Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 7

LOYEMBO 51 Tomipesi na Nzambe!

Mateya oyo tokoki kozwa epai ya Banaziri

Mateya oyo tokoki kozwa epai ya Banaziri

“Azali mosantu mpo na Yehova mikolo nyonso ya Bonaziri na ye.”MIT. 6:8.

NA MOKUSE

Ndenge ndakisa ya Banaziri ekoki kosalisa biso tósalela Yehova na elimo ya komipimela mpe na mpiko.

1. Elimo nini basambeli ya Yehova bamonisaka banda kala?

 OZWAKA na motuya boyokani na yo ná Yehova? Na ntembe te ezali bongo! Mpe ozali yo moko te. Banda na ntango ya kala, bato mingi balingaka Yehova lokola yo. (Nz. 104:​33, 34) Mingi bamipimelaka makambo mosusu ya bomoi mpo na kosambela Yehova. Ezalaki mpe bongo mpo na basaleli ya Nzambe na Yisraele ya kala, oyo bazalaki kobengama Banaziri. Bazalaki banani, mpe mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na bango?

2. (a) Banaziri bazalaki banani? (Mitángo 6:​1, 2) (b) Mpo na nini Bayisraele mosusu baponaki kosala elako ya Bonaziri?

2 Liloba “Naziri” euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “moto oyo akabwani na basusu,” “moto oyo atyami pembeni,” to “moto oyo amipesi.” Liloba yango ebongi mpenza mpo na kolobela Bayisraele ya molende oyo bamipimelaki makambo mosusu mpo na kosalela Yehova na ndenge mosusu. Mibeko ya Moize epesaki mobali to mwasi nyonso nzela ya kosala elako epai ya Yehova ete aponi kozala na bomoi ya Monaziri na boumeli ya ntango moko boye. a (Tángá Mitángo 6:​1, 2.) Moto oyo asali elako yango, to elaka monene, asengelaki kosala makambo oyo Bayisraele mosusu basɛngisamaki kosala te. Boye, mpo na nini Moyisraele akokaki kopona kosala elako ya Bonaziri? Na ntembe te, bolingo makasi mpo na Yehova mpe botɔndi mpo na ebele ya mapamboli na Ye nde ezalaki kotinda Moyisraele asala elako yango.—Mib. 6:5; 16:17.

3. Na ndenge nini basaleli ya Nzambe lelo bazali lokola Banaziri?

3 Ebongiseli ya Bonaziri esukaki ntango “mobeko ya Kristo” ezwaki esika ya Mobeko ya Moize. (Gal. 6:2; Rom. 10:4) Kasi, ndenge moko na Banaziri, basaleli ya Yehova lelo oyo bazali kokoba komonisa mposa makasi ya kosalela ye na motema mpe molimo na bango mobimba, mpe na makanisi mpe makasi na bango nyonso. (Mrk. 12:30) Tosalaka elako ya kosalela Yehova bongo ntango tomipesi na ye na libondeli. Mpo na kokokisa elako yango, esɛngaka tóndima kosala mokano ya Yehova mpe komipimela makambo mosusu. Wana tozali kotalela ndenge Banaziri bazalaki kokokisa elako na bango, tokoki koyekola mateya ya ntina mingi na oyo etali kokokisa elako na biso ya komipesa. b (Mat. 16:24) Tótalela mwa bandakisa.

NDIMÁ KOMIPIMELA MAKAMBO

4. Na kotalela Mitángo 6:​3, 4, nini ezalaki komeka elimo ya komipimela ya Monaziri?

4 Tángá Mitángo 6:​3, 4. Banaziri basengelaki koboya masanga nyonso mpe eloko nyonso oyo euti na mbuma ya nzete ya vinyo, ezala mbuma ya mobesu to ya kokauka. Bato mosusu zingazinga bazalaki kolya biloko yango mpe likambo ezalaki te, mpo biloko yango ezalaki mabe te. Biblia elobi ete “vinyo oyo esepelisaka motema ya moto” ezali likabo ya Nzambe. (Nz. 104:​14, 15) Kasi, Banaziri bandimaki bango moko komipimela esengo ya kolya biloko yango. c

Ondimaka komipimela makambo mosusu, lokola Banaziri? (Talá paragrafe 4-6)


5. Madián ná Marcela baponaki komipimela makambo nini, mpe mpo na nini?

5 Ndenge moko na Banaziri, biso mpe tomipimelaka makambo mosusu mpo na kosalela Yehova mingi koleka. Tózwa ndakisa ya Madián ná Marcela. d Babalani bakristo yango bazalaki na bomoi ya malamu. Madián azalaki na mosala ya malamu oyo epesaki bango nzela ya kofanda na ndako moko ya kitoko mpe ya monene. Kasi, balingaki kosala mingi na mosala ya Yehova. Mpo na kokokisa mokano yango, bazwaki ekateli ya kosala mwa bambongwana. Balobi boye: “Totikaki kosalela mbongo mingimingi.” Tozwaki ndako ya moke mpe totɛkaki motuka na biso.” Moto moko te asɛngaki Madián ná Marcela básala bambongwana yango; bango moko baponaki kosala yango mpo ezalaki kopesa bango nzela ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Bakómaki na esengo mpo na bikateli oyo bazwaki.

6. Mpo na nini bakristo bamipimelaka makambo mosusu lelo oyo? (Talá mpe elilingi.)

6 Lelo oyo, bakristo basepelaka komipimela makambo mosusu mpo bápesa ntango mingi koleka na mosala ya Nzambe. (1 Ko. 9:​3-6) Yehova asɛngi biso te ete tómipimela makambo yango; makambo yango mpe ezali mabe te. Na ndakisa, bandeko mosusu batiká misala ya malamu, to ndako. Basusu bazongisá nsima ekateli ya kobala to ya kobota bana. Basusu baponaka kosala esika oyo mposa ezali mingi, ata soki ekosɛnga bázala mosika ya baninga mpe bandeko na bango ya libota. Mingi na biso tosalaka makambo yango mpo tolingi kopesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu. Yebá ete Yehova azwaka na motuya mpenza makambo nyonso oyo ondimá kotika, ezala ya monene to ya moke, mpo na kosalela ye.—Ebr. 6:10.

NDIMÁ KOMONISA ETE OKESENI NA BASUSU

7. Mokakatano nini Monaziri akokaki kokutana na yango mpo akangama na elako na ye? (Mitángo 6:5) (Talá mpe elilingi.)

7 Tángá Mitángo 6:5. Banaziri basalaki elako ete bakokata nsuki na bango te. Yango ezalaki komonisa botosi mpe komikitisa na bango liboso ya Yehova. Na kotalela ntango oyo Moyisraele aumeli na Bonaziri, basusu bakokaki komona ete akataka nsuki te. Soki bato yango bazalaki kosepela ndenge asali elako ya Bonaziri, yango ezalaki likambo te. Kasi likambo ya mawa, na bantango mosusu na lisolo ya ekólo Yisraele, bato bazalaki na limemya te epai ya Banaziri mpe bazalaki kopesa bango mabɔkɔ te. Na ndakisa, na ntango ya mosakoli Amose, Bayisraele oyo bapɛngwaki ‘bazalaki komɛlisa Banaziri vinyo,’ emonani ete mpo na kotinda bango bábebisa elako na bango ya koboya masanga. (Amo. 2:12) Na bantango mosusu, esɛngaki mpiko mpenza mpo Monaziri akangama na elako na ye mpe amonisa ete akeseni na basusu.

Monaziri oyo akangami na elako na ye azalaki kondima kokesana na basusu (Talá paragrafe 7)


8. Ndakisa ya elenge Benjamin elendisi yo na likambo nini?

8 Na lisalisi ya Yehova, biso mpe tomonisaka na mpiko nyonso ete tokeseni na basusu, ata soki tolobaka mingi te, to tozali nsɔninsɔni. Tótalela ndakisa ya Benjamin, elenge Motatoli moko ya mbula 10 na Norvège. Na eteyelo na bango, basalaki molulu moko mpo na komonisa ete bazali kopesa bato ya Ukraine mabɔkɔ mpo na etumba oyo ezalaki kuna. Basɛngaki bana báyemba loyembo moko, balati bilamba ya langi ya bendele ya Ukraine. Benjamin akanaki ete akosangana te na molulu yango oyo ezalaki kokumisa ekólo, mpe atɛlɛmaki na ye mosika. Kasi, molakisi moko amonaki ye mpe abelelaki: “Yaká awa kosala molulu elongo na biso. Biso nyonso tozali kozela yo!” Na mpiko nyonso, Benjamin apusanaki epai ya molakisi mpe alobaki: “Nakɔtaka na makambo ya mokili te, mpe nasanganaka te na milulu ya makambo ya politiki. Kutu, Batatoli ya Yehova mingi bazali na bolɔkɔ mpo baboyi kokende etumba.” Molakisi ayokelaki Benjamin mpe atikaki ye akende. Kasi, bana-kelasi na bango babandaki kotuna ye ntina oyo asanganaki elongo na bango te. Benjamin amitungisaki mingi mpe alingaki kolela; kasi, azwaki mpiko mpe azongelaki makambo oyo alobaki na molakisi epai ya bana-kelasi nyonso. Na nsima, Benjamin ayebisaki baboti na ye ete ayokaki ete Yehova asalisaki ye akɔtela kondima na ye.

9. Ndenge nini tokoki kosepelisa motema ya Yehova?

9 Lokola toponaka kosala mokano ya Yehova, bato bamonaka ete tokeseni na bango. Tosengeli kozala na mpiko mpo tóloba ete tozali Motatoli ya Yehova na mosala to na kelasi. Mpe lokola makanisi mpe bizaleli ya bato ya mokili oyo ezali se kobeba, na ntembe te ekokóma lisusu mpasi mpo tózala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Biblia mpe tóyebisa basusu nsango malamu. (2 Tim. 1:8; 3:13) Kasi, tóbosana te ete ‘tosepelisaka motema ya Yehova’ ntango tozwi mpiko ya komonisa ete tokeseni na baoyo basalelaka ye te.—Mas. 27:11; Mal. 3:18.

TYÁ YEHOVA LIBOSO NA BOMOI NA YO

10. Ndenge nini kolanda etinda oyo ezali na Mitángo 6:​6, 7 ekokaki kozala komekama mpo na Banaziri?

10 Tángá Mitángo 6:​6, 7. Banaziri bakokaki te kopusana pembeni ya ebembe. Ekoki komonana lokola likambo moke. Kasi, na ntango ya kala, Monaziri akokaki komona etinda yango mokakatano makasi ntango ndeko ya libota na ye akufi. Milulu ya kokunda ebembe na ntango wana ezalaki kosɛnga kozala pembeni ya mowei. (Yoa. 19:​39, 40; Mis. 9:​36-40) Nzokande, Monaziri akokaki te kosala milulu yango. Ata na ntango oyo libota na bango ezalaki na mawa makasi, Banaziri bazalaki komonisa kondima makasi na ndenge bakangamaki na elako oyo basalaki. Na ntembe te, Yehova azalaki kopesa basaleli na ye wana ya molende makasi ya koyikela mikakatano oyo bakutani na yango mpiko.

11. Mokristo asengeli kozala na ekateli nini na oyo etali makambo ya libota? (Talá mpe elilingi.)

11 Biso bakristo tozwaka na lisɛki te elako na biso ya komipesa na Yehova. Yango ebongolaka bikateli na biso mpe makambo oyo tosalaka na oyo etali makambo ya libota. Tosalaka makasi tókokisa mikumba ya libota oyo Biblia esɛngi biso, kasi tolekisaka ata moke te mposa ya bato ya libota na biso liboso ya makambo oyo Yehova asɛngi biso. (Mat. 10:​35-37; 1 Tim. 5:8) Na bantango mosusu, yango ekoki kosɛnga ete mwa kimya ebeba elongo na bandeko na biso ya libota mpo tósepelisa Yehova.

Ondimaka kotya mokano ya Yehova liboso ata ntango ezali mpasi mpenza mpo na yo? (Talá paragrafe 11) e


12. Na likambo ya mpasi oyo ezalaki na libota na ye, Alexandru asalaki nini, mpe asalaki nini te?

12 Tózwa ndakisa ya Alexandru ná mwasi na ye, Dorina. Mobali yango ná mwasi na ye bayekolaki Biblia mbula moko, na nsima Dorina akataki koyekola, mpe alingaki ete Alexandru mpe akata. Kasi, Alexandru ayebisaki ye na boboto mpe na mayele ete akotika te. Dorina asepelaki te mpe asalaki nyonso mpo na kolɛmbisa Alexandru. Alexandru alobi ete alukaki koyeba ntina oyo Dorina azalaki kosala bongo, kasi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ye. Na bantango mosusu soki Dorina atyoli ye mpe akateli ye lingala, azalaki komona lokola atika kaka koyekola Biblia. Kasi, Alexandru akobaki kotya Yehova na esika ya liboso, mpe azalaki komonisela mwasi na ye bolingo mpe limemya mingi. Nsukansuka, ndakisa na ye ya malamu etindaki mwasi na ye azongela koyekola Biblia, mpe na nsima azwaki batisimo.—Talá na jw.org video Alexandru ná Dorina Văcar: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto” na masolo oyo ezali na “Solo ebongolaka bato.”

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova mpe libota na biso?

13 Yehova nde asalaki ebongiseli ya libota, mpe alingi ete tózala na libota ya esengo. (Ef. 3:​14, 15) Soki tolingi kozala mpenza na esengo, tosengeli kosala makambo ndenge Yehova alingi. Kotya ata ntembe moke te ete Yehova asepelaka ntango omipimeli makambo mosusu mpo na kosambela ye wana ozali kobatela libota na yo mpe kosalela bango makambo na bolingo mpe na limemya.—Rom. 12:10.

LENDISÁ ELIMO YA BONAZIRI

14. Tosengeli kosala makasi tólendisa mingi banani na maloba na biso?

14 Baoyo nyonso baponi kosambela Yehova lelo basengeli kondima komipimela makambo mosusu na bolingo nyonso. Na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te. Ndenge nini tokoki kosalisana mpo tómonisa elimo yango? Tosengeli kolendisana na maloba na biso. (Yobo 16:5) Na lisangá na bino, ezali na bandeko oyo bazali kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo na komipesa lisusu mingi na mosala ya Nzambe? Oyebi bilenge oyo bamonisaka na mpiko nyonso ete bakeseni na basusu na kelasi, atako ezali mpasi kosala bongo? Bongo bayekoli ya Biblia mpe bandeko oyo bazali kobunda mpo na kotikala sembo atako botɛmɛli na libota? Tiká tósalelaka mabaku nyonso mpo na koloba na bandeko yango na ndenge ya kolendisa, komonisa bango ete tosepelaka na elimo na bango ya komipimela mpe mpiko na bango.—Flm. 4, 5, 7.

15. Ndenge nini basusu bapesaki bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mabɔkɔ?

15 Ntango mosusu tokoki kozwa libaku ya kosalisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. (Mas. 19:17; Ebr. 13:16) Yango nde ndeko mwasi moko ya mobange na Sri Lanka azalaki kolinga. Babakiselaki ye mbongo ya pansiɔ mpe alingaki kosalisa bilenge basi mibale oyo bazalaki babongisi-nzela bákoba mosala na bango atako bazalaki na mokakatano ya mbongo. Akómaki kopesa bango mwa mbongo sanza nyonso mpo na kofutela telefone. Amonisaki elimo ya malamu mpenza!

16. Ebongiseli ya Bonaziri ya ntango ya kala ezali koteya biso nini?

16 Tokoki mpenza koyekola makambo mingi na ndakisa malamu ya Banaziri ya ntango ya kala! Kasi, ebongiseli yango eteyaka biso mpe mwa makambo mpo na Tata na biso ya likoló, Yehova. Ayebaka ete tolingaka mpenza kosepelisa ye mpe ete tondimaka komipimela makambo mosusu mpo na kokokisa elako na biso ya komipesa. Apesi biso lokumu na ndenge atiki biso moko tómonisa ete tolingaka ye. (Mas. 23:​15, 16; Mrk. 10:​28-30; 1 Yoa. 4:19) Ebongiseli ya Bonaziri emonisaka ete Yehova amonaka makambo oyo tomipimeli mpo na kosalela ye mpe alingaka biso mpo na yango. Boye, tózala na ekateli ya kokoba kosalela Yehova, tóndima kopesa ye eloko na biso oyo eleki malamu.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndenge nini baoyo baponaki kozala Banaziri bamonisaki elimo ya komipimela mpe mpiko?

  • Ndenge nini tokoki kolendisana mpo na komonisa elimo ya Bonaziri lelo oyo?

  • Ebongiseli ya Bonaziri emonisi ete Yehova ayebaka likambo nini mpo na basaleli na ye?

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

a Nzambe atyaki mwa bato moke mpo bázala Banaziri, kasi emonani ete Banaziri mingi ezalaki Bayisraele oyo baponaki bango moko kokóma Banaziri.—Talá etanda “ Banazari oyo Yehova atyaki.”

b Na bantango mosusu, mikanda na biso ekokanisaka Banaziri na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Kasi, lisolo oyo emonisi ndenge basaleli nyonso ya Yehova oyo bamipesá na ye bakoki komonisa elimo ya Bonaziri.

c Emonani ete babakiselaki te Monaziri mikumba mosusu, na ndakisa mosala moko boye, oyo asengeli kosala mpo akokisa elako na ye.

d Talá na jw.org lisolo “Tozwaki ekateli ya kokóma na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ” na masolo “Makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango.”

e NDIMBOLA YA ELILINGI: Likoló ya nsamba, Monaziri azali kotala ndenge bakei kokunda ebembe ya ndeko moko ya libota na ye. Elako oyo asalaki ezali kopekisa ye apusana pembeni.