Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

Yehova ‘akokómisa yo makasi’

Yehova ‘akokómisa yo makasi’

“[Yehova] akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi, akopika bino makasi.”—1 PE. 5:10.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

NA MOKUSE a

1. Nini ezalaki kopesa basaleli ya Yehova ya ntango ya kala makasi?

 MBALA mingi Liloba ya Nzambe elobelaka mibali ya sembo lokola bato ya nguya. Kasi ata mobali oyo alekaki na nguya azalaki ntango mosusu koyoka ete azali na makasi te. Na ndakisa, na mabaku mosusu Mokonzi Davidi ayokaki ete azali “makasi lokola ngomba,” kasi na mabaku mosusu mpe ‘abangaki makasi.’ (Nz. 30:7) Samsone azalaki na nguya ya kokamwa ntango elimo ya Nzambe ezalaki kosala kati na ye, kasi ayebaki ete soki azali na nguya ya Nzambe te, ‘akolɛmba mpenza mpe akokóma lokola bato nyonso.’ (Bas. 14:​5, 6; 16:17) Mibali wana ya sembo bazalaki na makasi kaka mpo Yehova azalaki kopesa bango nguya.

2. Mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete ntango azalaki na bolɛmbu azalaki mpe na nguya? (2 Bakorinti 12:​9, 10)

2 Ntoma Paulo ayebaki ete ye mpe asengelaki na nguya oyo Yehova apesaka. (Tángá 2 Bakorinti 12:​9, 10.) Ndenge moko na mingi kati na biso, ntoma Paulo azalaki kobunda na mikakatano ya nzoto. (Gal. 4:​13, 14) Na bantango mosusu, azalaki kobunda mpo na kosala makambo ya malamu. (Rom. 7:​18, 19) Mpe na mabaku mosusu amitungisaki mpe ayebaki te nini ekokómela ye. (2 Ko. 1:​8, 9) Nzokande, ntango Paulo azalaki na bolɛmbu, akómaki na nguya. Na ndenge nini? Yehova apesaki Paulo nguya oyo azangaki. Akómisaki Paulo makasi.

3. Mituna nini tokoyanola na lisolo oyo?

3 Yehova alaki ete akokómisa biso mpe makasi mpo tóyika mpiko. (1 Pe. 5:10) Kasi tokoki te kokanisa ete tokozwa nguya yango kaka boye kozanga ete tósala milende. Na ndakisa, motɛrɛ ekoki kopesa motuka likoki ya kotambola. Kasi, mokumbi-motuka asengeli konyata accélérateur mpo motuka ekende epai na epai. Ndenge moko mpe, Yehova akoki kopesa biso nguya oyo tosengeli na yango, kasi ezali na makambo oyo tosengeli kosala mpo nguya yango esalisa biso. Bibongiseli nini Yehova azwi mpo na kokómisa biso makasi? Mpe tosengeli kosala nini mpo tózwa nguya yango? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela ndenge oyo Yehova apesaki bato misato oyo Biblia elobeli makasi: mosakoli Yona, Maria mama ya Yesu, mpe ntoma Paulo. Tokomona mpe ndenge Yehova azali kokómisa basaleli na ye makasi lelo oyo na nzela ya bibongiseli ya ndenge wana.

KOBONDELA MPE KOYEKOLA EKOKI KOPESA YO MAKASI

4. Ndenge nini tokoki kozwa nguya epai ya Yehova?

4 Kobondela ezali lolenge moko oyo tokoki kozwa nguya epai ya Nzambe. Yehova akoki koyanola na libondeli na biso mpe kopesa biso “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7) Tokoki mpe kozwa makasi ntango tozali kotánga Liloba na ye mpe komanyola yango. (Nz. 86:11) Nsango oyo Yehova apesi biso na Biblia ezali “na nguya.” (Ebr. 4:12) Ntango ozali kobondela Yehova mpe kotánga Liloba na ye, okozwa makasi oyo osengeli na yango mpo na koyika mpiko, kobatela esengo na yo, to kokokisa mokumba moko ya mpasi. Tótala ndenge Yehova akómisaki Yona makasi.

5. Mpo na nini mosakoli Yona azalaki na mposa ya kozwa makasi?

5 Mosakoli Yona azalaki na mposa ya kozwa makasi. Akimaki mokumba moko ya mpasi oyo Yehova apesaki ye. Mpo na yango, alingaki kokufa na mbula moko ya mopɛpɛ makasi mpe atyaki bomoi ya bato oyo bazalaki na ye na masuwa na likama. Ntango babwakaki ye na mai, mbisi moko ya monene emɛlaki ye; Yona akɔtaki na libumu ya mbisi, esika ya kobangisa. Okanisi ete Yona ayokaki ndenge nini? Mbala mosusu Yona akanisaki ete akokufa kuna? Amitunaki soki Yehova asundoli ye? Na ntembe te, Yona amitungisaki mingi.

Lokola Yona, ndenge nini tokoki kozwa makasi ntango tokutani na komekama? (Talá paragrafe 6-9)

6. Na kotalela Yona 2:​1, 2, 7, nini epesaki Yona makasi ntango azalaki na libumu ya mbisi?

6 Yona asalaki nini mpo na kozwa makasi na esika wana oyo azalaki kaka ye moko, na kati ya libumu ya mbisi? Libosoliboso, Yona abondelaki. (Tángá Yona 2:​1, 2, 7.) Atako Yona azangaki botosi epai ya Yehova, azalaki na kondima ete Yehova akoyoka libondeli na ye ya komikitisa, oyo emonisaki ete abongoli motema. Yona amanyolaki mpe Makomami na mozindo. Mpo na nini tolobi bongo? Na libondeli na ye, oyo ezali na Yona mokapo 2, asaleli maloba mpe bafraze mingi oyo ezali mpe na mokanda ya Nzembo. (Na ndakisa, talá mpe Yona 2:​2, 5Nzembo 69:1; 86:7.) Ezali polele ete Yona ayebaki mikapo yango malamu. Mpe ntango Yona azalaki kokanisa bavɛrsɛ yango na ntango wana ya mpasi, epesaki ye elikya ete Yehova akosalisa ye. Na nsima, Yehova abikisaki Yona, mpe yango ebongisaki Yona mpo na kondima mpe kokokisa mokumba oyo Yehova apesaki ye na nsima.—Yona 2:10–3:4.

7-8. Ndenge nini ndeko mobali moko na Taïwan azwaki nguya na ntango ya komekama?

7 Ndakisa ya Yona ekoki kosalisa biso ntango tozali na mikakatano ndenge na ndenge. Na ndakisa, Zhiming, b ndeko mobali moko na Taïwan, azali na maladi ya makasi mpenza. Longola yango, bandeko ya libota na ye bazali konyokola ye makasi mpo na kondima na ye epai ya Yehova. Zhiming Azwaka makasi epai ya Yehova na nzela ya libondeli mpe ya boyekoli. Alobi boye: “Na bantango mosusu, soki mikakatano ebimi, namitungisaka mingi na boye ete nakokaka ata te kozwa kimya mpo na kosala boyekoli na ngai moko.” Kasi Zhiming atyelaka Yehova motema. Alobi boye: “Ya liboso, nabondelaka Yehova. Na nsima, natyaka ba écouteur mpe nayokaka banzembo ya Bokonzi. Na bantango mosusu, nayembaka yango kutu na mongongo makasi tii nakozwa kimya. Na nsima, nabandaka koyekola.”

8 Boyekoli na ye moko epesaki Zhiming makasi na ndenge oyo akanisaki te. Na ndakisa, nsima ya lipaso moko monene oyo basalaki ye, monganga moko alobaki na ye ete lokola azali na globule rouge mingi te, ekosɛnga bázongisa ye makila. Kasi akanisaki makambo oyo atángaki na butu liboso básala ye lipaso na lisolo ya ndeko mwasi moko oyo basalaki ye lipaso ya ndenge moko. Makila ya ndeko mwasi wana ekitaki kutu makasi koleka ya Zhiming; kasi, aboyaki bázongisa ye makila mpe lipaso na ye elekaki malamu. Lisolo yango epesaki Zhiming makasi ya kotikala sembo.

9. Soki komekama moko ezali kotungisa yo mingi, okoki kosala nini? (Talá mpe bililingi.)

9 Ntango okutanaki na komekama moko, omitungisaki mingi mpe oyebaki te makambo nini oyebisa Yehova na libondeli? To omonaki ete ozali na makasi te mpo na koyekola? Kobosana te ete Yehova ayebi likambo na yo malamu mpenza. Na yango, ata ntango osali kaka libondeli ya mokuse, okoki kotya motema ete akopesa yo oyo osengeli na yango. (Ef. 3:20) Soki mpasi na yo ya nzoto ezali kosala ete okoka te kotánga to koyekola, okoki komeka koyoka botángi ya Biblia to ya mikanda na biso na audio. Koyoka ata nzembo na biso to kotala video moko na jw.org ekoki mpe kosalisa yo mingi. Ntango ozali kobondela Yehova mpe koluka biyano na ye na kati ya bibongiseli ya elimo oyo atyeli biso, ozali kosɛnga ye akómisa yo makasi.

BANDEKO YA LISANGÁ BAKOKI KOPESA YO MAKASI

10. Ndenge nini bandeko na biso bakristo bakoki kopesa biso makasi?

10 Yehova akoki kosalela bandeko na biso bakristo mpo na kopesa biso makasi. Bakoki kozala “libɔndisi mpenza” ntango tokutani na komekama to ntango tozali kobunda mpo na kokokisa mokumba moko ya mpasi. (Kol. 4:​10, 11) Tozalaka na mposa ya baninga, mingimingi na “bantango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Ntango tolɛmbi, bandeko na biso ya lisangá bakoki kosalisa biso tózwa makasi na nzoto, na makanisi, mpe na elimo. Tótala ndenge oyo Maria mama ya Yesu azwaki makasi epai ya basusu.

11. Mpo na nini Maria azalaki na mposa ya kozwa makasi?

11 Maria azalaki na mposa ya kozwa makasi mpo na kosala mokano ya Yehova. Na ntembe te, abulunganaki mpenza ntango anzelu Gabriele ayebisaki ye ete azwi mokumba moko ya monene mpenza. Abalaki naino te; kasi, asengelaki kokóma na zemi. Atako ye moko azalaki naino na bana te, asengelaki kobɔkɔla mwana mobali oyo akokóma Masiya. Mpe lokola Maria asangisaki naino nzoto na mobali te, ndenge nini akolimbola makambo nyonso wana epai ya Yozefe, mobali oyo akobala ye?—Luka 1:​26-33.

12. Na kotalela Luka 1:​39-45, ndenge nini Maria azwaki makasi oyo asengelaki na yango?

12 Ndenge nini Maria azwaki makasi oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mokumba wana monene oyo ekokanaki na mosusu te? Alukaki lisalisi epai ya basusu. Na ndakisa, atunaki anzelu Gabriele mituna oyo etali mokumba yango. (Luka 1:34) Mwa moke na nsima, asalaki mobembo mpe akendaki tii na “etúká ya ngombangomba” ya Yuda mpo na kotala ndeko na ye Elizabeti. Yango esalisaki ye mpenza. Elizabeti apesaki Maria longonya mpe elimo ya Yehova etindaki ye ayebisa Maria esakweli moko ya kolendisa mpo na mwana oyo azalaki na libumu na ye. (Tángá Luka 1:​39-45.) Maria alobaki ete Yehova “asali makambo ya nguya na lobɔkɔ na ye.” (Luka 1:​46-51) Yehova apesaki Maria makasi na nzela ya anzelu Gabriele mpe ya Elizabeti.

13. Litomba nini ndeko mwasi moko ya Bolivie azwaki ntango alukaki lisalisi ya bandeko?

13 Ndenge moko na Maria, yo mpe okoki kozwa makasi na nzela ya bandeko ya lisangá. Dasuri, ndeko mwasi moko na Bolivie, azalaki na mposa ya kozwa makasi ya ndenge wana. Ntango bazwaki tata na ye na maladi oyo ekomema ye mokemoke tii na liwa mpe akɔtaki lopitalo, Dasuri andimaki kozwa mokumba ya kokɛngɛla tata na ye. (1 Tim. 5:4) Ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Mbala mingi nazalaki koyoka lokola nasuki.” Asɛngaki nde basusu basalisa ye? Na ebandeli azalaki koboya kosɛnga basusu básalisa ye. Alobi boye: “Nalingaki te kotungisa bandeko. Nazalaki komiloba, ‘Yehova nde akosalisa ngai.’ Kasi na nsima namonaki ete soki nazali kaka ngai moko, nazalaki nde koluka kosilisa mikakatano na ngai, ngai moko.” (Mas. 18:1) Dasuri azwaki ekateli ya kokomela mwa baninga na ye mpo na koyebisa bango likambo oyo azalaki na yango. Alobi boye: “Nazali na maloba te oyo ekoki komonisa ndenge baninga na ngai bakristo bapesaki ngai makasi. Bazalaki komemela biso bilei na lopitalo mpe kotángela na ngai bavɛrsɛ ya kobɔndisa. Esalaka mpenza malamu koyeba ete tozali biso moko te. Tozali na kati ya libota monene ya Yehova, epai bandeko na biso basalisaka biso, balelaka elongo na biso mpe basalisaka biso tókoba kosalela Yehova elongo na bango.”

14. Mpo na nini tosengeli kondima lisalisi ya bankulutu?

14 Lolenge moko oyo Yehova apesaka biso nguya ezali na nzela ya bankulutu. Bazali makabo oyo Yehova asalelaka mpo na kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. (Yis. 32:​1, 2) Na yango ntango otungisami, yebisá bankulutu makambo oyo ezali kotungisa yo. Ntango bazwi bibongiseli mpo na kosalisa yo, ndimá yango na botɔndi nyonso. Na nzela na bango, Yehova akoki kokómisa yo makasi.

ELIKYA NA YO MPO NA MIKOLO EZALI KOYA EKOKI KOPESA YO MAKASI

15. Elikya nini bakristo nyonso bazali na yango?

15 Elikya na biso oyo euti na Biblia ekoki kopesa biso nguya mpenza. (Rom. 4:​3, 18-20) Biso bakristo tozali na elikya kitoko ya kozala na bomoi libela na libela, ezala na mabele oyo ebongwani paradiso to na Bokonzi ya likoló. Elikya na biso epesaka biso makasi ya koyikela komekama mpiko, kosakola nsango malamu, mpe ya kokokisa mikumba ndenge na ndenge na lisangá. (1 Tes. 1:3) Elikya yango epesaki mpe ntoma Paulo makasi.

16. Mpo na nini ntoma Paulo azalaki na mposa ya kozwa makasi?

16 Paulo azalaki na mposa ya kozwa makasi. Na mokanda na ye epai ya Bakorinti, amikokanisaki na mbɛki ya mabele, eloko oyo ezalaka makasi te. ‘Akamolamaki,’ ‘asilaki mayele,’ ‘azalaki konyokwama,’ mpe “abambamaki na nse.” Kutu bomoi na ye ezalaki na likama. (2 Ko. 4:​8-10) Paulo akomaki maloba yango na mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ. Mbala mosusu na ntango wana ayebaki yango te, kasi mikakatano na ye esilaki naino te. Na nsima akutanaki na etuluku ya bato ya mobulu, bakangaki ye, azindaki na mai na masuwa, mpe batyaki ye na bolɔkɔ.

17. Na kotalela 2 Bakorinti 4:​16-18, nini epesaki Paulo makasi ya koyikela mikakatano mpiko?

17 Mpo na kozwa makasi ya koyika mpiko, Paulo atyaki makanisi na elikya na ye. (Tángá 2 Bakorinti 4:​16-18.) Ayebisaki Bakorinti ete atako nzoto na ye ‘ezalaki kobeba,’ akotika te ete yango ezongisa ye nsima. Paulo atyaki miso na mikolo oyo ezali koya. Elikya na ye ya kozwa bomoi ya seko na likoló ezalaki “nkembo moko monene mpenza, oyo ekokani na eloko mosusu te,” mpe mpo na yango, Paulo andimaki koyikela ata mokakatano nini mpiko. Lokola Paulo azalaki komanyola elikya yango, ayokaki ete azali ‘kokóma sika mokolo na mokolo.’

18. Ndenge nini elikya ya lisekwa epesaki Tihomir mpe libota na ye makasi?

18 Tihomir, ndeko mobali moko na Bulgarie, azwaki makasi na nzela ya elikya na ye. Eleki mwa bambula, leki na ye ya mobali, Zdravko, akufaki na aksida. Na boumeli ya ntango moko boye nsima na yango, Tihomir azalaki na mawa makasi mpenza. Mpo na yango, ye ná libota na ye bamekaki komona na makanisi ndenge oyo lisekwa ekozala. Alobi boye: “Na ndakisa, tolobelaki esika oyo tokokutana na Zdravko, biloko oyo tokolambela ye, banani tokobengisa mbala ya liboso ntango akosekwa, mpe makambo oyo tokoyebisa ye na oyo etali mikolo ya nsuka.” Tihomir alobi ete kotya makanisi na elikya na bango epesaki libota na bango makasi ya kokoba koyika mpiko mpe ya kokoba kozela ntango oyo Yehova akosekwisa leki na ye.

Omonaka na makanisi ndenge bomoi na yo ekozala na mokili ya sika? (Talá paragrafe 19) c

19. Okoki kosala nini mpo na kokómisa elikya na yo makasi? (Talá mpe elilingi.)

19 Ndenge nini okoki kokómisa elikya na yo makasi? Na ndakisa, soki ozali na elikya ya bomoi ya libela na libela awa na mabele, tángá makambo oyo Biblia elobi mpo na Paradiso mpe manyolá yango. (Yis. 25:8; 32:​16-18) Moná na makanisi ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika. Omimona na mokili ya sika. Ozali komona banani? Ozali koyoka makɛlɛlɛ ya nini? Ozali komiyoka ndenge nini? Mpo na kosalisa yo, okoki kotala bililingi ya Paradiso na mikanda na biso to kotala video ya banzembo ya TV jw, na ndakisa Na mokili ya sika, Yango oyo na miso, to Kanisá ntango wana. Soki tobateli elikya ya mokili ya sika polele na makanisi na biso, tokomona ete mikakatano na biso “ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.” (2 Ko. 4:17) Yehova akokómisa yo makasi na nzela ya elikya oyo apesi yo.

20. Ata soki toyoki ete tolɛmbi, ndenge nini tokoki kozwa nguya?

20 Ata ntango toyoki ete tolɛmbi, “tokozwa nguya epai ya Nzambe.” (Nz. 108:13) Yehova asili komonisa makambo oyo osengeli kosala mpo ozwa makasi epai na ye. Na yango, ntango ozali na mposa ya lisalisi mpo na kokokisa mokumba moko, mpo na koyikela mokakatano mpiko, to mpo na kobatela esengo na yo, bondelá Yehova na motema mobimba mpe luká litambwisi na ye na nzela ya boyekoli na yo moko. Ndimá malendisi oyo euti epai ya bandeko ya lisangá. Kanisáká elikya na yo mpo obatela yango polele na makanisi. Soki osali bongo, ‘[Nzambe akosalela] bonene ya nguya na ye mpo na kopesa yo nguya monene mpo oyika mpenza mpiko na motema molai ná esengo.’—Kol. 1:11.

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

a Lisolo oyo ekosalisa baoyo bakoki koyoka ete mokakatano moko ezali mpasi báyikela yango mpiko to mokumba moko eleki makoki na bango. Tokoyekola ndenge oyo Yehova akoki kopesa biso makasi mpe oyo tokoki kosala mpo na kozwa lisalisi na ye.

b Topesi bango bankombo mosusu.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mwasi moko ya baba azali kokanisa bilaka ya Biblia mpe kolanda video ya miziki mpo amona na makanisi ndenge bomoi na ye ekozala na mokili ya sika.