Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 29

Pesá Yesu Mokambi na biso mabɔkɔ

Pesá Yesu Mokambi na biso mabɔkɔ

“Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.”​—MAT. 28:18.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

NA MOKUSE a

1. Mokano nini Yehova azali na yango lelo oyo?

 LELO oyo, mokano ya Nzambe ezali ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama na mokili mobimba. (Mrk. 13:10; 1 Tim. 2:3, 4) Lokola ezali mosala ya Yehova, yango wana aponi Mwana na ye oyo alingaka mingi mpo na kokamba mosala yango. Tokoki komindimisa ete na litambwisi ya Yesu, mosala ya kosakola ekosuka na ntango oyo Yehova alingi liboso nsuka eya.​—Mat. 24:14.

2. Tokomona nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yesu azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bilei ya elimo mpe kobongisa bayekoli na ye mpo na kosakola na ndenge oyo esalemá naino te na mabele. (Mat. 24:45) Tokomona mpe makambo nini mokomoko na biso asengeli kosala mpo na kopesa Yesu mpe moombo ya sembo mabɔkɔ.

YESU AZALI KOKAMBA MOSALA YA KOSAKOLA

3. Bokonzi nini bapesaki Yesu?

3 Yesu azali kokamba mosala ya kosakola. Nini endimisi biso yango? Mwa moke liboso azonga na likoló, Yesu akutanaki na mwa ndambo ya bayekoli na ye ya sembo na ngomba moko na Galile. Ayebisaki bango boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Yoká makambo oyo alobaki nsima, alobaki boye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Mat. 28:18, 19) Na yango, Yesu azwaki mpe bokonzi ya kokamba mosala ya kosakola.

4. Nini endimisi biso ete Yesu azali kaka kokoba kokamba mosala ya kosakola?

4 Yesu asakolaki ete mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ekosalema na “bikólo nyonso,” mpe akozala elongo na bayekoli na ye “mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Maloba yango emonisi polele ete mosala ya kosakola esengelaki kokoba kosalema na nse ya litambwisi ya Yesu tii na mikolo na biso.

5. Likambo nini tozali kosala mpo maloba ya Nzembo 110:3 ekokisama?

5 Yesu azalaki komitungisa te ete basali bakozala moke na boumeli ya bosukisi ya makambo ya ntango oyo. Ayebaki ete maloba ya mokomi moko ya Nzembo ekokokisama, oyo elobi: “Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko na mokolo oyo okokamba limpinga ya basoda na yo na etumba.” (Nz. 110:3) Soki ozali kosakola nsango malamu, yebá ete ozali kopesa Yesu ná moombo ya sembo mabɔkɔ mpo esakweli yango ekokisama. Atako mosala yango ezali kokende liboso, kasi mikakatano ezali mingi.

6. Wapi mokakatano moko oyo basakoli ya Bokonzi bazali kokutana na yango lelo oyo?

6 Botɛmɛli ezali moko ya mikakatano oyo basakoli ya Bokonzi bazali kokutana na yango. Bapɛngwi, bakonzi ya mangomba, mpe ya politiki bayebisaka bato mingi makambo ya lokuta mpo na mosala na biso. Soki bandeko na biso ya libota, bato oyo toyebani na bango, mpe baninga na biso ya mosala bakosami na lokuta yango, bakoki kotya biso mpanzi likoló mpo tótika kosalela Yehova mpe kosakola. Na bikólo mosusu, bato oyo batɛmɛlaka biso babangisaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali, babundisaka bango, bakangaka bango, mpe batyaka bango ata na bolɔkɔ. Yango ekamwisaka biso te. Mpamba te, Yesu asakolaki ete: “Bikólo nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Ya solo mpenza, ndenge tozali kokutana na koyinana ya ndenge wana emonisi ete Yehova azali kondima biso. (Mat. 5:11, 12) Zabolo nde azali kobimisa botɛmɛli yango. Kasi Yesu azali na nguya koleka ye! Na lisalisi ya Yesu, nsango malamu ezali kokómela bato ya bikólo nyonso.

7. Nini endimisi yo ete Emoniseli 14:6, 7 ezali kokokisama?

7 Lokola tozali basakoli ya Bokonzi, tokutanaka mpe na mokakatano ya kosakwela bato na monɔkɔ oyo toyebi te. Na emonaneli oyo ntoma Yoane azwaki, Yesu asakolaki ete na mikolo na biso, nsango malamu ekolonga mokakatano yango. (Tángá Emoniseli 14:6, 7.) Na ndenge nini? Tozali kopesa bato ebele libaku ya kondima nsango ya Bokonzi. Lelo oyo, bato mingi na mokili mobimba bazali na likoki ya kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia na site Internet na biso jw.org, mpamba te etondi na mateya ndenge na ndenge na minɔkɔ koleka 1 000! Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki nzela bábongola buku Sepelá na bomoi libela na libela! na minɔkɔ koleka 700, buku yango ezali esaleli na biso ya libosoliboso mpo na kokómisa bato bayekoli! Bilei ya elimo ezali mpe kopesama na nzela ya bavideo mpo na bababa mpe mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufa miso mpo na bato oyo bamonaka malamu te mpe bato oyo bakufá miso. Tozali komona ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Bato ya “minɔkɔ nyonso ya bikólo” bazali koyekola koloba ‘monɔkɔ ya pɛto’ ya mateya ya solo. (Zek. 8:23; Sef. 3:9) Makambo wana nyonso ezali kokokisama na nse ya litambwisi ya Yesu Kristo.

8. Matomba nini mosala na biso ya kosakola ezali kobimisa?

8 Lelo oyo, bato koleka 8 000 000 na mikili 240, bazali kopesa ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ, mpe mbula na mbula ebele ya bato bazali kozwa batisimo! Likambo eleki ntina ezali te motángo ya bato, kasi nde bizaleli ya elimo, elingi koloba “bomoto ya sika,” oyo bayekoli yango ya sika bamonisaka. (Kol. 3:8-10) Mingi batiki bizaleli ya mbindo to pite, mobulu, kokanisela basusu mabe, mpe bolingo ya ekólo. Esakweli oyo ezali na Yisaya 2:4 ezali kokokisama; bazali ‘koyekola etumba lisusu te.’ Lokola tosalaka makasi mpo na kolata bomoto ya sika, tosalisaka bato báya na ebongiseli ya Nzambe, mpe tomonisaka ete tozali kolanda mokambi na biso Kristo Yesu. (Yoa. 13:35; 1 Pe. 2:12) Nini esali ete makambo yango esalema? Ezali mpo Yesu azali kosalisa biso.

YESU ATYE MOOMBO YA SEMBO MPE YA MAYELE

9. Na kotalela Matai 24:45-47, Yesu asakolaki nini mpo na ntango ya nsuka?

9 Tángá Matai 24:45-47. Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, akotya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bilei ya elimo. Yango wana, tosengeli komizela ete moombo yango akozala na mosala makasi na mikolo na biso. Yango ezali solo. Yesu azali kosalela mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo mpo na kopesa bato ya Nzambe mpe baoyo basepelaka na mateya ya Biblia ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ Bandeko mibali yango bamimonaka te ete bazali na bokonzi likoló ya kondima ya basusu. (2 Ko. 1:24) Kutu, bandimaka ete Yesu Kristo nde azali “mokambi mpe komanda” ya bato na ye.​—Yis. 55:4.

10. Ndenge emonisami na elilingi, buku nini esalisaki yo otambola na nzela ya bomoi ya seko?

10 Banda na mobu 1919, moombo ya sembo azali kobongisa mikanda ndenge na ndenge oyo ezali kopesa bato oyo basepelaka na solo libaku ya kobanda koyekola mateya ya Biblia. Na mobu 1921, moombo ya sembo abimisaki buku La harpe de Dieu mpo na kosalisa baoyo basepelaka na solo báyekola mateya ya moboko ya Biblia. Wana makambo ezali kobongwana, mikanda mosusu mpe ebakisamaki. Buku nini esalisaki yo oyekola koyeba mpe kolinga Tata na biso ya likoló? Ezalaki buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai,” Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, Biblia eteyaka mpenza nini?, Makambo oyo Biblia eteyaka, to Sepelá na bomoi libela na libela!, buku na biso ya sika? Babuku yango nyonso ebimisamaki mpo na kosalisa biso tókómisa bato bayekoli. Mpe ezalaki babuku oyo ebimisamaki na ntango oyo tozalaki na yango mpenza mposa.

11. Mpo na nini ezali na ntina ete biso nyonso tozwaka bilei ya elimo?

11 Ezali kaka te bato ya sika oyo basepelaka na solo nde bazali na mposa ya bilei ya makasi ya elimo. Kasi biso nyonso tozalaka na mposa na yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli.” Abakisaki ete kosalela makambo oyo toyekolaka na Biblia ekosalisa biso ‘tókesenisa ná mabe ná malamu.’ (Ebr. 5:14) Na ntango oyo ya mpasi oyo bizaleli ya bato ezali kobeba se kobeba, ekoki kozala mpasi kotosa mibeko ya Yehova. Kasi Yesu asalaka nyonso mpo tóyekola makambo oyo tosengeli na yango mpo na kobatela kondima na biso makasi. Bilei yango ya elimo eutaka na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye. Moombo ya sembo abongisaka mpe apesaka bilei yango ya elimo na nse ya litambwisi ya Yesu.

12. Ndenge moko na Yesu, ndenge nini tokumisaka nkombo ya Nzambe?

12 Ndenge moko na Yesu, topesaka nkombo ya Nzambe lokumu oyo ebongi na yango. (Yoa. 17:6, 26) Na ndakisa, na mobu 1931 tozwaki nkombo Batatoli ya Yehova oyo euti na Makomami, yango emonisi ndenge oyo tozwaka nkombo ya Nzambe na motuya mingi, mpe tolingaka ete bato báyeba biso na nkombo ya Tata na biso ya likoló. (Yis. 43:10-12) Na sanza ya 10 ya mobu yango, nkombo ya Nzambe emonanaki na ezipeli ya nimero mokomoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Longola yango, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika oyo esengeli na Liloba na ye. Yango ekeseni mpenza na mabongoli mosusu ya Biblia ya mangomba ya bokristo oyo balongolá nkombo ya Yehova!

YESU AZALI KOBONGISA BAYEKOLI NA YE

13. Makambo nini endimisi yo ete Yesu azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” lelo oyo? (Yoa. 6:68)

13 Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” Yesu azali kosalela ebongiseli moko lelo oyo awa na mabele na ndenge moko ya kokamwa mpo na kotombola losambo ya pɛto. Ndenge nini ozali komiyoka mpo na ebongiseli yango? Mbala mosusu ozali komiyoka lokola ntoma Petro, oyo ayebisaki Yesu ete: “Tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:68) Soki ebongiseli ya Yehova ezalaka te, mokomoko na biso alingaki kozala wapi? Na nzela ya ebongiseli yango, Kristo azali kosala nyonso mpo tólya malamu na elimo. Apesaka mpe biso formasyo mpo tókokisa mosala na biso malamumalamu. Lisusu, azali kosalisa biso tólata “bomoto ya sika,” mpo tósepelisa Yehova.​—Ef. 4:24.

14. Lokola ozali na kati ya ebongiseli ya Yehova, matomba nini osili kozwa na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus?

14 Yesu azali kopesa biso malako ya bwanya na ntango oyo ya mpasi. Matomba ya malako yango emonanaki polelepolele ntango maladi mabe ya Coronavirus ebandaki. Ntango bato na mokili bazalaki koyeba te nini básala, Yesu asalaki nyonso ete tózwa malako ya polele mpo na komibatela na maladi yango. Balendisaki biso tólataka bamaskɛ ntango tokei esika oyo bato bazali mingi mpe tózala mosika na bato mosusu. Balendisaki bankulutu ete bázwaka mbala na mbala bansango ya bandeko nyonso ya lisangá mpe bátyaka likebi na bamposa na bango ya mosuni mpe ya elimo. (Yis. 32:1, 2) Tozwaki mpe malako mosusu mpe malendisi na nzela ya balapolo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

15. Malako nini tozwaki mpo na kosala makita mpe kosakola na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus, mpe ebimisaki matomba nini?

15 Na eloko ya maladi mabe ya Coronavirus, tozwaki mpe malako ya polele oyo emonisaki ndenge oyo tosengelaki kosala makita mpe kosakola. Na mbala moko, tobandaki kosala makita, mayangani ya mike, mpe ya minene na nzela ya video. Tokómaki mpe kosakola na nzela ya kokoma mikanda mpe na telefone. Yehova apambolaki milende na biso. Bafiliale mingi etindaki balapolo mingi oyo emonisaki ete motángo ya basakoli emati. Ya solo, mingi kati na biso tozwaki makambo ya kolendisa na eleko yango.​—Talá etanda “ Yehova apambolaka mosala na biso ya kosakola.”

16. Na kotalela Baebre 13:5, 6, tokoki komindimisa na likambo nini?

16 Basusu bamonaki ete malako oyo ebongiseli epesaki mpo na komibatela na maladi mabe ya Coronavirus elekaki ndelo. Kendekende, eyaki komonana ete malako yango ezalaki ya bwanya mpenza. (Mat. 11:19) Ntango tozali komanyola na ndenge oyo Yesu azali kokamba bato na ye na bolingo, tomindimisi ete ezala likambo nini ekoki kobima na mikolo ezali koya, Yehova ná Mwana na ye oyo alingaka mingi bakozala elongo na biso.​—Tángá Baebre 13:5, 6.

17. Ozali komiyoka ndenge nini lokola Yesu azali kokamba yo?

17 Tozali na esengo lokola Yesu azali mokambi na biso! Tozali na ebongiseli moko oyo esangisi bato ya mimeseno, bikólo, mpe minɔkɔ ekeseni. Tozali koleisama malamu na elimo mpe kozwa formasyo oyo ebongi mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola. Mokomoko na biso azali kozwa mateya oyo ezali kosalisa ye alata bomoto ya sika mpe ayekola kolinga basusu. Tozali na ntina ya komikumisa lokola Yesu azali mokambi na biso!

LOYEMBO 16 Bókumisa Yah mpo na Mwana na ye oyo atyami mafuta

a Lelo oyo, bamilio ya basi, mibali mpe bana bazali kosakola nsango malamu na molende mpenza. Ozali moko na bango? Soki ezali bongo, ozali na nse ya litambwisi ya Nkolo na biso Yesu Kristo. Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo emonisi ete Yesu azali kotambwisa mosala ya kosakola lelo oyo. Komanyola na makambo yango ekosalisa biso tózala na ekateli ya kokoba kosalela Yehova na litambwisi ya Kristo.