Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osalelaka basi makambo lokola Yehova?

Osalelaka basi makambo lokola Yehova?

EZALI mpenza lokumu kosala elongo na basi mingi ya sembo. Mpe tolingaka mokomoko ya bandeko basi yango oyo basalaka mosala makasi! a Na yango, bandeko mibali, tolingaka kosalelaka bango makambo na boboto, na bosembo, mpe na limemya. Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi kosala bongo. Bandeko mibali mosusu bazali mpe na mokakatano mosusu.

Basusu bakolá na bamboka oyo mibali mingi bamonaka ete basi bazali na motuya moke. Na ndakisa, Hans, mokɛngɛli ya zongazonga na Bolivie, alobi: “Mibali mosusu babɔkwamá na mimeseno oyo bana mibali bamikumisaka mingi, mpe batyá na makanisi na bango ete mibali baleki basi.” Shengxian, nkulutu moko na Taïwan, alobi: “Esika nafandi, mibali mingi bamonaka ete basi basengeli te kokɔta na makambo na bango. Soki mobali moko azongeli makanisi ya mwana mwasi na likambo moko, baninga na ye bakoki kotyola ye.” Mibali mosusu bamonisaka makanisi na bango na ndenge ya nsense. Na ndakisa, bakoki kosala masɛki mosusu oyo ezali kokitisa basi.

Likambo ya esengo, mobali nyonso akoki kobongwana, ata soki akolá na momeseno nini. Akoki kotika kokanisa ete mibali baleki basi. (Ef. 4:​22-24) Akoki kosala yango soki alandi ndakisa ya Yehova. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Yehova asalelaka basi makambo, ndenge bandeko mibali bakoki komekola Yehova, mpe ndenge bankulutu bakoki kopesa ndakisa na oyo etali kopesa bandeko basi limemya.

YEHOVA ASALELAKA BASI MAKAMBO NDENGE NINI?

Yehova apesi ndakisa ya kokoka na ndenge ya kosalela basi makambo. Lokola azali Tata ya motema mawa, alingaka bana na ye nyonso awa na mabele. (Yoa. 3:16) Mpe bandeko basi ya sembo bazali lokola bana na ye ya basi oyo bazali na motuya epai na ye. Tótala ndenge Yehova amonisaka ete apesaka basi lokumu.

Asalelaka bango makambo kozanga kopona bilongi. Yehova akelaki mibali ná basi na elilingi na ye. (Eba. 1:27) Asalaki te mibali na mayele to na makoki mingi koleka basi; asepelaka mpe na mibali mingi koleka basi te. (2 Nt. 19:7) Akelaki mibali ná basi na bɔɔngɔ ndenge moko mpo na kokanga ntina ya mateya ya Biblia mpe komonisa bizaleli na ye kitoko. Lisusu, Yehova amonaka kondima ya mibali ná oyo ya basi kaka ndenge moko, bázala na elikya ya bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele to ya kozala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. (2 Pe. 1:​1, msl.) Ezali polele ete Yehova azalaka na makanisi ya mabe te mpo na basi.

Ayokaka bango. Yehova atyaka likebi mpe na mayoki mpe makanisi ya basi. Na ndakisa, ayokaki libondeli ya Rashele mpe ya Hana, mpe asalaki oyo basɛngaki. (Eba. 30:22; 1 Sa. 1:​10, 11, 19, 20) Yehova asalaki mpe ete bakomi ya Biblia bákoma masolo ya mibali oyo bayokelaki basi. Na ndakisa, Abrahama alandaki malako oyo Yehova apesaki ete ayokela mwasi na ye, Sara. (Eba. 21:​12-14) Mokonzi Davidi ayokelaki Abigaile. Kutu, Davidi amonaki ete Yehova nde atindaki Abigaile aya koloba na ye. (1 Sa. 25:​32-35) Yesu, oyo amekolaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, ayokelaki mama na ye, Maria. (Yoa. 2:​3-10) Bandakisa yango emonisi ete lolenge moko oyo Yehova amonisaka limemya epai ya basi ezali ya koyoka bango.

Atyelaka bango motema. Na ndakisa, Yehova atyelaki Eva motema ete akopesa mabɔkɔ na kobatela mabele mobimba. (Eba. 1:28) Na ndenge yango, Yehova amonisaki ete azalaki te kotalela Eva lokola nde azali na motuya moke liboso ya mobali na ye Adama, kasi nde ete azali mosungi. Yehova atyelaki mpe mosakoli Debora ná mosakoli Huluda motema mpo bápesa bato na ye toli, ata mpe bakonzi ná banganga-nzambe. (Bas. 4:​4-9; 2 Bak. 22:​14-20) Lelo oyo, Yehova atyelaka basi bakristo motema ete bakoki kosala mosala na ye. Bandeko basi yango ya sembo bazali basakoli, mosusu babongisi-nzela mpe bamisionɛrɛ. Basalisaka na kosala baplan, na kotonga, mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe bandako ya Betele. Basusu basalaka na Betele; basusu basalaka na babiro ya kobongola mikanda. Bandeko basi yango bazali lokola limpinga monene oyo Yehova azali kosalela mpo na kokokisa mokano na ye. (Nz. 68:11) Ezali polele ete Yehova amonaka te ete basi balɛmbá to bazali na makoki te.

NDENGE NINI BANDEKO MIBALI BAKOKI KOMEKOLA YEHOVA?

Bandeko mibali, mpo na koyeba soki tosalelaka bakristo ya basi makambo lokola Yehova, tosengeli kotalela na bosembo makanisi mpe misala na biso. Mpo na kosala yango, tozali na mposa ya lisalisi. Ndenge kaka masini ya rayon-X ekoki kolakisa maladi na kati ya motema ya moto, moninga moko mpe Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyeba makanisi nyonso ya mabe mpo na basi, oyo mbala mosusu tobombá mpenza na kati na biso. Tokoki kosala nini mpo na kozwa lisalisi yango?

Tuná moninga oyo otyelaka motema. (Mas. 18:17) Ekozala malamu tóluka moninga moko oyo totyelaka motema, oyo azalaka na boboto mpe bokatikati mpe tótuna ye mituna lokola: “Omonaka ete nasalelaka basi makambo ndenge nini? Bakoki koloba ete napesaka bango limemya? Nakoki kosala nini mpo nabongisa ndenge na ngai ya kosalela bango makambo?” Soki moninga na yo ayebisi yo makambo oyo okoki kobongisa, koluka te komilongisa. Kasi, ndimá kobongisa makambo oyo esengeli.

Yekolá Liloba ya Nzambe. Lolenge eleki malamu ya koyeba soki tosalelaka bandeko basi makambo malamu ezali ya kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kotalela makanisi mpe misala na biso. (Ebr. 4:12) Wana tozali koyekola Biblia, totángaka masolo ya mibali oyo basalelaki basi makambo malamu, mpe baoyo basalaki bongo te. Tokoki kokokanisa misala na bango na oyo ya biso moko. Lisusu, kokokanisa bavɛrsɛ ya Biblia ekoki kopekisa biso tólimbola bavɛrsɛ na ndenge ya mabe, kozanga ete tóyeba, kaka mpo tólongisa ndenge na biso oyo ebongi te ya kotalela basi. Na ndakisa, 1 Petro 3:7 elobi ete esengeli kopesa basi “lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ.” b Yango emonisi nde ete mwasi azali na nse, ete azali na mayele to na makoki te, lokola mobali? Ata moke te! Tókokanisa maloba ya Petro ná makambo oyo Bagalatia 3:​26-29 elobi, ete Yehova aponá basi ná mibali mpo báyangela elongo na Yesu na likoló. Ntango toyekoli Liloba ya Nzambe mpe totuni makanisi ya moninga oyo totyelaka motema mpo na ndenge oyo tosalelaka basi makambo, tokoki koyekola kopesa bandeko basi limemya oyo ebongi.

NDENGE NINI BANKULUTU BAKOKI KOMONISA LIMEMYA EPAI YA BANDEKO BASI?

Bandeko mibali na lisangá bakoki mpe koyekola kosalela bandeko basi makambo na limemya soki balandi ndakisa ya bankulutu ya boboto. Ndenge nini bankulutu bapesaka ndakisa na oyo etali kopesa bandeko basi limemya? Tólobela mwa makambo oyo basalaka.

Bapesaka bandeko basi longonya. Ntoma Paulo atikelá bankulutu ndakisa ya malamu. Apesaki bandeko basi ebele longonya na mokanda oyo akomelaki bandeko nyonso ya lisangá ya Roma. (Rom. 16:12) Kanisá esengo oyo bandeko basi wana bayokaki ntango mokanda ya Paulo etángamaki na lisangá. Ndenge moko mpe, bankulutu bakakatanaka te kopesa bandeko basi longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu mpe mosala oyo basalaka mpo na Yehova. Yango esalisaka bandeko basi báyeba ete bandeko bapesaka bango limemya mpe balingaka bango. Maloba ya kolendisa ya nkulutu moko ekoki kozala eloko mpenza oyo bandeko yango ya basi basengeli na yango wana bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo.—Mas. 15:23.

Pesá longonya

Bankulutu basengeli kopesa bandeko basi longonya oyo euti na motema mpe na likambo moko ya sikisiki. Mpo na nini? Ndeko mwasi moko na nkombo Jessica alobi: “Ezalaka malamu ntango bandeko mibali balobi na ndeko mwasi ‘longonya.’ Kasi, tosepelaka mingimingi ntango bandeko mibali bayebisi biso ntina oyo bapesi biso longonya, na ndakisa mpo tofandisaka bana kimya na makita to ntango tomemi moyekoli moko ya Biblia na makita.” Ntango bankulutu bazali kopesa longonya mpo na likambo moko ya sikisiki, bandeko basi bamonaka ete bazali na ntina mpe na esika na kati ya lisangá.

Bayokaka bandeko basi. Bankulutu oyo bazali na komikitisa bayebaka ete kaka bango te nde bazalaka na makanisi ya malamu. Bankulutu ya ndenge wana basɛngaka bandeko basi bápesa makanisi na bango, mpe bayokaka na likebi ntango bazali koloba. Na ndenge yango, bankulutu balendisaka bandeko basi, mpe bango moko bazwaka matomba. Na ndenge nini? Nkulutu moko na nkombo Gerardo, oyo asalaka na Betele, alobi: “Namoni ete kotuna likanisi ya bandeko basi esalisaka ngai nasala mosala na ngai malamu koleka. Mingi na bango baumeli na mosala yango koleka bandeko mibali mingi.” Na lisangá, bandeko basi mingi bazali babongisi-nzela, na yango bayebi malamu bato oyo bafandi na teritware ya lisangá. Nkulutu moko na nkombo Bryan alobi: “Bandeko basi bakoki kosalisa mingi na ebongiseli ya Yehova. Na yango, ezali malamu kotuna makanisi na bango!”

Yokáká

Bankulutu oyo bazali na bwanya bawelaka te kotya makanisi ya bandeko basi mopanzi. Mpo na nini? Nkulutu moko na nkombo Edward alobi: “Likanisi mpe boyebi ya ndeko mwasi ekoki kosalisa ndeko mobali amona likambo na mobimba na yango, mpe ekoki kosalisa ye ayeba komitya na esika ya basusu.” (Mas. 1:5) Ata soki nkulutu akokoka te kosalela likanisi ya ndeko mwasi, akoki kaka kopesa ye longonya mpo na makambo oyo alobi mpe mpo na bososoli na ye.

Bapesaka bandeko basi formasyo. Bankulutu oyo bazali na bososoli balukaka mabaku ya kopesa bandeko basi formasyo. Na ndakisa, bakoki koteya bango ndenge ya kotambwisa makita mpo na mosala ya kosakola mpo básala yango soki ndeko mobali oyo azwá batisimo azali wana te. Bakoki mpe kolakisa bango kosalela baaparɛyi to bamasini mosusu mpo básalisa na mosala ya kobatela mpe kotonga bandako ya teokrasi. Na Betele, bakɛngɛli balakisi bandeko basi makambo ndenge na ndenge, na ndakisa kobatela biloko, kosomba, kolandela makambo ya mbongo, makambo ya baordinatɛrɛ, mpe bongo na bongo. Ntango bankulutu bazali kopesa bandeko basi formasyo, bazali komonisa ete bamonaka ete bazali na makoki mpe babongi kotyelama motema.

Pesá formasyo

Bandeko basi mingi basalelaka formasyo oyo bazwaki epai ya bankulutu mpo na bolamu ya basusu. Na ndakisa, basusu basalelaka formasyo oyo bazwaki na makambo ya botongi mpo na kosalisa basusu bátonga lisusu bandako na bango nsima ya makama. Bandeko basi mosusu basalelaka formasyo na bango na mosala ya kosakola na esika ya bato mingi mpo na kolakisa bandeko basi mosusu mayele yango. Bandeko basi bamiyokaka ndenge nini mpo na bankulutu oyo bapesaki bango formasyo? Ndeko mwasi moko na nkombo Jennifer alobi: “Ntango tozalaki kotonga Ndako ya Bokonzi moko, mokɛngɛli moko azwaki ntango ya kopesa ngai formasyo. Atalaki mosala oyo nasalaki, mpe apesaki ngai longonya. Nazalaki kosepela kosala elongo na ye mpo namiyokaki ete azwaki ngai na motuya mpe atyelaki ngai motema.”

MATOMBA YA KOSALELA BASI MAKAMBO LOKOLA BATO YA LIBOTA

Tolingaka bandeko basi ya sembo kaka ndenge Yehova alingaka bango! Yango wana tosalelaka bango makambo lokola bato ya libota. (1 Tim. 5:​1, 2) Ezali libaku malamu mpe lokumu mpenza kosala elongo na bango. Tozalaka mpe na esengo ntango bamoni ete tolingaka bango mpe tosalisaka bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Vanessa alobi: “Napesi Yehova matɔndi ndenge nazali na kati ya ebongiseli na ye, oyo etondi na bandeko mibali oyo balendisaka ngai.” Ndeko mwasi moko na Taïwan alobi: “Nazali na botɔndi ndenge Yehova ná ebongiseli na ye bapesaka basi lokumu mpe batalelaka mayoki na biso. Yango elendisaka kondima na ngai mpe etindaka ngai nasepela lisusu mingi na libaku malamu ya kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova.”

Na ntembe te Yehova asepelaka komona bandeko mibali ya sembo bazali kosala makasi bátalela basi mpe básalela bango makambo lokola Ye! (Mas. 27:11) Nkulutu moko na Écosse na nkombo Benjamin alobi: “Mokili epesaka basi limemya ata moke te. Na yango, ntango basi bayei na Ndako ya Bokonzi, ebongi tómonisa bango ete tokeseni na mokili.” Tiká ete biso nyonso tósala makasi tómekola Yehova na kosaleláká bandeko basi makambo na bolingo mpe limemya oyo babongi na yango.—Rom. 12:10.

a Na lisolo oyo, maloba “bandeko basi” elobeli “bandeko na biso ya lisangá,” kasi te bandeko ya libota.

b Mpo na koyeba malamu ndimbola ya maloba “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ,” talá lisolo “Motuya ya ‘mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2006, mpe “Batoli ya bwanya mpo na babalani” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/2005.