Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandeko mibale ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko mibale ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

NA MWAMISATO, 18/01/2023, liyebisi moko ya ntina mingi etyamaki na jw.org, ete ndeko Gage Fleegle mpe ndeko Jeffrey Winder bakómi bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Bango mibale basaleli Yehova na bosembo bambula mingi.

Gage Fleegle ná mwasi na ye, Nadia

Ndeko Fleegle akolá na wɛsti ya Pennsylvanie, na États-Unis ná baboti oyo babangaka Nzambe. Liboso akokisa mbula 20, libota na ye ekendaki na mboka moko moke epai mposa ezalaki mingi. Mwa moke na nsima, azwaki batisimo na mokolo ya 20/11/1988.

Baboti ya ndeko Fleegle bazalaki kolendisa ye akɔta na mosala ya ntango nyonso. Bazalaki mbala mingi kobengisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe bandeko ya Betele na ndako na bango, mpe ndeko Fleegle azalaki komona ndenge bazalaka na esengo. Mwa moke nsima ya batisimo na ye, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mokolo ya 01/09/1989. Mbula mibale na nsima, akokisaki mokano oyo amityelaki ntango azalaki na mbula 12, mokano ya kosala na Betele. Abandaki kosala na Betele ya Brooklyn na sanza ya 10/1991.

Na Betele, ndeko Fleegle asalaki mbula 8 na esika basalaka babuku, na nsima akómaki na Departema ya mosala. Na ntango yango, azalaki na lisangá ya monɔkɔ ya Russe mpo na mwa bambula. Na 2006, abalanaki na Nadia, oyo akómaki mpe kosala na Betele. Basalaki elongo na lisangá ya Portugais mpe mbula koleka 10 na lisangá ya Espagnol. Nsima ya bambula mingi na Departema ya mosala, batindaki ndeko Fleegle na Biro ya Komite ya Mateya mpe na nsima na Biro ya Komite ya Mosala. Na sanza ya 03/2022, atyamaki mosungi na Komite ya Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Jeffrey Winder ná mwasi na ye, Angela

Ndeko Winder akolá na Murrieta, na Californie, na États-Unis. Baboti na ye babɔkɔlá ye na kati ya solo, mpe azwaki batisimo na mokolo ya 29/03/1986. Na sanza oyo elandaki, akómaki mobongisi-nzela mosungi. Asepelaki na yango mingi mpe alingaki kokoba. Nsima ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi basanza ebele, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mwa 01/10/1986.

Liboso akokisa mbula 20, ayaki kotala bayaya na ye mibale ya mibali oyo bazalaki kosala na Betele. Yango elamwisaki mposa na ye ya kosala na Betele soki akómi mokóló. Mpe na sanza ya 05/1990, babengaki ye asala na Betele ya Wallkill.

Na Betele, ndeko Winder asalaki na bisika ndenge na ndenge, na Departema ya kotya bopɛto, na Departema ya ferme, mpe na biro ya Betele. Abalanaki na Angela na 1997, mpe banda wana basalaka elongo na Betele. Na 2014, batindaki bango na Warwick, epai ndeko Winder asalisaki na mosala ya botongi bandako ya biro monene. Na 2016, bakendaki na Patterson, Esika monene ya mateya ya Watchtower, epai ndeko Winder azalaki na Audio/Video. Mbula minei na nsima, bazongaki na Warwick, mpe ndeko Winder akómaki kosala na Biro ya Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele. Na sanza ya 03/2022, atyamaki mosungi na Komite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo etalelaka bandeko ya Betele.

Tozali kobondela Yehova apambola mpenza “makabo [yango] oyo ezali bato,” wana bazali kosala makasi mpo na matomba ya Bokonzi.—Ef. 4:8.