Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?

Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?

“Moto oyo azali na elimo ya sembo abombaka likambo.”​—MAS. 11:13.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

NA MOKUSE a

1. Ndenge nini tokoki koyeba moto oyo abongi kotyelama motema?

 MOTO oyo abongi ete basusu bátyela ye motema asalaka makasi akokisa likambo oyo alaki mpe alobaka ntango nyonso solo. (Nz. 15:4) Bato bayebi ete bakoki kotyela ye motema mpenza. Tolingaka ete bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bámiyoka mpe bongo mpo na biso. Tokoki kosala nini mpo bandeko na biso bátyelaka biso motema?

2. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo babongi kotyelama motema?

2 Tokoki te kotinda bato na makasi bátyela biso motema. Makambo oyo tosalaka nde esengeli komonisa soki ebongi basusu bátyela biso motema to te. Bato balobaka ete kotyela moto motema ekokani na mbongo. Esɛngaka kosala mosala makasi mpo na kozwa mbongo, kasi ezalaka pɛtɛɛ mpo na kobungisa yango. Ebongi mpenza tótyela Yehova motema. Tosengeli ntango nyonso kotyela ye motema, mpamba te “mosala na ye nyonso esalemi na bosembo.” (Nz. 33:4) Yango wana alingaka ete tómekola ye. (Ef. 5:1) Tiká tólobela mwa bandakisa ya basaleli ya Yehova oyo bamekolaki ye mpe basalaki nyonso mpo na komonisa ete babongi kotyelama motema. Tokolobela mpe bizaleli mitano oyo ekosalisa biso tózala bato oyo babongi kotyelama motema.

ZWÁ MATEYA EPAI YA BASALELI YA YEHOVA OYO BABONGAKI KOTYELAMA MOTEMA

3-4. (a) Ndenge nini mosakoli Danyele amonisaki ete azalaki moto oyo basusu bakoki kotyela motema? (b) Yango esengeli kotinda biso tómituna mituna nini?

3 Mosakoli Danyele azalaki ndakisa malamu na likambo etali kozala moto oyo basusu bakoki kotyela motema. Atako amemamaki lokola mokangami na Babilone, eumelaki te mpo ayebana lokola moto oyo basusu bakoki kotyela motema. Bato bakómaki kotyela ye motema mingi ntango alimbolaki bandɔtɔ ya Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, na lisalisi ya Yehova. Na libaku moko, Danyele asengelaki koyebisa mokonzi ete Yehova azalaki kosepela na ye lisusu te. Ezalaki te nsango oyo ekokaki kosepelisa mokonzi. Danyele asengelaki kozala na mpiko mpo na koyebisa ye nsango yango, mpamba te Nebukadenezare azalaki moto ya nkanda makasi! (Dan. 2:12; 4:20-22, 25) Bambula mingi na nsima, Danyele amonisaki lisusu ete azali moto oyo abongi basusu bátyela motema ntango alimbolaki na bosikisiki makomi ya kokamwa oyo emonanaki na efelo ya ndako ya mokonzi na Babilone. (Dan. 5:5, 25-29) Na nsima, Dariuse moto ya Mede mpe bato minene oyo aponaki bamonaki ete Danyele azalaki na “elimo moko ya mayele mingi.” Bayaki koyeba ete Danyele “abongaki kotyelama motema mpe ata likambo moko ya gɔigɔi to eloko moko ya mabe emonanaki epai na ye te.” (Dan. 6:3, 4) Ya solo, ata bakonzi oyo bazalaki bapakano bayebaki ete basambeli ya Yehova babongaki kotyelama motema!

4 Wana tozali kobatela ndakisa ya Danyele na makanisi, tokoki komituna boye: ‘Bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te batalelaka ngai lokola moto ya lolenge nini? Nayebani lokola moto oyo akokisaka mikumba na ye nyonso mpe moto oyo basusu bakoki kotyela motema?’ Mpo na nini ezali na ntina tómituna bongo? Ezali mpo Yehova akozwa lokumu mingi soki toyebani lokola bato oyo basusu bakoki kotyela motema.

Nehemia aponaki mibali oyo babongaki kotyelama motema mpo bákokisa mikumba ya ntina (Talá paragrafe 5)

5. Mpo na nini Hanania ayebanaki lokola moto oyo abongi kotyelama motema?

5 Na mobu 455 L.T.B., nsima ya kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme, guvɛrnɛrɛ Nehemia alukaki mibali ya makoki oyo bakokaki kobatela engumba. Na kati ya bato oyo aponaki, Nehemia aponaki Hanania azala nkumu ya Ndako Monene. Biblia elobi ete Hanania “azalaki mobali oyo abongi kotyelama motema [oyo] azalaki kobanga Nzambe ya solo koleka bamosusu mingi.” (Neh. 7:2) Kolinga Yehova mpe koboya kosala likambo oyo ekopesa ye mpasi na motema etindaki Hanania azwa na lisɛki te mokumba nyonso oyo azwaki. Bizaleli yango ekosalisa biso mpe tózala sembo na mosala ya Nzambe.

6. Ndenge nini Tishike azalaki moninga oyo ntoma Paulo abongaki kotyela motema?

6 Tótalela ndakisa ya Tishike, ndeko oyo ntoma Paulo atyelaki motema. Ntango ntoma Paulo azalaki na ndako ya bolɔkɔ, atyelaki Tishike motema, mpe ntoma Paulo alobaki ete Tishike azali “mosaleli ya sembo na kati ya Nkolo.” (Ef. 6:21, 22) Ntoma Paulo atyelaki Tishike motema kaka te mpo azalaki kokende kotikela bandeko ya Efese mpe ya Kolose mikanda, kasi mpe mpo azalaki kolendisa mpe kobɔndisa bango. Ndakisa ya Tishike ezali kotinda biso tókanisa bandeko mibali ya sembo oyo tokoki kotyela motema, oyo bazali kokokisa bamposa na biso ya elimo lelo oyo.​—Kol. 4:7-9.

7. Mateya nini okoki kozwa epai ya bankulutu mpe basaleli na misala ya lisangá na bino oyo babongi kotyelama motema?

7 Lelo oyo, tozalaka na botɔndi mingi mpo na bankulutu mpe basaleli na misala oyo babongi kotyelama motema. Lokola Danyele, Hanania mpe Tishike, bazwaka mikumba na bango na lisɛki te. Na ndakisa, ntango toyanganaka na likita ya katikati ya pɔsɔ, toyebaka ete bapesaka bandeko masolo na eteni mokomoko ya programɛ ya likita. Bankulutu basepelaka makasi ntango bamonaka bandeko oyo bazwaka badevuare na makita ndenge babongisaka yango malamu, mpe basalaka yango malamu mpenza. Na ndakisa, tokakatanaka te kobengisa bayekoli na biso ya Biblia na makita, mpo tondimaka ete ekozala na ndeko moko oyo akosala diskur ya bato nyonso. Mpe toyebaka ete mikanda oyo tokosalela na mosala ya kosakola ekozanga te. Bandeko na biso wana ya sembo babatelaka biso malamu na elimo, mpe topesaka Yehova matɔndi mpo na bandeko yango! Kasi, na makambo nini mosusu tokoki kozala bato oyo babongi kotyelama motema?

ZALÁ MOTO OYO ABONGI KOTYELAMA MOTEMA NA LIKAMBO ETALI KOBOMBA SEKELE

8. Na kotalela Masese 11:13, ndenge nini tosengeli kozala na bokatikati ntango tozali kotyela basusu likebi?

8 Tolingaka bandeko na biso mpe tolukaka bolamu na bango. Kasi, tosengeli kozala na bokatikati mpe koboya komikɔtisa na makambo oyo etali kaka bango moko. Bandeko mosusu na lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki ‘bilobaloba, bazalaki komikɔtisa na makambo ya bato, mpe kolobela makambo oyo basengelaki kolobela te.’ (1 Tim. 5:13) Tosengeli soki moke te kozala lokola bango. Kanisá ete moto moko ayebisi biso likambo moko oyo etali kaka ye moko mpe asɛngi biso ete tóyebisa yango moto mosusu te, na ndakisa, ndeko mwasi moko akoki koyebisa biso likambo moko oyo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye to mokakatano mosusu oyo azali kokutana na yango, mpe asɛngi biso tóyebisa yango moto mosusu te. Tosengeli kosala likambo oyo asɛngi biso. b (Tángá Masese 11:13.) Tiká tólobela sikoyo makambo mosusu oyo ezali na ntina ete tóbombaka sekele.

9. Ndenge nini mosangani mokomoko ya libota akoki komonisa ete abongi kotyelama motema?

9 Na libota. Mosangani mokomoko ya libota azali na mokumba ya koboya koloba makambo etali kaka libota epai ya bato mosusu. Na ndakisa, mwasi moko mokristo akoki kozala na ezaleli moko oyo mobali na ye azwaka yango lokola masɛki. Asengeli koyebisa bato mosusu ezaleli yango mpo na koyokisa mwasi na ye nsɔni? Soki moke te! Lokola alingaka mwasi na ye, akoki te kosala likambo oyo ekoki kozokisa mwasi na ye. (Ef. 5:33) Esengeli mpe kosalela bilenge makambo na limemya. Baboti basengeli kobosana likambo yango te. Basengeli te koyebisaka bato mosusu mabunga ya bana na bango mpo na kokitisa lokumu na bango. (Kol. 3:21) Bana basengeli koyekola koyeba kobomba makambo, koboya koyebisa bato mosusu makambo oyo ekoki kosala ete eyokisa bato ya libota nsɔni. (Mib. 5:16) Soki mosangani mokomoko ya libota azali kosala makasi mpo na kobomba makambo ya sekele oyo etali kaka libota, yango ekosala ete bomoko ya libota ekóma lisusu makasi.

10. Na kotalela Masese 17:17, kozala “moninga ya solosolo” esɛngi nini?

10 Epai ya baninga na biso. Na bantango mosusu, mingi kati na biso tozalaka na mposa ya koyebisa moninga na biso ya motema sekele moko. Na bantango mosusu ekoki kozala mpasi. Mbala mosusu ezalaka pɛtɛɛ te mpo na biso tóyebisa moto moko makambo oyo ezali mpenza na mitema na biso, mpe ekosala biso mpasi makasi na motema soki toyoki ete moninga na biso ayebisi bato mosusu makambo oyo toyebisaki ye. Nzokande, tosepelaka na moto oyo ayebaka kobomba sekele! Azali “moninga ya solosolo.”​—Tángá Masese 17:17.

Bankulutu balobaka te makambo ya sekele epai ya bato ya mabota na bango (Talá paragrafe 11) c

11. (a) Ndenge nini bankulutu mpe basi na bango bamonisaka ete babongi kotyelama motema? (b) Liteya nini tokoki kozwa epai ya nkulutu oyo ayebisaka te bato ya libota na ye makambo ya nkuku etali lisangá? (Talá elilingi.)

11 Na lisangá. Bankulutu oyo bayebani ete bayebaka kobomba sekele bazalaka “esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana” mpo na bandeko na bango. (Yis. 32:2) Tobangaka te koyebisa bandeko yango makambo nyonso, mpo toyebi ete makambo oyo toyebisi bango bakobɛtela yango moto mosusu te. Totyaka bango mbamba te báyebisa biso makambo oyo basengeli te koyebisa biso. Lisusu tomemyaka basi ya bankulutu na biso mpo balukaka te kotuna mibali na bango makambo ya sekele ya bandeko mosusu. Ya solo, ezali mpenza lipamboli soki mwasi ya nkulutu alukaka te koyeba makambo ya sekele ya bandeko mosusu. Mwasi ya nkulutu moko alobaki: “Nasepelaka ndenge mobali na ngai ayebisaka ngai te makambo etali bandeko oyo akendaka kotala mpo na kolendisa bango to bandeko oyo bazali na mposa ya lisalisi na elimo, kutu ayebisaka ngai ata bankombo na bango te. Namonaka yango malamu ndenge mobali na ngai ayebisaka ngai makambo yango te, mpo namitungisa te na makambo oyo nakoki kosala ata eloko moko te. Yango esalaka ete nasololaka malamu na bandeko nyonso na lisangá. Mpe nakoki kotya motema ete ata soki nayebisi mobali na ngai ndenge nazali komiyoka to mokakatano moko akoyebisa yango moto mosusu te.” Na ntembe te, biso nyonso tolingaka koyebana lokola bato oyo babongi kotyelama motema. Bizaleli nini ekosalisa biso tózala bato ya ndenge wana? Tiká tótalela mitano na yango.

KOLISÁ BIZALELI OYO EKOSALISA YO OZALA MOTO OYO ABONGI KOTYELAMA MOTEMA

12. Limbolá mpo na nini bolingo ezali na ntina mpenza mpo na kosalisa biso tózala bato oyo babongi kotyelama motema?

12 Bolingo ezali na ntina mpenza mpo na kotyela basusu motema. Yesu alobaki ete ezali na mibeko mibale oyo eleki monene, elingi koloba, kolinga Yehova mpe kolinga bazalani na biso. (Mat. 22:37-39) Lokola tolingaka Yehova, yango wana tolingaka mpe komekola ndakisa na ye ya kozala bato oyo babongi kotyelama motema. Na ndakisa, kolinga bandeko na biso etindaka biso tóboya koyebisa basusu makambo oyo etali kaka bango. Tosengeli soki moke te koloba likambo oyo ekozokisa bango, ekoyokisa bango nsɔni to ekopesa bango mpasi na motema.​—Yoa. 15:12.

13. Ndenge nini komikitisa esalisaka biso tózala bato oyo babongi kotyelama motema?

13 Komikitisa ekosalisa biso tózala bato oyo babongi kotyelama motema. Mokristo oyo azali na komikitisa alukaka te kozala kaka moto ya liboso mpo na koyebisa basusu likambo moko. (Flp. 2:3) Alukaka mpe te kotinda bato mosusu bákanisa ete ayebi makambo mingi ya sekele oyo akoki koloba te. Komikitisa ekosalisa mpe biso tóboya koyebisa bato mingi makambo oyo biso moko tokanisi, oyo euti na Biblia te to oyo mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia elobeli te.

14. Ndenge nini bososoli esalisaka biso tózala bato oyo babongi kotyelama motema?

14 Bososoli ekosalisa mokristo ayeba kokesenisa “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mos. 3:7) Lisese moko elobaka boye: “Koloba ezali palata, kofanda nyɛɛ ezali wolo.” Na maloba mosusu, ezali na bantango mosusu ebongi kofanda nyɛɛ na esika ya koloba. Yango wana, Masese 11:12 epesi biso toli oyo: “Moto oyo azali na bososoli mingi afandaka nyɛɛ.” Tótalela ndakisa moko. Mbala mingi basɛngaka nkulutu moko oyo aumeli mingi na mosala yango asalisa masangá mosusu na mikakatano oyo bakutanaka na yango. Yoká makambo oyo nkulutu mosusu alobaki mpo na nkulutu oyo aumeli na mosala yango: “Azalaka ntango nyonso ekɛngɛ mpo aloba te likambo moko ya nkuku oyo etali masangá mosusu.” Lokola nkulutu yango azalaka mpenza na bososoli, yango esalaka ete bankulutu oyo asalaka na bango na lisangani moko ya bankulutu bápesa ye limemya. Batyaka motema ete akoyebisa bato mosusu te makambo na bango ya nkuku.

15. Pesá ndakisa oyo emonisi ete kozala sembo ekoki kosala ete basusu bátyela biso motema.

15 Bosembo ezali likambo mosusu oyo tosengeli na yango soki tolingi basusu bátyelaka biso motema. Tondimelaka moto oyo azali sembo mpo toyebi ete akoloba ntango nyonso solo. (Ef. 4:25; Ebr. 13:18) Na ndakisa, kanisá ete olingi kokóma moteyi ya malamu. Mpe osɛngi na ndeko moko ayoka yo na likebi ntango ozali kosala lisolo moko mpe na nsima ayebisa yo bisika oyo osengeli kobongisa. Okotyela nani motema ete akopesa yo toli ya malamu? Moto oyo akoyebisa yo makambo oyo okosepela koyoka to moto oyo akoyebisa yo na boboto nyonso makambo polele? Eyano ezali polele. Yango wana, Biblia elobi: “Mpamela ya polele ezali malamu koleka bolingo ya kobombana. Bampota oyo moto oyo azali kolinga azokisi yo ezali sembo.” (Mas. 27:5, 6) Atako koyoka yango ekoki kosala biso mpasi, toli ya polele oyo moninga apesi biso nde ekosalisa biso ntango nyonso.

16. Ndenge nini Masese 10:19 emonisi ntina ya kozala na komipekisa?

16 Komipekisa ezali na ntina mingi mpenza soki tolingi basusu bátyela biso motema. Ezaleli yango esalisaka biso tóbatela lolemo na biso ntango tolingi koloba likambo moko ya sekele oyo bayebisaki biso. (Tángá Masese 10:19.) Ekoki kozala mpasi tómonisa ezaleli ya komipekisa ntango tozali kosalela basite Internet ya kosolola na baninga. Soki tokebi te, tokoki kobimisa sekele moko na ebele mpenza ya bato kozanga kokana. Kaka ntango totindi mesaje moko, tokoyeba te ndenge basusu bakoki kosalela mesaje yango to ekobimisa likama nini na nsima. Komipekisa esalisaka mpe biso tófanda nyɛɛ ntango batɛmɛli balingi kokosa biso mpo tóloba makambo oyo ekoki kotya bandeko na biso na likama. Ekoki mbala mosusu kosalema ntango bakonzi ya polisi bazali kotunatuna biso mituna na ekólo oyo mosala na biso epekisami to endimami na mibeko te. Tokoki kosalela etinda ya ‘kotya eloko ya kokanga monɔkɔ’ na ntango yango to na mabaku mosusu. (Nz. 39:1) Tosengeli kozala bato oyo babongi kotyelama motema epai ya bato nyonso, ezala epai ya bato ya libota na biso, baninga na biso, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali, to moto mosusu nyonso. Yango wana, tosengeli kozala na komipekisa mpo tózala bato oyo babongi kotyelama motema.

17. Makambo nini tosengeli kosala mpo tókóma kotyelana motema na kati ya lisangá?

17 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova abendá biso na libota ya bandeko oyo balinganaka mpe oyo tokoki kotyela motema! Biso nyonso tosengeli kosala makasi tózala bato oyo bandeko basi mpe mibali bakoki kotyela motema. Ntango mokomoko na biso azali kosala makasi mpo na komonisa bolingo, komikitisa, bososoli, bosembo, mpe komipekisa, yango ekosala ete tókóma kotyelana motema na kati ya lisangá. Tosengeli kokoba kosala milende mpo tózala bato oyo babongi kotyelama motema. Tiká ete tókoba komekola Yehova, Nzambe na biso, mpe tókoba komonisa ete tozali bato oyo babongi kotyelama motema.

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

a Soki tolingi ete basusu bátyela biso motema, tosengeli libosoliboso komimonisa ete tozali bato oyo basusu bakoki kotyela motema. Na lisolo oyo, tokolobela mpo na nini kotyela basusu motema ezali na ntina mpe bizaleli nini ekosalisa biso mpo tózala bato oyo basusu bakoki kotyela motema.

b Soki toyebi ete moto moko na lisangá asali lisumu ya monene, tosengeli koyebisa ye akende koluka lisalisi epai ya bankulutu. Soki asali yango te, bosembo na biso epai ya Yehova mpe lisangá ya bokristo esengeli kotinda biso tóyebisa bankulutu likambo yango.

c ELILINGI: Nkulutu moko aboyi koyebisa libota na ye makambo ya sekele oyo auti kosolola na ndeko mosusu.