Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

LOYEMBO 27 Komonana ya bana ya Nzambe

“Nakosundola yo ata moke te”!

“Nakosundola yo ata moke te”!

“[Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”EBR. 13:5b.

NA MOKUSE

Kondimisa basaleli ya Nzambe awa na mabele ete bakosundolama te ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele bakokende bango nyonso likoló.

1. Ntango nini bakristo nyonso oyo batyami mafuta bakozala na likoló?

 BAMBULA eleki, basaleli ya Yehova bamitunaki boye: ‘Ntango nini bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló?’ Liboso, tozalaki kokanisa ete mbala mosusu mwa bakristo yango mosusu bakozala na Paradiso awa na mabele mpo na mwa ntango nsima ya etumba ya Armagedone. Kasi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013 emonisaki ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo bakozala kuna na likoló liboso Armagedone ebanda.—Mat. 24:31.

2. Motuna nini ebimi, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Kasi, motuna mosusu ekoki kozala: Nini ekokómela “bampate mosusu” ya Kristo oyo bakokoba kosalela Yehova na bosembo awa na mabele na ntango ya ‘bolɔzi monene’? (Yoa. 10:16; Mat. 24:21) Bandeko mosusu lelo oyo bakoki komituna soki bakomiyoka te ete babungi nzela to basundolami ntango bandeko mibali mpe basi oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló. Tótalela masolo mibale ya Biblia oyo ekoki kotinda moto amituna bongo. Na nsima, tokolobela bantina oyo tosengeli komitungisa te mpo na likambo yango.

LIKAMBO NINI EKOSALEMA TE?

3-4. Motuna nini basusu bakoki komituna, mpe mpo na nini?

3 Basusu bakoki komituna soki bampate mosusu bakotika kolanda solo ntango bandeko oyo batyami mafuta na elimo, oyo basali Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bakozala lisusu te mpo na kopesa bango litambwisi. Ekoki kozala ete masolo mosusu ya Biblia nde etindaka bango bákanisa bongo. Tótalela masolo mibale. Ya liboso ezali ya Nganga-nzambe monene Yehoyada. Azalaki sembo mpenza epai ya Nzambe. Ye ná mwasi na ye, Yehoshabeate, babombaki mwana moko na nkombo Yehoashe mpe basalisaki ye akóma mokonzi ya malamu mpe ya sembo. Ntango nyonso oyo mobange Yehoyada azalaki na bomoi, Yehoashe azalaki kosala oyo ezali malamu. Kasi nsima ya liwa ya Yehoyada, eumelaki te Yehoashe abandaki kosala oyo ezali mabe. Ayokelaki bankumu mabe ya Yuda mpe atikaki Yehova.—2 Nt. 24:​2, 15-19.

4 Ndakisa mosusu ezali ya bakristo ya siɛklɛ ya mibale. Ntoma Yoane, ntoma ya nsuka oyo atikalaki na bomoi, azalaki ndakisa malamu, asalisaki bakristo mingi bákoba na mosala ya Yehova. (3 Yoa. 4) Na ntango moko boye, elongo na bantoma mosusu ya sembo ya Yesu, Yoane abundisaki lipɛngwi oyo ezalaki kopalangana. (1 Yoa. 2:18; 2 Tes. 2:7) Kasi nsima ya liwa ya Yoane, lipɛngwi epalanganaki lokola mɔtɔ ya zamba. Bambula na nsima, mateya mpe makanisi ya lokuta ekɔtaki na lisangá ya bokristo mpe ebebisaki yango.

5. Likambo nini tosengeli kokanisa te nsima ya kotalela masolo yango mibale?

5 Masolo yango mibale emonisi nde ete likambo moko ya ndenge wana ekokómela bampate mosusu ya Kristo ntango bakristo oyo batyami mafuta bakokende likoló? Na ntango yango, bakristo ya sembo awa na mabele bakotika nde makambo oyo bayekolaki, ndenge Yehoashe asalaki, to bakokwea na lipɛngwi, ndenge ezalaki mpo na bakristo mingi ya siɛklɛ ya mibale ya T.B.? Eyano ezali ete ekosalema bongo te! Tóyeba ete ntango bakristo oyo batyami mafuta bakozala lisusu na mabele te, bampate mosusu bakokoba kobatelama mpe kosalela Yehova. Nini endimisi biso likambo yango?

LOSAMBO YA PƐTO EKOBEBISAMA TE

6. Bileko nini misato tokolobela na mokuse?

6 Mpo na nini tomindimisi ete losambo ya pɛto ekobebisama te ata na ntango ya mpasi oyo ezali koya? Tondimi yango mpo na makambo oyo toyekoli na Biblia na ntina etali eleko oyo tozali. Eleko yango ekeseni mpenza na Yisraele ya kala mpe eleko ya bakristo ya siɛklɛ ya mibale. Na yango, tótalela na likebi bileko oyo misato: (1) Ntango ya Yisraele ya kala, (2) ntango oyo ezalaki nsima ya liwa ya bantoma, mpe (3) bantango na biso, “bantango oyo Nzambe akozongisa makambo nyonso sika.”—Mis. 3:21.

7. Na Yisraele ya kala, mpo na nini bato ya sembo balɛmbaki te ntango ekólo ná bakonzi na yango baponaki nzela ya mabe?

7 Ntango ya Yisraele ya kala. Mwa moke liboso Moize akufa, ayebisaki Bayisraele boye: “Nayebi malamu ete nsima ya liwa na ngai bokosala makambo ya mabe, mpe bokolongwa na nzela oyo napesi bino mitindo.” (Mib. 31:29) Moize alobaki mpe ete soki Yisraele etomboki, ekólo yango ekomemama na mboka mopaya. (Mib. 28:​35, 36) Maloba yango ekokisamaki? Ɛɛ. Na boumeli ya bankama ya bambula, bakonzi mingi baponaki nzela ya mabe mpe bapɛngwisaki bato ya ekólo ya Nzambe. Yango etindaki Yehova apesa bato mabe ya ekólo Yisraele etumbu mpe asukisa molɔngɔ ya bakonzi oyo bazalaki komonisa ye awa na mabele. (Ezk. 21:​25-27) Kasi, Bayisraele ya sembo bazwaki mpiko ntango bamonaki ete liloba ya Nzambe ekokisamaki.—Yis. 55:​10, 11.

8. Tosengeli nde kokamwa ndenge lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya mibale ebebisamaki? Limbolá.

8 Ntango oyo ezalaki nsima ya liwa ya bantoma. Tosengeli nde kokamwa ndenge lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya mibale ebebisamaki? Te. Yesu asakolaki ete lipɛngwi monene esengelaki kosalema. (Mat. 7:​21-23; 13:​24-30, 36-43) Ntoma Paulo, Petro, mpe Yoane bamonisaki ete esakweli wana ya Yesu esilaki kobanda kokokisama na siɛklɛ ya liboso ya T.B. (2 Tes. 2:​3, 7; 2 Pe. 2:1; 1 Yoa. 2:18) Na siɛklɛ ya mibale, lisangá ya bokristo ebebaki. Bokristo ya lipɛngwi ebimaki mpe ekómaki eteni monene ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Likambo oyo Yesu asakolaki ezalaki lisusu kokokisama.

9. Na ndenge nini eleko oyo tozali ekeseni na ntango ya Yisraele ya kala mpe ntango ya lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya mibale?

9 “Bantango oyo Nzambe akozongisa makambo nyonso sika.” Ntango na biso ekeseni na ntango ya Yisraele ya kala mpe ntango ya lipɛngwi monene oyo ekɔtaki na siɛklɛ ya mibale ya T.B. Ntango na biso ebengami nini? Tokoki kokanisa libosoliboso ndenge ebengami “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mabe. (2 Tim. 3:1) Kasi Biblia emonisi ete eleko moko monene mpe ya molai koleka ebandaki mpe na ntango yango kaka. Ekokoba tii Bokonzi ya Masiya ekozongisa bato na ezaleli ya kokoka mpe ekobongola mabele paradiso. Eleko yango ebengami “bantango oyo Nzambe akozongisa makambo nyonso sika.” (Mis. 3:21) Eleko yango ebandaki na mobu 1914. Nini ezongisamaki na ntango yango? Ya liboso, Yesu atyamaki Mokonzi na likoló. Na ndenge yango, Yehova azalaki lisusu na mokonzi oyo akoki komonisa Ye, mokitani moko ya Davidi, mokonzi ya sembo. Kasi, makambo oyo Yehova akozongisa esukaki kaka na bokonzi wana te. Mwa moke na nsima, nsukansuka losambo ya pɛto ebandaki kozongisama! (Yis. 2:​2-4; Ezk. 11:​17-20) Ekobeba lisusu?

10. (a) Biblia esakolaki nini mpo na losambo ya pɛto na ntango na biso? (Yisaya 54:17) (b) Mpo na nini bisakweli yango ezali kokitisa motema?

10 Tángá Yisaya 54:17. Esakweli yango elobi: “Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga”! Maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ezali kokokisama lelo. Maloba oyo ya kolendisa etali mpe eleko na biso: “Bana na yo nyonso bakoteyama na Yehova, mpe bana na yo bakozala na kimya mingi. Okopikama makasi na bosembo. . . . Okobanga eloko te mpe ntina ya kozala na nsɔmɔ ekozala te mpo ekopusana pene na yo te.” (Yis. 54:​13, 14) Ata ye moko Satana, “nzambe ya mokili oyo,” azali na nguya te ya kopekisa mosala ya koteya oyo bato ya Yehova bazali kosala. (2 Ko. 4:4) Losambo ya pɛto ezongisami, mpe ekobebisama lisusu ata mokolo moko te. Ezali wana mpo na kotikala libela na libela. Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa biso ekolonga!

MAKAMBO NINI EKOSALEMA?

11. Nini endimisaka biso ete ebele mpenza ya bato bakosundolama te ntango bakristo oyo batyami mafuta bakei likoló?

11 Makambo nini ekosalema ntango bakristo oyo batyami mafuta bakokende likoló? Kobosana te ete Yesu azali Mobateli ya mpate na biso. Azali mokonzi ya lisangá ya bokristo. Alobaki polele ete: “Bozali na Mokambi kaka moko, Kristo.” (Mat. 23:10) Mokonzi na biso oyo azali koyangela akotika te kosala mosala na ye. Lokola Kristo azali elongo na bango, bayekoli na ye awa na mabele bakozala na ntina ya kobanga te. Ya solo, toyebi te makambo nyonso oyo Kristo akosala mpo na kotambwisa bayekoli na ye na ntango wana. Kasi, tótalela mwa bandakisa ya Biblia oyo ekoki kokitisa biso motema.

12. Ndenge nini Yehova abatelaki bato na ye (a) nsima ya liwa ya Moize? (b) ntango Eliya azwaki mokumba mosusu? (Talá mpe elilingi.)

12 Liboso Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka, Moize akufaki. Nini ekómelaki bato ya Nzambe? Lokola Moize moto ya sembo azalaki lisusu te, Yehova atikaki nde kosalisa bato na ye? Te. Ntango nyonso oyo bazalaki sembo, Yehova abatelaki bango. Liboso Moize akufa, Yehova ayebisaki ye atya Yosua mpo na kokamba bato. Moize apesaki Yosua formasyo bambula mingi. (Kob. 33:11; Mib. 34:9) Lisusu, ezalaki na mibali mosusu mingi ya makoki oyo bazalaki kokamba bato: bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano, ata mpe ya bato zomi. (Mib. 1:15) Bato ya Nzambe babatelamaki malamu. Tólobela mpe ndakisa ya Eliya. Alongisaki losambo ya pɛto bambula mingi na Yisraele. Kasi na nsima, Yehova alongolaki ye mpe apesaki ye mokumba mosusu mosika na sudi, na Yuda. (2 Bak. 2:1; 2 Nt. 21:12) Bato ya sembo oyo bazalaki na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele basundolamaki nde? Te. Eliya apesaki Elisha formasyo bambula mingi. Ezalaki mpe na “bana ya basakoli,” oyo emonani ete bazalaki na biteyelo mpo na kozwa formasyo. (2 Bak. 2:7) Na yango, ezalaki na mibali mingi ya sembo oyo bazalaki kosalisa na kokamba bato ya Nzambe. Mokano ya Yehova ekobaki kokende liboso, mpe abatelaki basambeli na ye ya sembo.

Moize (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Eliya (na lobɔkɔ ya mobali) moto na moto azali kopesa formasyo (Talá paragrafe 12)


13. Likambo nini ya kolendisa ezali na Baebre 13:5b? (Talá mpe elilingi.)

13 Lokola tolobeli bandakisa yango, okanisi ete nini ekosalema ntango bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta bakokende likoló? Ntina ya komitungisa ezali te. Biblia epesi eyano ya polele mpe ya kokitisa motema: Yehova akosundola bato na ye awa na mabele te. (Tángá Baebre 13:5b.) Ndenge moko na Moize mpe Eliya, etuluku moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali kokamba mosala lelo, bayebi ntina ya kopesa basusu formasyo. Banda bambula mingi, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bapesaka bandeko oyo bazali na kati ya bampate mosusu formasyo mpo na kokamba. Na ndakisa, basalá biteyelo ebele mpo na formasyo ya bankulutu, bakɛngɛli-batamboli, bandeko ya Bakomite ya filiale, bakɛngɛli na Betele, mpe basusu. Lisangani ya Mikóló-Bakambi yango moko epesaka formasyo na basungi ya bakomite ndenge na ndenge ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Lelo oyo, basungi yango bazali kokokisa mikumba minene na bosembo mpenza. Yango ebongisi bango mpo bákoba mosala ya kobatela bampate ya Kristo.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka makasi mpo na kopesa formasyo na basungi mpe kobongisa biteyelo mpo na formasyo ya bankulutu, bakɛngɛli-batamboli, bandeko ya Komite ya filiale, bakɛngɛli na Betele, mpe bamisionɛrɛ na mokili mobimba (Talá paragrafe 13)


14. Likambo nini tosengeli kosimba?

14 Likambo oyo tosimbi yango oyo: Ntango bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló pene na nsuka ya bolɔzi monene, losambo ya pɛto ekokoba kokende liboso awa na mabele. Lokola Yesu Kristo azali kotambwisa bango, basambeli ya Nzambe bakokoba kosalela Ye. Ezali solo ete na ntango yango, tokozala na etumba ya Goge ya Magoge, etuluku ya bikólo oyo ekobundisa biso. (Ezk. 38:​18-20) Kasi etumba yango ya ntango mokuse ekolonga te; ekopekisa te bato ya Nzambe básambela Yehova. Mpe Yehova akosikola bango! Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki “ebele mpenza ya bato” ya bampate mosusu ya Kristo. Bayebisaki Yoane ete “ebele mpenza ya bato” yango “bauti na bolɔzi monene.” (Em. 7:​9, 14) Ya solo, bakobika!

15-16. Na kotalela Emoniseli 17:​14, bakristo oyo batyami mafuta bakozala wapi na ntango ya etumba ya Armagedone, mpe mpo na nini ezali likambo ya kolendisa?

15 Kasi, basusu bakoki komituna: ‘Bongo bakristo oyo batyami mafuta na elimo? Bakosala nini nsima ya kolongwa na mabele?’ Biblia epesi eyano ya polele. Emonisi ete baguvɛrnema ya mokili “bakobunda etumba na Mwana-Mpate.” Kasi bakolonga te. Biblia elobi: “Mwana-Mpate akolonga bango.” Kasi banani bakosalisa ye? Vɛrsɛ emonisi ete ezali baoyo “babengami,” “baponami” mpe “bazali sembo.” (Tángá Emoniseli 17:14.) Banani wana? Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo basekwi! Na yango, ntango bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló pene na nsuka ya bolɔzi monene, moko ya mikumba na bango ya liboso ekozala ya kobunda. Mokumba ya kokamwa mpenza! Bakristo yango mosusu bazalaki babundi liboso bákóma Batatoli ya Yehova. Basusu kutu bazalaki basoda. Kasi na nsima bakómaki bakristo ya solo mpe bayekolaki nzela ya kimya. (Gal. 5:22; 2 Tes. 3:16) Batikaki bitumba. Kasi, nsima ya kokende likoló, bakosala elongo na Kristo mpe baanzelu na ye mosantu, bakobundisa banguna ya Nzambe na etumba ya nsuka.

16 Kanisá naino! Awa na mabele, bakristo mosusu oyo batyami mafuta bakómi mibange, kutu makasi esili. Kasi, ntango bakosekwa na likoló, bakozala bikelamu ya elimo ya nguya mpe oyo ekoki kokufa te; bakozwa mokumba ya kobunda elongo na Yesu Kristo, Mokonzi ya limpinga na bango. Nsima ya etumba ya Armagedone, bakosala elongo mpo na kosalisa bato bákóma bato ya kokoka. Kozanga ntembe, bakosalela bandeko na bango ya bolingo awa na mabele makambo mingi ya malamu uta na likoló, koleka ndenge bakokaki kosala yango ntango bazalaki bato ya kozanga kokoka!

17. Ndenge nini toyebi ete basaleli nyonso ya Nzambe bakobatelama na etumba ya Armagedone?

17 Ozali na kati ya bampate mosusu? Boye, ekosɛnga osala nini ntango etumba ya Armagedone ekobanda? Likambo ya kosala yango oyo: Tyelá Yehova motema, mpe landá litambwisi na ye. Mbala mosusu ekosɛnga nini? Biblia elobi na biso: “Kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango tii nkanda ekosila.” (Yis. 26:20) Basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe, na likoló mpe na mabele, bakobatelama na ntango yango. Lokola ntoma Paulo, tondimi ete ezala “baguvɛrnema, to makambo ya lelo, to makambo oyo ekoya . . . to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe.” (Rom. 8:​38, 39) Kobosana te: Yehova alingaka yo, mpe akosundola yo ata moke te!

NTANGO BAKRISTO YA NSUKA OYO BATYAMI MAFUTA BAKOKENDE LIKOLÓ,

  • nini ekosalema te?

  • mpo na nini tokoki kondima ete losambo ya pɛto ekobeba te?

  • mpo na nini tokoki kotya motema ete Yehova akobatela bato na ye?

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso