Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Bolɛmbu na ngai emonisi ete Nzambe azali makasi

Bolɛmbu na ngai emonisi ete Nzambe azali makasi

NTANGO ngai ná mwasi na ngai tokómaki na Colombie na 1985, ekólo yango ezalaki esika ya mobulu makasi mpenza. Guvɛrnema ezalaki kobundisa mpenza mombongo ya drɔgɛ na bingumba ya ekólo yango mpe basoda ya banguna oyo bazalaki na bangomba. Na mboka Medellín, epai tosalaki na nsima, bilenge oyo bazalaki na mandɔki bazalaki kotambola na babalabala. Bazalaki kotɛka drɔgɛ, kobimisela bato mandɔki ya mike mpo bápesa bango mbongo, mpe bazalaki koboma bato mpo bázwa mbongo. Moko te kati na bango azalaki na bomoi ya molai. Tomiyokaki lokola nde tozali na mokili mosusu.

Ndenge nini biso bato mpamba oyo toutaki na Finlande, moko ya bikólo oyo ezali mosika na nɔrdi ya mabele, tokómaki na Amerika ya Sudi? Mpe mateya nini nayekoli na boumeli ya bambula?

BOMWANA NA NGAI NA FINLANDE

Nabotamá na 1955, mpe nazali mwana ya nsuka ya libota ya bana mibali misato. Nakolá pene na bokula ya sudi ya Finlande, esika oyo babengaka lelo engumba Vantaa.

Mama azwaki batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova mwa bambula liboso nabotama. Kasi, tata na biso atɛmɛlaki solo mpe alingaki te mama ayekola na biso bana to amema biso na makita ya lisangá. Yango wana, mama azalaki koteya biso mateya ya ebandeli ya Biblia ntango tata abimi.

Naponaki kotosa Yehova ntango nazalaki na mbula nsambo

Banda bomwana na ngai, naponaki kotosa Yehova. Na ndakisa, ntango nazalaki na mbula nsambo, molakisi na biso asilikelaki ngai mpo naboyaki kolya verilättyjä (gato ya bato ya Finlande oyo basalaka na makila). Afinaki ngai matama na lobɔkɔ na ye moko mpo na kofungola ngai monɔkɔ, mpe alukaki koleisa ngai na makasi eteni ya gato oyo asimbaki na nkanya na lobɔkɔ mosusu. Nalongaki kobwaka nkanya oyo asimbaki.

Ntango nazalaki na mbula 12, tata na biso akufaki. Nsima na yango, nakokaki koyangana na makita. Bandeko na lisangá bamoniselaki ngai boboto mingi, mpe yango etindaki ngai nakola na elimo. Nabandaki kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola mikanda ya moombo ya sembo na likebi. Mimeseno yango ya malamu nde esalisaki ngai nazwa batisimo ntango nazalaki na mbula 14, na mwa 08/08/1969.

Nsima ya kosilisa kelasi, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mwa bapɔsɔ na nsima, nakendaki kosakola epai mposa ezalaki mingi, na engumba Pielavesi, pene na katikati ya Finlande.

Kuna na Pielavesi, nakutanaki na Sirkka, oyo na nsima akómaki mwasi na ngai. Nasepelaki mingi na bomoto na ye ya komikitisa mpe boyokani makasi oyo azalaki na yango na Yehova. Azalaki koluka lokumu to bomɛngo te. Biso mibale tozalaki na mposa ya kosalela Yehova mingi, ata soki tosɛngi biso tósala nini. Tobalanaki na mwa 23/03/1974. Na esika tókende kopema mpo tobalani sika, tokendaki kosakola na Karttula, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki mingi koleka.

Ndako oyo tofutelaki na Karttula, na Finlande

YEHOVA AKOKISAKI BAMPOSA NA BISO

Motuka oyo yaya na ngai atikelaki biso

Banda na ebandeli ya libala na biso, Yehova amonisá biso ete akokokisa bamposa na biso ya mosuni soki toluki liboso Bokonzi na ye. (Mat. 6:33) Na ndakisa, na Karttula, tozalaki na motuka te. Liboso, tozalaki kosala mibembo na velo. Kasi, na eleko ya malili, malili ezalaki kokóma makasi tii ekosala baglasi. Mpo na kosakola na teritware monene ya lisangá, tosengelaki kozala na motuka. Kasi tozalaki na mbongo ya kosomba yango te.

Na mbala moko, yaya na ngai moko ayaki kotala biso. Akabelaki biso motuka na ye. Ezalaki na mikanda nyonso ya motuka. Tosengelaki kaka kosombaka esansi. Na yango, tozwaki eloko oyo tozalaki na bosɛnga na yango.

Yehova amonisaki biso ete azwaki mokumba ya kokokisa bamposa na biso ya mosuni. Mosala na biso ezalaki nde ya kotya Bokonzi na esika ya liboso.

ETEYELO YA GILEADE

Eteyelo ya babongisi-nzela oyo tokɔtaki na 1978

Ntango tozalaki na Eteyelo ya babongisi-nzela na 1978, Raimo Kuokkanen, a moko ya balakisi na biso, alendisaki biso tótondisa formilɛrɛ mpo na eteyelo ya Gileade. Na yango, tobandaki koyekola Anglais na mokano ya kokɔta eteyelo yango. Kasi, na 1980, liboso kutu tótondisa formilɛrɛ, babengaki biso na Betele ya Finlande. Na ntango wana, bandeko ya Betele bakokaki kotondisa formilɛrɛ mpo na Gileade te. Kasi, tolingaki kosalela Yehova esika oyo akanisi ete eleki malamu, kasi te esika oyo biso tokanisi ete eleki malamu. Na yango, tondimaki kokende na Betele. Atako bongo, tokobaki koyekola Anglais mpo mbala mosusu tokozwa libaku ya kotondisa formilɛrɛ mpo na Gileade.

Nsima ya mwa bambula, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki mpe bandeko ya Betele libaku ya kotondisa formilɛrɛ mpo na Gilaede. Totondisaki mbala moko, kasi ezalaki te mpo tozangaki esengo na Betele. Tosepelaki na Betele mingi! Tolingaki kaka komonisa ete tozali na mposa ya kosala esika nyonso oyo mposa ezali mingi, soki tokokisi masɛngami. Babengaki biso na Gileade mpe tozwaki diplome na kelasi ya mbala ya 79 na sanza ya 09/1985. Batindaki biso na Colombie.

TERITWARE NA BISO YA LIBOSO NA MOSALA YA MISIONƐRƐ

Na Colombie, batindaki biso liboso na Betele. Nasalaki nyonso mpo namesana, kasi nsima ya mbula moko na Betele, namonaki ete nasengeli kolongwa. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nasɛngaki bátinda ngai esika mosusu. Na nsima, batindaki biso lokola bamisionɛrɛ mpo na kosakola na engumba Neiva, na etúká ya Huila.

Nasepelaka mingi na mosala ya kosakola. Ntango nazalaki mobongisi-nzela na Finlande liboso nabala, mikolo mosusu nazalaki kosakola banda ntɔngɔntɔngɔ tii butu. Ntango tobalanaki, ngai ná Sirkka tozalaki mpe kosakola mokolo mobimba. Soki tokei na teritware ya mosika, tozalaki ntango mosusu kolala na motuka na biso. Yango ezalaki kosala ete tólekisa ntango te na kozonga ndako mpe ezalaki kopesa biso nzela ya kobanda ntɔngɔntɔngɔ mokolo oyo elandi.

Lokola tokómaki bamisionɛrɛ na teritware, toyokaki lisusu esengo oyo tozalaki na yango liboso mpo na mosala ya kosakola. Lisangá na biso ekolaki, mpe bandeko ya Colombie bazalaki na limemya, bolingo, mpe botɔndi.

NGUYA YA LIBONDELI

Mosika te na teritware na biso na Neiva, ezalaki na bamboka epai Batatoli bazalaki te. Nazalaki komituna mpenza ndenge oyo nsango malamu ekokóma na bisika yango. Kasi, lokola basoda oyo bazalaki na bangomba bazalaki kobimisa bitumba, bamboka yango ezalaki likama mpo na bato oyo bazali bana-mboka te. Na yango, nabondelaki mpo ata moto moko ya bamboka yango akóma Motatoli. Namonaki ete ebongi moto yango azala moto oyo afandaka na Neiva mpo ayekola solo. Yango wana, nabondelaki mpe ete nsima ya batisimo na ye, moto yango akola na elimo mpe azonga na mboka na ye mpo na kosakola. Nayebaki te ete Yehova azalaki na likanisi ya malamu koleka.

Mwa moke na nsima, nabandaki koyekola Biblia na elenge mobali moko na nkombo Fernando González. Azalaki kofanda na Algeciras, moko ya bamboka epai Batatoli bazalaki te. Fernando azalaki kosala kilomɛtrɛ koleka 50 mpo na koya mosala na Neiva. Azalaki komibongisa malamu mpo na boyekoli nyonso mpe abandaki mbala moko koyangana na makita nyonso. Kobanda na pɔsɔ ya liboso ya boyekoli na ye, Fernando azalaki koyanganisa bato na mboka na bango mpe koteya bango makambo oyo ayekolaki na Biblia.

Elongo na Fernando na 1993

Fernando azwaki batisimo na sanza ya 01/1990, sanza motoba nsima ya kobanda koyekola. Na nsima, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola ezalaki sikoyo na Motatoli ya mboka Algeciras, Betele ekokaki kotinda babongisi-nzela monene kuna. Na sanza ya 02/1992, lisangá efungwamaki na mboka yango.

Fernando asukaki kaka na kosakola na mboka na bango? Te! Nsima ya kobala, ye ná mwasi na ye bakendaki na San Vicente del Caguán, engumba mosusu epai Batatoli bazalaki te. Basalisaki mpo na kofungola lisangá moko kuna. Na 2002, Fernando atyamaki mokɛngɛli ya zongazonga, mpe ye ná mwasi na ye Olga, bazali na mosala yango tii lelo.

Likambo yango eteyaki ngai ete ezali na ntina mingi kosala mabondeli ya sikisiki mpo na mokumba oyo tozwi na mosala ya Nzambe. Yehova asalaka oyo biso tokoki kosala te. Kutu, mosala ya kobuka mbuma ezali ya ye, kasi ya biso te.—Mat. 9:38.

YEHOVA APESI BISO “MPOSA MPE NGUYA YA KOSALA”

Na 1990, batindaki ngai lokola mokɛngɛli motamboli. Zongazonga na biso ya liboso ezalaki na engumba-mokonzi, Bogotá. Teritware yango ezalaki kobangisa biso. Ngai ná mwasi na ngai tozalaki te na makoki koleka basusu. Lisusu, tomesanaki te kofanda na bingumba ya minene. Kasi, Yehova akokisaki elaka na ye oyo ezali na Bafilipi 2:13: “Nzambe nde moto oyo azali kopesa bino makasi, mpo bósepelisa ye mpenza, mpe azali kopesa bino mposa mpe nguya ya kosala.”

Na nsima, batindaki biso na zongazonga moko na Medellín, engumba oyo nalobelaki liboso. Kuna, bato bamesanaki na bitumba ya babalabala mpe ezalaki lisusu kobangisa bango te. Na ndakisa, mokolo moko ntango nazalaki koyekola Biblia na moto, masasi ebandaki kobɛta libándá ya ndako oyo tozalaki. Nalingaki kolala na nse, kasi moyekoli ya Biblia akobaki kotánga paragrafe, na kimya nyonso. Ntango asilisaki kotánga, asɛngaki bolimbisi mpe abimaki libándá. Na nsima azongaki na bana mibale ya mike mpe alobaki na malɛmbɛ ete: “Bolimbisi, nasengelaki kokende kozwa bana na ngai.”

Tokutanaki mpe na makama mosusu. Mokolo moko ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, mwasi na ngai ayaki mbangu epai na ngai, mpe akómaki lokola moto asili mai ná makila. Alobaki ete moto moko abɛtaki ye masasi. Nayokaki nsɔmɔ. Kasi na nsima, toyaki koyeba ete moto yango alingaki kobɛta Sirkka masasi te; azalaki nde kobɛta mobali moko oyo azalaki koleka pembeni ya Sirkka masasi.

Na nsima, bitumba ya balabala ezalaki kotungisa biso lisusu mingi te. Tozwaki makasi na ndakisa ya bandeko ya masangá oyo bazalaki kokutana na makambo ya ndenge wana to kutu ya mabe koleka. Tomilobaki ete soki Yehova azalaki kosalisa bango, akosalisa mpe biso. Tosalelaki ntango nyonso toli ya bankulutu ya lisangá, tozwaki bibongiseli oyo ekoki, mpe totikaki makambo mosusu na mabɔkɔ ya Yehova.

Makambo mosusu ezalaki mpenza likama te ndenge tozalaki kokanisa. Mokolo moko, nayokaki lokola makɛlɛlɛ ya basi mibale bazali kofingana libándá ya ndako oyo tozalaki koyekola na moto. Nazalaki na mposa te ya kotala bato bazali koswana, kasi nkolo-ndako asɛngaki ngai nabima na veranda. Nzokande oyo nakanisaki ete ezali “koswana” ezalaki nde batshaku mibale oyo bazalaki komekola ndenge bato basalaka.

MIKUMBA MOSUSU MPE MIKAKATANO

Na 1997, batyaki ngai molakisi na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. b Nazalaki kosepela mingi kokɔta biteyelo ya teokrasi, kasi nakanisá ata mokolo moko te kozwa mokumba kitoko ya koteya na eteyelo yango moko.

Na nsima, nasalaki lokola mokɛngɛli ya etúká. Ntango ebongiseli yango esukaki, nazongelaki mosala ya zongazonga. Na yango, mbula koleka 30, nasalaki lokola molakisi na eteyelo ya teokrasi mpe mokɛngɛli ya zongazonga. Tozwaki mapamboli mingi na mikumba yango. Kasi, makambo ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Nayebisa bino mpo na nini.

Nazalaka moto ya matata. Yango esalisaka ngai nayika mpiko na makambo ya mpasi. Kasi na bantango mosusu, nalekisaki ndelo ntango nazalaki koluka kosembola makambo na masangá. Mokolo moko, nayebisaki bandeko mosusu na mpiko ete basengeli kozala na bolingo mpe makambo makasimakasi te epai ya basusu. Nzokande, kaka na ntango yango, ngai moko mpe nazangaki bizaleli yango.—Rom. 7:​21-23.

Mpo na mabunga na ngai, na bantango mosusu nalɛmbaki mpenza nzoto. (Rom. 7:24) Mokolo moko, nayebisaki Yehova na libondeli ete ekoleka malamu natika mosala ya misionɛrɛ mpe nazonga na Finlande. Na mpokwa yango, nakendaki na makita ya lisangá. Makambo oyo nayokaki na makita endimisaki ngai ete nasengeli kokoba mosala na ngai mpe kobundisa bomoto na ngai ya kozanga kokoka. Ata lelo, nakamwaka komona ndenge Yehova apesaki eyano ya polele na libondeli oyo nasalaki. Longola yango, nazali na botɔndi mingi ndenge asalisi ngai na boboto mpo nalonga bolɛmbu na ngai.

TOZALI NA ELIKYA MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

Ngai ná Sirkka tosepelaka mingi ndenge Yehova apesi biso libaku ya kolekisa bambula mingi na mosala ya ntango nyonso. Nasepelaka mpe mingi ndenge Yehova apesá ngai mwasi oyo alingaka ngai mpe azali sembo bambula oyo nyonso.

Mosika te, nakokokisa mbula 70 mpe ekosɛnga natika mokumba ya kotángisa na biteyelo ya teokrasi mpe ya mokɛngɛli ya zongazonga. Kasi, yango epesaka ngai mawa te. Mpo na nini? Mpo nandimi mpenza ete eloko oyo epesaka Yehova lokumu mingi koleka ezali soki tozali kosalela ye na bopɔlɔ mpe kokumisa ye na motema oyo etondi na bolingo mpe botɔndi. (Mika 6:8; Mrk. 12:​32-34) Mpo na kopesa Yehova lokumu, esɛngi kaka te tózala na mikumba minene.

Soki nakanisi mikumba oyo nazwá, namonaka ete soki nazwaki yango, ezali te mpo naleki basusu; ezali mpe te mpo nazali na likoki moko ya kokamwa. Eloko te! Yehova apesaki ngai mikumba yango mpo na boboto monene na ye. Apesaki ngai mikumba yango atako bolɛmbu na ngai. Nayebi ete nalongi kokokisa mikumba yango kaka na lisalisi ya Yehova. Na ndenge yango, bolɛmbu na ngai emonisi ete Nzambe azali makasi.—2 Ko. 12:9.

a Lisolo ya bomoi ya ndeko Raimo Kuokkanen, “Tozali na ekateli ya kosalela Yehova,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2006.

b Eteyelo yango ekómá Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.