Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

1923​—⁠Eleki sikoyo mbula nkama

1923​—⁠Eleki sikoyo mbula nkama

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1923 elobaki ete: “Tobanzi ete mobu 1923 ekozala malamu mpenza. Tozali na libaku kitoko ya kopesa litatoli na . . . mokili oyo etondi na mpasi, komonisa bato ete ya malamu ezali koya.” Ya solo, mobu yango ezalaki malamu mpenza mpo na Bayekoli ya Biblia mpo losambo na bango mpe mosala na bango ya kosakola ekómaki komonisa bomoko oyo ezali mpe na losambo ya solo lelo oyo.

BOMOKO NA NZELA YA MAKITA

Kalandriye ná mikapo mpe nimero ya banzembo

Na mbula yango, lisangá esalaki mwa bambongwana oyo esalisaki Bayekoli ya Biblia bázala na bomoko na nzela ya makita. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kopesa mateya oyo elimbolaki bavɛrsɛ oyo bakosalela pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya Kobondela, ya Lisanzoli mpe ya Litatoli. Lisusu, Bayekoli ya Biblia babimisaki kalandriye moko oyo ezalaki na vɛrsɛ mpo na pɔsɔ mokomoko mpe nzembo oyo moto akokaki koyemba na boyekoli na ye moko mpe na losambo na kati ya libota.

Na makita na bango, Bayekoli ya Biblia bazalaki kopesa “matatoli,” bazalaki kolobela mosala ya kosakola, ntina oyo bazali na botɔndi epai ya Yehova, koyemba loyembo moko, to ata kobondela. Eva Barney, oyo azwaki batisimo na 1923 ntango azalaki na mbula 15, alobaki boye: “Soki olingi kopesa litatoli, okotɛlɛma mpe okobanda na maloba lokola: ‘Nalingi kopesa Nkolo matɔndi mpo na bolamu nyonso oyo asaleli ngai.’” Bandeko mosusu bazalaki mpenza kolinga kopesa litatoli. Ndeko mwasi Barney abakisaki boye: “Ndeko mobali moko ya mobange, Godwin, azalaki na makambo mingi ya kopesa Nkolo matɔndi. Kasi ntango mwasi na ye amonaki ete ndeko oyo azalaki kotambwisa makita alɛmbaki, atutaki mobali na ye na mopanzi, mobali na ye atikaki koloba, mpe afandaki.”

Mbala moko na sanza, kelasi (lisangá) mokomoko ezalaki kosala likita ya ntina ya Kobondela, ya Lisanzoli, mpe ya Litatoli. Mpo na makita yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/1923 elobaki boye: “Ndambo ya likita esengeli kozala ntango ya kopesa matatoli oyo etali mosala ya kosakola mpe kolendisa basali (basakoli). . . . Tondimi ete kosala makambo ndenge moko, ekosalisa bandeko bázala na bomoko.”

Charles Martin, oyo azalaki na mbula 19 mpe mosali ya kelasi (mosakoli ya lisangá) na Vancouver, na Canada, azwaki matomba mingi na makita yango. Na nsima, alobaki boye: “Kuna nde nayekolaki mpo na mbala ya liboso makambo ya koloba na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mbala na mbala, moto moko azalaki kolobela makambo oyo akutanaki na yango na mosala ya ndako na ndako. Yango epesaki ngai makanisi mpo na oyo nakoloba, mpe ndenge ya koyanola na bantembe ndenge na ndenge.”

BOMOKO NA NZELA YA MOSALA YA KOSAKOLA

Bulletin ya 01/05/1923

“Mikolo ya mosala” esalisaki mpe lisangá ezala na bomoko. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/1923 elobaki boye: “Mpo bomoko ezala, . . . , mokolo ya mwamibale 01/05/1923 eponami lokola mokolo ya mosala mpo na moto nyonso. Ekokóma bongo mpo na mwamibale nyonso ya liboso na sanza nyonso. . . Ndeko mokomoko ya kelasi nyonso asengeli kopesa mabɔkɔ na mosala yango.”

Ata Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki bilenge bazalaki kosakola. Hazel Burford, oyo azalaki kaka na mbula 16 na ntango wana, alobaki boye: “Bulletin ezalaki na masolo (lokola Ndenge ya kobanda lisolo) mpo tókanga na motó. a Ngai ná nkɔkɔ na ngai ya mobali topesaki mabɔkɔ na misala yango nyonso.” Kasi, ndeko mwasi Burford akutanaki na botɛmɛli moko oyo ekamwisaki ye. Alobaki boye: “Ndeko mobali moko ya mokóló azalaki koboya mpenza nasolola na bato. Na ntango wana, bato mosusu bazalaki kokanga ntina te ete Bayekoli ya Biblia nyonso, ata mpe ‘bilenge mibali mpe bilenge basi,’ basengeli kosanzola Mozalisi na bango Monene.” (Nz. 148:​12, 13) Kasi ndeko mwasi Burford akobaki kaka kosakola. Na nsima, akɔtaki kelasi ya mbala ya mibale ya Gileade mpe asalaki lokola misionɛrɛ na Panama. Kendekende, bandeko mibali yango babongolaki ndenge na bango ya kotalela bilenge oyo balingaki kosakola.

BOMOKO NA NZELA YA MAYANGANI

Mayangani ya mike mpe ya minene esalisaki mpe bandeko bázala na bomoko. Mingi ya mayangani yango ezalaki kolobela mikolo ya mosala, na ndakisa oyo esalemaki na Winnipeg, na Canada. Na mokolo ya 31/03, na lisolo “Winnipeg ekoningana,” basɛngaki bayangani nyonso bábima na mosala ya kosakola. Mikolo ya misala ya ndenge wana esalisaki mingi mpo bokoli emonana. Na mokolo ya 05/08, bato soki 7000 bayaki na liyangani mosusu oyo esalemaki na Winnipeg. Na ntango wana, ezalaki motángo oyo elekaki mayangani nyonso oyo esalemaki na Canada.

Liyangani monene koleka ya basaleli ya Yehova ya 1923 esalemaki kobanda 18-26/08 na Los Angeles, na etúká ya Californie. Mwa bapɔsɔ liboso ya liyangani yango, bazulunalo elobelaki molulu yango mpe Bayekoli ya Biblia bakabolaki nkasa ya libyangi koleka 500000. Batyaki mpe bapankarte oyo ezalaki kolobela liyangani na mituka ya bato nyonso mpe na mituka mosusu.

Liyangani ya Bayekoli ya Biblia ya 1923, na Los Angeles

Na mwapɔsɔ 25/08, ndeko Rutherford asalaki diskur “Bampate mpe bantaba,” mpe amonisaki polele ete “bampate” ezali bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi, oyo bakofanda na paradiso awa na mabele. Asalaki lisusu diskur mpe atángaki ekateli moko oyo ebengamaki “Likebisi.” Ekateli yango emonisaki bokosi ya mangomba ya bokristo mpe elendisaki bato ya mitema sembo bábima na “Babilone Monene.” (Em. 18:​2, 4) Na nsima, Bayekoli ya Biblia ya molende na mokili mobimba bakabolaki bamilio ya batrakte oyo ezalaki na ekateli yango.

“Kosala makambo ndenge moko, ekosalisa bandeko bázala na bomoko”

Na mokolo ya nsuka ya liyangani, bato koleka 30000 balandaki diskur ya bato nyonso oyo ndeko Rutherford asalaki, oyo elobaki “Bikólo nyonso ezali kokende na Armagedone, kasi bamilio ya bato oyo bazali na bomoi sikoyo bakokufa te.” Lokola Bayekoli ya Biblia bamonaki ete bato mingi bakoya, bafutaki mbongo na stade Los Angeles Coliseum, oyo eutaki kotongama. Mpo moto nyonso ayoka malamu, bandeko basalelaki sono ya stade, oyo ezalaki esaleli ya sika na ntango wana. Bato mosusu mingi balandaki programe yango na radio.

NSANGO MALAMU EPALANGANI NA MOKILI MOBIMBA

Na mobu 1923, mosala ya kosakola epalanganaki mingi na Afrika, na Mpoto, na Inde, mpe na Amerika ya sudi. Na Inde, atako ndeko A. J. Joseph azalaki na mwasi ná bana motoba, asalisaki na kobimisa mikanda na monɔkɔ ya Hindi, Tamoul, Télougou, mpe Ourdou.

Ndeko Brown ná libota na ye

Na Sierra Leone, Bayekoli ya Biblia Alfred Joseph ná Leonard Blackman bakomelaki biro monene na Brooklyn, na New York, mpo na kosɛnga lisalisi. Na mokolo ya 14/04/1923, biro monene epesaki bango eyano. Alfred alobi boye: “Mokolo moko ya pɔsɔ na butu mpenza, moto moko abengaki ngai na telefone.” Alfred ayokaki mongongo moko monene etuni ye: “Yo nde okomelaki La Société Watch Tower mpo na kosɛnga basakoli?” Alfred ayanolaki: “Ɛɛ.” Mongongo yango elobaki: “Malamu, batindi nde ngai.” Ezalaki mongongo ya ndeko William R. Brown. Akómaki na Caraïbes mokolo yango ná mwasi na ye, Antonia, mpe na bana na bango ya mike ya basi, Louise ná Lucy. Eumelaki te mpo bandeko bákutana na ndeko Brown ná libota na ye.

Alfred alobi lisusu boye: “Mokolo oyo elandaki na ntɔngɔntɔngɔ, ngai ná Leonard tozalaki kosala boyekoli ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ, mpe na mbala moko tomonaki engambe mobali moko na porte. Ezalaki ndeko Brown. Azalaki na molende mpo na solo mpe alingaki kosala diskur mokolo oyo elandaki.” Sanza mobimba ekokaki te, ndeko Brown akabolaki mikanda nyonso oyo ayaki na yango. Batindelaki ye babuku mosusu koleka 5000, mpe eumelaki te, asɛngaki mosusu. Kasi ndeko Brown ayebanaki te lokola motɛki babuku. Na bomoi na ye ya molai lokola mosaleli ya Yehova ya molende, azalaki ntango nyonso kosalela Makomami na badiskur na ye, yango wana bakómaki kobenga ye Brown Biblia.

Betele ya Magdeburg na bambula ya 1920

Na ntango yango, biro ya filiale ya Allemagne, na Barmen, ekómaki moke mpenza, mpe bayokaki ete mosika te limpinga ya ekólo France ekobundisa engumba yango. Bayekoli ya Biblia bamonaki ndako moko na Magdeburg oyo emonanaki ete ebongaki mpenza mpo na mosala na bango ya konyata mikanda. Na mokolo ya 19/06, bandeko basilisaki kokangisa masini mpe bisaleli ya konyata mikanda ná biloko mosusu, mpe bakendaki na Betele ya sika na Magdeburg. Mokolo moko kaka nsima ya koyebisa biro monene ete Betele elongwe na Barmen, bazulunalo epesaki nsango ete France ezwi engumba Barmen. Bandeko bamonaki ete kolongwa na esika yango ezalaki lipamboli mpe libateli ya Yehova.

George Young ná Sarah Ferguson (na lobɔkɔ ya mobali) ná ndeko na ye

Na Brésil, George Young, oyo asalaki mibembo mingi mpo na kopanza nsango malamu, afungolaki biro ya filiale ya sika mpe abandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Portugais. Mwa basanza na nsima, akabolaki mikanda koleka 7000. Kokóma na ye na Brésil epesaki mpe Sarah Ferguson libaku moko kitoko. Sarah azalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli banda 1899, kasi azwaki libaku te ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe. Mwa basanza na nsima, ndeko Ferguson ná bana na ye minei bazwaki batisimo.

“KOSALELA NZAMBE NA MOLENDE MPE NA ESENGO”

Na nsuka ya mbula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1923 emonisaki matomba oyo Bayekoli ya Biblia bazwaki ndenge bakómaki na bomoko na makambo ya losambo; elobaki: “Emonani polele ete bakelasi . . . ekómi makasi na elimo . . . Tiká tómibongisa mpe tókoba kosalela Nzambe na molende mpe na esengo na mbula oyo elandi.”

Mbula oyo elandaki ezalaki mpe mbula ya esengo mpenza mpo na Bayekoli ya Biblia. Bandeko ya Betele basalaki mosala basanza ebele na Esanga ya Staten, oyo ezalaki pene ya biro monene na Brooklyn. Bandako oyo etongamaki na esika yango ya sika esilaki na ebandeli ya 1924, mpe esalisaki bandeko bázala na bomoko mpe bápanza nsango malamu na ndenge oyo bakokaki kosala te liboso.

Ekipi ya botongi na Esanga Staten

a Ekómá Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo.