Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 37

Okoki kotyela bandeko na yo motema

Okoki kotyela bandeko na yo motema

“Bolingo . . . endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso.”​—1 KO. 13:4, 7.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini tokamwaka te komona ndenge lelo oyo bato bazali kotyelana motema te?

 LELO oyo na mokili ya Satana, bato mingi bayebi te bakoki kotyela banani motema. Bato ya mombongo, bakonzi ya politiki, mpe bakonzi ya mangomba bayokisaka bango mpasi na motema ntango nyonso. Yango esali ete ezala mpasi bákoka kotyela baninga, bato ya kartye, mpe bato ya mabota na bango motema. Yango esengeli kokamwisa biso te. Mpo Biblia esakolaki boye: “[Na] mikolo ya nsuka . . . , bato bakozala . . . oyo bazangi bosembo, . . . oyo bakoselaka bato makambo, . . . oyo batɛkaka bamosusu.” Yango elingi koloba ete bato bakozala lokola Satana, nzambe ya makambo ya ntango oyo, moto oyo bakoki ata moke te kotyela motema.​—2 Tim. 3:1-4; 2 Ko. 4:4.

2. (a) Tosengeli kotyela banani motema na biso mobimba? (b) Bandeko mosusu bakoki komituna nini?

2 Nzokande lokola tozali bakristo, toyebi ete tosengeli kotyela Yehova motema na biso mobimba. (Yir. 17:7, 8) Toyebi mpenza ete alingaka biso mpe ‘akotika ata moke te’ baninga na ye. (Nz. 9:10) Tosengeli mpe kotyela Yesu Kristo motema mpo apesaki bomoi na ye mpo na biso. (1 Pe. 3:18) Lisusu, mokomoko na biso ayebi ete Biblia epesi biso litambwisi oyo tosengeli kotyela motema. (2 Tim. 3:16, 17) Tozali na kondima ete tosengeli kotyela Yehova, Yesu mpe Biblia motema. Kasi, bandeko mosusu bakoki komituna soki bakoki ntango nyonso kotyela bandeko ya lisangá motema. Soki eyano ezali ɛɛ, mpo na nini tokoki kotyela bango motema?

TOZALALAKA NA MPOSA YA BANDEKO NA BISO

Na mokili mobimba, tozali na bandeko na biso oyo tokoki kotyela motema mpe oyo balingaka Yehova lokola biso (Talá paragrafe 3)

3. Na kotalela Marko 10:29, 30, libaku nini ya malamu tozali na yango?

3 Yehova aponi biso tózala na kati ya libota ya basaleli na ye na mokili mobimba. Ezali mpenza libaku moko malamu oyo ememelaka biso mapamboli mingi! (Tángá Marko 10:29, 30.) Na mokili mobimba, tozali na bandeko basi mpe mibali oyo balingaka Yehova lokola biso mpe basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kotambwisa bomoi na bango na kolanda mibeko na ye. Atako tolobaka monɔkɔ moko te, tozalaka na mimeseno ya mboka ndenge moko te, mpe lolenge na biso ya kolata ekeseni, tolingaka bango, ata soki tokutani na bango mbala ya liboso. Tosepelaka makasi kozala elongo na bango mpo na kosanzola mpe kosambela Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo.​—Nz. 133:1.

4. Mpo na nini tozalaka na mposa ya bandeko na biso?

4 Banda sikoyo, tosengeli kokoba kozala na bomoko elongo na bandeko na biso. Na bantango mosusu, basalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokutanaka na yango. (Rom. 15:1; Gal. 6:2) Basalisaka biso mpe tózala na molende na mosala ya Yehova mpe tótikala baninga na ye. (1 Tes. 5:11; Ebr. 10:23-25) Kanisá ndenge oyo tolingaki komiyoka soki bandeko na biso ya lisangá bazalaka te mpo na kosalisa biso tótɛmɛla banguna na biso, elingi koloba, Satana Zabolo ná mokili na ye oyo mabe. Mosika te, Satana ná bato na ye bakobundisa basaleli ya Nzambe. Kasi na ntango yango, tokozala mpenza na botɔndi na lisungi oyo bandeko bakopesa biso.

5. Mpo na nini bandeko mosusu bamonaka ete ezali mpasi kotyela basusu motema?

5 Kasi, bandeko mosusu bamonaka ete ezali mpasi kotyela bandeko motema, mbala mosusu mpo ndeko moko abimisaki sekele moko oyo bayebisaki ye to akokisaki te elaka na ye. To mbala mosusu ndeko moko na lisangá alobaki to asalaki likambo moko oyo esalaki bango motema mpasi mpenza. Kokutana na makambo ya ndenge wana ekoki kosala ete ekóma mpasi tótyela bandeko mosusu motema. Kasi, nini ekoki kosalisa biso tókóma kotyela bandeko ya lisangá motema?

BOLINGO ETINDAKA BISO TÓTYELA BANDEKO NA BISO MOTEMA

6. Na kotalela 1 Bakorinti 13:4-8, ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso tótyela basusu motema?

6 Bolingo ezali ezaleli oyo eleki ntina mpo na kotyela basusu motema. Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti mokapo 13 elobeli mwa bizaleli oyo emonisi bolingo oyo ekoki kosalisa biso tótyela basusu motema to tókóma kotyela bango motema. (Tángá 1 Bakorinti 13:4-8.) Na ndakisa, vɛrsɛ 4 elobi ete “bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” Yehova amoniselaka biso motema molai ata soki tosaleli ye lisumu. Ndenge moko mpe, tokoki komonisela bandeko na biso motema molai ata soki balobi to basali likambo moko oyo epesi biso nkanda to ezokisi biso. Vɛrsɛ 5 elobi ete: “[Bolingo] esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te.” Tozali na mposa te ya “kobomba mabe na motema,” elingi koloba, koboya kokanisa ntango nyonso makambo oyo bandeko na biso basalaki oyo epesaki biso mpasi na motema. Mosakoli 7:9 elobi ete tosengeli ‘kosilikaka nokinoki te.’ Ezali mpenza malamu mingi kosalela maloba oyo ezali na mokanda ya Baefese 4:26, oyo elobi: “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda”!

7. Ndenge nini mitinda oyo ezali na Matai 7:1-5 ekoki kosalisa biso tótyelaka basusu motema?

7 Likambo mosusu oyo ekosalisa biso tótyelaka bandeko na biso motema ezali ya kotalela bango ndenge oyo Yehova atalelaka bango. Nzambe alingaka bango mpe atalaka kaka te masumu na bango. Biso mpe tosengeli kosala bongo. (Nz. 130:3) Na esika ya kotala kaka mabunga na bango, tosengeli kosala makasi tótalaka nde bizaleli na bango ya malamu mpe tókanisaka makambo ya malamu oyo basalaka. (Tángá Matai 7:1-5.) Tondimaka ete balingaka kosala makambo ya malamu mpe bazalaka te na mposa ya kozokisa biso, mpamba te bolingo “endimaka makambo nyonso.” (1 Ko. 13:7) Maloba yango elimboli te ete Yehova alingaka tótyela basusu motema kozanga kokanisa, kasi tokotyela bango motema soki kaka bamonisi ete bazali bato oyo babongi kotyelama motema. b

8. Okoki kosala nini mpo otyelaka bandeko na yo motema?

8 Mpo bátyela moto motema mpe bámemya ye, esɛngaka kosala milende makasi mpe ezwaka ntango. Okoki kosala nini mpo otyelaka bandeko na yo motema? Luká koyeba bango malamumalamu. Sololáká na bango na makita ya lisangá. Sakoláká elongo na bango. Moniseláká bango motema molai mpe pesáká bango libaku ya komonisa ete babongi kotyelama motema. Na ebandeli, okoki kopona makambo oyo etali yo oyo okosepela koyebisa moto oyo olingi oyebana na ye. Soki boninga na bino ekómi makasi, okoki komona malamu oyebisa ye makambo nyonso oyo etali yo to ndenge ozali komiyoka. (Luka 16:10) Kasi okosala nini soki ndeko moko asali likambo moko oyo esali ete ekóma mpasi otyela ye motema? Kowela kokata boninga na bino te. Kasi tiká naino ntango eleka. Lisusu, kotika te ete makambo ya mikemike oyo bato mosusu basali yo esala ete otika kotyela bandeko motema. Tótalela bandakisa ya mwa basaleli ya sembo ya Yehova ya ntango ya kala, atako basalelaki bango makambo oyo epesaki bango mpasi, kasi batikaki te kotyela basusu motema.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA EPAI YA BATO OYO BAKOBAKI KOTYELA BASUSU MOTEMA

Hana akobaki kotyela Yehova mpe bato oyo aponaki mpo na kokamba basaleli na ye motema, atako Eli apesaki ye eyano moko ya mabe (Talá paragrafe 9)

9. (a) Ndenge nini Hana akobaki kotyela Yehova motema atako bato mosusu oyo Yehova aponaki mpo na kokamba basaleli na ye bazalaki kosala masumu? (b) Liteya nini ozwi na ndakisa ya Hana na likambo etali kotyela bato oyo Yehova aponi mpo na kokamba basaleli na ye motema? (Talá elilingi ya ezipeli.)

9 Esí ekómelá yo oyoka mpasi na motema na likambo oyo ndeko moko oyo azali na mokumba na lisangá asali? Soki ezali bongo, okozwa matomba mingi soki otaleli ndakisa ya Hana. Na ntango wana, moto oyo azalaki na mokumba monene mpenza ezalaki nganga-nzambe monene Eli. Kasi bato ya libota na ye bazalaki ndakisa malamu te. Bana na ye, oyo bazalaki banganga-nzambe, bazalaki mbala na mbala kosala makambo ya nsɔni mpe pite; kasi, tata na bango asalaki mpenza eloko moko te mpo na kosembola bango. Yehova apekisaki Eli mbala moko te asala lokola nganga-nzambe monene. Atako bongo, Hana akobaki kotosa ebongiseli oyo Nzambe atyá, mpe atikaki te kokende kosambela na tabernakle ntango nyonso oyo Eli azalaki kaka nganga-nzambe monene. Ntango Eli amonaki Hana azali kobondela na mawa makasi, Eli akómaki mbala moko na likanisi ya mabe ete Hana alangwe masanga. Na esika ya koluka koyeba makambo nyonso, apamelaki mwasi yango oyo azalaki na mpasi makasi. (1 Sa. 1:12-16) Atako bongo, Hana asalaki elako ete soki aboti mwana, akopesa ye na mabɔkɔ ya Eli mpo akóma kosala na tabernakle. (1 Sa. 1:11) Esɛngaki kopesa bana ya Eli etumbu mpo na makambo oyo bazalaki kosala? Ɛɛ, mpe Yehova asalaki yango na ntango oyo ebongi. (1 Sa. 4:17) Na ntango yango, Nzambe apesaki Hana mwana mobali moko, Samwele.​—1 Sa. 1:17-20.

10. Ndenge nini Mokonzi Davidi akobaki kotyela basusu motema atako bato mosusu bazalaki kosalela ye makambo ya mabe?

10 Esí ekómelá yo ete moninga na yo moko ya motema asalela yo likambo na bokosi? Soki ekómelá yo, talelá ndakisa ya Mokonzi Davidi. Azalaki na moninga moko na nkombo Ahitofele. Kasi ntango mwana ya Davidi, Abisalome alukaki kobɔtɔla bokonzi ya tata na ye na makasi, Ahitofele amikómisaki na ngámbo ya Abisalome. Na ntembe te, yango esalaki Davidi mpasi komona ndenge mwana na ye mpe moto oyo azalaki kokanisa ete azali moninga na ye ya motema baboyaki kopesa ye mabɔkɔ! Atako bongo, Davidi atikaki nzela te ete likambo yango ya mabe epekisa ye atyela basusu motema. Akobaki kotyela Hushai moninga na ye ya sembo motema, oyo aboyaki kosangana na botomboki yango. Davidi azalaki na bantina oyo ebongi mpo na kotyela Hushai motema. Na kotalela makambo oyo esalemaki na nsima, Hushai amimonisaki moninga ya malamu, ata ntango oyo bomoi na ye ekómaki na likama mpo na kosalisa Davidi.​—2 Sa. 17:1-16.

11. Mosali moko ya Nabale asalaki nini mpo na komonisa ete azalaki kotyela Abigaile motema?

11 Tótalela mpe ndakisa oyo mosali moko ya Nabale atiká. Davidi ná bato na ye babatelaki basali ya mobali moko oyo azalaki Moyisraele te na nkombo Nabale. Mwa moke na nsima, Davidi asɛngaki Nabale oyo azalaki mozwi apesa bato na ye bilei, ezala bilei ya ndenge nini oyo Nabale alingaki kopesa bango. Ntango Nabale aboyaki kopesa Davidi bilei oyo asɛngaki, yango esalaki ete Davidi akóma na nkanda mpe azwaki mokano ya koboma mobali nyonso na ndako ya Nabale. Mosali moko amemaki likambo yango epai mwasi ya Nabale, Abigaile. Lokola azalaki moko ya bato ya ndako ya Nabale, ayebaki ete Abigaile akokaki kobikisa bomoi na ye. Na esika aluka kokima, atyaki motema ete Abigaile akosala nyonso mpo abongisa makambo. Akokaki kotya motema bongo mpamba te moto nyonso ayebaki ete Abigaile azalaki mwasi ya bwanya. Makambo oyo esalemaki na nsima emonisaki ete ebongaki mpenza atyela Abigaile motema. Abigaile amonisaki mpiko mpo na kosembola Davidi ndenge akanaki kosala mabe. (1 Sa. 25:2-35) Atyaki motema ete Davidi akosala makambo ya malamu.

12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bayekoli na ye motema atako bazalaki kosala mabunga?

12 Yesu atyelaki bayekoli na ye motema atako bazalaki kosala mabunga. (Yoa. 15:15, 16) Ntango Yakobo ná Yoane batunaki Yesu mpo na kopesa bango esika oyo eleki lokumu na Bokonzi, Yesu atunaki bango te nini etindaki bango báloba bongo to alongolaki bango te na molɔngɔ ya bantoma. (Mrk. 10:35-40) Na nsima, bayekoli nyonso ya Yesu basundolaki ye na butu oyo bakangaki ye. (Mat. 26:56) Kasi, Yesu atikaki te kotyela bango motema. Ayebaki malamu ete bazalaki bato ya kozanga kokoka; kasi, “alingaki bango tii na nsuka.” (Yoa. 13:1) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu apesaki bantoma na ye 11 ya sembo mokumba monene ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli mpe ya kobatela bampate na ye oyo bazali na motuya. (Mat. 28:19, 20; Yoa. 21:15-17) Azalaki na bantina ya kotyela mibali wana ya kozanga kokoka motema. Bango nyonso basalaki na bosembo mpenza tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele. Na ntembe te, Hana, Davidi, mosali moko ya Nabale, Abigaile, mpe Yesu batiká ndakisa malamu na likambo etali kotyela bato ya kozanga kokoka motema.

YEKOLÁ KOTYELA LISUSU BANDEKO MOTEMA

13. Nini ekoki kosala ete ekóma mpasi kotyela basusu motema?

13 Osí oyebisá ndeko moko likambo moko ya sekele, kasi na nsima oyoki ete abɛtɛli moto mosusu? Esalaka mpasi mpenza. Mokolo moko, ndeko mwasi moko ayebisaki nkulutu moko likambo oyo etali ye moko mpe atyelaki ye motema ete akoyebisa yango moto mosusu te. Na mokolo oyo elandaki, mwasi ya nkulutu yango abengi ndeko mwasi wana mpo na kolendisa ye, mpe emonani ete mwasi ya nkulutu yango ayebi likambo oyo ndeko mwasi yango ayebisaki nkulutu wana na nkuku. Na ntembe te, ndeko mwasi yango amonaki ete ezali mpasi kotyela nkulutu yango motema. Kasi ndeko mwasi yango asalaki likambo ya malamu na ndenge alukaki lisalisi. Asololaki na nkulutu mosusu, mpe nkulutu yango asalisaki ye mpo azongela kotyela nkulutu oyo alobaki likambo na ye mpe bankulutu nyonso motema.

14. Likambo nini esalisaki ndeko mobali moko akóma kotyela lisusu bandeko motema?

14 Na boumeli ya ntango molai, ndeko mobali moko asilikelaki bankulutu mibale mpo amonaki ete ebongaki te atyela bango motema. Kasi, akanisaki na makambo oyo ndeko moko amemyaka mingi alobaki. Ndeko yango asalelaki maloba ya polele mpe ya nguya mpenza, ntango alobaki boye: “Monguna na biso ezali Satana, kasi bandeko na biso te.” Ndeko mobali yango azwaki maloba yango na motuya mingi, abondelaki mpe kendekende azongisaki kimya elongo na bankulutu wana mibale.

15. Mpo na nini kotyela lisusu bandeko motema ekoki kozwa ntango? Pesá ndakisa.

15 Esí ekómelá yo obungisa mokumba na lisangá? Yango ekoki kozala mpasi mingi mpenza. Grete ná mama na ye basalelaki Yehova na bosembo mpenza na ntango ya Banazi na Allemagne liboso ya Etumba ya Mibale na mokili mobimba ntango mosala na biso epekisamaki. Grete azalaki kosepela na mokumba oyo azalaki na yango ya kosala bakopi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na bandeko na ye bakristo. Kasi ntango bandeko bayaki koyeba ete tata na ye azalaki kotɛmɛla solo, balongolaki ye mokumba oyo azalaki na yango, mpo bazalaki kobanga ete tata na ye akoyebisa batɛmɛli makambo oyo etali lisangá. Yango ezalaki kaka te likambo oyo Grete akutanaki na yango. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bandeko baboyaki kopesa Grete ná mama na ye bakopi ya bazulunalo mpe bazalaki koboya kosolola na bango ntango bazalaki kokutana na nzela. Ezalaki likambo moko ya mpasi! Yango esalaki Grete mpasi mingi mpenza, mpe ezwaki ntango molai mpenza mpo akoka kolimbisa bandeko mpe kotyela bango lisusu motema. Na nsima, ayaki kososola ete Yehova alimbisaki bango, yango wana ye mpe alimbisaki bango. c

“Monguna na biso ezali Satana, kasi bandeko na biso te”

16. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo tóyekola kotyela lisusu bandeko na biso motema?

16 Soki yo mpe okutaná na makambo ya mpasi ya ndenge wana, salá makasi okóma lisusu kotyela basusu motema. Ekoki kosɛnga ntango, kasi milende oyo okosala ekozala na ntina mingi mpenza. Na ndakisa, soki esí ekómelá biso tólya biloko ya mabe, tokokóma lisusu ekɛngɛ mingi mpo na biloko ya kolya. Kasi, bilei moko ya mabe ekoki te kosala ete tóboya kolya bilei mosusu. Ndenge moko mpe, tosengeli te kotika makambo oyo tokutaná na yango esala ete tókóma lisusu kotyela bandeko nyonso motema te, oyo toyebi mpe ete bazali bato ya kozanga kokoka. Soki tokómi lisusu kotyela bandeko na biso motema, yango ekomemela biso esengo mpe tokotya makanisi na makambo oyo biso tokoki kosala mpo ezaleli ya kotyela basusu motema ezala na kati ya lisangá.

17. (a) Mpo na nini kotyela basusu motema ezali na ntina? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Ezali mpasi kotyela moto motema na mokili oyo Satana azali koyangela, kasi tokoki kotyela bandeko na biso motema mpo tolingaka bango mpe balingaka biso. Kosala bongo epesaka biso esengo mpe kimya sikoyo; mpe ekobatela biso na mikolo ezali koya ntango tokokutana na mikakatano. Okosala nini soki moto moko azokisi yo mpe ozali te kotyela ye motema? Meká kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango, salelá mitinda ya Biblia, kolisá lisusu bolingo makasi mpo na bandeko na yo, mpe yekolá bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli. Tokoki kolonga mpasi oyo tozali na yango mpe kokóma lisusu kotyela basusu motema. Soki tosali bongo, tokosepela na lipamboli oyo tozali na yango ya kozala na baninga mingi oyo ‘bakangamaka makasi koleka bandeko.’ (Mas. 18:24) Kasi ezali kaka biso te nde tosengeli kotyela basusu motema, bango mpe basengeli kotyela biso motema. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa ete tozali bato oyo bandeko na biso bakoki kotyela motema.

LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele

a Tolingaka kotyela bandeko na biso motema. Kasi kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bantango mosusu bayokisaka biso mpasi na motema. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge oyo kosalela mitinda ya Biblia mpe komanyola na bandakisa ya bato ya kala ekoki kosalisa biso tótyela bandeko na biso motema to tózongela lisusu kotyela bango motema.

b Biblia ekebisi biso na bandeko mosusu na lisangá oyo babongi te tótyela bango motema. (Yuda 4) Atako esalemaka mingi te, ekómaka ete bandeko ya lokuta balukaka kokosa basusu na koloba “makambo ya mbilingambilinga.” (Misala 20:30) Tokoki te kotyela bandeko ya ndenge wana motema to koyoka bango.

c Mpo na koyeba makambo mingi etali Grete, talá Buku ya mobu 1974 ya Batatoli ya Yehova, na Français, nk. 129-131.