Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mpo na nini Biblia ezongelaka makambo?

NA BISIKA mosusu, bakomi ya Biblia bazongelaki kaka makambo oyo balobi liboso. Tótala makambo misato oyo mbala mosusu etindaki bango básala bongo:

Eleko oyo ekomamaki. Na Yisraele ya kala, bato mingi bazalaki te na bakopi na bango moko ya Mobeko. Mbala mingi bazalaki koyoka Mobeko ezali kotángama kaka ntango ekólo eyangani na tabernakle. (Mib. 31:​10-12) Na ntembe te, makambo mosusu ekokaki kobenda likebi ya bato wana bazali koyoka mpe batɛlɛmi bangonga mingi na kati ya ebele ya bato. (Neh. 8:​2, 3, 7) Na mabaku yango, kozongela makambo ya ntina ezalaki kosalisa bato bámikundwela bavɛrsɛ mpe básalela yango. Kozongela maloba mosusu ezalaki mpenza kosalisa bango bámikundwela makambo ya mikemike, lokola mibeko ya Nzambe mpe bikateli na ye.—Lev. 18:​4-22; Mib. 5:1.

Ekomeli. Eteni ndambo (10%) ya Biblia ezali banzembo, na ndakisa mokanda ya Nzembo, Loyembo ya Salomo, mpe Bileli. Banzembo yango mosusu ezalaki na mondimo, oyo ezongelaka maloba mpe esalisaka bayoki bákanga maloba yango na motó. Na ndakisa, talá maloba oyo ezali na Nzembo 115:​9-11: “Ee Yisraele, tyelá Yehova motema;—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango. Ee ndako ya Arona, bótyela Yehova motema;—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango. Bino baoyo bobangaka Yehova, bótyela Yehova motema—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.” Omoni ndenge kozongela maloba yango ekokaki kosalisa bayembi bákɔtisa mateya yango ya motuya na makanisi mpe mitema na bango?

Mpo na konyata makambo ya ntina. Bakomi mosusu ya Biblia bazalaki kozongela bafraze ya ntina. Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki Bayisraele bálya makila te, asɛngaki Moize azongela ntina na yango mbala ebele. Nzambe alingaki komonisa ete bomoi ya mosuni ezali na makila, elingi koloba, makila emonisaka bomoi. (Lev. 17:​11, 14) Na nsima, ntango bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme batángaki makambo oyo esengeli kosala te mpo na kosepelisa Nzambe, bazongelaki lisusu ntina ya koboya makila.—Mis. 15:​20, 29.

Mposa ya Yehova ezalaki te ete bázongela bafraze ya Makomami mosusu kaka mpamba boye. Na ndakisa, Yesu alobaki: “Ntango bozali kobondela, bózongela kaka maloba moko mbala na mbala te.” (Mat. 6:7) Na nsima, alobelaki makambo oyo ebongi kolobela na libondeli, oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Mat. 6:​9-13) Na yango, atako toboyaka kozongela maloba moko mbala na mbala na mabondeli na biso, tokoki kozongela likambo moko mbala na mbala.—Mat. 7:​7-11.

Na yango, ezali na bantina malamu oyo Liloba ya Nzambe ezongeli maloba to bafraze mosusu. Ezali moko ya balolenge oyo Molakisi na biso monene ateyaka biso mpo na litomba na biso.—Yis. 48:​17, 18.