Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Banani bakosekwa awa na mabele, mpe bakozwa lisekwa ya ndenge nini?

Talá ndenge Biblia epesi biyano na mituna yango.

Misala 24:15 eyebisi biso ete “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” Bayengebene ezali bato oyo bazalaki kotosa Nzambe liboso bákufa, na yango bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi. (Mal. 3:16) Bato oyo bazangi boyengebene ezali bato oyo bakufaki kozanga kozwa mpenza libaku ya koyekola makambo etali Nzambe, na yango bankombo na bango ekomami te na buku ya bomoi.

Yoane 5:28, 29 elobeli mpe kaka bituluku yango mibale ndenge kaka Misala 24:15 elobeli yango. Yesu alobaki ete “baoyo basalaki makambo ya malamu” bakobima “mpo na lisekwa ya bomoi, mpe baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” Bayengebene basalaki makambo ya malamu liboso bákufa. Bakobima mpo na lisekwa ya bomoi mpamba te bankombo na bango esí ekomami mpe ezali kaka na buku ya bomoi. Kasi, tokoloba nini mpo na bato oyo bazangi boyengebene, oyo bazalaki kosala makambo ya mabe liboso ete bákufa? Bakosekwa mpo na lisekwa ya kosambisama. Bankombo na bango ekomami naino te na buku ya bomoi, mpe bakolekisa eleko ya kosambisama to ya kotalelama. Na ntango yango, bakozwa libaku ya koyekola makambo etali Yehova mpe kosala ete bankombo na bango ekomama na buku ya bomoi.

Emoniseli 20:12, 13 elobi ete bato nyonso oyo bakosekwa basengeli kotosa “makambo oyo ekomamá na barulo,” elingi koloba, mibeko ya sika oyo Nzambe akopesa biso na mokili ya sika. Yehova akoboma baoyo nyonso bakoboya kotosa mibeko yango.​—Yis. 65:20.

Danyele 12:2 esakolaki ete bato mosusu oyo balalá na kati ya liwa bakolamuka “mpo na bomoi oyo ekoumela seko mpe baoyo wana mpo na nsɔni mingi mpe koyinama seko.” Vɛrsɛ yango ezali kolobela komekama ya nsuka oyo ekokómela bato oyo bakosekwa, elingi koloba, bakozwa bomoi oyo ekoumela seko” to “koyinama seko.” Na yango, na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, mingi bakozwa bomoi ya seko mpe basusu bakobebisama mpo na libela.​—Em. 20:15; 21:3, 4.

Tótalela ndakisa moko. Tokoki kokokanisa likambo ya bituluku mibale ya bato oyo bakosekwa na oyo ya bapaya oyo balingi kofanda na mboka-mopaya. Bayengebene bazali lokola baoyo guvɛrnema epesi bango viza ya mosala to viza ya kofanda na mboka-mopaya mpo na libela mpe ndingisa ya kozwa bonsomi. Kasi, bato oyo bazangi boyengebene bazali lokola bapaya oyo bakoki kozwa viza ya kofanda na mboka-mopaya mpo na mwa ntango to viza ya bapaya. Bapaya yango basengeli komonisa ete babongi mpenza liboso bápesa bango ndingisa ya kokoba kofanda na ekólo yango mpo na libela. Ndenge moko mpe, bato oyo bazangi boyengebene oyo bakosekwa basengeli kotosa mibeko ya Yehova mpo bátángama bayengebene mpe báfanda na Paradiso mpo na libela. Bituluku yango mibale basengeli kotosa mibeko ya mboka mpo bákóma bana-mboka, kasi soki batosi te bakonzi ya Leta bakopesa bango ndingisa te ya kofanda na mboka yango to ya kokóma bana-mboka. Ekateli ya nsuka mpo na koyeba soki bakozala bana-mboka to te, ekotalela ndenge bakomitambwisa na ekólo yango ya sika. Ndenge moko mpe, ekateli ya nsuka mpo na bato oyo bakosekwa ekotalela bosembo mpe etamboli na bango na mokili ya sika.

Yehova azali kaka Nzambe ya bolingo te, kasi azali mpe Nzambe moko ya bosembo. (Mib. 32:4; Nz. 33:5) Akomonisa bolingo na ye ndenge akosekwisa bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene. Kasi alingi ete bango nyonso bátosa mibeko na ye na oyo etali malamu ná mabe. Kaka baoyo bakomonisa botosi mpe bakolinga mibeko na ye nde bakozwa libaku ya kofanda mpo na libela na mokili ya sika.