Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

Sepelá na libaku kitoko ya kosambela na tempelo ya Yehova ya elimo

Sepelá na libaku kitoko ya kosambela na tempelo ya Yehova ya elimo

“Bósambela Nzambe oyo asalá likoló, ná mabele.”—EM. 14:7.

LOYEMBO 93 Pambolá makita na biso

NA MOKUSE a

1. Anzelu moko azali koloba nini, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?

 SOKI anzelu moko asololi na yo, okoyoka makambo oyo akoloba? Lelo oyo, anzelu moko azali koloba na bato ya “bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” Azali koloba nini? “Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye . . . Bósambela Nzambe oyo asalá likoló, ná mabele.” (Em. 14:​6, 7) Yehova azali Nzambe ya solo kaka moko oyo moto nyonso asengeli kosambela. Tozali mpenza na botɔndi mingi ndenge apesi biso libaku kitoko ya kosambela ye na tempelo na ye monene ya elimo!

2. Tempelo ya elimo ya Yehova ezali nini? (Talá etanda “ Oyo yango ezali te.”)

2 Tempelo ya elimo ezali mpenza nini, mpe mokanda nini elobeli ndimbola na yango na bosikisiki? Tempelo ya elimo ezali ndako te. Ezali ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kopesa ye losambo oyo endimami na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Ntoma Paulo alobeli ebongiseli yango na mokanda na ye epai ya bakristo Baebre oyo bazalaki kofanda na Yudea na siɛklɛ ya liboso. b

3-4. Makambo nini etindaki Paulo akomela bakristo Baebre?

3 Mpo na nini Paulo akomelaki bakristo yango? Ekoki kozala mpo na ntina mibale ya minene. Ya liboso, mpo na kolendisa bango. Mingi na bango bakolaki na lingomba ya Bayuda. Mbala mosusu bakambi ya lingomba na bango ya kala bazalaki kotyola bango mpo bakómaki bakristo. Mpo na nini? Mpo bakristo bazalaki na tempelo te mpo na kokende kosambela, bazalaki na etumbelo te mpo na kopesa Nzambe bambeka, mpe bazalaki na banganga-nzambe te. Yango ekokaki kolɛmbisa bayekoli ya Kristo nzoto mpe kokitisa kondima na bango. (Ebr. 2:1; 3:​12, 14) Basusu kutu bakokaki kokanisa kozongela Lingomba ya Bayuda.

4 Ya mibale, ndenge Paulo amonisaki yango, bakristo yango bazalaki kosala milende te mpo na kokanga ntina ya mateya ya sika to ya mozindo, “bilei ya makasi” oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Ebr. 5:​11-14) Emonani ete basusu kati na bango bazalaki kotingama na Mibeko ya Moize. Kasi Paulo alimbolaki ete bambeka oyo Mobeko esɛngaki ekokaki te kolongola lisumu mpo na libela. Mpo na ntina wana nde “balongolaki” Mobeko. Yango wana Paulo alingaki koteya bango mateya mosusu ya mozindo. Akundwelaki bakristo yango ete mbeka ya Yesu epesi “elikya moko oyo eleki malamu,” oyo na nzela na yango bakoki “kopusana penepene na Nzambe.”—Ebr. 7:​18, 19.

5. Tosengeli kokanga ntina ya likambo nini na mokanda ya Baebre, mpe mpo na nini?

5 Paulo alimbolelaki bandeko na ye Baebre ntina oyo losambo ya bakristo elekaki mosika oyo bazalaki kopesa na kala. Makambo oyo ezalaki na losambo ya Bayuda ezalaki kaka “elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali nde Kristo.” (Kol. 2:17) Elili emonisaka lolenge ya eloko, kasi ezali mpenza eloko yango te. Ndenge moko mpe, losambo ya kala ya Bayuda ezalaki kaka elili ya bosolo oyo esengelaki koya. Tosengeli kokanga ntina ya ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kolimbisama ya masumu na biso, mpo tókoka kopesa ye losambo oyo akondima. Tókokanisa sikoyo “elili” (losambo ya kala ya Bayuda) mpe “bosolo” (losambo ya bakristo), ndenge emonisami na mokanda ya Baebre. Yango ekosalisa biso tókanga ntina ya tempelo ya elimo mpe ndenge oyo etali biso.

TABERNAKLE

6. Ndenge nini bazalaki kosalela tabernakle?

6 Elili. Paulo alobelaki mingimingi tabernakle oyo Moize asalaki na mobu 1512 L.T.B. (Talá etanda “Elili—Bosolo.”) Tabernakle ezalaki hema moko oyo na ebandeli Bayisraele bazalaki komema bisika nyonso oyo bakei. Basalelaki yango mbula pene na 500, tii tempelo etongamaki na Yerusaleme. (Kob. 25:​8, 9; Mit. 9:22) Tabernakle yango to “hema ya kokutana” ezalaki esika oyo Bayisraele bazalaki koyangana mpo na kopesa Nzambe bambeka mpe kosambela ye. (Kob. 29:​43-46) Kasi, tabernakle ezalaki mpe komonisa eloko ya malamu koleka oyo esengelaki koya mpo na bakristo.

7. Ntango nini tempelo ya elimo ekómaki likambo ya solo?

7 Bosolo. Tabernakle ya kala ezalaki “elili ya makambo oyo ezali na likoló,” mpe ezalaki komonisa tempelo monene ya Yehova ya elimo. Paulo alobaki ete “hema yango [to, tabernakle] ezali ndakisa mpo na ntango oyo.” (Ebr. 8:5; 9:9) Na yango, ntango akomelaki bakristo wana Baebre, tempelo ya elimo esilaki kokóma likambo ya solo mpo na bakristo. Ekómaki likambo ya solo na mobu 29 T.B. Na mobu yango, Yesu azwaki batisimo, atyamaki mafuta na elimo santu, mpe akómaki “nganga-nzambe monene oyo aleki banganga-nzambe minene nyonso” na tempelo ya Yehova ya elimo. cEbr. 4:14; Mis. 10:​37, 38.

NGANGA-NZAMBE MONENE

8-9. Na kotalela Baebre 7:​23-27, bokeseni nini ya monene ezali kati na banganga-nzambe minene ya Yisraele mpe Nganga-nzambe Monene oyo aleki banganga-nzambe mosusu nyonso, Yesu Kristo?

8 Elili. Nganga-nzambe monene azalaki momonisi ya bato liboso ya Nzambe. Nganga-nzambe monene ya liboso na Yisraele ezalaki Arona; Yehova atyaki ye na molulu ya bofungoli tabernakle. Kasi, ndenge Paulo amonisaki yango, “mingi basengelaki kokóma banganga-nzambe nsima ya bamosusu mpo liwa ezalaki kopesa bango nzela te ya kokoba kozala bongo.” d (Tángá Baebre 7:​23-27.) Mpe lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, banganga-nzambe yango basengelaki mpe kopesa bambeka mpo na masumu na bango moko. Yango nde bokeseni kati na nganga-nzambe monene ya Yisraele mpe Yesu Kristo, Nganga-nzambe Monene oyo aleki banganga-nzambe misusu nyonso.

9 Bosolo. Yesu Kristo, nganga-nzambe na biso monene, azali “mosaleli, . . . na hema ya solosolo, oyo Yehova atongaki, kasi moto te.” (Ebr. 8:​1, 2) Paulo alobaki ete “lokola [Yesu] azali na bomoi libela na libela, azali na bakitani te na bonganga-nzambe na ye.” Paulo abakisaki ete Yesu azali “na mbindo te, akabwani na basumuki” mpe na bokeseni na banganga-nzambe ya Yisraele, “azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo” mpo na masumu na ye moko. Sikoyo tólobela bokeseni oyo ezali kati na bitumbelo mpe bambeka oyo ezalaki na elili mpe oyo ezali na bosolo.

BITUMBELO MPE BAMBEKA

10. Bambeka oyo ezalaki kopesama na etumbelo ya kwivre emonisaki nini?

10 Elili. Pene na monɔkɔ ya tabernakle, ezalaki na etumbelo ya kwivre esika bazalaki kotumbela Yehova bambeka ya banyama. (Kob. 27:​1, 2; 40:29) Kasi, bambeka yango ekokaki te kosala ete masumu ya bato elimbisama mpo na libela. (Ebr. 10:​1-4) Ndenge bazalaki kopesa bambeka yango mbala na mbala na tabernakle emonisaki ete mbeka moko ekopesama mpo na kosikola bato na masumu mpo na libela.

11. Na etumbelo nini Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka? (Baebre 10:​5-7, 10)

11 Bosolo. Yesu ayebaki ete Yehova atindaki ye na mabele mpo apesa bomoi na ye mbeka ya lisiko mpo na bato nyonso. (Mat. 20:28) Na yango, na batisimo na ye, Yesu amimonisaki mpo na kosala oyo Yehova alingaki. (Yoa. 6:38; Gal. 1:4) Yesu amipesaki mbeka na etumbelo ya elilingi, oyo emonisaki “mokano” ya Nzambe; mokano yango ezalaki ete Mwana na ye apesa bomoi na ye ya kokoka mbeka. Bomoi ya Yesu epesamaki “mbala moko mpo na libela” mpo na kozipa, mpo na libela, masumu ya moto nyonso oyo azali komonisa kondima epai ya Kristo. (Tángá Baebre 10:​5-7, 10.) Sikoyo, tólobela makambo oyo ezalaki na kati ya tabernakle.

ESIKA MOSANTU MPE ESIKA ELEKI MOSANTU

12. Nani akokaki kokɔta na biteni ya tabernakle?

12 Elili. Tabernakle mpe batempelo oyo etongamaki na nsima na Yerusaleme ekokanaki mpenza na kati. Ezalaki na biteni mibale na kati—“Esika Mosantu” mpe “Esika Eleki Mosantu”; mpe rido moko ya kilo ekabolaki yango. (Ebr. 9:​2-5; Kob. 26:​31-33) Na kati ya Esika Mosantu ezalaki na etɛlɛmiselo ya miinda ya wolo, etumbelo ya mpaka ya malasi, mpe mesa ya mampa ya kolakisa. Kaka “banganga-nzambe oyo batyamaki mafuta” nde bazalaki na ndingisa ya kokɔta na Esika Mosantu mpo na kosala misala na bango. (Mit. 3:​3, 7, 10) Na Esika Eleki Mosantu ezalaki na sanduku ya kondimana, oyo ezalaki komonisa ete Yehova azali wana. (Kob. 25:​21, 22) Kaka nganga-nzambe monene nde azalaki na ndingisa ya koleka rido mpo na kokɔta na Esika Eleki Mosantu mbala moko na mbula, na Mokolo ya kozipa masumu. (Lev. 16:​2, 17) Mbula na mbula, azalaki kokɔta kuna na makila ya banyama mpo na kozipa masumu na ye moko mpe oyo ya ekólo mobimba. Bambula mingi na nsima, na nzela ya elimo santu na ye, Yehova amonisaki ndimbola ya solosolo ya makambo yango oyo ezalaki na kati ya tabernakle.—Ebr. 9:​6-8.

13. Esika Mosantu mpe Esika Eleki Mosantu ya tabernakle ezali komonisa nini na bosolo mpo na bakristo?

13 Bosolo. Kaka ndambo moke ya bayekoli ya Kristo nde batyami mafuta na elimo, mpe bazali na boyokani ya ndenge mosusu na Yehova. Bato yango 144000 bakozala banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu. (Em. 1:6; 14:1) Esika Mosantu ya tabernakle ezali komonisa ndenge bazali bana ya Nzambe oyo babotami na elimo wana bazali naino awa na mabele. (Rom. 8:​15-17) Esika Eleki Mosantu ya tabernakle ezali komonisa likoló, epai Yehova afandaka. “Rido” oyo ekabolaki Esika Mosantu na Esika Eleki Mosantu ezali komonisa nzoto ya Yesu ya mosuni oyo ezalaki kopekisa ye akɔta na likoló lokola Nganga-nzambe Monene ya tempelo ya elimo. Ntango apesaki nzoto yango mbeka mpo na bato, Yesu afungolaki nzela ya bomoi na likoló mpo na bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. Bango mpe basengeli kotika nzoto na bango ya mosuni mpo na kozwa mbano na bango ya likoló. (Ebr. 10:​19, 20; 1 Ko. 15:50) Nsima ya kosekwa, Yesu akɔtaki na Esika Eleki Mosantu ya tempelo ya elimo, epai baoyo nyonso batyami mafuta na elimo bakozala elongo na ye.

14. Na kotalela Baebre 9:​12, 24-26, mpo na nini ebongiseli ya tempelo ya elimo ya Yehova eleki malamu?

14 Tokoki sikoyo komona polele ndenge ebongiseli oyo Yehova atye mpo na losambo ya pɛto na nzela ya mbeka ya lisiko mpe bonganga-nzambe ya Yesu Kristo eleki malamu. Nganga-nzambe monene na Yisraele azalaki kokɔta na Esika Eleki Mosantu oyo moto asalá ná makila ya bambeka ya banyama, kasi Yesu akɔtaki na “likoló mpenza,” esika oyo eleki nyonso na bosantu, mpo na komonana liboso ya Yehova. Kuna, amonisaki motuya ya bomoi na ye ya moto ya kokoka mpo na biso, “mpo na kolongola lisumu na [nzela ya] mbeka na ye moko.” (Tángá Baebre 9:​12, 24-26.) Mbeka ya Yesu ezali mbeka eleki monene oyo ezali kolimbisa masumu mpo na libela. Sikoyo, tokomona ete ezala tozali na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, biso nyonso tokoki kosambela Yehova na tempelo na ye ya elimo.

MAPANGO

15. Banani bazalaki kosala na lopango ya tabernakle?

15 Elili. Tabernakle ezalaki kaka na lopango moko, esika monene epai banganga-nzambe bazalaki kosala misala na bango. Etumbelo monene ya kwivre ya bambeka ya kotumba ezalaki na lopango yango, ná saani monene ya kwivre ya mai oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela mpo na komipɛtola liboso ya kosala mosala na bango. (Kob. 30:​17-20; 40:​6-8) Kasi batempelo oyo etongamaki na nsima ezalaki mpe na lopango mosusu ya libándá, esika oyo baoyo bazalaki banganga-nzambe te bakokaki kotɛlɛma mpe kosambela Nzambe.

16. Banani bazali kosala na mokomoko ya mapango ya tempelo ya elimo?

16 Bosolo. Liboso bákende likoló kosala lokola banganga-nzambe elongo na Yesu, bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo bazali kosala na bosembo awa na mabele na lopango ya kati ya tempelo ya elimo. Saani monene ya mai oyo ezalaki na tabernakle ekundwelaka bango, ata mpe bakristo nyonso, ete basengeli kotikala pɛto na bizaleli mpe na elimo. Kasi esika nini “ebele mpenza ya bato,” oyo bazali kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ na bosembo nyonso, bazali kosambela Yehova? Ntoma Yoane amonaki bango “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi,” na esika oyo ekokani awa na mabele na lopango ya libándá, epai “bazali kosalela [Nzambe] mosala mosantu butu moi na tempelo na ye.” (Em. 7:​9, 13-15) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova apesi biso esika na ebongiseli oyo atye mpo na kopesa ye losambo ya pɛto!

KOSAMBELA YEHOVA EZALI LIBAKU KITOKO

17. Bambeka nini tozali na libaku ya kopesa Yehova?

17 Lelo oyo, bakristo nyonso bazali na libaku kitoko ya kopesa Yehova bambeka na kosaleláká ntango, makasi, mpe biloko na bango mpo na matomba ya Bokonzi ya Nzambe. Ndenge ntoma Paulo ayebisaki bakristo Baebre, tokoki ‘kopesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.’ (Ebr. 13:15) Tokoki komonisa botɔndi mpo na libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosambela Yehova soki tozali kopesa ye bambeka na biso oyo eleki malamu.

18. Na kotalela Baebre 10:​22-25, nini tosengeli kozongisa nsima te, mpe nini tosengeli kobosana ata moke te?

18 Tángá Baebre 10:​22-25. Na nsuka ya mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo alobeli makambo ndenge na ndenge ya losambo na biso oyo tosengeli kozongisa nsima te. Makambo yango ezali: Kobondela Yehova, kosakwela basusu elikya na biso, koyangana na makita, mpe kolendisa basusu “mingi koleka awa tozali komona mokolo [ya Yehova] ezali kopusana.” Na nsuka ya mokanda ya Emoniseli, anzelu ya Yehova asaleli maloba oyo mbala mibale mpo na kobɛta nsɛtɛ: “Sambelá Nzambe!” (Em. 19:10; 22:9 ) Tiká ete tóbosana ata moke te mateya mozindo oyo etali tempelo monene ya elimo ya Yehova mpe libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosambela Nzambe na biso monene!

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

a Moko ya mateya mozindo mpenza na Liloba ya Nzambe ezali tempelo monene ya elimo ya Yehova. Tempelo yango ezali nini? Lisolo oyo emonisi makambo oyo mokanda ya Baebre elobi mpo na tempelo yango. Lisolo oyo ekobakisa botɔndi na yo mpo na libaku kitoko oyo ozali na yango ya kosambela Yehova.

b Mpo na koyeba makambo oyo mokanda ya Baebre elobeli, talá video Maloba ya ebandeli na Baebre na jw.org.

c Baebre ezali mokanda kaka moko na Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo ebengi Yesu Nganga-nzambe Monene.

d Buku moko elobi ete banganga-nzambe bakokaki kozala ata 84 na Yisraele ntango tempelo ya Yerusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B.

f Talá etanda “Ndenge elimo santu emonisaki ndimbola ya tempelo ya elimo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2010, lok. 22.