Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na esengo wana ozali kozela Yehova na motema molai

Zalá na esengo wana ozali kozela Yehova na motema molai

OZELAKA ntango oyo Yehova akolongola mabe nyonso mpe akosala biloko nyonso biloko ya sika? (Em. 21:​1-5) Na ntembe te ozelaka yango! Kasi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kozela Yehova na motema molai, mingimingi soki tozali na mikakatano. Elikya oyo eumeli mpo ekokisama ekoki kobɛlisa motema.—Mas. 13:​12, msl.

Atako bongo, Yehova alingi tózela ye na motema molai tii na ntango oyo atyá. Mpo na nini alingi tósala bongo? Nini ekoki kosalisa biso tózala na esengo wana tozali kozela?

MPO NA NINI YEHOVA ALINGI TÓZELA?

Biblia elobi: “Yehova azali kozela na motema molai mpo na komonisela bino boboto, mpe akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa. Mpo Yehova azali Nzambe ya bosembo. Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.” (Yis. 30:18) Maloba yango ya Yisaya ekomamaki liboso mpo na Bayuda ya motó makasi. (Yis. 30:1) Kasi, ezalaki na mwa Bayuda ya sembo, mpe maloba yango epesaki bango elikya. Maloba yango ekoki mpe kopesa elikya na basaleli ya Yehova ya sembo lelo.

Na yango, tosengeli kozela na motema molai mpo Yehova mpe azali kozela na motema molai. Atyá ntango oyo akosukisa mokili oyo, mpe azali kozela mokolo mpe ngonga yango ekóma. (Mat. 24:36) Na ntango yango, ekomonana polele ete makambo oyo Zabolo alobá mpo na Yehova mpe basaleli na Ye ezali lokuta. Na nsima, Yehova akolongola Satana mpe baoyo bazali na ngámbo na ye, kasi ‘akoyokela biso mawa.’

Liboso tókóma kuna, mbala mosusu Yehova akolongola te mikakatano na biso, kasi alobi ete tokoki kozala na esengo wana tozali kozela. Ndenge Yisaya alobaki yango, tokoki kozala na esengo wana tozali kozela to kolikya ete eloko moko ya malamu esalema. (Yis. 30:18) a Ndenge nini tokoki kokóma na esengo yango? Makambo minei ekoki kosalisa biso.

NDENGE YA KOZALA NA ESENGO WANA TOZALI KOZELA

Tyá makanisi na makambo ya malamu. Mokonzi Davidi amonaki makambo mingi ya mabe na bomoi na ye. (Nz. 37:35) Atako bongo akomaki: “Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova mpe zelá ye na motema moko. Kosilika te mpo na moto oyo alongaka na mayele mabe na ye.” (Nz. 37:7) Davidi ye moko asalelaki toli yango na ndenge atyaki likebi na elikya na ye ya kobikisama. Azalaki mpe kotya likebi na lipamboli nyonso ya Yehova. (Nz. 40:5) Soki biso mpe tozali kotya makanisi na makambo ya malamu kozanga kotala kaka makambo ya mabe oyo ezali kosalema zingazinga na biso, ekozala mpasi te tózela Yehova.

Simbá libaku nyonso ya kosanzola Yehova. Mokomi ya Nzembo 71, oyo mbala mosusu ezalaki Davidi, alobaki na Yehova boye: “Ngai nakokoba kozela; nakosanzola yo lisusu koleka.” (Nz. 71:14) Ndenge nini azalaki kosanzola Yehova? Azalaki koyebisa basusu makambo ya Yehova mpe koyembela ye nzembo ya masanzoli. (Nz. 71:​16, 23) Lokola Davidi, tokoki kozala na esengo wana tozali kozela Yehova. Tosanzolaka ye na nzela ya mosala ya kosakola, na masolo na biso ya mokolo na mokolo, mpe banzembo oyo toyembelaka ye. Mbala ya nsima oyo okoyemba loyembo moko ya Bokonzi, mpo na nini te kotya likebi na nsango na yango ya kolendisa?

Ndimá bandeko bálendisa yo. Ntango Davidi akutanaki na mikakatano, alobaki na Yehova: “Liboso ya bato na yo ya sembo, nakotya elikya na nkombo na yo.” (Nz. 52:9) Biso mpe tokoki kozwa malendisi epai ya basaleli ya Yehova ya sembo, kaka te na makita mpe na mosala ya kosakola, kasi mpe ntango tokutani elongo mpo na kozwa mopɛpɛ.—Rom. 1:​11, 12.

Kómisá elikya na yo makasi. Nzembo 65:2 elobi: “Nazali kozela na kimya nyonso Nzambe asala, mpo elikya na ngai eutaka epai na ye.” Moto oyo azali na elikya makasi azelaka na motema moko; mpe yango ezali na ntina mingi mpo tókoba koyika mpiko mpo tomoni ete nsuka ya mokili oyo ezali koumela. Tosengeli kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama ata soki esɛngi tózela yango ntango molai. Tokoki kokómisa elikya na biso makasi soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe, na ndakisa bisakweli, ndenge ezali na boyokani, mpe makambo mosusu oyo Yehova amonisi mpo na ye moko. (Nz. 1:​2, 3) Lisusu, tosengeli kokoba ‘kobondela na elimo santu’ mpo tóbatela boyokani malamu na Yehova wana tozali kozela elaka na ye ya bomoi ya seko ekokisama.—Yuda 20, 21.

Lokola Mokonzi Davidi, zalá na kondima ete Yehova abatelaka baoyo bazelaka Ye mpe amoniselaka bango bolingo ya sembo. (Nz. 33:​18, 22) Kobá kozela Yehova na motema molai; tyá makanisi na makambo ya malamu ya bomoi na yo, sanzoláká ye, ndimá bandeko bálendisa yo, mpe kobá kokómisa elikya na yo makasi.

a Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kokoba kozela” ekoki mpe kolimbola “kozala na mposa to kolikya ete likambo moko esalema,” mpe yango emonisi ete ezali mabe te tózala na mposa ete lobiko na biso eya.