Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Biblia emonisi nini mpo na likoki ya Yehova ya kosakola makambo oyo ekoya?

Biblia elobi polele ete Yehova akoki kosakola makambo oyo ekoya. (Yis. 45:21) Elobeli te makambo nyonso ya mikemike mpo na ndenge to ntango oyo asalaka yango, to mpe makambo nini aponaka koyeba. Na yango, tokoki te koyeba makambo nyonso na oyo etali likoki ya Yehova ya kosakola makambo oyo ekoya. Kasi, tótalela mwa makambo mosusu.

Yehova azali na bandelo te longola kaka oyo ye moko amityeli. Lokola azali na bwanya oyo ezangi nsuka, akoki kosakola likambo nyonso oyo alingi. (Rom. 11:33) Lokola amipekisaka na ndenge ya kokoka, akoki kopona koyeba te likambo oyo ekosalema.—Talá mpe Yisaya 42:14.

Yehova asalaka ete mokano na ye esalema. Ndenge nini yango eyokani na likoki na ye ya kosakola makambo? Yisaya 46:10 elobi: “Banda na ebandeli nayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te; nalobaka ete ‘Ekateli na ngai ekosimba, mpe nakosala nyonso oyo esepelisi ngai.’”

Na yango, ntina moko oyo Yehova akoki kosakola makambo oyo ekoya ezali ete azali na nguya ya kosala ete makambo esalema. Azalaka te na mposa ya kotala makambo oyo ezali liboso, lokola nde makambo yango esilá kosalema mpe azali kaka kotala yango liboso ntango na yango ekoka, ndenge moto akoki kolekisa filme mbangumbangu mpo atala nsuka na yango. Kasi, Yehova akoki kokata ete likambo moko ekosalema na ntango moko boye, mpe na nsima kosala ete esalema na ntango yango.—Kob. 9:​5, 6; Mat. 24:36; Mis. 17:31.

Mpo na ntina yango, Biblia esalelaka maloba lokola “nabongisá,” mpe “nakani” mpo na kolobela oyo Yehova asalaka mpo na makambo mosusu oyo ekoya. (2 Bak. 19:25; Yis. 46:11) Maloba yango euti na liloba ya Ebre oyo eyokani na liloba oyo elimboli “moyemi-mbɛki.” (Yir. 18:4) Kaka ndenge moyemi-mbɛki ya malamu akómisaka mabele mbɛki ya kitoko, Yehova akoki kosala makambo mpo na kokokisa mokano na ye.—Ef. 1:11.

Yehova atosaka likabo ya bonsomi ya kopona. Akatá te ndenge bomoi ya moto mokomoko ekozala; atindaka mpe te bato malamu básala likambo oyo ekomema bango na libebi. Atiki moto nyonso apona nzela oyo alingi, mpe alendisi bango bápona nzela ya malamu.

Tótalela ndakisa mibale. Ndakisa ya liboso ezali ya bafandi ya Ninive. Yehova asakolaki ete engumba yango ekobebisama mpo na mabe ya bato. Kasi, ntango bato babongolaki motema, Yehova “atalelaki lisusu likambo oyo akanaki kosala mpe mpasi oyo alobaki ete akoyeisela bango, ayeisaki yango lisusu te.” (Yona 3:​1-10) Yehova abongolaki makanisi na ye mpo bato ya Ninive basalelaki bonsomi na bango ya kopona mpe babongolaki motema mpo na nsango ya likebisi oyo Yehova atindelaki bango.

Ndakisa ya mibale ezali ya Siruse, oyo asengelaki kobimisa Bayuda na bokangami mpe kotinda bango bátonga lisusu tempelo ya Yehova. (Yis. 44:26–45:4) Mokonzi Siruse ya Perse akokisaki esakweli yango. (Ezr. 1:​1-4) Kasi, Siruse akómaki kosambela Nzambe ya solo te. Yehova asalelaki Siruse mpo na kokokisa esakweli, kasi atikelaki ye nzela ya kosalela bonsomi na ye mpo na kopona nani oyo akosambela.—Mas. 21:1.

Totaleli makambo nyonso te mpo na likoki ya Yehova ya koyeba makambo liboso. Mpo na koloba solo, moto te akoki mpenza koyeba ndenge ya Yehova ya kosala makambo. (Yis. 55:​8, 9) Kasi, makambo oyo Yehova amonisi ekoki mpo na kondimisa biso ete asalaka ntango nyonso oyo ezali malamu, ata ntango asakoli makambo oyo ekoya.