Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

Zalá na kondima ete ‘Liloba ya Nzambe ezali solo’

Zalá na kondima ete ‘Liloba ya Nzambe ezali solo’

MOKAPO YA MOBU 2023: “Liloba na yo mobimba ezali solo.”​—NZ. 119:160.

LOYEMBO 96 Buku ya Nzambe​—Eloko ya motuya mingi

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini bato mingi lelo oyo batyelaka Biblia motema te?

 LELO oyo, ezali mpasi mpo bato bátyela basusu motema. Bayebi te soki bakoki kotyela banani motema. Bamitunaka soki bato oyo bango bamemyaka, na ndakisa, bato ya politiki, bato ya siansi mpe bato ya mombongo, basalaka nyonso mpo na koluka matomba ya basusu. Longola yango, batosaka lisusu te bakonzi ya mangomba oyo bamibengaka bakristo. Yango wana, ntembe ezali te ete ezali mpasi mpo na bango bándimela Biblia, buku oyo bakonzi wana ya mangomba mpe basalelaka.

2. Na kotalela Nzembo 119:160, tosengeli kondima nini na motema moko?

2 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tondimaka na motema moko ete Yehova azali “Nzambe ya solo” mpe alingaka ntango nyonso tózala na bomoi oyo eleki malamu. (Nz. 31:5; Yis. 48:17) Toyebi ete tokoki kotya motema na makambo oyo totángaka na Biblia. Yango wana tondimaka ete “Liloba ya [Nzambe] mobimba ezali solo.” b (Tángá Nzembo 119:160.) Lisusu, tozali kondima maloba oyo moto moko ya mayele na makambo ya Biblia akomaki, alobaki boye: “Ezali ata na mbeba moko te na makambo oyo Nzambe alobá to ekozanga te kokokisama. Basaleli ya Nzambe bakoki kotya motema na makambo oyo alobi, mpamba te bandimelaka Nzambe oyo alobi makambo yango.”

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bákóma kotyela Liloba ya Nzambe motema ndenge biso totyelaka yango motema? Tiká tólobela bantina misato oyo etindaka biso tótyela Biblia motema. Tokolobela ndenge oyo nsango ya Biblia ebongwani te, ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama mpe nguya oyo Biblia ezali na yango ya kobongola bato.

NSANGO YA BIBLIA EBONGWANI TE

4. Mpo na nini bato mingi bakanisaka ete nsango ya Biblia ebongwani?

4 Yehova Nzambe asalelaki mibali ya sembo 40 mpo na kokoma mikanda ya Biblia. Kasi, ata maniskri moko te ya ebandeli ezali tii lelo oyo. c Oyo tozali na yango lelo oyo ezali bakopi. Yango ekoki kotinda bato mosusu bámituna soki makambo oyo totángaka na Biblia lelo oyo ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli. Osí omituná ndenge nini tokoki komindimisa ete nsango na yango ebongwani te?

Bato oyo bazwaki formasyo mpo na kosala bakopi ya Makomami ya Ebre basalaki milende mpenza mpo na komindimisa ete bakopi ya Liloba ya Nzambe ezalaki ya sikisiki (Talá paragrafe 5)

5. Makambo nini esɛngaki mpo na kosala bakopi ya Makomami ya Ebre? (Talá elilingi ya ezipeli.)

5 Mpo na kobatela nsango ya Biblia, Yehova ayebisaki basaleli na ye básala bakopi na yango. Ayebisaki bakonzi ya Yisraele ete bámisalela bakopi ya mibeko oyo ekomamaki, mpe aponaki Balevi mpo na koteya bato mibeko yango. (Mib. 17:18; 31:24-26; Neh. 8:7) Ntango Bayuda bazongaki uta na bokangami na Babilone, bato oyo bayebaki mpenza kosala bakopi bakómaki kosala bakopi ebele ya Makomami ya Ebre. (Ezr. 7:6) Mibali yango bazalaki ekɛngɛ. Kendekende, bato oyo basalaka bakopi bakómaki kotalela kaka maloba te kasi likomami mokomoko mpo na komindimisa ete makambo nyonso ekomami malamumalamu. Atako bongo, lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, bakopi mosusu ekomamaki na mwa mabunga ya mike. Kasi, bakopi mingi ya Makomami yango esalemaki, yango wana, na nsima mabunga mingi emonanaki. Na ndenge nini?

6. Ndenge nini mabunga oyo esalemaki na bakopi ya Biblia eyebanaki?

6 Bato mingi ya mayele lelo oyo bamoni mabunga oyo bato oyo basalaki bakopi ya Biblia basalaki. Tózwa ndakisa: Kanisá ete mibali 100 bayebisi bango bákoma kopi ya mokanda moko. Moko na bango asali mwa libunga moke na kopi oyo asali. Mpo na komona libunga yango, ekosɛnga mpe kotala bakopi nyonso ya bato mosusu. Ndenge moko mpe, soki bato ya mayele bakokanisi bamaniskri mingi ya Biblia, bakoki mbala mosusu komona makambo oyo moto moko oyo asalaki bakopi alongolaki to mabunga oyo asalaki.

7. Ndenge nini bato oyo basalaki bakopi ya Biblia bazalaki ekɛngɛ?

7 Bato oyo bazalaki kosala bakopi ya bamaniskri ya Biblia basalaki makasi mpo na kosala yango na bosikisiki mpenza. Tózwa ndakisa moko oyo endimisi likambo yango. Maniskri ya kala mpenza ya Makomami ya Ebre esilaki kokomama na mobimba na yango na mobu 1008 to 1009 T.B. Ezalaki kobengama Codex de Leningrad. Kasi, lelo oyo, bamaniskri mingi ya Biblia mpe biteni ya bamaniskri oyo bayei komona esalaki mbula soki 1000 koleka Codex de Leningrad. Moto akoki kokanisa ete nsima ya kosala mbala na mbala bakopi ya bamaniskri yango na boumeli ya mbula 1000, makomi ya Codex de Leningrad ekozala kaka na bokokani moke ná makomi ya bamaniskri ya kalakala. Kasi, ezali bongo te. Bato ya mayele na makambo ya Biblia oyo bakokanisaki bamaniskri ya kala ná bamaniskri ya lelo oyo, bamoni ete atako ezali na mwa bokeseni na maloba, kasi nsango nyonso ya Biblia ebongwani te.

8. Bokeseni nini ezali kati na bakopi ya Makomami ya Grɛki ya bokristo mpe bakopi ya babuku mosusu ya kala?

8 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki mpe bakopi ya Makomami ya Ebre. Na bokɛngi mpenza, basalaki bakopi 27 ya mikanda ya Makomami ya Grɛki, mpe bazalaki kosalela yango na makita na bango mpe na mosala ya kosakola. Nsima ya kokokanisa bamaniskri oyo etikalaki ya Makomami ya Grɛki ná misala oyo esalemaki na ntango yango, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi boye: “Ezali na bamaniskri mingi ya Makomami ya Grɛki oyo ezali tii lelo oyo koleka babuku mosusu.” Buku moko (Anatomy of the New Testament) elobi boye: “Tokoki kondima ete makambo oyo tozali kotánga na libongoli ya lelo [ya Makomami ya Grɛki] ezali komonisa kaka nsango oyo ekomamaki na ebandeli.”

9. Na kotalela Yisaya 40:8, likambo nini endimisi biso bosolo ya nsango ya Biblia?

9 Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bato mingi oyo basalaka bakopi basalaki mosala makasi ya kosala bakopi ya Biblia. Yango esali ete tózala na Biblia oyo ezali na nsango oyo ekomamaki na ebandeli oyo totángaka mpe toyekolaka lelo oyo. d Na ntembe te, toyebi ete Yehova nde asalaki ete Liloba na ye ezala tii lelo oyo mpe nsango na yango ebongwani te. (Tángá Yisaya 40:8.) Ya solo, bato mosusu bakoki koloba ete lokola nsango ya Biblia ebongwani te, yango emonisi te ete ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. Sikoyo, tiká tótalela mwa makambo oyo endimisi biso ete Biblia eutá epai ya Nzambe.

BISAKWELI YA BIBLIA EBONGI KOTYELAMA MOTEMA

Na lobɔkɔ ya mwasi: C. Sappa/DeAgostini/Getty Images; na lobɔkɔ ya mobali: Image © Homo Cosmicos/Shutterstock

Esakweli ya Biblia ekokisamaki na ntango ya kala mpe ezali kokokisama lelo oyo (Talá paragrafe 10-11) f

10. Pesá ndakisa ya esakweli moko oyo ekokisamá oyo emonisi bosolo ya 2 Petro 1:21. (Talá bililingi.)

10 Biblia ezali na bisakweli mingi oyo ekokisamá, bisakweli yango mosusu ekomamaki bankama ya bambula liboso ete ekokisama. Istware emonisi ete bisakweli yango ekokisamaki. Yango ekamwisaka biso te mpo bisakweli yango nyonso euti nde epai ya Yehova. (Tángá 2 Petro 1:21.) Tólobela naino bisakweli oyo etali kokwea ya engumba ya Babilone ya kala. Na siɛklɛ ya 8 L.T.B., mosakoli Yisaya na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, akomaki ete na ntango moko boye engumba makasi ya Babilone ekokwea. Apesaki mpe nkombo ya moto oyo akokweisa engumba yango, Siruse, mpe mosakoli akomaki makambo ya mikemike oyo emonisi ndenge oyo Siruse akokweisa engumba yango. (Yis. 44:27–45:2) Yisaya asakolaki mpe ete Babilone ekobebisama mpe ekotikala mpamba. (Yis. 13:19, 20) Esalemaki mpe kaka bongo. Na mobu 539 L.T.B., Bamede ná Baperse bakweisaki Babilone, mpe esika oyo engumba yango ezalaki etikalá mpamba, moto moko te afandaka kuna.​—Talá video Biblia esakolaki ete Babilone ekokweisama na liteya 03, pwɛ 5 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! na aparɛyi na yo.

11. Lobelá ndenge esakweli ya Danyele 2:41-43 ezali kokokisama lelo oyo.

11 Bisakweli ya Biblia ekokisamaki kaka te na ntango ya kala, tozali komona ndenge bisakweli mosusu ezali kokokisama lelo oyo. Na ndakisa, tótalela kokokisama ya esakweli ya Danyele oyo etali Anglo-Américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya. (Tángá Danyele 2:41-43.) Esakweli yango emonisaki polele ndenge bokonzi ya Anglo-Américain ekozala “ndambo makasi” lokola ebende mpe “ndambo pɛtɛpɛtɛ” lokola mabele. Lelo oyo, tozali komona ndenge esakweli yango ezali kokokisama. Grande-Bretagne mpe États-Unis bamonisaki ete bazali makasi lokola ebende ntango bakokisaki mosala moko ya ntina na bolongi ya bitumba mibale ya mokili mobimba mpe bazali na mampinga monene ya basoda oyo bazali na nguya. Kasi, bato ya bikólo yango mibale bazali mpe kolɛmbisa nguya ya bokonzi ya Anglo-Américain na ndenge bazali kobunda mpo na ntomo ya bato nyonso, ntomo ya bato ya misala, to mpe mpo na kozwa lipanda. Moto moko ya mayele na makambo ya politiki alobi boye: “Lelo oyo, ezali na ekólo moko te oyo demokrasi ezali lisusu te mpe makambo na yango ya politiki ekabwani koleka États-Unis.” Mpe Grande-Bretagne, oyo ezali eteni mosusu ya bokonzi yango oyo eleki na nguya na mokili mobimba, ekabwanaki mwa bambula oyo euti koleka, mpamba te bana-mboka bazalaki komona ntina te ete ekólo na bango ezala na kati ya Union européenne. Bokabwani wana nyonso esali ete ezala mpasi mpo na bokonzi ya Anglo-Américain oyo eleki na nguya na mokili mobimba ezwa ekateli makasi ya kosala mosala na yango.

12. Esakweli ya Biblia endimisaka biso nini?

12 Bisakweli mingi ya Biblia oyo esí ekokisamá ekómisaka kondima na biso makasi ete bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ekokokisama. Tomiyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo abondelaki Yehova boye: “Molimo na ngai elɛmbi na mposa ya lobiko na yo, nazeli liloba na yo.” (Nz. 119:81) Na Biblia, na boboto nyonso, Yehova alaki kopesa biso “bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.” (Yir. 29:11) Elikya na biso mpo na mikolo ezali koya etongami te likoló ya milende oyo bato bazali kosala, kasi nde na bilaka ya Yehova. Tiká ete tókoba kokómisa kondima na biso makasi na Liloba ya Nzambe wana tozali koyekola na mozindo bisakweli ya Biblia.

BATOLI YA BIBLIA EZALI KOSALISA BAMILIO YA BATO

13. Na kotalela Nzembo 119:66, 138, likambo nini mosusu endimisi biso ete tokoki kotyela Biblia motema?

13 Likambo mosusu oyo endimisi biso ete tokoki kotyela Biblia motema ezali mpo esalisaka bato ntango batosaka toli na yango. (Tángá Nzembo 119:66, 138.) Na ndakisa, babalani oyo balingaki koboma libala na bango bazali na esengo mpe na bomoko lelo oyo, mpo batosaki batoli ya Biblia. Bana na bango bazali kosepela kozala na libota moko ya bakristo oyo batyelaka bango likebi mpe balingaka bango.​—Ef. 5:22-29.

14. Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ndenge oyo kosalela mateya ya Biblia ebongolaka bato.

14 Ata basali-mabe mpenza bazali kosala bambongwana minene na bomoi na bango ntango bazali kotosa batoli ya Biblia. Tótala ndenge batoli ya Biblia esalisaki moto moko ya bolɔkɔ na nkombo Jack. e Azalaki moto ya mobulu, ayebanaki lokola moto moko mabe ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye etumbu ya liwa. Kasi mokolo moko Jack ayanganaki na boyekoli moko ya Biblia. Boboto oyo bandeko oyo bazalaki kotambwisa boyekoli bamonisaki esimbaki mpenza motema ya Jack, mpe abandaki koyekola Biblia. Etamboli na ye mpe bomoto na ye ekómaki kobongwana mpe akómaki na boboto ntango akómaki kosalela mateya ya Biblia na bomoi na ye. Kendekende, Jack akokisaki masɛngami mpo na kozala mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe azwaki batisimo. Na molende mpenza, azalaki kosakwela baninga na ye ya bolɔkɔ nsango malamu etali Bokonzi ya Nzambe mpe asalisaki bato minei kati na bango báyeba solo. Ntango mokolo oyo esɛngaki báboma ye ekómaki, Jack asilaki kobongwana mpenza. Moko ya baavoka na ye alobaki boye: “Jack azali lisusu te moto oyo nayebaki eleki mbula 20. Mateya ya Batatoli ya Yehova ebongolaki bomoi na ye mpenza.” Atako babomaki Jack, ndakisa na ye emonisi polele ete tokoki kotyela Liloba ya Nzambe motema mpe nguya oyo ezali na yango ya kobongola bato mpo bákóma bato malamu.​—Yis. 11:6-9.

Batoli ya Biblia esalisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge bábongola bomoi na bango (Talá paragrafe 15) g

15. Na ndenge nini kosalela mateya ya Biblia ezali kokesenisa basaleli ya Yehova ná bato mosusu? (Talá elilingi.)

15 Basaleli ya Yehova bazali na bomoko mpo basalelaka mateya ya Biblia. (Yoa. 13:35; 1 Ko. 1:10) Kimya mpe bomoko na biso emonanaka polele mpo lelo oyo bato mingi bakabwani mpo na makambo etali politiki, loposo to bozwi. Komona bomoko oyo basaleli ya Yehova bazali na yango esimbaki mpenza motema ya elenge mobali moko na nkombo Jean. Akolaki na ekólo moko ya Afrika. Ntango bitumba ya bana-mboka ebandaki, akɔtaki na mosala ya soda kasi na nsima akimaki na ekólo mosusu. Kuna akutanaki na Batatoli ya Yehova. Jean alobi boye: “Nayekolaki ete bandimi ya lingomba ya solo basengeli te kokɔta na makambo ya politiki mpe bokabwani esengeli te kozala na kati na bango. Kutu, balinganaka nde.” Abakisi boye: “Nasalelaki bomoi na ngai mpo na kobundela ekólo. Kasi ntango nayekolaki Biblia, etindaki ngai napesa bomoi na ngai epai ya Yehova.” Jean abongwanaki mpenza. Na esika ya kobundisa bato oyo bazali na mimeseno oyo ekeseni na oyo ya ye, azali sikoyo kosakwela moto nyonso mateya ya Biblia oyo ezali kosangisa bato nyonso. Lokola batoli ya Biblia esalisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge, yango emonisi polele ete tokoki kotyela Liloba ya Nzambe motema.

KOBÁ KOTYELA LILOBA YA NZAMBE MOTEMA

16. Mpo na nini ebongi mpenza tókómisa kondima na biso makasi na Liloba ya Nzambe?

16 Makambo na mokili oyo ezali kobeba se kobeba, mpe yango ekoki kozala mpasi tótyela Liloba ya Nzambe motema. Bato bakoki kotinda biso tóboya kondima ete Biblia elobaka solo to tóboya kondima ete Yehova atyaki moombo ya sembo mpe ya mayele mpo atambwisa basaleli na ye lelo oyo. Kasi soki tomindimisi ete Liloba ya Yehova elobaka ntango nyonso solo, tokozala na makasi ya kotɛmɛla makambo wana oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso. Tokozala na mokano ya “kosalela malako ya [Yehova] mpo na ntango oyo etyami ndelo te, tii na nsuka.” (Nz. 119:112) Tokoyoka “nsɔni te” ya koyebisa basusu makambo etali mateya ya Biblia mpe kolendisa bango básalela batoli na yango na bomoi na bango. (Nz. 119:46) Lisusu, tokozala na likoki ya koyikela mikakatano ya makasi mpe minyoko mpiko “na motema molai ná esengo.”​—Kol. 1:11; Nz. 119:143, 157.

17. Mokapo ya mobu ekokundwela biso nini?

17 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asali ete tóyeba solo! Solo yango esalisaka biso tótɛlɛma ngwi, tózala na kondima mpe epesaka biso litambwisi oyo ebongi na mokili oyo ya mabe. Epesi biso elikya mpo na bomoi ya malamu na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Tiká ete mokapo ya mobu 2023 esalisa biso tóndima na motema moko ete Liloba nyonso ya Nzambe, elingi koloba, mobimba na yango ezali solo!​—Nz. 119:160.

LOYEMBO 94 Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

a Mokapo ya kolendisa oyo eponami mpo na mobu 2023 elobi: “Liloba na yo mobimba ezali solo.” (Nz. 119:160) Na ntembe te, ozali mpenza kondima maloba yango. Kasi bato mingi bandimaka te ete Biblia elobaka solo mpe epesaka batoli ya malamu. Na lisolo oyo, tokotalela bantina misato oyo tokoki kosalela mpo na kosalisa bato ya mitema sembo bándimela Biblia mpe batoli na yango.

b NDIMBOLA YA MALOBA: Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mobimba” oyo esalelami na vɛrsɛ oyo elimboli nyonso.

c Liloba “maniskri” emonisaka mokanda moko ya kala oyo ekomamá na mabɔkɔ.

d Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali ndenge oyo Biblia ebatelamaki, kende na jw.org mpe komá “Istware mpe Biblia” na esika bakomi “Luká.”

e Topesi bango bankombo mosusu.

f NDIMBOLA YA BILILINGI Lokasa 4: Nzambe asakolaki ete Babilone engumba ya nkembo na ntango ya kala ekobebisama.

g NDIMBOLA YA BILILINGI Lokasa 6: Elilingi oyo ezali komonisa elenge mobali moko oyo kala azalaki kobundisa bato mosusu, sikoyo abundaka lisusu te, mpo ayekoli na Biblia ndenge ya kozala na kimya elongo na basusu mpe azali kosalisa basusu básala mpe bongo.