Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 9

Zwá na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá yo

Zwá na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá yo

“Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.”​—MIS. 17:28.

LOYEMBO 141 Bomoi ezali likamwisi

NA MOKUSE a

1. Bomoi na biso ezali mpenza na motuya mpo na Yehova?

 KANISÁ ete moninga moko apesi yo liyemi moko ya kala ya ntalo mingi mpenza. Liyemi yango ezali na Iangi moko ya kitoko, mpe esalemi likoló ya karte moko ya kitoko mpenza. Atako liyemi yango ezali na mwa makambo mosusu oyo ezali mpenza malamu te, kasi ezali na motuya ya bamilio ya badolare. Na ntembe te, okosepela na liyemi yango mpe okosala makasi mpo na kobatela yango. Ndenge moko mpe, Yehova apesá biso likabo moko ya motuya mpenza, likabo ya bomoi. Kutu, ndenge Yehova apesá Mwana ye azala lisiko mpo na biso emonisi ete azwaka bomoi na biso na motuya mingi.​—Yoa. 3:16.

2. Na kotalela 2 Bakorinti 7:1, Yehova alingi tósala nini?

2 Yehova azali liziba ya bomoi. (Nz. 36:9) Ntoma Paulo mpe ayebaki likambo yango, yango wana alobaki ete: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali,” (Misala 17:25, 28) Yango wana tokoki koloba ete bomoi na biso ezali likabo ya Nzambe. Na bolingo na ye apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi. (Mis 14:15-17) Kasi Yehova abatelaka bomoi na biso te na ndenge ya likamwisi. Alingaka tósala nyonso oyo tokoki mpo tózala na nzoto kolɔngɔnɔ mpo tokoba kosalela ye. (Tángá 2 Bakorinti 7:1.) Mpo na nini tosengeli kobatela bomoi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

ZWÁ NA MOTUYA LIKABO YA BOMOI

3. Mpo na nini tosalaka makasi mpo tózala na nzoto kolɔngɔnɔ?

3 Tosalaka makasi mpo tózala na nzoto kolɔngɔnɔ mpo tólingaka kosalela Yehova na kotalela makoki na biso. (Mrk 12:30) Tolingaka kokaba “nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima,” yango wana toboyaka kosala makambo oyo ekoki kobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. (Rom. 12:1) Kasi ata soki tosali nini mpo na kobatela nzoto na biso, tóyeba ete nsukansuka tokobɛla kaka. Kasi tósalaka oyo tokoki mpo tólingaka komonisa Tata na biso ya likoló ete tosepelaka na likabo ya bomoi.

4. Ekateli nini Mokonzi Davidi azalaki na yango?

4 Mokonzi Davidi amonisaki ntina oyo azalaki kozwa na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesaki ye ntango akomaki ete: “Litomba nini ezali na makila na ngai awa nazali kokita na libulu? Putulu ekokumisa nde yo? Yango ekoyebisa nde bosolo na yo?” (Nzembo 30:9) Ekoki kozala ete Davidi akomaki maloba wana ntango etikalaki moke akufa. Kasi azalaki na ekateli ya kotikala na bomoi ntango molai mpo akoka kokumisa Yehova. Na ntembe te, biso nyonso tozali na ekateli wana.

5. Ata soki tokómi mibange to tozali kobɛla, tosengeli kosala?

5 Maladi mpe bobange ekoki kopekisa biso kosala makambo mingi oyo tozalaki kosala liboso. Yango ekoki kosala ete tóyoka nkanda mpe tókóma mawamawa. Kasi tosengeli kosala makasi mpo na kobatela nzoto na biso. Mpo na nini? Mpo ata soki tokómi mibange mpe tozali kobɛla, tokoki kaka kokumisa Yehova ndenge Mokonzi Davidi asalaki. Koyeba ete Nzambe azwaka biso na motuya ata soki tozali kobɛla to tokómi mibange, ekitisaka biso motema! (Mat. 10:29-31) Ata soki tokufi, akosekwisa biso. (Yobo 14:14, 15) Ntango tozali naino na bomoi, ezali mpenza na ntina tósala oyo tokoki mpo na kobatela bomoi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso.

BOYA MAKAMBO OYO EKOKI KOTYA BOMOI NA YO NA LIKAMA

6. Yehova alingi tósala nini na likambo etali kolya mpe komɛla?

6 Atako Biblia ezali te buku oyo elobelaka makambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto, to biloko oyo tosengeli kolya, kasi emonisaka ndenge Yehova atalelaka makambo yango. Na ndakisa, eyebisi biso ‘tólongola mpasi’ oyo ekoki kobebisa nzoto na biso. (Mos. 11:10) Na ndakisa, Biblia epekisi kolya na lokoso mpe komɛla masanga mingi. (Mas. 23:20) Yehova alingi ete tózala na komipekisa ntango tozali kozwa ekateli ya kolya to ya komɛla eloko moko boye mpe soki ekosɛnga tólya mingi to tómɛla moke.​—1 Ko. 6:12; 9:25.

7. Ndenge nini toli oyo ezali na Masese 2:11 esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso?

7 Tokoki kozwa bikateli oyo ekomonisa botɔndi na biso mpo na likabo ya bomoi oyo Yehova apesá biso, soki tozali kosalela makoki na biso ya kokanisa. (Nz. 119:99, 100; tángá Masese 2:11.) Na ndakisa, toponaka na mayele biloko oyo tosengeli kolya. Soki tosepelaka kolya eloko moko boye kasi toyebi ete eloko yango ekoki kopesa biso maladi, bososoli ekotinda biso tóboya yango. Tomonisaka mpe ete tozali na bososoli soki tozali kolala malamu, kosalaka ngalasisi mbala na mbala, mpe soki tozali kobatela nzoto na biso to ndako na biso pɛto.

OMIBATELÁ NA MAKAMA

8. Biblia elobi nini mpo na ndenge oyo Nzambe atalelaka likambo ya komibatela na makama?

8 Mobeko oyo Yehova apesaki na ekólo ya Yisraele, ezalaki mpe na malako oyo esengelaki kosalisa bango bámibatela na makama oyo ekokaki kobima na ndako to na mosala. (Kob. 21:28, 29; Mib. 22:8) Soki moto moko abomi moto mosusu kozanga ete akana yango, yango ezalaki kobimisa makama minene mpenza. (Mib. 19:4, 5) Mibeko esɛngaki ete soki moto moko asali mwana moke mabe kozanga ete akana yango, moto yango asengelaki kozwa etumbu. (Kob. 21:22, 23) Makomami emonisi polele ete Yehova alingaka tómibatela na makama.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tomemyaka bomoi na makambo oyo? (Talá paragrafe 9)

9. Bibongiseli nini tokoki kozwa mpo makama ebima te? (Talá mpe bililingi)

9 Tomonisaka ete tozwaka likabo ya bomoi na motuya ntango tozwaka bibongiseli mpo na komibatela na makama, ezala na ndako to na esika ya mosala. Na ndakisa, soki tolingi kobwaka biloko oyo ekoki kozokisa bato to kosala bango mabe, bisaleli mosusu to bakisi oyo ezalaka na pwazɔ, tosalaka yango na ndenge oyo ekoki komemela basusu likama te mpe tomindimisaka ete tobwaki yango esika oyo bana bakoki komona yango te. Ntango tozali kopelisa mɔtɔ, kotokisa mai to kosalela bisaleli mosusu, tosalaka makasi tózala wana mpo na kokɛngɛla yango. Toboyaka kokumba motuka ntango tozali komɛla nkisi moko oyo ekoki kobulunganisa makanisi na biso, ntango tomɛli masanga to tolalaki malamu te. Mpe toboyaka kosalela baaparɛyi ntango tozali kokumba.

NTANGO MAKAMA OYO EBIMAKA YANGO MOKO ESALEMI

10. Makambo nini tosengeli kosala liboso mpe ntango likama moko ebimi?

10 Na bantango mosusu, tokoki te kopekisa likama moko boye esalema. Na ndakisa, makama oyo ebimaka yango moko, bamaladi mabe to bitumba. Nzokande, soki makambo ya bongo esalemi, tokoki komibatela mpe kobatela bomoi na biso soki tozali kotosa mitindo oyo bakonzi bazali kopesa ya kolongwa na esika yango mpe malako mosusu. (Ro. 13:1, 5-7) Tokoki komibongisa mpo na makama mosusu liboso ebima. Na yango, tosengeli kotosa malako oyo bakonzi ya leta bazali kopesa mpo na komibatela. Na ndakisa, tokoki komona malamu tóbomba mwa mai, biloko oyo epɔlaka te, to mwa bankisi oyo tosengeli na yango nokinoki.

11. Makambo nini tosengeli kosala soki maladi moko mabe ezali kopalangana na esika oyo tofandi?

11 Tosengeli kosala nini soki maladi moko ya mabe ezali kopalangana na esika oyo tofandi? Tosengeli kotosa malako oyo bakonzi ya leta bazali kopesa, na ndakisa, kosukolaka mabɔkɔ, kozala mosika na bato, kolata maskɛ mpe kozala na esika ya biso moko soki tozwi maladi yango. Soki tozali kotosa malako yango, tokomonisa ete tozwaka na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá biso.

12. Ndenge nini Masese 14:15 ekoki kosalisa biso tópona bansango ya kotyela motema ntango likama moko ebimi?

12 Ntango makama ya mbalakaka ebimi, tokoki koyoka bansango ya lokuta epai ya baninga, bato ya kartye, na tv na basite Internet ya kosolola na baninga to mpe na banzela mosusu. Na esika ya kondima “bansango nyonso” oyo tozali koyoka, ekozala malamu toyokaka nde bansango oyo ebongi kotyelama motema oyo bakonzi ya leta mpe minganga bapesaka. (Tángá Masese 14:15.) Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe babiro ya filiale esalaka makasi mpo na kozwa bansango oyo ebongi liboso ya kopesa malako mpo na makita ya lisangá to mpo na mosala ya kosakola. (Ebr. 13:17) Soki tozali kolanda malako oyo bazali kopesa, tokomibatela biso moko mpe tokobatela basusu na makama. Tokobatela mpe lokumu ya ebongiseli na biso na esika oyo tofandi.​—1 Pe. 2:12.

OMIBONGISA MPO NA KOBOYA MAKILA

13. Ndenge nini tomonisaka ete tozwaka na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá biso ntango tokutani na likambo moko oyo esɛngi bázongisa biso makila?

13 Bato mingi bayebi ete Batatoli ya Yehova bandimaka ete makila ezali mosantu. Totosaka mobeko ya Yehova na likambo etali makila ndenge toboyaka bázongisa biso yango, ezala mpo na maladi moko ya mbalakaka to likama. (Mis 15:28, 29) Yango elingi koloba te ete tolingaka kokufa. Kutu, tozwaka na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá biso. Tolukaka lisalisi na minganga oyo bandimaka kopesa lisalisi ya malamu koleka, kozanga ete bázongisa moto makila.

14. Tokoki kosala nini mpo tózwaka ntango nyonso te lisalisi ya makasi ya monganga?

14 Soki tosaleli makambo tolobeli na lisolo oyo mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, mbala mosusu ekosɛnga te ete básala biso lipaso to tózwa lisalisi mosusu ya makasi ya minganga. Kozala na nzoto kolɔngɔnɔ ekosalisa biso tózala makasi ntango bazali kosala biso lipaso mpe nsima na yango. Soki tozali kolongola biloko oyo ebimisaka makama na ndako, na esika ya mosala, mpe tozali kotosa na likebi nyonso mibeko ya nzela, yango ekosalisa biso tókima makambo oyo ekosɛnga ete básala biso lipaso ya mbalakaka.

Lokola tozwaka na motuya likabo ya bomoi, tobongisaka karte Pas de sang mpe totambolaka na yango bisika nyonso (Talá paragrafe 15) d

15. (a) Mpo na nini kozala na karte Pas de sang oyo tobongisi malamu ezali na ntina? (Talá mpe elilingi.) (b) Ndenge emonisami na video, ndenge nini tokoki kozwa bikateli na likambo etali makila?

15 Lokola tozwaka na motuya likabo ya bomoi, tobongisaka karte Pas de sang mpe totambolaka na yango bisika nyonso. b Na nzela ya mokanda yango, tomonisaka bikateli na biso na oyo etali kozongisa makila mpe lisalisi mosusu ya minganga. Obongisi malamu karte na yo ya Pas de sang? Soki ozali na mposa ya kotondisa yango to mpe kobongisa yango lisusu, kozelisa te. Kokoma bikateli na biso na karte yango ekosalisa biso tózwa lisalisi ya monganga oyo ebongi kozanga koumela. Yango ekosalisa mpe minganga bápesaka biso lisalisi oyo ekomemela biso likama te. c

16. Okoki kosala nini soki ozali koyeba te ndenge ya kotondisa karte Pas de sang na yo?

16 Tozala bilenge to te, nzoto kolɔngɔnɔ to te, biso nyonso tokoki kobela mpe kokutana na makama. (Mos. 9:11) Na yango, ekozala mpenza likambo ya bwanya soki totondisi karte Pas de sang. Soki oyebi te ndenge ya kotondisa karte yango, sɛngá na bankulutu ya lisangá na bino básalisa yo. Basalaka makasi bámesana na ndenge ya kotondisa mokanda yango, kasi bakozwa bikateli te na oyo etali lisalisi ya monganga mpo na yo. Yango ezali mokumba na yo moko. (Gal. 6:4, 5) Bango bakoki kaka kosalisa yo oyeba malamu makambo oyo okopona mpe okoma malamu bikateli na yo.

KOZALA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

17. Ndenge nini tokomonisa ete tozali makambo makasimakasi te na likambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso?

17 Bikateli mingi oyo tozwaka na oyo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso mpe lisalisi ya monganga oyo tosengeli na yango, esimbami na lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia. (Mis 24:16; 1 Tim. 3:9) Ntango tozali kozwa bikateli mpe koyebisa yango bato mosusu, ekozala malamu tósalela etinda oyo ezali na mokanda ya Bafilipi 4:5: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” Soki tozali makambo makasimakasi te tokoboya komitungisa koleka ndelo mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso mpe tokotya basusu mbamba te mpo bándima makanisi na biso. Tolingaka mpe tomemyaka bandeko na biso ata soki bikateli na bango ekeseni na oyo ya biso.​—Ro. 14:10-12.

18. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na likabo ya bomoi?

18 Tomonisaka botɔndi na biso epai ya Yehova, liziba ya bomoi na ndenge tobatelaka bomoi na biso mpe topesaka ye oyo eleki malamu. (Em. 4:11) Sikoyo, tosengeli kobundana na bamaladi mpe makama mosusu na bomoi. Kasi yango ezali te bomoi oyo Mozalisi na biso akanaki mpo na biso. Mosika te akopesa biso bomoi ya seko oyo ezangi mpasi mpe liwa. (Em. 21:4) Liboso ntango yango ekoka, tosepelaka mpenza kozala na bomoi mpe kosalela Yehova, tata na biso ya likoló oyo atɔndi na bolingo!

LOYEMBO 140 Nazwi bomoi ya seko!

a Lisolo oyo ekosalisa biso tozwa na motuya mingi mpenza bomoi oyo Nzambe apesá biso. Tokomona makambo oyo tokoki kosala mpo na kobatela nzoto mpe bomoi na biso ntango likama moko boye esalemi mpe ndenge oyo tokoki kokima yango. Tokolobela mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo tómibongisa mpo na kozwa lisalisi ya monganga.

b Mokanda yango ebengamaka mpe DPA.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya elenge azali kotondisa karte Pas de sang mpe azwi bibongiseli atambolaka na yango bisika nyonso.