Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Satana abebisaki lokumu ya nkombo ya Nzambe banda atombokelaki Nzambe na elanga ya Edene

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ndenge nini lisolo “Nkombo na yo esantisama” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 06/2020 esembolaki bindimeli na biso na oyo etali nkombo ya Yehova mpe boyangeli na ye?

Na lisolo yango, toyekolaki ete ezali na likambo moko ya ntina mingi oyo etaleli baanzelu mpe bato, elingi koloba, kosantisama ya nkombo monene ya Yehova. Ntembe na oyo etali Bokonzi, elingi koloba, lolenge ya koyangela ya Yehova oyo eleki malamu, ezali na boyokani na kosantisama ya nkombo ya Yehova. Ndenge moko mpe, ntembe na oyo etali bosembo ya bato ezali na boyokani na kosantisama ya nkombo ya Yehova.

Mpo na nini tozali sikoyo kobɛta nsɛtɛ ete ntembe monene etaleli nde nkombo ya Yehova mpe kosantisama na yango? Tiká tótalela bantina misato mpamba.

Yehova akosala ete nkombo na ye esanzolama mpo na libela na libela

Ya liboso, Satana abebisaki nkombo to lokumu ya Yehova, na elanga ya Edene. Motuna oyo Satana atunaki Eva emonisaki ete Yehova azalaki moimi mpe malako oyo apesaki Adama ná Eva ebongaki te. Na nsima, Satana atɛmɛlaki maloba ya Yehova. Alobaki ete Nzambe azali mobuki-lokuta. Na yango, abebisaki lokumu ya Yehova. Akómaki “Zabolo,” oyo elimboli “moto oyo akoselaka bato makambo.” (Yoa. 8:44) Lokola Eva andimaki lokuta ya Satana, aboyaki kotosa Nzambe, mpe aboyaki ete Nzambe azala Mokonzi na ye. (Eba. 3:1-6) Tii lelo oyo, Satana azali kokoba kobebisa lokumu ya Nzambe na ndenge apalanganisaka makambo ya lokuta mpo na Yehova. Bato oyo bandimaka makambo yango ya lokuta baboyaka kotosa Yehova. Yango wana mpo na basaleli ya Nzambe, kokosela nkombo ya Yehova makambo ezali kozanga bosembo moko monene. Yango nde likambo ya monene oyo esali ete mabe ná bampasi nyonso ezala na mokili.

Ya mibale, mpo na bolamu ya bikelamu nyonso, Yehova akolongisa nkombo na ye mpo na kosantisa yango na makambo nyonso oyo esambwisi yango. Yango ezali likambo ya ntina mingi mpo na Yehova. Yango wana alobi: “Nakosantisa mpenza nkombo na ngai monene.” (Ezk. 36:23) Lisusu, Yesu amonisaki polele makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na mabondeli ya basaleli nyonso ya sembo ya Yehova, ntango alobaki boye: “Nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Biblia elobeli mbala na mbala ntina ya kokumisa nkombo ya Yehova. Tótalela kaka mwa bandakisa: “Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.” (1 Nt. 16:29; Nz. 96:8) “Bóyemba mpo na kosanzola nkembo ya nkombo na ye.” (Nz. 66:2) “Nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na libela.” (Nz. 86:12) Na libaku moko, mongongo ya Yehova elobaki uta na likoló mpe eyokanaki na tempelo na Yerusaleme ntango Yesu alobaki: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Mpe Yehova ayanolaki: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”​—Yoa. 12:28. a

Ya misato, mokano ya Yehova ekozala ntango nyonso na boyokani na nkombo na ye, to lokumu na ye. Tótalela ndenge nkombo ya Yehova ekozala na ntina nsima ya komekama ya nsuka, oyo ekosalema na nsuka ya boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Ndenge nini baanzelu mpe bato bakomiyoka mpo na nkombo ya Yehova na ntango yango? Mpo tózwa eyano na motuna yango, tómikundwela makambo mibale oyo ezali na boyokani, elingi koloba, bosembo ya bato mpe boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Bato oyo basili komonisa ete bazali sembo bakokoba kobunda mpo na kobatela bosembo na bango? Te. Bakozala bato ya kokoka mpe oyo babongi. Bakozwa bomoi ya seko. Lisusu, ekozala na ntina te ya kozala na bilembeteli oyo ekomonisa soki lolenge ya koyangela ya Yehova eleki malamu to te. Na ntango yango, bikelamu nyonso na likoló mpe na mabele bakozala na bomoko mpe bakondima boyangeli ya Yehova. Nkombo ya Yehova ekozala likambo eleki ntina mpo na bato na ye!

Na ntango yango, moto nyonso akoyeba bosolo etali Yehova mpe nkombo na ye ekosantisama mpo na libela. Kasi, nkombo ya Yehova ekokoba kozala likambo eleki ntina mpo na basaleli na ye nyonso ezala kuna na likoló to awa na mabele. Mpo na nini? Mpo bakomona ndenge Yehova akokoba kosala makambo ya kokamwa. Na ndakisa: Lokola Yesu akozongisa bokonzi nyonso epai ya Yehova, Nzambe “akozala Mokonzi kaka moko ya biloko nyonso.” (1 Ko. 15:28) Nsima na yango, bato awa na mabele bakosepela na “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:21) Mpe Yehova akokokisa mpenza mokano na ye ya kozala na libota moko ya bomoko oyo esalemi na bana na ye oyo bazali na likoló mpe na mabele.​—Ef. 1:10.

Ntango makambo wana nyonso ekosalema, libota ya Yehova kuna na likoló mpe awa na mabele ekomiyoka ndenge nini? Na ntembe te, tokozala kaka na mposa makasi ya kokumisa nkombo monene ya Yehova. Davidi, mokomi moko ya nzembo, akomaki boye na litambwisi ya elimo ya Nzambe: “Yehova Nzambe . . . asanzolama. Nkombo na ye ya nkembo esanzolama mpo na libela.” (Nz. 72:18, 19) Tokokoba kozala na bantina mosusu oyo ekotinda biso na esengo nyonso tósanzolaka ye libela na libela.

Nkombo ya Yehova emonisaka eloko nyonso oyo etali ye. Ntango tokanisaka nkombo ya Yehova, tokanisaka bolingo na ye. (1 Yoa. 4:8) Tokokoba komikundwela ete Yehova akelaki biso mpo alingaka biso, apesaki mbeka ya lisiko mpo alingaka biso, mpe amonisaki ete lolenge na ye ya koyangela ezali sembo mpo alingaka biso. Kasi tokokoba komona ndenge Yehova alingaka biso libela na libela. Tokopusana penepene na ye lokola Tata na biso mpe tokoyemba mpo na kosanzola nkombo na ye oyo etondi na nkembo libela na libela,.​—Nz. 73:28.

a Biblia emonisi mpe ete Yehova asalaka makambo “mpo na nkombo na ye.” Na ndakisa, atambwisaka bato na ye, asalisaka bango, abikisaka bango, alimbisaka bango, mpe abatelaka bango na bomoi, elingi koloba, asalaka nyonso wana mpo na nkombo na ye monene, Yehova.​—Nz. 23:3; 31:3; 79:9; 106:8; 143:11.