Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 2

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika”

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika”

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—ROM. 12:2.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

NA MOKUSE a

1-2. Tosengeli kokoba kosala nini nsima ya kozwa batisimo? Limbolá.

 MBALA boni opɛtolaka ndako na yo? Mbala mosusu, liboso okɔta na ndako yango, osukolaki yango malamumalamu. Kasi, nini ekosalema na nsima soki ozali lisusu kopɛtola ndako yango te? Ndenge oyebi yango, ndako mobimba ekokóma salite makasi. Mpo ndako na yo ekoba kozala pɛto ntango nyonso, osengeli kopɛtola yango mbala na mbala.

2 Ndenge moko mpe, tosengeli kosala milende mpo na kokoba kobatela makanisi na biso mpe bomoto na biso. Ya solo, liboso ya kozwa batisimo tosalaki milende mpenza mpo na kosala bambongwana na bomoi na biso na mokano ya ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.’ (2 Ko. 7:1) Kasi, sikoyo tosengeli kotosa toli ya ntoma Paulo ya ‘kokoba kokómisama sika.’ (Ef. 4:23) Mpo na nini tosengeli kokoba komisembola? Mpo bopusi mabe ya mokili oyo ekoki kokɔtela biso nokinoki mpe kokómisa biso mbindo na miso ya Yehova. Mpo tókoba kosepelisa Yehova, tosengeli ntango nyonso kotalela makanisi na biso, bomoto na biso, mpe bamposa na biso.

KOBÁ ‘KOKÓMISA MAKANISI NA YO MAKANISI YA SIKA’

3. Na kotalela Baroma 12:2, ‘kokómisa makanisi na yo makanisi ya sika’ elimboli nini?

3 Tosengeli kosala nini mpo na kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika, elingi koloba, kobongola lolenge na biso ya kokanisa? (Tángá Baroma 12:2.) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kokómisa makanisi na yo makanisi ya sika” ekoki kolimbola “kobongisa lisusu makanisi na yo.” Kasi, yango elimboli te ete tosengeli kaka kosala mwa makambo ya malamu. Kasi, tosengeli nde kotalela bomoto na biso ya kati na mozindo, kosala bambongwana oyo esengeli mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu. Tosengeli kosala bongo kaka mbala moko te, kasi ntango nyonso.

Makambo oyo oponaka na oyo etali bakelasi mpe mosala emonisaka ete otyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso? (Talá paragrafe 4-5) c

4. Ndenge nini tokoki koboya kotika ete mokili oyo etambwisa makanisi na biso?

4 Ntango tokokóma bato ya kokoka, tokobanda ntango nyonso kosepelisa Yehova na makambo nyonso oyo tokokóma kosala. Yango wana, tosengeli kozwa ekateli ya kosala makasi mpo na kosepelisa Yehova. Yebá ete na Baroma 12:2, ntoma Paulo alobi ete tosengeli kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika mpo na kososola mokano ya Nzambe. Na esika ya kotika ete makanisi ya mokili oyo etambwisa biso, tosengeli libosoliboso komitalela mpo na koyeba soki tomityelaka mikano to tozwaka bikateli na kolanda makanisi ya Nzambe to ya mokili oyo.

5. Na kotalela elilingi, ndenge nini tokoki kotalela makanisi na biso na likambo etali koya ya mokolo ya Yehova?

5 Tózwa ndakisa moko. Yehova alingi ete ‘tóbatelaka na makanisi na biso kozala ya mokolo na ye.’ (2 Pe. 3:12) Omituna boye: ‘Lolenge ya bomoi na ngai emonisaka ete nayebi ete tokómi mpenza na nsuka ya mokili oyo? Mikano oyo namityeli na oyo etali bakelasi mpe mosala, emonisaka ete kosalela Yehova ezali eloko oyo eleki ntina na bomoi na ngai? Nandimaka ete Yehova akokokisa bamposa na ngai mpe ya libota na ngai, to namitungisaka ntango nyonso mpo na biloko ya mosuni?’ Yehova asepelaka ntango amonaka biso tozali kobunda mpo na kosala mokano na ye.​—Mat. 6:25-27, 33; Flp. 4:12, 13.

6. Tosengeli kokoba kosala nini?

6 Tosengeli kotalela makanisi na biso mbala na mbala mpe na nsima kosala bambongwana oyo esengeli. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Ko. 13:5) Kozala “na kati ya kondima” esuki kaka te na koyanganaka na makita mpe kosakolaka mbala na mbala. Esangisi mpe makanisi na biso, makambo oyo tolingaka mpe makambo oyo etindaka biso tósala likambo boye to boye. Na yango, mpo tókómisa makanisi na biso makanisi ya sika, tosengeli kotángaka Biblia, koyekola kokanisa ndenge Yehova Nzambe akanisaka, mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa ye.​—1 Ko. 2:14-16.

‘LATÁ BOMOTO YA SIKA’

7. Na kotalela Baefese 4:31, 32, likambo nini mosusu tosengeli kosala, mpe mpo na nini ekoki kozala mokakatano?

7 Tángá Baefese 4:31, 32. Longola kosembola lolenge na biso ya kokanisa, tosengeli mpe “kolata bomoto ya sika.” (Ef. 4:24) Yango esɛngaka kosala milende mpenza. Tosengeli kosala makasi mpo na kolongola bizaleli ya mabe, na ndakisa, makambo ya bololo oyo eyokisaka mpasi, nkanda, mpe nkɛlɛ. Mpo na nini ekoki kozala mokakatano? Mpamba te, ekoki kozala mpasi tóbongola bizaleli na biso mosusu ya mabe oyo epiká misisa. Na ndakisa, Biblia elobi ete bato mosusu ‘balingá kosilika’ mpe ‘balingá nkɛlɛ.’ (Mas. 29:22) Moto oyo azali na bizaleli yango ya mabe asengeli kokoba kosala bambongwana, ata nsima ya kozwa batisimo, ndenge lisolo ya ndeko moko emonisi yango na paragrafe oyo elandi.

8-9. Ndenge nini lisolo ya Stephen emonisi ntina oyo tosengeli kokoba kolongola bomoto ya kala?

8 Ndeko mobali moko na nkombo Stephen azalaki na mokakatano ya koyeba kopekisa nkanda na ye. Alobi boye: “Ata nsima ya kozwa batisimo, nasengelaki kaka kokoba kosala makasi mpo na kopekisa nkanda na ngai. Na ndakisa, mokolo moko ntango tozalaki na mosala ya kosakola ndako na ndako, nalandaki moyibi moko oyo ayibaki radio ya motuka na ngai. Ntango nakómaki pene na ye, moyibi yango abwakaki radio yango mpe akimaki. Ntango nabɛtelaki bato mosusu ndenge oyo nazwaki radio na ngai, nkulutu moko oyo azalaki na etuluku ya bato yango atunaki ngai boye: ‘Stephen, olingaki kosala moyibi wana nini soki okangaka ye?’ Motuna yango etindaki ngai nakanisa na mozindo mpe esalisaki ngai nakoba kosala makasi mpo nazala moto oyo atyaka kimya.” b

9 Lisolo ya Stephen emonisi biso ete tokoki komonisa ezaleli moko ya mabe kozanga ete tókana, ata ntango tokanisaki ete tosí tolongolá yango. Soki yango ekómeli yo, kolɛmba nzoto te mpe kokanisa te ete obongi te kozala mokristo. Ata ntoma Paulo andimaki likambo yango, ntango alobaki: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Rom. 7:21-23) Kaka ndenge ndako na biso ekómaka lisusu salite, lokola bakristo nyonso bazali bato ya kozanga kokoka, basalaka makasi mpo na kobundisa bizaleli mabe oyo ekoki kozongela bango. Tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kotikala pɛto. Ndenge nini tokoki kosala yango?

10. Na kotalela 1 Yoane 5:14, 15, ndenge nini tokoki kobundisa bizaleli ya mabe?

10 Bondelá Yehova mpo na ezaleli moko ya mabe oyo ozali kosala makasi olongola yango, mpe zalá na kondima ete akoyoka yo mpe akosalisa yo. (Tángá 1 Yoane 5:14, 15.) Atako Yehova akolongola ezaleli yango te na ndenge ya likamwisi, akoki kopesa yo makasi ya kolongola yango. (1 Pe. 5:10) Na yango, salá na boyokani na mabondeli na yo mpe boyá kokanisa makambo oyo ekoki kosala ete ozongela bomoto ya kala. Na ndakisa, zalá ekɛngɛ ntango ozali kotala bafilme, baemisyo ya televizyo to ntango ozali kotánga masolo na buku oyo ezali kolendisa bizaleli oyo ozali kosala makasi olongola yango. Longola yango, kotya te makanisi na yo na bamposa ya mabe.​—Flp. 4:8; Kol. 3:2.

11. Makambo nini tosengeli kosala mpo tólata bomoto ya sika?

11 Atako olongoli bomoto ya kala, ezali na ntina ete olata bomoto ya sika. Ndenge nini okoki kosala yango? Zalá na mokano ya komekola Yehova ntango ozali koyekola bizaleli na ye. (Ef. 5:1, 2) Na ndakisa, ntango otángi lisolo moko na Biblia oyo emonisi ndenge oyo Yehova alimbisaka, omituna boye: ‘Nalimbisaka mpe basusu?’ Ntango otángi lisolo moko oyo elobeli ndenge oyo Yehova amoniselaka babola motema mawa, omituna boye: ‘Nazalaka mpe na mayoki ya ndenge wana mpo na bandeko na ngai bakristo oyo bazali na bosɛnga, mpe nasalaka makasi ya kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango?’ Kobá kokómisa makanisi na yo makanisi ya sika na kolata bomoto ya sika mpe zalá na motema molai epai na yo moko ntango ozali kosala bongo.

12. Ndenge nini lisolo ya Stephen emonisi nguya oyo Biblia ezali na yango ya kobongola bato?

12 Stephen, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete azalaki na likoki ya kolata bomoto ya sika mokemoke. Alobi boye: “Kobanda nazwá batisimo, nakutaná na makambo oyo ekokaki kotinda ngai nasala mobulu. Soki batumoli ngai, nazalaki kosala makasi nalongwa kutu esika wana to kosala likambo mosusu mpo na kokitisa motema. Bato mingi, ata mpe mwasi na ngai bazalaki kopesa ngai longonya ndenge nazalaki kosala soki nakutani na makambo ya ndenge wana. Kutu, ngai moko nazalaki kokamwa! Soki nabongwaná bongo, ezali na makasi na ngai moko te. Yango wana, nandimaka mpenza ete ezali litatoli oyo emonisi ete Biblia ezali na nguya ya kobongola bato.”

KOBÁ KOBUNDISA BAMPOSA YA MABE

13. Na kotalela Bagalatia 5:16, nini ekosalisa biso tókóma na makanisi ya pɛto?

13 Tángá Bagalatia 5:16. Yehova apesaka biso elimo santu na ye mpo na kosalisa biso tólonga etumba oyo tozali na yango ya kosala oyo ezali malamu. Ntango toyekolaka Liloba ya Nzambe, totikaka ete elimo ya Nzambe etambwisa biso. Tozwaka mpe elimo santu ntango tokendaka na makita na biso. Makita yango esalisaka biso tólekisa ntango elongo na bandeko na biso oyo bazali mpe kosala milende mpo na kosala oyo ezali malamu mpe yango elendisaka biso mpenza. (Ebr. 10:24, 25; 13:7) Lisusu, ntango tobondelaka Yehova na motema mobimba mpe tosɛngaka ye asalisa biso mpo na bolɛmbu na biso, apesaka biso elimo santu na ye mpo na kopesa biso makasi mpo tókoba kobunda. Atako mbala mosusu makambo wana nyonso ekolimwisa te bamposa ya mabe, ekosalisa biso tósala te makambo na kolanda bamposa yango. Ndenge Bagalatia 5:16 elobi yango, baoyo bazali kotambola na elimo ‘bakokokisa ata mposa moko te ya nzoto.’

14. Mpo na nini ezali na ntina ete tókoba kozala na makanisi ya pɛto?

14 Ntango kaka tosali programɛ moko ya malamu mpo na makambo ya elimo, ezali na ntina mingi ete tóbatela programɛ yango mpe tókoba kokolisa bamposa ya malamu. Mpo na nini? Mpamba te, moko ya banguna na biso alalaka mpɔngi te. Monguna yango ezali mposa ya kosala mabe. Ata nsima ya kozwa batisimo, tokoki komekama na makambo oyo tosengeli koboya, na ndakisa, masano ya mbongo, kolangwa masanga to pornografi. (Ef. 5:3, 4) Elenge mokristo moko alobi boye: “Moko ya mikakatano ya makasi mpenza oyo nazalaki kobunda na yango ezali mposa na ngai ya kolula mibali lokola ngai. Nazalaki kokanisa ete mposa yango ekoleka na yango, kasi mposa yango eyelaka ngai kaka.” Nini ekoki kosalisa yo soki bamposa ya mabe ekómi makasi?

Soki bamposa ya mabe eyeli yo, kokanisa te ete elikya ezali te na likambo na yo; ekómelaki mpe basusu mpe balongaki yango (Talá paragrafe 15-16)

15. Na kotalela elilingi, mpo na nini koyeba ete bamposa ya mabe ekómelaka “bato nyonso” ezali kolendisa?

15 Ntango ozali kobundisa mposa moko ya mabe oyo epiki misisa makasi mpenza, yebá ete ozali yo moko te. Biblia elobi ete: “Komekama moko te ekómeli bino oyo ekómelaka bato nyonso te.” (1 Ko. 10:13a) Libongoli mosusu ya Biblia ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Komekama nyonso oyo eyelaka bino ezali kaka lokola komekama oyo eyelaka bato nyonso.” Maloba yango ekomamaki mpo na bakristo oyo bazalaki kofanda na Korinti. Mingi na bango bazalaki bato ya pite, mibali oyo balalaka na mibali, basi oyo balalaka na basi mpe balangwi-masanga. (1 Ko. 6:9-11) Okanisi ete nsima ya kozwa batisimo bazalaki te na bamposa ya mabe oyo basengelaki kobundisa? Ezali bongo te. Bazalaki bango nyonso bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kasi bazalaki kaka bato ya kozanga kokoka. Na ntembe te, bazalaki ntango nyonso kobundisa bamposa ya mabe. Yango esengeli kolendisa biso. Mpo nini? Mpo yango emonisi ete ezala lolenge nini ya mposa mabe oyo ozali kobunda na yango, yebá ete moto mosusu abundisaki yango. Na yango, okoki kotikala ‘makasi na kondima, mpe koyeba ete bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na yo na mokili.’​—1 Pe. 5:9.

16. Likanisi nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?

16 Boyá kokanisa ete ezali na moto moko te oyo akoki koyeba mokakatano oyo ozali na yango. Kokanisa bongo ekoki kotinda yo omona ete elikya ezali te na likambo na yo mpe ozali na makasi te ya kolonga kobundisa bamposa ya mabe. Biblia elobi bongo te. Kasi elobi nde boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Ko. 10:13b) Na yango, ata ntango bamposa ya mabe ezali makasi, tokoki kotikala sembo epai ya Yehova. Na lisalisi ya Yehova, tokoki koboya kosala likambo ya mabe.

17. Atako tokoki te kopekisa bamposa ya mabe eyela biso, tosengeli kosala nini?

17 Ntango nyonso kobosanaka likambo oyo te: Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, bamposa ya mabe ekoki koyela biso. Kasi ntango yango eyeli biso, tóbengana yango mbala moko, kaka ndenge Yozefe akimaki nokinoki ntango mwasi ya Potifare alukaki kosangisa na ye nzoto. (Eba. 39:12) Osengeli te kokokisa bamposa ya mabe!

KOBÁ KOSALA MILENDE

18-19. Mituna nini tokoki komituna ntango tozali kosala makasi mpo na kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika?

18 Mpo tókómisa makanisi na biso makanisi ya sika, tosengeli kokoba komindimisa ete makanisi na biso mpe makambo oyo tosalaka esepelisaka Yehova. Mpo na yango, tosengeli komitalela mbala na mbala mpe komituna boye: ‘Makambo oyo nasalaka emonisaka mpenza ete nayebi malamu ete tokómi mpenza na ntango ya nsuka? Nasalaka milende ya kolata bomoto ya sika? Natikaka elimo ya Yehova etambwisa bomoi na ngai mpo naboya kokokisa bamposa ya nzoto?’

19 Ntango ozali komitalela, komizela te ete okóma moto ya kokoka, kasi sepelá na milende oyo ozali kosala. Soki omoni ete ezali na likambo moko oyo okoki kobongisa, kolɛmba nzoto te. Kasi, landá nde toli oyo ezali na Bafilipi 3:16, oyo elobi: “Ezala tokei liboso ndenge nini, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.” Ntango osali bongo, zalá na kondima ete Yehova akopambola milende na yo ya kokoba kokómisa makanisi na yo makanisi ya sika.

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

a Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo ete bátika te ete bopusi mabe ya mokili oyo etambwisa makanisi na bango. Ezali mpe toli moko malamu mpo na biso lelo oyo. Tosengeli komindimisa ete ezala ndenge nini tótika te bopusi mabe ya mokili oyo etambwisa biso. Mpo tósala yango, tosengeli kosembola lolenge na biso ya kokanisa ntango nyonso oyo tosali likambo moko oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo tokoki kosala yango.

b Talá lisolo “Bomoi na ngai ezalaki kobeba se kobeba” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2015.

c NDIMBOLA YA BILILINGI Lokasa 9: Ndeko mobali moko ya elenge azali kokanisa na mozindo soki akoki kosala bakelasi ya milaimilai to kosala mosala ya ntango nyonso.