Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Ndenge ya komona mateya oyo okoki kosalela

Ndenge ya komona mateya oyo okoki kosalela

Ntango tozali kotánga Biblia, tokoki kozwa mateya oyo tokoki kosalela soki tosali bolukiluki. Kasi tokoki kosala yango malamu koleka?

Kɔtá na mozindo ya masolo ya Biblia. Na ndakisa, luká koyeba nani akomaki yango, epai ya nani, mpe ntango nini. Makambo ezalaki ndenge nini, nini esalemaki liboso, mpe nini esalemaki na nsima?

Salá makasi omona mateya na nzela ya mituna lokola: ‘Bato yango bazalaki komiyoka ndenge nini? Bizaleli nini bamonisaki? Mpo na nini nasengeli komonisa bizaleli yango, to koboya kokolisa yango?’

Salelá mateya oyo oyekoli, ezala na mosala ya kosakola to na boyokani na yo na basusu. Soki osali bongo, okomonisa ete ozali na bwanya ya Nzambe, kaka ndenge Biblia elobi yango: “Moto oyo azali na bwanya akotyela makambo yango likebi.”—Nz. 107:43.

  • Likanisi: Talá ndenge makambo oyo toyekolaka na likita ya kati ya pɔsɔ na Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe esalisaka biso tóyeba ndenge ya kosalela yango. Mbala mingi ezalaka na mituna oyo tokoki komituna, likambo moko mpo na komanyola, mpe bililingi oyo tokoki kotalela.