Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 3

Yehova azali kosalisa yo mpo olonga

Yehova azali kosalisa yo mpo olonga

“Yehova azalaki elongo na Yozefe . . . , likambo nyonso oyo azalaki kosala Yehova azalaki kolongisa yango na lobɔkɔ na ye.”​—EBA. 39:2, 3.

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

NA MOKUSE a

1-2. (a) Mpo na nini tokamwaka te ntango tozali komekama? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 LOKOLA tozali basaleli ya Yehova, tokamwaka te ntango tozali komekama. Toyebi yango, mpo Biblia elobi ete “tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” (Mis. 14:22) Toyebi mpe ete mikakatano yango mosusu ekosila nyonso te tii ntango tokozala na bomoi na mokili ya sika ya Nzambe, epai “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Em. 21:4.

2 Yehova abatelaka biso te na komekama. Kasi, asalisaka biso tóyikela yango mpiko. Kobosana te makambo oyo ntoma Paulo alobaki na bakristo oyo bazalaki kofanda na Roma. Alobelaki libosoliboso komekama ndenge na ndenge oyo ye ná bandeko na ye bakutanaki na yango. Yango wana, akomaki boye: “Tozali mpenza kolonga na lisalisi ya moto oyo alingaki biso.” (Rom. 8:35-37) Yango emonisi ete Yehova akoki kosalisa biso tólonga ata ntango tozali komekama. Tiká tótala ndenge Yehova asalisaki Yozefe alonga mpe ndenge akoki kosalisa yo.

NTANGO MAKAMBO EBONGWANI NA MBALAKAKA

3. Mbongwana nini esalemaki na bomoi ya Yozefe?

3 Yakobo amonisaki polele ete azalaki kolinga mwana na ye Yozefe mingi. (Eba. 37:3, 4) Yango wana, bana ya Yakobo ya mikóló bakómaki koyokela ndeko na bango zuwa. Ntango libaku emonanaki mpo na bango, batɛkaki Yozefe epai ya etuluku moko ya Bamidiane oyo basalaka mombongo. Bato yango oyo basalaka mombongo bamemaki Yozefe na ntaka ya bankama ya bakilomɛtrɛ na Ezipito, epai batɛkaki ye lisusu, na mbala oyo epai ya Potifare, mosali ya Farao, kapita ya basoda oyo bakɛngɛlaka ye. Bomoi ya Yozefe ebongwaki nokinoki, moto oyo tata na ye azalaki kolinga mingi, akómaki moombo mpamba na Ezipito!​—Eba. 39:1.

4. Na ndenge nini tokoki kokutana na komekama lokola oyo Yozefe akutanaki na yango?

4 Biblia elobi ete ‘makambo oyo ekanami te ekwelaka bato nyonso.’ (Mos. 9:11) Na bantango mosusu, tokutanaka na komekama oyo “ekómelaka bato nyonso,” elingi koloba, komekama oyo bato nyonso bakutanaka na yango. (1 Ko. 10:13) To tokoki konyokwama kaka mpo tozali bayekoli ya Yesu. Na ndakisa, bakoki kotyola biso, kotɛmɛla biso to ata mpe konyokola biso mpo na kondima na biso. (2 Tim. 3:12) Ezala komekama nini ozali kokutana na yango, Yehova akoki kosala ete olonga yango. Ndenge nini asalaki yango mpo na Yozefe?

Yehova asalisaki Yozefe alonga ata ntango batɛkaki ye lokola moombo epai ya Potifare na Ezipito (Talá paragrafe 5)

5. Na kotalela Ebandeli 39:2-6, ndenge Yozefe azalaki kolonga etindaki Potifare amona nini?

5 Tángá Ebandeli 39:2-6. Potifare amonaki ete Yozefe azalaki elenge moko ya makoki mpe oyo alingá mosala. Ayebaki mpe ntina oyo esalaki ete azala bongo. Potifare amonaki ete “likambo nyonso oyo [Yozefe] azalaki kosala Yehova azalaki kolongisa yango na lobɔkɔ na ye.” b Nsukansuka, Moezipito yango akómisaki Yozefe kapita na ndako na ye. Atyaki mpe biloko nyonso ya ndako na ye na mabɔkɔ ya Yozefe. Matomba nini emonanaki? Potifare apambwamaki mingi.

6. Ndenge nini Yozefe akokaki komiyoka mpo na likambo oyo ekómelaki ye?

6 Meká kokanisa ndenge Yozefe azalaki komiyoka. Likambo nini azalaki na yango mposa koleka biloko nyonso? Ezalaki ndenge Potifare atyelaki ye likebi mpe apesaki ye mbano? Oyo eleki ntina, Yozefe alingaki ete azala na bonsomi mpo azala na likoki ya kozonga epai ya tata na ye. Longola nyonso wana, atako mikumba nyonso oyo azalaki na yango na ndako ya Potifare, Yozefe azalaki kaka moombo oyo azalaki kosalela nkolo na ye oyo azalaki mopakano. Yehova asalaki te ete Potifare apesa Yozefe bonsomi. Lisusu, likambo ya Yozefe ekómaki kobeba se kobeba.

SOKI MAKAMBO YA BOMOI EZALI KOBEBA SE KOBEBA

7. Na kotalela Ebandeli 39:14, 15, ndenge nini likambo ya Yozefe ekómaki kobeba se kobeba?

7 Ndenge emonisami na Ebandeli mokapo ya 39, mwasi ya Potifare azalaki kolula Yozefe mpe mbala na mbala azalaki koluka kolɛngola ye. Ntango nyonso, Yozefe azalaki koboya kosangisa na ye nzoto. Nsukansuka, mwasi yango asilikelaki Yozefe makasi tii akosaki ete Yozefe alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. (Tángá Ebandeli 39:14, 15.) Ntango Potifare ayokaki bongo, abwakaki Yozefe na bolɔkɔ, epai atikalaki kuna mwa bambula. (Eba. 39:19, 20) Bolɔkɔ yango ezalaki ndenge nini? Liloba ya Ebre oyo Yozefe asalelaki mpo na kolobela “bolɔkɔ” ekoki kolimbola “libulu,” ezali kopesa likanisi ete zingazinga na yango ezalaki molili mpe amonaki ete elikya mpo na ye ezalaki te. (Eba. 40:15) Longola yango, Biblia emonisi ete na ntango moko boye bakangaki makolo ya Yozefe na bikangeli mpe bakɔtisaki nkingo na ye na bibende. (Nz. 105:17, 18) Likambo ya Yozefe ekómaki kobeba se kobeba. Abandaki lokola moombo oyo abongi kotyelama motema tii akómaki moto ya bolɔkɔ mpamba.

8. Ata soki komekama ezali se kobakisama, tokoki komindimisa na likambo nini?

8 Esí ekómelá yo ete makambo ya bomoi na yo ekómaki kobeba se kobeba atako ozalaki kobondela na motema mobimba? Likambo ya bongo ekoki kosalema. Yehova abatelaka biso te na komekama na mokili oyo eyangelami na Satana. (1 Yoa. 5:19) Kasi, okoki komindimisa na likambo oyo: Yehova ayebi mpenza makambo oyo ozali kokutana na yango, mpe atyelaka yo likebi. (Mat. 10:29-31; 1 Pe. 5:6, 7) Longola yango, alaki boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Ebr. 13:5) Yehova akoki kosalisa yo oyika mpiko ata ntango omoni ete elikya ezali te mpo na likambo oyo ezali kokómela yo. Tiká tótala ndenge esalemaki mpo na Yozefe.

Yehova azalaki elongo na Yozefe ata ntango azalaki na bolɔkɔ mpe bapesaki ye mokumba ya kokɛngɛla bato nyonso ya bolɔkɔ (Talá paragrafe 9)

9. Na kotalela Ebandeli 39:21-23, nini emonisi ete Yehova azalaki elongo na Yozefe ntango azalaki na bolɔkɔ?

9 Tángá Ebandeli 39:21-23. Ata na ntango ya mpasi oyo Yozefe azalaki kolekisa na bolɔkɔ, Yehova asalisaki ye alonga. Ndenge nini asalisaki ye? Na nsima, kapita-mokonzi ya bolɔkɔ akómaki kotyela Yozefe motema mpe komemya ye, kaka ndenge Potifare asalaki liboso mpo na Yozefe. Nsukansuka, kapita-mokonzi yango ya bolɔkɔ apesaki bakangami mosusu na lobɔkɔ ya Yozefe. Kutu, Biblia elobi ete “kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ azalaki kotala eloko ata moko te oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye.” Banda ntango wana, Yozefe azalaki na likambo moko oyo asengelaki kokanisa, elingi koloba, azalaki na mosala ya kosala. Ezalaki mbongwana oyo akanisaki ata moke te! Ndenge nini ekoki kosalema ete moto ya bolɔkɔ oyo bafundaki ete alingaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya kapita ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi akóma na esika wana ya lokumu? Ezali kaka mpo na ntina moko mpamba. Ndenge Ebandeli 39:23 elobi yango, “Yehova azalaki elongo na Yozefe mpe oyo ye azalaki kosala, Yehova azalaki kolongisa yango.”

10. Limbolá ntina oyo Yozefe akokaki te komona ete azalaki kolonga na likambo nyonso.

10 Meká lisusu kokanisa ndenge Yozefe azalaki komiyoka. Nsima ya kokosela ye likambo mpe kotya ye na bolɔkɔ, okanisi ete Yozefe amonaki ete azalaki kolonga na likambo nyonso? Likambo nini Yozefe azalaki na yango mposa koleka biloko nyonso? Ezalaki ete andimama na miso ya kapita-mokonzi ya bolɔkɔ? Na ntembe te, Yozefe azalaki na mposa ya kobima na bolɔkɔ. Yango wana, asɛngaki moto moko ya bolɔkɔ oyo alingaki kobima na bolɔkɔ ayebisa Farao likambo na ye mpo abimisa ye na bolɔkɔ wana ya mpasi. (Eba. 40:14) Kasi, mobali yango ayebisaki Farao likambo yango mbala moko te. Yango wana, Yozefe atikalaki na bolɔkɔ yango mbula mibale lisusu. (Eba. 40:23; 41:1, 14) Nzokande, Yehova akobaki kosala ete Yozefe alonga. Ndenge nini asalaki yango?

11. (a) Likoki nini ya kokamwa Yehova apesaki Yozefe? (b) Mokumba nini azalaki na yango na kokokisama ya mokano ya Yehova?

11 Wana Yozefe azalaki na bolɔkɔ, Yehova alɔtisaki mokonzi ya Ezipito bandɔtɔ mibale oyo etungisaki ye. Farao azangaki elikya mpe alingaki koyeba soki bandɔtɔ yango ezalaki kolimbola nini. Ntango mokonzi yango ayokaki ete Yozefe azalaki na likoki ya kolimbola bandɔtɔ, atindaki bato bákende kozwa ye. Na lisalisi ya Yehova, Yozefe alimbolaki bandɔtɔ yango mpe akamwisaki Farao na toli ya ntina oyo apesaki ye. Komona ndenge Yehova azalaki elongo na elenge Yozefe, esalaki ete Farao apona ye azala kapita ya kokɛngɛla biloko nyonso ya Ezipito. (Eba. 41:38, 41-44) Na nsima, nzala moko monene ebimaki oyo ezalaki kaka na Ezipito te, kasi mpe na Kanana, mokili oyo libota ya Yozefe ezalaki kofanda. Na ntango wana, Yozefe azalaki na nguya ya kobatela libota na ye mpe kobatela molɔngɔ ya bankɔkɔ oyo esengelaki komema na Masiya.

12. Ndenge nini Yehova asalisaki Yozefe alonga?

12 Kanisá makambo ya kozanga kokana oyo ekómelaki Yozefe na bomoi. Nani asalaki ete Potifare atyela Yozefe likebi, moombo mpamba? Nani asalaki ete kapita-mokonzi ya bolɔkɔ andima Yozefe, moto ya bolɔkɔ mpamba? Nani alɔtisaki Farao bandɔtɔ oyo etungisaki ye mpe apesaki Yozefe likoki ya kolimbola yango? Nani asalaki ete Farao azwa ekateli ya kopona Yozefe lokola kapita ya kokɛngɛla biloko ya Ezipito? (Eba. 45:5) Emonani polele ete ezalaki Yehova nde asalaki ete makambo nyonso oyo Yozefe azalaki kosala elonga. Nsukansuka, Yehova abongolaki makambo ya bomoi ya Yozefe mpo akokisa mokano na ye atako bandeko na ye balingaki koboma ye.

NDENGE YEHOVA ASALISAKA YO OLONGA

13. Yehova abatelaka biso na likambo nyonso oyo ekómelaka biso? Limbolá.

13 Toyekoli nini na lisolo ya Yozefe? Yehova abatelaka biso na likambo nyonso oyo ekómelaka biso? Asalelaka likambo nyonso oyo ekómelaka biso na bomoi, mpo makambo nyonso ya mabe oyo esalemaka esalema mpo na mokano moko boye? Te, Biblia eteyaka bongo te. (Mos. 8:9; 9:11) Kasi, toyebi malamu likambo oyo: Ntango tokutanaka na komekama, Yehova ayebaka yango mpe ayokaka kolela na biso mpo na kosɛnga lisalisi. (Nz. 34:15; 55:22; Yis. 59:1) Oyo eleki nyonso, Yehova akoki kosalisa biso tóyikela bampasi mpiko. Ndenge nini asalaka yango?

14. Ndenge nini Yehova asalisaka biso na ntango ya mpasi?

14 Yehova asalisaka biso na ndenge abɔndisaka biso mpe alendisaka biso, mbala mingi na ntango oyo ebongi mpenza. (2 Ko. 1:3, 4) Yango nde ekómelaki Eziz, ndeko mobali moko na Turkmenistan oyo bakatelaki ye etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ mpo na kondima na ye. Alobi boye: “Na ntɔngɔ ya mokolo oyo nazalaki kosamba, ndeko mobali moko alakisaki ngai Yisaya 30:15, oyo elobi: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.’ Vɛrsɛ yango ezalaki ntango nyonso kosalisa ngai nafanda nyɛɛ mpe natyela Yehova motema na likambo nyonso. Komanyola na vɛrsɛ yango esalisaki ngai ntango nyonso oyo nazalaki na bolɔkɔ.” Okoki komikundwela na bomoi na yo ntango oyo Yehova asungaki yo na ndenge abɔndisaki yo mpe alendisaki yo kaka na ntango oyo ozalaki na yango mposa?

15-16. Makambo oyo ekómelaki ndeko Tori eteyi yo nini?

15 Mbala mingi, toyebaka te ndenge Yehova asalisaki biso tóyikela mikakatano na biso mpiko tii ntango ekosila. Ndeko mwasi moko na nkombo Tori, amonaki ete ezali solo. Mwana na ye ya mobali, Mason, abɛlaki maladi ya kanser na boumeli ya mbula motoba tii akufaki. Mpo na koloba solo, ndeko Tori azalaki na mawa makasi. Alobi boye: “Nakanisi te ete ekokaki kozala ntango oyo elekaki mpasi mpo na ngai lokola mama.” Abakisi boye: “Nandimi ete baboti mosusu bakondima likanisi oyo: komona ndenge mwana na yo azali konyokwama eleki ndenge yo moko ozali konyokwama.”

16 Atako likambo yango esalaki ete ndeko Tori azala na mawa mpenza ntango amonaki mwana na ye ya mobali azalaki konyokwama makasi, na nsima akanisaki ndenge Yehova asalisaki ye ayika mpiko. Alobi boye: “Ntango nakanisaka eleko wana ya mpasi, namonaka ndenge Yehova asalisaki ngai na ntango oyo mwana na ngai ya mobali azalaki kobɛla. Na ndakisa, bandeko basi mpe mibali bazalaki kosala mobembo molai mpenza mpo na koya kotala biso na lopitalo, ata ntango Mason azalaki kobɛla makasi mpenza mpe likoki bato bámona ye ezalaki te. Ntango nyonso ezalaki na ndeko moko na esika oyo bazelaka mpo na kokutana na monganga, elingi koloba, azalaki wana kozela mpo na kopesa lisungi. Longola yango, bandeko bazalaki kokokisa bamposa na biso ya mosuni. Ata na ntango wana ya mpasi mpenza, tozalaki ntango nyonso na biloko nyonso oyo tozalaki na yango mposa.” Yehova apesaki ndeko Tori biloko oyo asengelaki na yango mpo na koyika mpiko, asalaki mpe bongo mpo na Mason.​—Talá etanda “ Yehova apesaki biso biloko oyo tosengelaki na yango mpenza.”

KOBOSANA TE MAKAMBO NYONSO YEHOVA ASALÁ MPO NA KOSALISA YO

17-18. Na kotalela Nzembo 40:5, nini ekosalisa biso tóndima mpe tózala na botɔndi mpo na lisungi oyo Yehova apesaka biso na ntango ya mpasi?

17 Tángá Nzembo 40:5. Moto oyo amataka ngomba azalaka na mokano ya kokóma na nsɔngɛ na yango. Kasi, ezalaka na bisika mingi na nzela epai akoki kotɛlɛma mpe kosepela na biloko kitoko oyo azali komona. Ndenge moko mpe, mbala na mbala zwáká ntango ya kotɛlɛma mpe ya kokanisa ndenge Yehova azali kosala ete olonga ata ntango ozali koyikela mokakatano moko mpiko. Na nsuka ya mokolo nyonso, omitunaka boye: ‘Makambo nini emonisi ete nazwaki mapamboli ya Yehova lelo? Atako mokakatano ezali kosila te, ndenge nini Yehova azali kosalisa ngai nayika mpiko?’ Talá soki okoki komona ata likambo moko oyo Yehova asalaki mpo na kosalisa yo olonga.

18 Ya solo, okoki kobondela mpo mikakatano na yo esila. Ezali mabe te mpe ebongi mpenza kosala bongo. (Flp. 4:6) Kasi, tosengeli mpe koyeba mapamboli oyo tozali na yango sikoyo. Oyo eleki nyonso, Yehova alaki kopesa biso makasi mpe kosalisa biso tóyika mpiko. Yango wana, ntango nyonso zaláká na botɔndi mpo na ndenge Yehova azali kosunga yo. Na nsima, okomona ndenge Yehova azali kosalisa yo olonga ata na ntango ya mpasi, kaka ndenge asalisaki Yozefe.​—Eba. 41:51, 52.

LOYEMBO 32 Poná nde Yehova!

a Ntango tozali kokutana na komekama makasi, tokoki te komona ete tozali “kolonga.” Tokoki kokanisa ete liloba yango ekosalelama kaka ntango komekama na biso ekosila. Kasi, makambo oyo esalemaki na bomoi ya Yozefe ezali kopesa biso liteya moko ya ntina mingi, elingi koloba, Yehova akoki kosalisa biso tólonga ata ntango tozali komekama. Lisolo oyo ekolimbola ndenge oyo asalaka yango.

b Biblia elobeli bambongwana ya libosoliboso oyo esalemaki na bomoi ya Yozefe ntango azalaki moombo kaka na mwa bavɛrsɛ, kasi makambo yango esalemaki na boumeli ya bambula mingi.