Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

Tikalá libela na paradiso ya elimo

Tikalá libela na paradiso ya elimo

“Bósepela, mpe bózala na esengo libela mpo na oyo nazali kozalisa.”YIS. 65:18.

NA MOKUSE

Talá matomba oyo tozwaka na paradiso ya elimo mpe ndenge oyo tokoki kosala mpo basusu mpe báya na paradiso yango.

1. Paradiso ya elimo ezali nini, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?

 LELO oyo, ezali na paradiso moko awa na mabele oyo etondi na bato mpe makambo ndenge na ndenge. Bamilio ya bato oyo bazali na paradiso yango bazali na kimya ya solosolo. Bato oyo bazali na paradiso yango bazali na ekateli ya kotikala kaka wana. Balingi mpe ete bato mosusu ebele báya kokɔta na esika yango oyo ekokani na mosusu te. Esika yango ezali nini? Paradiso ya elimo! a

2. Likambo nini ya kokamwa Yehova asali?

2 Likambo ya kokamwa, Yehova asali esika moko ya kimya na kati ya mokili oyo Satana akómisi esika oyo etondi na koyina, makambo ya mabe, mpe makama. (1 Yoa. 5:19; Em. 12:12) Nzambe na biso ya bolingo amonaka ndenge mokili oyo mabe ezali konyokola biso mpe apesi biso esika ya kimya oyo tosengeli na yango mpo tókoba kosalela ye na esengo. Liloba na ye ebengi paradiso ya elimo “esika ya kokima” mpe “elanga oyo ezwaka mai malamu mpenza.” (Yis. 4:6; 58:11) Yehova azali kopambola baoyo bafandi na paradiso yango, na yango bakoki komiyoka malamu ata na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi.—Yis. 54:14; 2 Tim. 3:1.

3. Ndenge nini Yisaya mokapo 65 ekokisamaki na ntango ya kala?

3 Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova amonisaki ndenge baoyo bakofanda na paradiso ya elimo bakozala. Okoki komona makambo yango na Yisaya mokapo 65, oyo ekokisamaki mbala ya liboso na mobu 537 L.T.B. Na ntango yango, Bayuda oyo babongolaki motema balongwaki na bokangami na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango. Yehova apambolaki bato na ye mpe asalisaki bango bákómisa lisusu kitoko Yerusaleme, engumba oyo ebebaki, mpe bátonga lisusu tempelo na yango mpo ezonga esika monene ya losambo ya solo na Yisraele.—Yis. 51:11; Zek. 8:3.

4. Ndenge nini Yisaya mokapo 65 ekokisami na mikolo na biso?

4 Kokokisama ya mibale ya esakweli ya Yisaya ebandaki na 1919 T.B., ntango basaleli ya Yehova ya mikolo na biso balongwaki na bokangami na Babilone Monene. Na ntango yango, paradiso ya elimo ebandaki kopalangana mokemoke na mabele mobimba. Basakoli ya Bokonzi ya molende basalaki masangá ebele mpe bakolisaki bizaleli ya elimo. Basi ná mibali oyo bazalaki liboso bato ya mobulu, mpe bazalaki kosala makambo lokola banyama ‘balataki bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.’ (Ef. 4:24) Mapamboli mingi oyo esakweli ya Yisaya elobeli ekokokisama na ndenge ya solo na mokili ya sika oyo ezali koya. Kasi, ata sikoyo tozali kozwa matomba ebele ndenge tozali na paradiso ya elimo. Tótalela ndenge paradiso yango ya elimo esalisaka biso mpe ntina oyo tosengeli kotikala wana.

NDENGE BAOYO BAZALI NA PARADISO YA ELIMO BAZALAKA

5. Ndenge Yisaya 65:13 elakaki yango, mapamboli nini tozali na yango na paradiso ya elimo?

5 Nzoto makasi mpe kolɔngɔnɔ. Esakweli ya Yisaya emonisi polele bokeseni kati na bomoi ya baoyo bazali na kati ya paradiso ya elimo mpe bomoi ya baoyo bazali kuna te. (Tángá Yisaya 65:13.) Yehova akokisaka malamu mpenza bamposa ya elimo ya basaleli na ye. Tozali na elimo santu na ye, Liloba na ye Biblia, mpe ebele ya bilei ya elimo mpo ‘tolya, tómɛla, mpe tósepela.’ (Talá mpe Emoniseli 22:17.) Nzokande, baoyo bazali na kati ya paradiso ya elimo te bazali “na nzala . . . , mposa ya mai . . . , [mpe] . . . na nsɔni.” Bamposa na bango ya elimo ekokisami te, bayebi Nzambe te.—Amo. 8:11.

6. Ndenge nini Yoele 2:​21-24 elobeli bilei ya elimo, mpe ndenge nini tokoki kozwa matomba na yango?

6 Na esakweli na ye, Yoele asalelaki biloko ya bomoi ya mokolo na mokolo, na ndakisa mbuma, vinyo, mpe mafuta ya olive mpo na komonisa ndenge Yehova asopelaka bato na Ye biloko oyo basengeli na yango, ata mpe bilei ya elimo. (Yoe. 2:​21-24) Yehova apesi biso Biblia, mikanda ya moombo ya sembo, site Internet na biso, makita, mayangani ya mike, mpe mayangani ya minene. Tokoki kolya bilei ya elimo mikolo nyonso, mpe yango esalaka ete tózala makasi mpe na nzoto kolɔngɔnɔ na elimo.

7. Nini esalaka ete ‘tóyoka malamu na motema’? (Yisaya 65:14)

7 Esengo mpe nsai. Basaleli ya Nzambe bakoki ‘koganga na esengo’ mpo motema na bango etondi na botɔndi. (Tángá Yisaya 65:14.) Solo oyo ekómisaka kondima makasi, bilaka ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe, mpe elikya oyo tozwi mpo na mbeka ya lisiko ya Kristo esalaka ete ‘tóyoka malamu na motema.’ Kolobela makambo yango ná bandeko na biso ya lisangá epesaka biso esengo mpenza!—Nz. 34:8; 133:​1-3.

8. Makambo nini mibale ya minene emonanaka na paradiso ya elimo?

8 Bolingo mpe bomoko oyo ezali na kati ya basaleli ya Yehova ezali makambo mibale ya minene oyo emonanaka na paradiso ya elimo. ‘Ekanganeli yango mpo na bomoko’ esalisaka biso tómona na makanisi ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika, epai basaleli ya Yehova bakozala kutu na bolingo mpe bomoko makasi koleka oyo bazali na yango lelo. (Kol. 3:14) Ndeko mwasi moko alobeli likambo oyo amonaki epai ya basaleli ya Yehova mbala ya liboso oyo akutanaki na bango: “Nayebaki te ndenge ya kozala na esengo, ata na kati ya libota na ngai. Mbala ya liboso oyo namonaki bolingo ya solosolo ezalaki epai ya Batatoli ya Yehova.” Moto nyonso oyo alingi kozala mpenza na esengo mpe na nsai asengeli kozala na kati ya paradiso na biso ya elimo. Ata soki bato ya mokili oyo balobi nini mpo na basaleli ya Yehova, toyebani ete tozali na bomoko elongo na Yehova mpe baoyo nyonso basambelaka ye.—Yis. 65:15.

9. Yisaya 65:​16, 17 elaki nini mpo na makambo ya mpasi oyo ekómelaka biso na bomoi?

9 Kobosana bampasi mpe motema ya kokita. Yisaya 65:14 elobi ete baoyo baponi kotikala libándá ya paradiso ya elimo ‘bagangaka mpo na mpasi na motema mpe bagangaka na kolela mpo elimo elɛmbi.’ Kasi tokoloba nini mpo na makambo nyonso oyo ezali kopesa basaleli ya Nzambe mpasi mpe konyokola bango? Nsukansuka, tokobosana makambo wana mpe ekomonana te na miso ya Nzambe. (Tángá Yisaya 65:​16, 17.) Yehova akolongola makambo oyo etungisaka biso, mpe na nsima tokokanisa kutu te ndenge oyo makambo yango enyokolaki biso.

10. Mpo na nini tomonaka ete ezali lipamboli kozala elongo na bandeko na biso bakristo? (Talá mpe elilingi.)

10 Ata sikoyo, toyokaka motema ya kokita ntango tozali na makita na biso, esika oyo tokoki kobosana bampasi mpe kotya pembeni mitungisi ya mokili mabe oyo. Tosalisaka basusu mpe bámiyoka malamu na paradiso ya elimo ntango tozali komonisa bolingo, esengo, kimya, boboto mpe motema pɛtɛɛ, bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:​22, 23) Ezali mpenza lipamboli kozala na kati ya ebongiseli ya Nzambe! Baoyo bakotikala na kati ya paradiso ya elimo bakomona kokokisama mobimba ya elaka ya Nzambe ya “likoló ya sika mpe mabele ya sika.”

Ezali lipamboli kozala na libota ya nzambe na kati ya paradiso ya elimo (Talá paragrafe 10) c


11. Na kotalela Yisaya 65:​18, 19, tosengeli komiyoka ndenge nini mpo na paradiso ya elimo oyo Yehova asali?

11 Botɔndi mpe kosepela. Yisaya amonisi lisusu ntina oyo tosengeli ‘kosepela mpe kozala na esengo’ na paradiso ya elimo. Yehova nde asali paradiso yango ya elilingi. (Tángá Yisaya 65:​18, 19.) Yango wana ezali likambo ya kokamwa te ndenge azali kosalela biso mpo na kosalisa bato bálongwa na bibongiseli ya mokili oyo, oyo eteyaka bango solo te mpo na Nzambe, mpe kosalisa bango bákɔta na paradiso na biso kitoko ya elimo! Tosepelaka na mapamboli ya kozala na kati ya solo, mpe yango etindaka biso tóyebisa basusu makambo yango.—Yir. 31:12.

12. Bilaka oyo ezali na Yisaya 65:​20-24 etindaka yo omiyoka ndenge nini, mpe mpo na nini?

12 Tozali mpe na botɔndi mpe na esengo mpo na elikya oyo tozwi lokola tozali na kati ya paradiso ya elimo. Meká kokanisa makambo nyonso oyo tokomona mpe tokosala na mokili ya sika ya Nzambe. Biblia epesi elaka oyo: “Ekozala lisusu te na mwana . . . oyo akozala na bomoi kaka mikolo moke, [mpe] mobange akokufa te liboso ete bambula na ye ekoka.” ‘Tokotonga bandako mpe tokofanda kuna, tokolona bilanga ya vinyo mpe tokolya mbuma na yango.’ ‘Tokoboma nzoto mpamba te’ mpo tokozala “bato oyo Yehova apamboli.” Yehova alaki ete tokozala na bomoi ya kimya mpe oyo ezali na ntina mpenza. “Liboso ete bábelela,” akoyeba mposa ya mokomoko mpe ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso ya bomoi.’—Yis. 65:​20-24; Nz. 145:16.

13. Ndenge nini Yisaya 65:25 emonisi mbongwana oyo bato basalaka na bomoi na bango ntango babandi kosalela Yehova?

13 Kimya mpe libateli. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bato mingi oyo liboso bazalaki na bizaleli lokola banyama babongoli mpenza bomoi na bango. (Tángá Yisaya 65:25.) Basali makasi bálongola bizaleli na bango ya mabe. (Rom. 12:2; Ef. 4:​22-24) Ya solo, lokola basaleli ya Nzambe bazali kaka bato ya kozanga kokoka, bakokoba kosala mabunga. Kasi, Yehova ayanganisi “bato ya ndenge nyonso,” oyo bazali na bolingo makasi, kimya mpe bomoko. (Tito 2:11) Yango ezali likamwisi oyo kaka Nzambe ya nguya nde akoki kosala!

14. Ndenge nini Yisaya 65:25 ekokisamaki epai ya ndeko moko?

14 Bato bakoki mpenza kobongola bomoto na bango? Tótalela ndakisa oyo. Elenge mobali moko oyo akɔtaki bolɔkɔ mpe na nsima abimaki ntango azalaki na mbula 20 amipesaki mobimba na makambo ya mbindo mpe na mobulu. Akɔtaki bolɔkɔ mpo ayibaki motuka, akɔtelaki bato na bandako, mpe mpo na makambo mosusu ya mabe. Azalaki pene ya kobunda na moto nyonso. Ntango ayokaki solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso mpe abandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, amonaki ete azwi eloko ya motuya oyo ekosimba bomoi na ye: kosalela Yehova na paradiso ya elimo. Nsima ya kozwa batisimo, azalaki mbala na mbala kokanisa ndenge maloba ya Yisaya 65:25 ekokisami epai na ye. Azalaki liboso na nkanza lokola nkɔsi kasi akómaki moto ya kimya, lokola mwana-mpate.

15. Mpo na nini tolingaka kosalisa basusu bákɔta mpe na paradiso ya elimo, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

15 Yisaya 65:13 ebandi na maloba oyo: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.” Vɛrsɛ 25 esuki na maloba “Yehova alobi bongo.” Maloba na ye ezangaka kokokisama te. (Yis. 55:​10, 11) Paradiso ya elimo ezali mpenza solo lelo oyo. Yehova asali libota ya bandeko na mokili mobimba oyo ekokani na mosusu te. Na kati ya bato na ye, tokoki kozwa mwa kimya mpe koyoka ete tobatelami na kati ya mokili oyo ya mobulu. (Nz. 72:7) Yango wana, tolingaka kosalisa bato mosusu mingi báya kokɔta na libota na biso ya bokristo. Tokoki kosala yango soki tomipesi na kokómisa bato bayekoli.—Mat. 28:​19, 20.

NDENGE YA KOBENDA BASUSU NA PARADISO YA ELIMO

16. Nini ekoki kobenda bato na paradiso ya elimo?

16 Mokomoko na biso akoki kosala mwa eloko mpo paradiso ya elimo ebenda bato mosusu. Tokoki kosala yango soki tomekoli Yehova. Abendaka bato na ebongiseli na ye na makasi te. Kasi, ‘abendaka’ bato epai na ye na boboto. (Yoa. 6:44; Yir. 31:3) Ntango bato ya mitema sembo bayekoli koyeba bolingo ya Yehova mpe bizaleli na ye ya kitoko, bayokaka mbala moko mposa ya kopusana penepene na ye. Ndenge nini tokoki kobenda bato na paradiso ya elimo na nzela ya bizaleli na biso ya malamu mpe etamboli na biso?

17. Ndenge nini tokoki kobenda basusu mpo bákɔta na paradiso ya elimo?

17 Lolenge moko oyo tokoki kobenda basusu mpo bákɔta na paradiso ya elimo ezali soki tozali kosalela bandeko na biso makambo na bolingo mpe boboto. Ntango bato ya sika bayei na makita na biso, tolingaka bámona makambo oyo ekotinda bango báloba lokola bato oyo bazalaki bandimi te, oyo emonani ete bayaki na makita na Korinti ya kala. Balobaki boye: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.” (1 Ko. 14:​24, 25; Zek. 8:23) Na yango, tosengeli kokoba kosalela toli oyo esɛngi biso ‘tózala na kimya na kati na biso.’—1 Tes. 5:13.

18. Nini ekoki kobenda bato na ebongiseli na biso?

18 Tosengeli ntango nyonso kosala makasi tómonaka bandeko nyonso ndenge Yehova amonaka bango. Mpo na kosala bongo, tosengeli kotyaka likebi na bizaleli na bango ya malamu kasi te na mabunga na bango, oyo nsukansuka ekosila. Tokoki kosilisa na bolingo matata nyonso oyo ebimi kati na biso soki tozali ntango nyonso ‘na boboto na kati na biso, tozali koyokelana mpenza mawa, mpe kolimbisana na motema moko.’ (Ef. 4:32) Soki tozali kosala bongo, paradiso ya elimo ekobenda bato oyo balingaka ete basusu básalela bango makambo ya ndenge wana. b

TIKALÁ NA KATI YA PARADISO YA ELIMO

19. (a) Ndenge emonisami na etanda “ Balongwaki kasi na nsima bazongaki,” bandeko mosusu balobaki nini nsima ya kozonga na paradiso ya elimo? (b) Ekateli nini tosengeli kozala na yango? (Talá mpe elilingi.)

19 Tosepelaka mingi mpenza na paradiso na biso ya elimo! Ekómi lisusu kitoko koleka, mpe ezali na basambeli ya Yehova ebele lisusu koleka liboso. Tiká ete tózala ntango nyonso na botɔndi mpo na paradiso oyo Yehova asaleli biso. Moto nyonso oyo alingi kozala makasi na elimo, alingi kozala na esengo, na kimya, mpe kozwa libateli asengeli kokɔta na paradiso ya elimo mpe kotikala wana! Kasi, tókeba mpo Satana asalaka nyonso mpo na kobimisa biso na paradiso yango. (1 Pe. 5:8; Em. 12:9) Tosengeli te kotika ye alonga. Tósala makasi mpenza mpo na kobatela kitoko, bopɛto, mpe kimya ya paradiso ya elimo.

Baoyo bakotikala na paradiso ya elimo bakosepela mpe na paradiso ya solo na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 19)


OKOPESA EYANO NINI?

  • Paradiso ya elimo ezali nini?

  • Mapamboli nini tozali na yango na paradiso ya elimo?

  • Ndenge nini tokoki kobenda bato mpo báya na paradiso ya elimo?

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

a NDIMBOLA YA MALOBA: Maloba “paradiso ya elimo” emonisaka esika ya elilingi epai tosambelaka Yehova. Na paradiso yango, tozalaka na boyokani ya kimya elongo na Yehova mpe kati na biso.

b Talá na jw.org video Bazali wapi lelo oyo? Alena Žitníková: Ndɔtɔ na ngai ekokisamaki, mpo omona mapamboli oyo ndeko mwasi yango azwaki ndenge azali na kati ya paradiso ya elimo.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Wana bandeko bazali kosolola elongo na ntango ya makita, ndeko mobali moko azali kaka ye moko.