóma na mposa ya kolimbisa basusu.

KOLISÁ MAKOKI NA YO

Yekolá ndenge ya kosala mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi na bino (Talá paragrafe 7) *

7. Na boyokani na Masese 22:29, ndenge nini Yehova asalelaka basali ya makoki lelo oyo?

7 Mokano mosusu oyo okoki komityela ezali ya kokolisa makoki na yo. Kanisá mposa ya ebele ya basali oyo ebongiseli ya Yehova ezali na yango mpo na kotonga Bandako ya Betele, Bandako ya Mayangani, mpe Bandako ya Bokonzi. Mingi ya bandeko yango bayekoli epai ya bandeko oyo bayebi malamu mosala yango ya botongi. Ndenge elilingi emonisi yango, ezala bandeko basi to mibali bazali kozwa formasyo na makambo oyo esengeli mpo na kobatela Bandako ya Mayangani mpe Bandako ya Bokonzi. Na lolenge moko to mosusu, Yehova Nzambe, “Mokonzi ya seko,” mpe Kristo Yesu, “Nkolo ya . . . bankolo,” bazali kosala makambo ya kokamwa na nzela ya basali wana ya makoki. (1 Tim. 1:17; 6:15; tángá Masese 22:29.) Tolingaka kosala nyonso oyo tokoki mpe kosalela makoki na biso mpo na kokumisa Yehova, kasi te mpo na komikumisa.​—Yoa. 8:54.

8. Ndenge nini okoki kokolisa makoki na yo ya koteya?

8 Omityela mikano ya sikisiki. Makambo nini mosusu okoki koyekola? Tuná bankulutu ya lisangá na bino mpe mbala mosusu mokɛngɛli ya zongazonga na bino makambo oyo bazali kokanisa ete okoki kobongisa. Na ndakisa, soki bayebisi yo ete osengeli kobongisa lolenge na yo ya koloba mpe makoki na yo ya koteya, sɛngá bango báyebisa yo toli nini ya sikisiki ya koloba malamu oyo osengeli kobongisa. Na nsima salá makambo oyo ekosalisa yo obongisa yango. Ndenge nini okoki kosala yango?

9. Makambo nini okoki kosala mpo okolisa makoki na yo ya koteya?

9 Salá makasi okokisa mokano na yo. Kanisá ete olingi kokolisa makoki na yo ya koteya. Okoki koyekola malamumalamu mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya. Ntango ozwi devuare na likita ya kati ya pɔsɔ, okoki kosɛnga ndeko oyo ayebi koteya malamu alanda yo ndenge ozali kosala yango liboso osala yango na makita ya lisangá, mpe ayebisa yo esika oyo okoki kobongisa. Bongisáká badevuare na yo liboso mpo bato bámona ete ozali kosala makasi mpe ozali moto oyo bakoki kotyela motema.​—Mas. 21:5; 2 Ko. 8:22.

10. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge ya kosala mpo na kokolisa makoki na biso.

10 Okoki kosala nini soki mokano na yo ezali ya kokóma na makoki na likambo moko oyo ezali mpasi mpo na yo? Kotika te kosala milende! Ndeko mobali moko na nkombo Garry azalaki na mokakatano ya kotánga malamu. Akanisi lisusu ndenge ayokaki nsɔni ntango amekaki kotánga na makita ya lisangá. Kasi akobaki kosala makasi mpo akóma kotánga malamu. Alobi ete formasyo oyo azwaki epai ya ndeko oyo ayebi koteya malamu mpe na mikanda na biso esalisaki ye akóma kosala badiskur na lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene!

11. Lokola Timote, nini ekosalisa biso tósala lisusu mingi na mosala ya Yehova?

11 Timote akómaki molobi malamu mpe moteyi malamu? Biblia elobeli yango te. Kasi na ntembe te Timote azalaki kokokisa mikumba na ye malamu mpo atosaki toli ya ntoma Paulo. (2 Tim. 3:10) Ndenge moko mpe, soki tokolisi makoki na biso, tokozala na nyonso oyo ekoki mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.

LUKÁ NDENGE YA KOSALELA BASUSU

12. Ndenge nini tozwaka matomba na mosala ya basusu?

12 Biso nyonso tozwaka matomba na mosala ya basusu. Ntango tozali na lopitalo, tozalaka na botɔndi ntango bankulutu oyo basalaka na Bakomite ya boyokani elongo na minganga to na bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi bayaka kotala biso. Ntango tozali na mokakatano moko na bomoi, tozalaka na botɔndi ntango nkulutu moko ya bolingo azwi ntango mpo na koyoka biso mpe kolendisa biso. Ntango tozalaka na mposa ya lisalisi mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia, tosepelaka ntango ndeko oyo azali mobongisi-nzela ya makoki andimi kokende na biso elongo mpe kopesa biso toli oyo ebongi. Bandeko wana nyonso basepelaka kosalisa biso. Tokoki mpe koyoka esengo yango soki tondimi kopesa ntango na biso mpo na kosalela bandeko na biso. Yango wana, Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Soki olingi kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova na ndenge oyo to na ndenge mosusu, nini ekosalisa yo okokisa mikano na yo?

13. Ntango tozali komityela mokano, likambo nini tosengeli kobosana te?

13 Komityela te mikano oyo ezali sikisiki te. Na ndakisa, okoki kokanisa boye: ‘Nalingi kosala lisusu mingi na lisangá.’ Kasi ekoki kozala mpasi koyeba ndenge ya kokokisa mokano ya ndenge wana, mpe ntango mosusu okoki koyeba te ntango nini okokisaki yango. Na yango omityela mokano oyo ezali polele mpe sikisiki. Okoki kutu kokoma mokano yango mpe ndenge oyo okani kokokisa yango.

14. Mpo nini tosengeli kozala na bokatikati ntango tozali komityela mikano?

14 Tosengeli mpe kozala na bokatikati ntango tozali komityela mikano. Mpo na nini? Mpo toyebi te makambo nyonso oyo ekómelaka biso na bomoi. Na ndakisa: Ntoma Paulo apesaki mabɔkɔ mpo na kofungola lisangá ya sika na engumba Tesaloniki. Na ntembe te azalaki na mokano ya kotikala kuna mpe kosalisa bakristo wana ya sika. Kasi batɛmɛli basɛngaki ntoma Paulo na makasi alongwa na engumba yango. (Mis. 17:1-5, 10) Soki ntoma Paulo atikalaká kuna, alingaki kotya bandeko na ye na likama. Kasi ntoma Paulo atikaki te kosalisa bango. Kutu, amesanaki na bambongwana yango. Na nsima, atindaki Timote akende kokokisa bamposa ya elimo ya bandeko na ye ya sika na Tesaloniki. (1 Tes. 3:1-3) Bandeko ya Tesaloniki basepelaki mingi ndenge Timote apesaki ntango na ye mpo na kokende esika nyonso oyo bazalaki na mposa na ye.

15. Ndenge nini makambo ya bomoi na biso ekoki kosala ete tókokisa to te mikano na biso? Pesá ndakisa.

15 Tokoki kozwa liteya na likambo oyo ntoma Paulo akutanaki na yango na Tesaloniki. Tokoki kozala na libaku ya kozwa mokumba moko, kasi makambo ya bomoi na biso ekoki kopekisa biso tózwa yango. (Mos. 9:11) Soki ezali bongo mpo na yo, ndimá komityela mokano mosusu oyo okoki kokokisa. Yango nde makambo oyo mobali moko na nkombo Ted ná mwasi na ye Hiedi basalaki. Lokola moko na bango akómaki kobɛla, basengelaki kolongwa na Betele. Kasi bolingo na bango mpo na Yehova etindaki bango báluka ndenge mosusu ya kosakola lisusu mingi. Ya liboso, bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Na nsima, baponamaki lokola babongisi-nzela monene, mpe Ted azwaki formasyo na mosala ya mokɛngɛli mosungi. Lisusu, malako epesamaki na oyo etali mbula oyo mokɛngɛli asengeli kotika mokumba na ye. Ted ná Hiedi bamonaki ete bakómi mibange mpenza mpe bakoki lisusu te kokokisa mokumba yango ya mokɛngɛli. Atako bayokaki mawa, bayebaki ete bakoki kosalela Yehova na ndenge mosusu. Ted alobi boye: “Toyekolaki ete tokoki kosalela Yehova kaka na lolenge moko te kasi na ndenge mingi.”

16. Liteya nini tokoki kozwa na Bagalatia 6:4?

16 Tokoki te koyeba makambo nyonso oyo ekokómela biso na bomoi. Yango wana, ezali na ntina tókanisa te ete tozali na motuya na miso ya Yehova kaka mpo na mikumba oyo tozali na yango, mpe ete tómikokanisa te ná basusu oyo bazali na mikumba oyo biso tozali na yango te. Hiedi alobi boye: “Okozala lisusu na esengo te soki azali kokokanisa bomoi na yo ná oyo ya basusu.” (Tángá Bagalatia 6:4.) Ezali na ntina tóluka ndenge oyo tokoki kosalisa basusu mpe kosalela Yehova. *

17. Okoki kosala nini mpo okokisa masɛngami mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova?

17 Okozala na likoki ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova, soki ozali na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe oboyi kozwa banyongo ya mpambampamba. Omityela mikano ya ntango mokuse oyo ekopesa yo likoki ya kokokisa mikano ya ntango molai. Na ndakisa, soki omityeli mokano ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, okoki kosala lokola mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya ntango molai sikoyo! Soki omityeli mokano ya kokóma mosaleli na misala, okoki kosakola lisusu mingi mpe kokende kotala bandeko oyo babɛlaka mpe mibange oyo bazali na lisangá na bino! Soki ozali kosala makambo wana nyonso sikoyo, ekoki kofungolela yo porte ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova na mikolo ezali koya. Zalá na ekateli ya kosala nyonso oyo okoki mpo na kokokisa mokumba nyonso oyo bapesi yo.​—Rom. 12:11.

Omityela mokano oyo okoki kokokisa (Talá paragrafe 18) *

18. Ndenge emonisami na elilingi, liteya nini ozwi na ndakisa ya ndeko mwasi Beverly?

18 Tózala mibange to te, biso nyonso tomityelaka mikano ya elimo mpe tokokisaka yango. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko ya mbula 75 na nkombo Beverley. Azalaki na mokakatano ya kotambola mpo na maladi oyo azalaki kobɛla. Kasi azalaki na mposa makasi ya komipesa mobimba na kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli. Na yango amityelaki mikano ya sikisiki. Ntango ndeko Beverley akokisaki mikano oyo amityelaki mpo na kampanye yango, asepelaki mingi. Milende na ye etindaki basusu bámipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Yehova azwaka na motuya mingi mosala oyo bandeko na biso ya mibange basalaka, ata soki makambo ya bomoi na bango ezali kopekisa bango básala oyo bakoki.​—Nz. 71:17, 18.

19. Wapi mikano mosusu ya elimo oyo tokoki komityela?

19 Omityela mikano oyo okoki kokokisa. Kolisá bizaleli oyo ekosala ete Yehova azwa yo na motuya. Kolisá makoki na yo mpo epesa yo nzela ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye. Luká ndenge ya kosalela bandeko na yo lisusu mingi. * Lokola Timote, na lisalisi ya Yehova “bato nyonso [bakomona] polele ete ozali kokende liboso.”​—1 Tim. 4:15.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

^ Timote azalaki ministre oyo abongi mpo na nsango malamu. Atako bongo, ntoma Paulo alendisaki ye akoba kokende liboso na elimo. Lokola Timote atosaki toli ya ntoma Paulo, Yehova asalelaki ye mingi mpe akokaki lisusu kosalela bandeko na ye mingi. Ndenge moko na Timote, ozali na mposa makasi ya kosalela Yehova mpe kosalisa bandeko na yo bakristo? Tondimi ete ozali na mposa yango. Mikano nini okoki komityela mpo esalisa yo osala bongo? Mpe esɛngi nini mpo na komityela mikano yango mpe kokokisa yango?

^ NDIMBOLA YA MALOBA: Mikano ya elimo esangisi makambo nyonso oyo tosalaka makasi tókokisa mpo tósalela Yehova lisusu mingi mpe tósepelisa ye.

^ Talá eteni “Kosala esika basakoli bazali mingi te” na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 10, par. 6-9.

^ Talá liteya 60, “Kobá kokola na elimo,” na buku Sepelá na bomoi libela na libela!.

^ ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kolakisa bandeko basi mibale ndenge ya kosala mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi, mpe bazali kosalela malamu mayele oyo bauti koyekola.

^ ELILINGI: Ndeko mwasi moko oyo akɔtá ndako azali kopesa litatoli na nzela ya telefone mpo na kobengisa bato na Ekaniseli.