Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba . . . mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te.”​—2 Ko. 5:14, 15.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

NA MOKUSE a

1-2. (a) Toyokaka ndenge nini ntango tokanisaka bomoi ya Yesu mpe mosala na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 NTANGO moto moko oyo tolingaka mingi akufi, tokobaka kokanisa ye mbala na mbala! Na ebandeli, tokoki koyoka mpasi mingi mpenza ntango tozali kokanisa mikolo ya nsuka liboso moto yango akufa, mingimingi soki moto yango abɛlaki makasi liboso akufa. Wana ntango ekómi koleka, tokómaka koyoka esengo lisusu ntango tokanisaka na makambo oyo moto yango ateyaki biso to likambo moko oyo asalaki to alobaki oyo elendisaki biso to esɛkisaki biso.

2 Ndenge moko mpe, toyokaka mawa mpenza ntango totángaka lisolo etali mpasi mpe liwa ya Yesu. Na eleko ya Ekaniseli, tozwaka ntango mpo na kokanisa na mozindo motuya ya mbeka ya lisiko ya Yesu. (1 Ko. 11:24, 25) Kasi, toyokaka esengo mingi ntango tokanisaka na makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki ntango azalaki awa na mabele. Tolendisamaka mpe ntango tokanisaka na makambo oyo azali kosala sikoyo mpe oyo akosala mpo na biso na mikolo ezali koya. Komanyola na makambo wana nyonso mpe na bolingo na ye ezali kotinda biso tómonisa botɔndi na lolenge mingi, yango nde tokolobela na lisolo oyo.

BOTƆNDI ETINDAKA BISO TÓLANDA YESU

3. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na lisiko?

3 Tozalaka na botɔndi ntango tokanisaka bomoi ya Yesu mpe liwa na ye. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu ateyaki bato mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa. Tosepelaka makasi na makambo oyo Biblia eteyaka na oyo etali lisiko mpe makambo ya malamu oyo etali biso. Tozalaka na botɔndi mingi mpo na lisiko mpamba te esali ete tókóma na boninga ya malamu elongo na Yehova mpe Yesu. Baoyo bamonisaka kondima epai ya Yesu bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe komona lisusu bato oyo bazalaki kolinga oyo bakufá. (Yoa. 5:28, 29; Rom. 6:23) Tosali eloko moko te mpo na kozwa mapamboli oyo nyonso mpe tozali na eloko moko te oyo tokoki kofuta Nzambe ná Kristo mpo na makambo nyonso oyo basalelá biso. (Rom. 5:8, 20, 21) Kasi tokoki komonisela bango kaka botɔndi mingi. Ndenge nini tokoki komonisa yango?

Ndenge nini komanyola na ndakisa ya Maria Magadalena elendisi yo omonisa botɔndi? (Talá paragrafe 4-5)

4. Na kotalela elilingi, ndenge nini Maria Magadalena amonisaki botɔndi mpo na makambo oyo Yesu asalelaki ye?

4 Tótalela ndakisa ya mwasi Moyuda moko na nkombo Maria Magadalena. Azalaki konyokwama makasi mpamba te bademo nsambo bazalaki kotungisa ye. Azalaki komiyoka ete moto moko te akoki kosalisa ye. Na yango, meká kokanisa botɔndi oyo azalaki na yango ntango Yesu abikisaki ye na bademo yango! Botɔndi na ye etindaki ye akóma moyekoli ya Yesu mpe asalela ntango, makasi mpe biloko na ye mpo na kosalisa Yesu na mosala na ye. (Luka 8:1-3) Atako Maria asepelaki makasi mpo na makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, ayebaki te makambo ya minene oyo Yesu akokaki kosalela ye na mikolo ezali koya. Apesaki bomoi na ye mpo na bato mingi, “mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye” akoka kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 3:16) Kasi, Maria amonisaki botɔndi na ye epai ya Yesu ntango atikalaki sembo. Ntango Yesu azalaki na nzete ya mpasi, Maria atɛlɛmaki pene wana, mpo azalaki kotyela Yesu likebi mpe kolendisa bato oyo bazalaki wana. (Yoa. 19:25) Nsima ya liwa ya Yesu, Maria mpe basi mosusu mibale bayaki na matiti ya nsolo kitoko na lilita mpo na kokunda Yesu. (Mrk. 16:1, 2) Yehova apesaki Maria mbano mpo na bosembo na ye. Azwaki libaku ya kokutana na Yesu ntango asekwaki mpe kosolola na ye; libaku oyo kaka bayekoli moke nde bazwaki yango.​—Yoa. 20:11-18.

5. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na makambo nyonso oyo Yehova ná Yesu basalelá biso?

5 Biso mpe tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na makambo nyonso oyo Yehova ná Yesu basalelá biso soki tozali kosalela ntango, makasi mpe biloko na biso ya kobikela mpo na matomba ya Bokonzi. Na ndakisa, tokoki kozala pene mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe ya kobatela bandako oyo tosalelaka mpo na losambo ya pɛto.

KOLINGA YEHOVA MPE YESU ETINDAKA BISO TÓLINGA BASUSU

6. Mpo na nini tokoki koloba ete lisiko ezali likabo mpo na mokomoko na biso?

6 Ntango tokanisaka ndenge oyo Yehova mpe Yesu balingaka biso, yango etindaka mpe biso tólinga bango. (1 Yoa. 4:10, 19) Tolingaka bango lisusu mingi ntango tokangaka ntina ete Yesu akufaki mpo na mokomoko na biso. Ntoma Paulo ayebaki likambo yango mpe amonisaki botɔndi na ye ntango akomelaki Bagalatia boye: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Gal. 2:20) Na nzela ya lisiko, okoki kopusana penepene na Yehova mpe kokóma moninga na ye. (Yoa. 6:44) Ozali koyoka esengo na motema na ndenge oyebi ete Yehova amonaki eloko moko ya malamu epai na yo mpe afutaki lisiko moko ya motuya mingi koleka mpo otángama na kati ya baninga na ye, boye te? Yango esali ete okóma lisusu kolinga Yehova mpe Yesu mingi mpenza? Tosengeli komituna boye: ‘Bolingo yango ememisi ngai mokumba ya kosala nini?’

Kolinga Nzambe mpe Kristo elendisaka biso tósakwela bato ya ndenge nyonso nsango ya Bokonzi (Talá paragrafe 7)

7. Na kotalela 2 Bakorinti 5:14, 15; 6:1, 2 mpe ndenge elilingi emonisi yango, ndenge nini biso nyonso tokoki komonisa ete tolingaka Yehova mpe Yesu?

7 Kolinga Nzambe mpe Kristo etindaka biso tólinga basusu. (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15; 6:1, 2.) Lolenge moko ya komonisa bolingo na biso ezali ya kozala na molende na mosala ya kosakola. Tosololaka na moto nyonso oyo tokutani na ye. Tosololaka na moto nyonso kozanga kotalela loposo, ekólo, azala mozwi to mobola, atangá to atangá te, to mimeseno na ye. Na ndenge wana, tosalaka na boyokani na mokano ya Yehova oyo ezali “ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Tim. 2:4.

8. Ndenge nini tokoki komonisa ete tólingaka bandeko na biso?

8 Tomonisaka ete tolingaka Yehova mpe Yesu ntango tolingaka bandeko na biso bakristo. (1 Yoa. 4:21) Totyelaka bango likebi mpe tosalisaka bango ntango bazali na minyoko. Tolendisaka bango ntango moto oyo balingaka akufi, tokendaka kotala bango ntango bazali kobɛla, mpe tosalaka oyo tokoki mpo na kolendisa bango ntango balɛmbi nzoto. (2 Ko. 1:3-7; 1 Tes. 5:11, 14) Tokobaka kobondela mpo na bango, mpamba te toyebi ete “lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi.”​—Yak. 5:16.

9. Wapi lolenge mosusu ya komonisa ete tolingaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali?

9 Tomonisaka mpe ete tolingaka bandeko na biso ntango tosalaka makasi mpo na kobatela kimya elongo na bango. Tosalaka makasi mpo na komekola Yehova na likambo etali kolimbisa. Soki Yehova andimaki ete mwana na ye akufa mpo na masumu na biso, biso mpe tosengeli kolimbisa bandeko na biso ntango basaleli biso mabe. Tolingi te kozala lokola moombo mabe oyo Yesu alobelaki na ndakisa moko oyo apesaki. Atako nkolo ya moombo yango alimbisaki nyongo monene oyo azalaki na yango, moombo yango aboyaki kolimbisa nyongo ya moke oyo moninga na ye moombo azalaki na yango. (Mat. 18:23-35) Soki ozali na matata na ndeko moko na lisangá, okoki kosala makasi ya kotya kimya liboso ete mokolo ya Ekaniseli ekóma? (Mat. 5:23, 24) Kosala bongo ekomonisa ete olingaka Yehova ná Yesu mingi mpenza.

10-11. Na kotalela 1 Petro 5:1, 2, ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bálingaka Yehova ná Yesu?

10 Ndenge nini bankulutu bamonisaka ete balingaka Yehova ná Yesu? Bankulutu bamonisaka ete balingaka Yehova ná Yesu ntango bakokisaka bamposa ya bampate ya Yesu. (Tángá 1 Petro 5:1, 2.) Yesu amonisaki likambo yango polele epai ya ntoma Petro. Nsima ya kowangana Yesu mbala misato, Petro azalaki na mposa makasi ya komonisa ete alingaka Yesu. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu atunaki Petro boye: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Tokoki komindimisa ete Petro asalaki eloko nyonso oyo akokaki kosala mpo na komonisa ete alingaka Nkolo na ye. Yesu ayebisaki Petro boye: “Batelá bampate na ngai ya mike.” (Yoa. 21:15-17) Mpo na komonisa ete alingaka Yesu, Petro akokisaki na bolingo nyonso bamposa ya bampate ya Nkolo bomoi na ye mobimba.

11 Bankulutu, na eleko ya Ekaniseli, ndenge nini bokoki komonisa ete maloba ya Yesu epai Petro ezali na ntina mingi mpo na bino? Bokoki komonisa ete bolingaka Yehova ná Yesu mingi wana bozali komipesa ntango nyonso na mosala kobatela bampate mpe kosala milende mingi mpo na kosunga baoyo batiká kosalela Yehova bázongela ye. (Ezk. 34:11, 12) Bokoki mpe kotyela bayekoli ya Biblia mpe bato ya sika oyo bayei na Ekaniseli likebi, mpe bósala nyonso oyo bokoki mpo bámiyoka ete bayambi bango malamu.

KOLINGA KRISTO ETINDAKA BISO TÓYIKA MPIKO

12. Na kotalela Yoane 16:32, 33, mpo nini kokanisa na mozindo maloba oyo Yesu alobaki na butu liboso akufa epesaka biso mpiko?

12 Na butu liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Tángá Yoane 16:32, 33.) Nini esalisaki Yesu alonga banguna na ye na mpiko mpe atikala sembo tii na liwa? Atyelaki Yehova motema. Koyeba ete bayekoli na ye bakokutana na komekama ndenge moko na oyo ya ye, Yesu asɛngaki Yehova abatela bango. (Yoa. 17:11) Mpo na nini koyeba likambo yango ezali kopesa biso mpiko? Mpamba te, Yehova azali na nguya koleka banguna na biso nyonso. (1 Yoa. 4:4) Yehova amonaka makambo nyonso. Tomindimisi ete soki totyeli Yehova motema, tokolongola kobanga mpe tokomonisa mpiko.

13. Ndenge nini Yozefe ya Arimatea amonisaki mpiko?

13 Tótalela ndakisa ya Yozefe ya Arimatea. Azalaki moto oyo Bayuda bazalaki komemya mingi. Azalaki moko ya basangani ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda. Nzokande, na boumeli ya mosala ya Yesu awa na mabele, Yozefe amonisaki bizaleli ya malamu kasi azangaki mpiko. Yoane alobaki ete azalaki “moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda.” (Yoa. 19:38) Atako Yozefe azalaki kosepela na nsango ya Bokonzi, azalaki kolinga te basusu báyeba ete azalaki kondimela Yesu. Na ntembe te, azalaki kobanga ete bato bakomemya ye lisusu te soki bayebi ete azali moyekoli ya Yesu. Ezala bongo to te, Biblia eyebisi biso ete nsima ya liwa ya Yesu, nsukansuka Yozefe “azwaki mpiko ya kokende liboso ya Pilate mpe asɛngaki nzoto ya Yesu.” (Mrk. 15:42, 43) Yozefe akokaki lisusu te kobomba ete azalaki moyekoli ya Yesu.

14. Osengeli kosala nini soki ozali kobunda na ezaleli ya kobanga bato?

14 Ozali kobanga bato, ndenge moko na Yozefe? Na kelasi to na mosala, mbala mosusu okakatanaka mpo na komimonisa ete ozali Motatoli ya Yehova? Obangaka kokóma mosakoli to kozwa batisimo mpamba te obangaka ndenge oyo bato bakokanisa mpo na yo? Kotika te ete mayoki ya ndenge wana epekisa yo kosala makambo oyo oyebi ete ezali malamu. Bondelá Yehova na motema moko. Sɛngá ye apesa yo mpiko ya kosala mokano na ye. Ntango ozali komona ete Yehova azali koyanola na mabondeli na yo, okokóma makasi mpe na mpiko mingi.​—Yis. 41:10, 13.

ESENGO ETINDAKA BISO TÓSALELA YEHOVA KOZANGA KOTIKA

15. Na kotalela Luka 24:52, 53, ntango Yesu abimelaki bayekoli na ye, esengo na bango etindaki bango básala nini?

15 Bayekoli bazalaki na mawa mpenza ntango Yesu akufaki. Omitya na esika na bango. Bazalaki koyoka kaka mawa te mpo babungisaki moninga na bango ya motema kasi bamiyokaki mpe ete babungisaki elikya na bango. (Luka 24:17-21) Nzokande, ntango Yesu abimelaki bango, azwaki ntango ya kosalisa bango bákanga ntina ya mokumba oyo azali na yango na kokokisama ya bisakweli ya Biblia. Apesaki bango mpe mosala moko ya ntina mingi ya kosala. (Luka 24:26, 27, 45-48) Ntango Yesu azongaki na likoló nsima ya mikolo 40, bayekoli bazalaki lisusu na mawa te kasi bakómaki nde na esengo monene. Koyeba ete Nkolo na bango azalaki lisusu na bomoi mpe akosalisa bango bákokisa mokumba na bango ya sika epesaki bango esengo. Esengo na bango etindaki bango bákumisa Yehova kozanga kotika.​—Tángá Luka 24:52, 53; Mis. 5:42.

16. Ndenge nini tokoki komekola bayekoli ya Yesu?

16 Ndenge nini tokoki komekola bayekoli ya Yesu? Tokoki kozwa esengo na losambo ya Yehova kaka te na boumeli ya eleko ya Ekaniseli kasi na boumeli ya mbula mobimba. Yango esɛngi ete tótya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Na ndakisa, bandeko mingi babongolaka programɛ na bango ya mosala mpo na komipesa na mosala ya kosakola, koyangana na makita mpe kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso. Bandeko mosusu baboyaka kozwa biloko ya mosuni oyo bato mosusu bakanisaka ete ezali na ntina, mpo bámipesa mingi na lisangá to bákende epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Tosengeli koyika mpiko mpo na kokoba kosalela Yehova, alaki ete akopambola biso mingi soki totye matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.​—Mas. 10:22; Mat. 6:32, 33.

Na eleko ya Ekaniseli, zwá ntango ya komanyola na makambo oyo Yehova ná Yesu basalelá yo (Talá paragrafe 17)

17. Na kotalela elilingi, ozwi ekateli ya kosala nini na eleko ya Ekaniseli oyo?

17 Tozali kozela na motema moko koyangana na Ekaniseli oyo ekosalema na mokolo ya mibale mwa 04/04/2023. Nzokande, tozelaka kaka te mokolo yango mpo na komanyola na bomoi mpe liwa ya Yesu mpe bolingo oyo ye ná Yehova bamoniselá biso. Zwá matomba na mabaku nyonso oyo ekomonana na eleko ya Ekaniseli mpo na komanyola. Na ndakisa, zwá ntango ya kotánga mpe ya komanyola na makambo oyo ezali na eteni “Pɔsɔ ya nsuka liboso Yesu akufa awa na mabele” oyo ezali na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe. Ntango ozali kotánga makambo oyo elobeli bomoi ya Yesu, luká mikapo ya Biblia oyo ekoki kokómisa makasi botɔndi, bolingo, mpiko mpe esengo na yo. Na nsima, meká kokanisa na makambo ya sikisiki oyo okoki komonisa botɔndi na yo oyo euti na motema. Okoki komindimisa ete Yesu azwaka na motuya makambo nyonso oyo ozali kosala mpo na kokanisa ye na eleko ya Ekaniseli.​—Em. 2:19.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

a Na eleko ya Ekaniseli, tosengeli kokanisa na mozindo bomoi ya Yesu, liwa na ye mpe bolingo oyo ye ná Tata na ye bamoniselá biso. Kosala bongo etindaka biso tósala mwa eloko mpo na komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova mpe Yesu. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na lisiko mpe bolingo na biso mpo na Yehova ná Yesu. Tokolobela mpe makambo oyo ekoki kotinda biso tólinga bandeko na biso, tómonisa mpiko mpe tózala na esengo na mosala oyo tosalelaka Yehova.