Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 12

Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye

Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye

“Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.”​—ROM. 1:20.

LOYEMBO 6 Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe

NA MOKUSE a

1. Wapi moko ya makambo oyo esalisaki Yobo ayeba Yehova malamu?

 NA MASOLO nyonso oyo Yobo asololaki na bato ntango azalaki na bomoi, moko oyo esimbaki mpenza motema na ye ezali lisolo na ye ná Yehova Nzambe. Na lisolo yango, Yehova ayebisaki Yobo atala biloko kitoko oyo asalá. Yango esengelaki kosalisa Yobo ayeba ete Yehova azali na bwanya mpe esengelaki kokómisa makasi elikya na ye ete Yehova akoki kopesa basaleli na ye biloko nyonso oyo basengeli na yango. Na ndakisa, Nzambe akundwelaki Yobo ete akokisaka bamposa ya banyama, na yango, akokokisa mpe bamposa na ye. (Yobo 38:39-41; 39:1, 5, 13-16) Yobo ayekolaki makambo mingi mpo na oyo etali bizaleli ya Nzambe ntango azalaki kotala bozalisi.

2. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tótala na likebi bozalisi?

2 Biso mpe tokoki koyekola makambo mingi etali Nzambe soki tozali kotala bozalisi. Nzokande, kosala bongo ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na biso. Soki tofandaka na engumba moko monene, mbala mosusu tokozala na likoki te ya komona biloko ndenge na ndenge oyo Nzambe akelá na bomoi ya mokolo na mokolo. Ezala tofandaka na esika oyo tozali na likoki ya komona bozalisi ndenge na ndenge, tokoki komona ete tozali na ntango mingi te mpo na koyekola yango. Na yango, tólobela mpo na nini ezali na ntina kosomba ntango mpe kosala milende mpo na kotalaka bozalisi. Tokolobela ndenge oyo Yehova ná Yesu basalelaki bozalisi mpo na koteya mpe oyo tokoki kosala mpo tózwa mateya mingi na biloko yango.

MPO NA NINI TOSENGELI KOTALAKA BOZALISI?

Yehova alingaki ete Adama asepela na bozalisi mpe apesa banyama bankombo (Talá paragrafe 3)

3. Nini emonisi ete Yehova alingaki ete Adama asepela na bozalisi?

3 Yehova alingaki ete baboti na biso ya liboso básepela na bozalisi. Ntango Nzambe asalaki Adama, apesaki ye paradiso moko kitoko mpo afanda kuna mpe apesaki ye mokumba ya kobatela yango mpe kokómisa yango monene. (Eba. 2:8, 9, 15) Kanisá esengo oyo Adama azalaki na yango ntango azalaki komona milona ezali kokola mpe bafololo ezali kobotama. Adama azalaki na mokumba moko monene ya kobatela elanga Edene! Yehova apesaki mpe Adama mokumba ya kopesa banyama ndenge na ndenge bankombo. (Eba. 2:19, 20) Yehova ye moko akokaki kopesa banyama yango bankombo, kasi atikelaki Adama mokumba yango. Na ntembe te, liboso ya kopesa nyama mokomoko nkombo, Adama azwaki ntango ya koyekola yango malamu, atalaki ndenge banyama yango ezalaki mpe ndenge ezalaki kosala makambo. Adama asepelaki na mokumba yango. Yango epesaki ye libaku ya kokóma na botɔndi mingi mpo na bwanya oyo Yehova azali na yango mpe mpo na biloko kitoko oyo asalá.

4. (a) Wapi ntina oyo tosengeli kotalaka bozalisi? (b) Biloko nini Nzambe akelá osepelaka na yango mingi?

4 Moko ya bantina oyo tosengeli kotalaka bozalisi ezali mpo Yehova asɛngi biso tósalaka bongo. Asɛngi biso ‘tótombola miso na biso likoló mpe tómona’. Na nsima atuni boye: “Nani azalisaki biloko oyo nyonso?” Eyano ezali polele. (Yis. 40:26) Yehova akelaki biloko nyonso oyo ezali na likoló, na mabele mpe na mbu mpo na koteya biso makambo etali ye. (Nz. 104:24, 25) Meká naino kokanisa ndenge oyo Nzambe asalá biso. Apesá biso likoki ya kosepela kotala biloko kitoko oyo ezali na mokili. Apesá biso mpe miso, matoi, mabɔkɔ, lolemo mpe zolo mpo tósepela na biloko ndenge na ndenge oyo asalá.

5. Na kotalela Baroma 1:20, matomba nini tozwaka ntango toyekolaka bozalisi?

5 Biblia eyebisi biso ntina mosusu oyo tosengeli kotalaka bozalisi. Eteyaka biso bizaleli ya Yehova. (Tángá Baroma 1:20.) Na ndakisa, soki otali malamu biloko Nzambe akelá, okomona ete esalemá na ndenge ya kokamwa mpenza. Biloko yango emonisaka bwanya ya Nzambe. Meká kokanisa biloko ya kolya ndenge na ndenge oyo tokoki kosepela na yango. Yango emonisaka ete alingaka bato. Ntango totalaka bizaleli ya Yehova na nzela ya biloko oyo asalá, yango esalisaka biso tóyeba ye malamu mpe etindaka biso tópusana penepene na ye. Sikoyo, tótalela ndenge Yehova asalelaka bozalisi mpo na koteya bato mateya ya ntina mingi.

NZAMBE ASALELAKA BOZALISI MPO NA KOTEYA BISO MAKAMBO ETALI YE

6. Liteya nini tokoki kozwa ntango tozali kotala bandɛkɛ oyo esalaka mibembo?

6 Yehova asalaka makambo na ntango na ye. Na nsuka ya nsanza ya mibale mpe na katikati ya sanza ya mitano ya mbula nyonso, Bayisraele bazalaki komona ndɛkɛ babengi nkɔngi ezalaki kopumbwa na mokili na bango mpo na kokende na nɔrdi. Nzambe ayebisaki Bayisraele boye: “Nkɔngi na likoló​—eyebaka ntango na yango oyo etyamá.” (Yir. 8:7) Ndenge kaka Yehova abongisá ntango mpo na bandɛkɛ wana, asilá mpe kobongisa ntango ya lisambisi na ye. Lelo oyo, ntango tomonaka bandɛkɛ oyo esalaka mibembo, yango esalisaki biso tóbosana te ete Yehova azali na “ntango oyo etyamá” mpo na kosukisa mokili oyo mabe.​—Hab. 2:3.

7. Kotala ndenge ndɛkɛ epumbwaka na likoló ekoki koteya biso nini? (Yisaya 40:31)

7 Yehova apesaka basaleli na ye nguya. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alakaki ete akopesa basaleli na ye nguya mpo “bámata likoló na mapapu lokola bampongo” ntango balɛmbi nzoto. (Tángá Yisaya 40:31.) Bayisraele bamesanaki komona ndenge bampongo ezalaki kopumbwa kozanga ete eningisa mapapu na yango mbala mingi. Yango ezali kokundwela biso ete kaka ndenge Yehova apesaka nguya na bandɛkɛ yango, akoki mpe kopesa nguya na basaleli na ye! Ntango omonaka ndɛkɛ moko ya nguya ezali kopumbwa mosika na likoló kozanga ete eningisa mapapu na yango makasi, yebá ete Yehova akoki mpe kopesa yo makasi ya kolonga mikakatano na yo.

8. Makambo nini Yobo ayekolaki nsima ya kotala bozalisi, mpe yango ekoki koteya biso nini?

8 Ebongi mpenza tótyela Yehova motema. Yehova asalisaki Yobo mpo atyela ye motema mingi koleka. (Yobo 32:2; 40:6-8) Ntango Yehova azalaki kosolola na Yobo, alobelaki biloko mingi oyo akelá, lokola minzoto, mapata, mpe mikalikali. Yehova alobelaki mpe banyama, na ndakisa ngɔmbɛ-mobali ya zamba mpe mpunda. (Yobo 38:32-35; 39:9, 19, 20) Biloko yango nyonso emonisaka kaka te nguya ya kokamwa oyo Nzambe azali na yango, kasi mpe bolingo mpe bwanya mingi oyo azali na yango. Masolo yango esalisaki Yobo atyela Yehova motema na ye mobimba. (Yobo 42:1-6) Ndenge moko mpe, ntango toyekolaka bozalisi, yango esalisaka biso tómona ete Yehova azali na bwanya oyo ezangá nsuka, mpe azali na nguya mingi koleka biso. Akoki kosilisa mikakatano na biso nyonso mpe akosala yango. Yango ekoki kosalisa biso tókóma kotyela ye lisusu motema mingi koleka.

YESU ASALELAKI BOZALISI MPO NA KOTEYA BATO MAKAMBO ETALI TATA NA YE

9-10. Moi mpe mbula eteyaka biso nini mpo na Yehova?

9 Yesu ayebaki makambo mingi oyo etali bozalisi. Lokola azali “mosali ya mayele” apesaki Tata na ye mabɔkɔ mpo na kokela molɔ́ngɔ́. (Mas. 8:30) Na nsima, ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalelaki bozalisi mpo na koteya bayekoli na ye makambo etali Tata na ye. Tótalela mwa mateya oyo ateyaki.

10 Yehova amoniselaka moto nyonso bolingo. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu abendaki likebi ya bayekoli na ye na biloko mibale ya bozalisi oyo bato mingi bamonaka yango mpenza spesiale te, ezali, moi mpe mbula. Biloko yango nyonso mibale ezali na ntina mpo tózala na bomoi. Yehova akokaki koboya kopesa biloko yango mibale na bato oyo basalelaka ye te. Kasi na bolingo na ye, apesaka moi mpe mbula mpo na bato nyonso. (Mat. 5:43-45) Yesu asalelaki biloko yango mibale mpo na koteya bayekoli na ye ete Yehova alingaka tómoniselaka bato nyonso bolingo. Ezala tosepelaka na kolala ya moi, to ndenge mbula ezali konɔka, nyonso esalisaka biso tómona ete Yehova alingaka bato nyonso kozanga kopona bilongi. Ndakisa na ye ekoki kotinda biso tómoniselaka bato nyonso bolingo ya ndenge wana na koteyáká bango.

11. Kotala bandɛkɛ na likoló ekoki kolendisa biso na nini?

11 Yehova akokisaka bamposa na biso ya mosuni. Kaka na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki lisusu ete: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango.” Mbala mosusu, bayoki ya Yesu bamonaki ndenge ndɛkɛ ezalaki kopumbwa na likoló ntango Yesu atunaki bango: “Bino boleki bango na motuya te?” (Mat. 6:26) Yango endimisi biso ete Yehova akokokisa bamposa na biso ya mosuni! (Mat. 6:31, 32) Mateya oyo tokoki koyekola na bozalisi ezali kokoba kolendisa basaleli ya sembo ya Yehova. Ndeko mwasi moko ya elenge oyo azali mobongisi-nzela na Espagne, alɛmbaki nzoto mpo azalaki kozwa te esika ya malamu ya kofanda. Kasi ntango amonaki ndenge bandɛkɛ bazalaki kolya bambuma, motema na ye ekitaki. Alobi boye: “Komona bandɛkɛ yango esalisaki ngai nabosana te ete Yehova akokisaka bamposa na yango mpe ete akokokisa mpe bamposa na ngai.” Mwa moke na nsima, ndeko mwasi yango azwaki esika ya kofanda.

12. Makambo oyo Matai 10:29-31 elobi mpo na bakɛngɛli-mboka ekoki koteya biso nini mpo na Yehova?

12 Yehova azwaka mokomoko na biso na motuya. Liboso atinda bantoma na ye na mosala ya kosakola, Yesu asalisaki bango mpo bábanga te baoyo bakotɛmɛla bango. (Tángá Matai 10:29-31.) Asalaki yango na ndenge alobelaki bakɛngɛli-mboka, mwa bandɛkɛ oyo eyebanaki mingi na Yisraele. Mwa bandɛkɛ yango ezalaki mpenza na ntina mingi te na mikolo ya Yesu. Kasi ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te.” Na nsima abakisaki boye: “Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Yehova azwaka mokomoko na bango na motuya, yango wana bazali na ntina te ya kobanga minyoko. Na ntembe te bayekoli babosanaki te maloba ya Yesu ntango bamonaki bakɛngɛli-mboka, wana bazalaki kosakola na bingumba mpe na bamboka. Ntango nyonso oyo omoni mwa ndɛkɛ, kobosana te ete Yehova azwaka yo na motuya mingi mpo ‘oleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.’ Na lisalisi na ye, okoki kolonga botɛmɛli.​—Nz. 118:6.

TOKOKI KOSALA NINI MPO TÓYEKOLA MAKAMBO MINGI OYO ETALI NZAMBE NA NZELA YA BOZALISI?

13. Nini ekosalisa biso tózwa mateya na bozalisi?

13 Tokoki koyekola mateya mosusu mingi oyo etali Nzambe na nzela ya bozalisi. Na ndenge nini? Ya liboso, tosengeli kozwaka ntango ya kotala bozalisi. Ya mibale, tosengeli kokanisaka soki ezali koteya biso nini mpo na Yehova. Kosala bongo ekoki kozala pɛtɛɛ te. Géraldine, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Cameroun alobi boye: “Nakolá na engumba, yango wana ezalaki mpasi mpo natalaka bozalisi.” Nkulutu moko na nkombo Alfonso alobi boye: “Namonaki ete nasengeli kozwaka ntango ya kotala bozalisi mpe komanyola na oyo ezali koteya ngai mpo na Yehova.”

Ntango Davidi azalaki kotala bozalisi na esika oyo azalaki, yango ezalaki kotinda ye amanyola mpo na oyo biloko yango ezalaki koteya ye mpo na Yehova (Talá paragrafe 14)

14. Mateya nini Davidi ayekolaki ntango akanisaki na mozindo na bozalisi?

14 Davidi akanisaki na mozindo na biloko oyo Nzambe akelá. Ayebisaki Yehova boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto mowei mpamba azali nani mpo okanisa ye, mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?” (Nz. 8:3, 4) Ntango Davidi azalaki kotala likoló na butu, asukaki kaka te na kotala minzoto nyonso. Kasi akanisaki mpe na oyo minzoto ezalaki koteya ye mpo na Nzambe. Amonaki ete Yehova azali monene. Na bantango mosusu, Davidi akanisaki ndenge akolaki na libumu ya mama na ye. Ntango akanisaki na mozindo ndenge nzoto na ye esalemaki na ndenge ya kokamwa, yango etindaki ye akóma na botondi mingi mpo na bwanya ya Yehova.​—Nz. 139:14-17.

15. Pesá bandakisa oyo emonisaka bizaleli ya Yehova na nzela ya bozalisi. (Nzembo 148:7-10)

15 Lokola Davidi, osengeli kaka te koluka mosika mpo na komona eloko moko oyo Yehova akelá, oyo okoki komanyola likoló na yango. Ezali na biloko mingi oyo ekoki kosalisa biso tóyeba Yehova malamu. Na ndakisa, okoki komona nguya ya Yehova ntango ozali koyoka ndenge moi ezali kobɛta yo na nzoto. (Yir. 31:35) Talá ndenge bwanya ya Nzambe emonanaka ntango ndɛkɛ etongaka zumbu na yango. Kanisá ndenge mbwa ya moke eningisaka mokila na yango mpo omona ndenge Yehova ayebi kosɛkisa. Mpe pesáká Yehova matondi ntango nyonso oyo omoni mama moko azali kosakana na bebe na ye. Tozali na mabaku mingi ya koyekola makambo etali Yehova mpo biloko nyonso oyo akelá, ezala ya mike to ya minene, ekumisaka ye.​—Tángá Nzembo 148:7-10.

16. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

16 Nzambe na biso aleki na mayele, na boboto, na nguya, mpe na makasi. Tokoki komona bizaleli yango mpe bizaleli mosusu ebele soki tozali kotala na likebi mpenza bozalisi na bisika oyo tofandi. Tosengeli kozwaka ntango ya kosepela na bozalisi mpe kokanisa na mozindo oyo biloko yango ezali koteya biso mpo na Yehova. Kosala bongo ekosalisa biso tópusana penepene na Mozalisi na biso. (Yak. 4:8) Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo baboti bakoki kosalela bozalisi mpo na kosalisa bana na bango bápusana penepene na Yehova.

LOYEMBO 5 Misala ya kokamwa ya Nzambe

a Biloko oyo Nzambe akelá ekamwisaka mpenza, kobanda na nguya ya moi kino na bafololo ya mikemike oyo ezali kobima. Mateya oyo tozwaka na bozalisi ekoki kosalisa biso tósosola bizaleli ya Yehova. Na lisolo oyo, tokolobela mpo na nini tosengeli kozwa ntango ya kotala na likebi mpenza bozalisi mpe ndenge oyo kosala yango ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe na biso.