Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini bazalaki kotánga bambula mpe basanza na ntango ya kala?

MPO na Baebre oyo bazalaki na Mokili ya Ndaka, mbula ya mikolo 365 ebandaki na eleko ya kobalola mabele mpe ya kolona mboto, lelo oyo ekokani na sanza ya 09 to ya 10.

Na kalandriye ya Biblia, mbula moko ezalaki na sanza 12 (mbala mingi ezalaki koumela mikolo 29 to 30), oyo bato bazalaki kotánga sanza na kotala na miso soki sanza ya sika ebimi. Bazalaki kotánga mbula na kotalela mikolo oyo mabele esalaka mpo na kobaluka zingazinga ya moi. Kasi bayaki komona ete kotánga mbula ndenge bazalaki kotánga sanza na kotala na miso soki sanza ya sika ebimi ezalaki mokuse mingi koleka kotánga mbula na kotalela mikolo oyo mabele esalaka mpo na kobaluka zingazinga ya moi. Yango wana, basengelaki koluka kosalela ndenge wana mibale ya kotánga mbula. Bazalaki kosalela yango ntango bazalaki kobakisa mikolo mosusu to sanza moko, mbala mosusu liboso mbula oyo elandi ebanda. Na lolenge wana nde kalandriye ezalaki koyokana na bileko ya kolona mboto mpe ya kobuka mbuma.

Kasi, na mikolo ya Moize, Nzambe alobaki na bato na ye ete mbula ya losambo esengelaki kobanda na sanza ya Abibe, to Nisana, lelo oyo na sanza ya 03 to ya 04 na eleko ya prɛnta. (Kob. 12:2; 13:4) Na sanza ya Nisana, Bayisraele bazalaki kosala fɛti mpe na fɛti yango, bazalaki kopesa Yehova mbuma ya liboso ya ɔrje.​—Kob. 23:15, 16.

Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia na nkombo Emil Schürer, alobaki boye: “Ezalaki mpasi te koyeba ntango ya kobakisa sanza moko ya sika na kalandriye. Mpo fɛti ya Elekeli esalema na eleko oyo sanza ezali na mobimba na yango na mokolo ya 14 Nisana, ezalaki ntango nyonso kokwea na eleko oyo butu ná moi eumelaka ndenge moko [to na eleko ya prɛnta] . . . Kasi, soki bamoni ete pene na nsuka ya mbula Elekeli ekozala liboso ya ebandeli ya prɛnta, bazalaki kobakisa sanza mosusu liboso ya Nisana.”

Batatoli ya Yehova basalelaka mayele yango mpo na koyeba dati ya sikisiki ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, oyo esalemaka na eleko ya prɛnta mpe ekokanaka na dati ya 14 Nisana na kalandriye ya Baebre. Yango wana bayebisaka na liboso masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba dati yango. a

Kasi ndenge nini Baebre bazalaki koyeba ntango sanza moko ekosuka mpe sanza ya sika ekobanda? Lelo oyo, na pɛtɛɛ nyonso okoki komona kalandriye ya papye to kalandriye na aparɛyi na yo. Kasi, na ntango ya kala, ezalaki pɛtɛɛ te.

Na ntango ya Mpela, basanza ezalaki koumela mikolo 30. (Eba. 7:11, 24; 8:3, 4) Na nsima, na kalandriye ya Baebre sanza ezalaki koumela te mikolo 30. Na kalandriye ya Baebre, bazalaki kotánga sanza na kotala na miso soki bamoni sanza ya sika ebimi. Yango ezalaki koumela mikolo 29 to 30 nsima ya kobanda sanza ya sika.

Na mokolo moko, Davidi ná Yonatane balobelaki sanza ya sika ntango balobaki: “Lobi ezali sanza ya sika.” (1 Sa. 20:5, 18) Na yango, emonani ete na ntango na bango, bazalaki kotánga basanza liboso kutu basanza yango ekóma. Ndenge nini Bayisraele bazalaki koyeba ntango oyo sanza ya sika ebandi? Mishnah, buku moko oyo ezalaki na mibeko mpe mimeseno ya Bayuda, epesi mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso. Emonisi ete nsima ya kozonga ya Bayuda na bokangami na Babilone, Sanedrina (tribinale monene ya Bayuda) emikɔtisaki na likambo yango. Na boumeli ya sanza nsambo oyo bafɛti esalemaki, tribinale yango ekutanaki liboso ya mokolo ya 30 ya sanza yango. Mibali yango bazalaki na mokumba ya kokata ntango oyo sanza ya sika ekobanda. Bazalaki kokata yango na kotalela nini?

Bato oyo bazalaki na bisika etombwaná to likoló ya bangomba zingazinga ya Yerusaleme bazalaki kotombola miso na likoló na butu mpo na kotala soki sanza ya sika ebimi. Bazalaki nokinoki koyebisa Sanedrina. Ntango bato yango ya Sanedrina bamoni ete bazali na bilembeteli oyo emonisi ete sanza ya sika ebimi, bazalaki koyebisa bato ete sanza ya sika ebandi. Kasi ezali boni soki mapata to molili ezipi miso ya basinzili, epekisi bango bámona soki sanza ya sika ebimi? Na ntango wana bazalaki koloba ete sanza yango ezalaki na mikolo 30, mpe sanza ya sika ekokaki kobanda na mokolo oyo elandi.

Buku Mishnah elobi ete Sanedrina ezalaki koyebisa ekateli na yango na nzela ya elembo ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela na Ngomba ya Olive, penepene na Yerusaleme. Makambo mosusu ya ntina na lisolo ya Bayisraele, bazalaki kosalela mɔtɔ mpo na kopanza nsango. Nsima na yango nde bazalaki kotinda bamemi-nsango. Na yango, Bayuda oyo bazalaki na Yerusaleme, na Yisraele mobimba, mpe na bisika mosusu bazalaki koyeba ntango oyo sanza ya sika ebandi. Yango wana, bango nyonso bakokaki kosala bafɛti ya bileko na ntango moko.

Okoki komona tablo oyo ekosalisa yo oyeba basanza, bafɛti mpe bileko na kalandriye ya Baebre na ntango ya kala.

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1990, lok. 15.