Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 35

Kobá kozala na motema molai

Kobá kozala na motema molai

“Bólata . . . motema molai.”​—KOL. 3:12.

LOYEMBO 114 “Tózala na motema molai”

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini tosepelaka na bato ya motema molai?

 BISO nyonso tosepelaka na bato ya motema molai. Tosepelaka na bato oyo bazelaka likambo na motema moko kozanga ete básilika. Tozalaka na botɔndi mingi ntango bato mosusu bamoniselaka biso motema molai ntango tosalaka mabunga. Lisusu, tozalaka na botɔndi mingi na motema molai oyo bandeko oyo bateyaki biso Biblia bamoniselaki biso ntango tozalaki kobundabunda mpo na koyekola, kondima, mpe kosalela mateya oyo tozalaki koyekola. Oyo eleki nyonso, tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yehova Nzambe amoniselaka biso motema molai!​—Rom. 2:4.

2. Makambo nini ekoki kosala ete ekóma mpasi tómonisa motema molai?

2 Atako toyokaka esengo ntango bato mosusu bamonisaka motema molai, ekoki kokóma mpasi mpo biso moko tómonisa ezaleli yango. Na ndakisa, ekoki kozala mpasi tómonisa motema molai ntango tosali molɔngɔ mpo na kozela motuka, mingimingi soki tozali mpenza na retare. Tokoki kosilika ntango moto moko apesi biso nkanda. Mpe, na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi kokoba kozela mokili ya sika oyo Yehova alaki biso. Okosepela kozala na motema molai mingi? Na lisolo oyo, tokolobela soki komonisa motema molai elimboli nini mpe mpo na nini ezaleli yango ezali na ntina. Tokolobela mpe makambo oyo ekoki kosalisa biso tómonisa lisusu motema molai mingi.

KOZALA NA MOTEMA MOLAI ELIMBOLI NINI?

3. Moto ya motema molai asalaka nini soki batumoli ye?

3 Tótalela makambo minei oyo ekoki kosalisa biso tómonisa motema molai. Ya liboso, moto ya motema molai asilikaka noki te. Asalaka makasi abatela kimya mpe aboyaka kozongisa mabe ntango basusu batumoli ye to ntango azali na mitungisi. Maloba “ayokaka nkanda noki te” elobelami mpo na mbala ya liboso na Biblia ntango elobi ete Yehova azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.”​—Kob. 34:6.

4. Moto ya motema molai asalaka nini soki asengeli kozela likambo moko boye?

4 Ya mibale, moto ya motema molai azelaka na kimya nyonso. Soki likambo moko eumeli koleka ntango oyo akanisaki, moto ya motema molai asalaka makasi akóma te motema mɔtɔmɔtɔ to nkandankanda. (Mat. 18:26, 27) Ezali na makambo mingi oyo ekosɛnga tózela na motema ya kokita. Na ndakisa, tosengeli koyoka na likebi ntango moto azali koloba na biso kozanga kokata ye maloba. (Yobo 36:2) Ekoki kosɛnga mpe kozala na motema molai ntango tozali kosalisa bayekoli ya Biblia bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpe bátika bizaleli ya mabe.

5. Wapi lolenge mosusu ya komonisa motema molai?

5 Ya misato, moto ya motema molai asalaka makambo mbangumbangu te. Toboyi te ete makambo mosusu esɛngaka kosala yango na lombangu. Nzokande, moto ya motema molai soki azali na mosala moko ya ntina mingi ya kosala, akendaka na yango mbangumbangu te mpo kaka esila noki. Kasi, alukaka koyeba soki azali mpenza na ntango mpo na kosala mosala yango malamu. Na yango, azwaka ntango oyo esengeli mpo na kosala mosala yango.

6. Moto ya motema molai asalaka nini ntango akutani na mikakatano to komekama?

6 Ya minei, moto ya motema molai ayebaka kokanga motema ntango amekami kozanga komilelalela. Na ndenge yango, motema molai ekangami makasi na ezaleli ya koyika mpiko. Tolobi te ete ezali mabe koyebisa moninga moko ya motema ndenge ozali komiyoka ntango omekami. Kasi, moto ya motema molai asalaka nyonso oyo akoki mpo akoba koyika mpiko mpe abatela makanisi malamu ntango akutani na komekama. (Kol. 1:11) Lokola tozali bakristo, tosengeli komonisa motema molai na makambo wana nyonso. Mpo na nini? Tiká tótalela mwa bantina oyo.

MPO NA NINI MOTEMA MOLAI EZALI NA NTINA?

Kaka ndenge moloni-bilanga azelaka na motema molai mpe azalaka na kondima ete akobuka mbuma na ntango oyo ebongi, tozelaka na motema molai ete Yehova akokokisa bilaka na ye na ntango oyo ebongi (Talá paragrafe 7)

7. Na kotalela Yakobo 5:7, 8, mpo na nini motema molai ezali na ntina mingi? (Talá mpe elilingi.)

7 Mpo tóbika, ezali na ntina mingi tózala na motema molai. Ndenge moko na basaleli ya sembo ya ntango ya kala, biso mpe tosengeli kozela na motema molai ete Nzambe akokokisa bilaka na ye. (Ebr. 6:11, 12) Biblia ekokanisi biso na moloni-bilanga. (Tángá Yakobo 5:7, 8.) Moloni-bilanga asalaka mosala makasi mpo na kolona mboto mpe komwangisela yango mai, kasi ayebaka mpenza te ntango yango ekobota. Yango wana, azelaka na motema molai mpenza mpe azalaka na kondima ete akobuka mbuma. Biso mpe tozalaka ntango nyonso na mingi ya kosala na makambo ya elimo atako ‘toyebi te mokolo nini Nkolo na biso akoya.’ (Mat. 24:42) Tozelaka na motema molai mpenza mpe tozalaka na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye na ntango oyo ebongi. Soki tokómi motema likolólikoló, tokoki kolɛmba na elimo mpe mokemoke tokoki kotika Yehova. Tokoki mpe kokóma kotya makanisi na biso kaka na bisengo ya mokili oyo ya ntango mokuse. Kasi soki tozali na motema molai, tokoki koyika mpiko tii na nsuka mpe kobika.​—Mika. 7:7; Mat. 24:13.

8. Na kotalela Bakolose 3:12, 13, ndenge nini motema molai esalisaka biso tózala na boyokani ya malamu ná basusu?

8 Motema molai esalisaka biso tózala na boyokani ya malamu ná basusu. Etindaka biso tóyoka na likebi ntango basusu bazali koloba. (Yak. 1:19) Motema molai esalisaka biso tózala na kimya elongo na bango. Epekisaka biso tósala likambo moko mbangumbangu to tóloba likambo moko ya mabe ntango tozali na mitungisi. Lisusu, soki tozali na motema molai, tokosilika noki te ntango moto alobi to asali likambo moko oyo ezokisi biso. Na esika ya kozongisa mabe na mabe, ‘tokokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe tokolimbisa na motema moko.’​—Tángá Bakolose 3:12, 13.  

9. Na kotalela Masese 21:5, ndenge nini motema molai esalisaka biso ntango tolingi kozwa bikateli?

9 Motema molai ekoki mpe kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu. Na esika tósala makambo mbangumbangu to na motema mɔtɔmɔtɔ, motema molai ekotinda biso tózwa ntango ya kosala bolukiluki mpe tóluka koyeba makambo oyo ekateli na biso ekobimisa. (Tángá Masese 21:5.) Na ndakisa, soki tozali koluka mosala, tokoki kokwea na motambo ya kozwa mbala moko mosala ya liboso oyo emonani, ata soki mosala yango ekobebisa baprogramɛ na biso ya elimo. Nzokande, soki tozali na motema molai, tokotalela malamu esika mosala yango ezali, ngonga oyo yango ekobanda kozwa biso, mpe soki ekobebisa te boyokani na biso ná Yehova mpe ná bato ya libota na biso. Ya solo, motema molai ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu!

OKOKI KOSALA NINI MPO OKÓMA NA MOTEMA MOLAI MINGI?

10. Mokristo asengeli kosala nini mpo akolisa motema molai mpe abatela yango?

10 Bondeláká Yehova apesa yo motema molai. Motema molai ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22, 23) Yango wana, tokoki kosɛnga Yehova elimo santu mpe kosɛnga ye asalisa biso tókolisa ezaleli yango. Soki tokutani na likambo moko oyo etye motema molai na biso na komekama, ‘tókoba kosɛnga’ Yehova elimo santu mpo esalisa biso tóbatela ezaleli yango. (Luka 11:9, 13) Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tótalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango. Nsima ya kobondela, tosengeli kosala oyo tokoki mpo tómonisaka motema molai mokolo na mokolo. Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala mpe kosala makasi mpo na komonisa motema molai, tóyeba ete ezaleli yango ekobota misisa na motema na biso mpe ekokóma mpenza bomoto na biso.

11-12. Ndenge nini Yehova amonisaka motema molai?

11 Manyoláká na bandakisa ya Biblia. Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo bazalaki na motema molai. Soki toyekoli masolo ya bato yango, tokoki koyeba ndenge ya komonisa motema molai. Liboso ya kotalela mwa ndambo ya bandakisa yango, tiká tólobela naino moto oyo aleki bato nyonso na motema molai, Yehova.

12 Na elanga ya Edene, Satana abebisaki lokumu ya nkombo ya Yehova ntango atindaki Eva andima te ete Yehova azali Moyangeli ya sembo mpe ya bolingo. Na esika aboma mokosi yango mbala moko, Yehova amonisaki motema molai mpe komipekisa, ayebaki ete ekosɛnga ntango mpo na komonisa ete boyangeli na ye eleki malamu. Lisusu, wana azali kozela, Yehova azali kokoba komonisa motema molai na makambo nyonso ya lokuta oyo bazali koloba mpo na nkombo na ye. Longola yango, Yehova azali komonisa motema molai mpo bato mingi bázwa libaku ya kozwa bomoi ya seko. (2 Pe. 3:9, 15) Yango wana, ebele ya bato bazwi libaku ya koyeba ye. Soki totye makanisi na matomba oyo tozwaka mpo na motema molai ya Yehova, ekozala mpasi te tózela ntango oyo akotya nsuka na mokili oyo.

Motema molai esalisaka biso tósilikaka noki te ntango batumoli biso (Talá paragrafe 13)

13. Ndenge nini Yesu amekolaki motema molai ya Tata na ye na ndenge ya kokoka? (Talá mpe elilingi.)

13 Yesu amekolaki motema molai ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, mpe amonisaki yango ntango azalaki awa na mabele. Komonisa motema molai ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na Yesu, mingimingi liboso ya bokosi ya Bafarisai mpe ya Bakomeli. (Yoa. 8:25-27) Atako bongo, kaka lokola Tata na ye, Yesu azalaki kosilika noki te. Azalaki kozongisa mabe te ata ntango bazalaki kofinga ye to kotumola ye. (1 Pe. 2:23) Yesu azalaki na motema molai mpe ayikaki mpiko kozanga komilelalela. Yango wana, Biblia eyebisi biso ‘tótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko na maloba ya botɛmɛli ya ndenge wana ya basumuki’! (Ebr. 12:2, 3) Na lisalisi ya Yehova, biso mpe tokoki komonisa motema molai mpe koyika mpiko na komekama nyonso oyo tokoki kokutana na yango. 

Soki tomekoli motema molai ya Abrahama, tokoki kondima ete Yehova akopambola biso sikoyo mpe mingi koleka na mokili ya sika oyo alaki biso (Talá paragrafe 14)

14. Na kotalela Baebre 6:15, motema molai ya Abrahama ekoki koteya biso nini? (Talá mpe elilingi.)

14 Tokosala nini soki nsuka eyei te na ntango oyo biso tokanisaki? Ekoki kozala ete tozelaka nsuka eya banda bambula mingi. Mbala mosusu tozali kobanga ete tozali lisusu na bomoi molai te mpo tómona ntango nsuka ekoya. Nini ekoki kosalisa biso mpo tózela na motema molai? Tótalela ndakisa ya Abrahama. Ntango Abrahama akokisaki mbula 75 kozanga kobota mwana, Yehova alakaki ye ete: “Nakokómisa yo ekólo moko monene.” (Eba. 12:1-4) Abrahama amonaki kokokisama ya likambo yango? Mpenza te. Nsima ya kokatisa Ebale Efrate mpe kozela mbula 25 nde Abrahama ayaki komona kobotama ya Yisaka, mwana na ye, na ndenge ya likamwisi, mpe mbula 60 na nsima, bankɔkɔ na ye Esau mpe Yakobo babotamaki. (Tángá Baebre 6:15.) Kasi Abrahama atikalá komona te ndenge bakitani na ye bakómaki ekólo monene mpe ndenge bazwaki Mokili ya Ndaka. Atako bongo, mobali wana ya kondima azalaki na boyokani malamu ná Mozalisi na ye. (Yak. 2:23) Longola yango, ntango Abrahama akosekwa, akokamwa mpenza ntango akomona ete bosembo mpe motema molai na ye ememelá bikólo nyonso ya mabele mapamboli! (Eba. 22:18) Liteya nini tozwi? Mbala mosusu tokoki te komona sikoyo kokokisama ya makambo nyonso oyo Yehova alaká. Kasi, soki tozali na motema molai lokola Abrahama, tokoki kondima ete Yehova akopambola biso sikoyo mpe mingi koleka na mokili ya sika oyo alaki biso.​—Mrk. 10:29, 30.

15. Makambo nini tokoki kotalela ntango tozali kosala boyekoli na biso moko?

15 Biblia ezali na bandakisa mosusu mingi ya bato oyo bamonisaki motema molai. (Yak. 5:10) Ekoki kozala malamu otya programɛ mpo na koyekola bandakisa na bango. b Na ndakisa, atako Davidi atyamaki mafuta na bolenge mpenza mpo akóma mokonzi na Yisraele, asengelaki kozela bambula mingi liboso azwa kiti ya bokonzi. Simeone mpe Ana basalelaki Yehova na bosembo nyonso wana bazalaki kozela komona Masiya oyo alakamaki. (Luka 2:25, 36-38) Ntango ozali koyekola masolo ya ndenge wana, luká biyano na mituna oyo elandi: Ekoki kozala nini esalisaki moto yango amonisa motema molai? Matomba nini azwaki lokola azalaki na motema molai? Ndenge nini nakoki komekola ye? Okoki mpe kozwa mateya na bandakisa ya baoyo bamonisaki motema molai te. (1 Sa. 13:8-14) Okoki komituna boye: ‘Ekoki kozala nini esalaki ete bámonisa te motema molai? Yango ebimiselaki bango makama nini?’

16. Wapi matomba ya kozala na motema molai?

16 Luká koyeba matomba ya kozala na motema molai. Ntango tozalaka na motema molai, totondaka na esengo mpe na kimya. Kutu motema molai ekoki kosala ete tózala malamu na nzoto mpe na makanisi. Ntango tomoniselaka basusu motema molai, tokómaka na boninga makasi ná bango. Masangá na biso ekómaka lisusu na bomoko mpenza. Soki moto moko atumoli biso mpe toboyi kosilika noki, tokosala ete likambo yango eya ndɔngɔ te. (Nz. 37:8; Mas. 14:29) Kasi likambo eleki ntina, ntango tozali komonisa motema molai, tomekolaka Tata na biso ya likoló mpe tokómaka lisusu penepene na ye.

17. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

17 Motema molai ezali mpenza ezaleli moko ya ntina mingi mpo na biso nyonso! Atako ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te kozala na motema molai, na lisalisi ya Yehova, tokokoba komonisa ezaleli yango. Lisusu, wana tozali kozela na motema molai mokili ya sika, tokoki kozala na kondima ete “liso ya Yehova etalaka baoyo babangaka ye, baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo.” (Nz. 33:18) Tiká ete biso nyonso tókoba kolata motema molai.

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

a Na mokili oyo ya Satana, bato bamonisaka lisusu motema molai te. Nzokande, Biblia elendisaka biso tólata motema molai. Lisolo oyo ekomonisa biso mpo na nini ezaleli yango ezali mpenza na ntina mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tókóma na motema molai mingi.

b Mpo na komona masolo ya Biblia oyo elobeli motema molai, okoki kotala na Index des publications des Témoins de Jéhovah na liloba “Patience.