Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 15

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

Kobá kosepela mingi na ebongiseli ya Yehova

Kobá kosepela mingi na ebongiseli ya Yehova

“Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino, oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe.”EBR. 13:7.

NA MOKUSE

Ndenge ya kokoba ntango nyonso kosepela na ebongiseli ya Yehova.

1. Nini esalisaki mpo makambo esalema na molɔngɔ kati na basaleli ya Yehova na siɛklɛ ya liboso?

 NTANGO Yehova apesi bato na ye mokumba moko, azelaka ete bákokisa yango na molɔngɔ. (1 Ko. 14:33) Na ndakisa, mokano ya Nzambe ezali ete nsango malamu esakolama na mabele mobimba esika bato bafandi. (Mat. 24:14) Yehova apesi Yesu mokumba ya kokamba mosala yango ya kosakola. Yesu alingaka ete mosala yango esalema na molɔngɔ. Na siɛklɛ ya liboso, wana masangá ezalaki kofungwama na bisika ndenge na ndenge, bankulutu bazalaki kotyama mpo na kopesa malako mpe kokamba mosala. (Mis. 14:23) Na Yerusaleme, lisangani monene ya bankulutu, oyo esangisaki bantoma ná mikóló, ezwaki bikateli mosusu oyo masangá nyonso esengelaki kotosa. (Mis. 15:2; 16:4) Ntango batosaki malako oyo bazwaki, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama.”—Mis. 16:5.

2. Kobanda 1919, ndenge nini Yehova akambaka bato na ye mpe apesaka bango bilei ya elimo?

2 Yehova alingi ete makambo eselama na molɔngɔ na kati ya basaleli na ye ata lelo oyo. Kobanda na 1919, Yesu asalelaka etuluku moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na kobongisa mosala ya kosakola mpe kopesa bayekoli na ye bilei ya elimo. a (Luka 12:42) Ezali polele ete Yehova azali kopambola mosala ya etuluku yango.—Yis. 60:22; 65:​13, 14.

3-4. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ete tozwaka matomba ndenge tozali na ebongiseli. (b) Tokotalela nini na lisolo yo?

3 Soki tozalaki na ebongiseli te, tolingaki kokoka te kosala mosala oyo Yesu apesaki biso. (Mat. 28:​19, 20) Na ndakisa, kanisá soki bazalaki kopesa biso teritware te; moto nyonso akokaki kosakola epai nyonso oyo alingi. Basakoli mosusu balingaki kosakola kaka na bateritware moko mbala na mbala, kasi bateritware mosusu elingaki kotikala kaka bongo, moto asakolá kuna te. Ozali na ndakisa mosusu oyo emonisi matomba oyo tozwaka ndenge tosalaka makambo na molɔngɔ?

4 Ndenge kaka Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo básalaka makambo na molɔngɔ ntango azalaki awa na mabele, asalaka mpe bongo mpo na biso lelo oyo. Na lisolo oyo, tokotalela ndakisa oyo Yesu atiká mpe ndenge oyo ebongiseli na biso elandaka ndakisa yango. Tokolobela mpe ndenge tokoki komonisa ete tosepelaka na ebongiseli ya Yehova.

EBONGISELI NA BISO ELANDAKA NDAKISA YA YESU

5. Wapi lolenge moko oyo tolandaka ndakisa ya Yesu? (Yoane 8:28)

5 Yesu ayekolaki nini asengeli kosala mpe nini asengeli koloba epai ya Tata na ye na likoló. Na ndakisa ya Yesu, ebongiseli ya Yehova esalelaka Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa biso tóyeba mabe ná malamu, mpe kopesa biso litambwisi. (Tángá Yoane 8:28; 2 Tim. 3:​16, 17) Bakundwelaka biso mbala na mbala ete tosengeli kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosalela makambo oyo toyekoli. Matomba nini tozwaka soki tolandi toli yango?

6. Litomba nini ya monene tozwaka na boyekoli na biso ya Biblia?

6 Tozwaka matomba mingi ntango toyekolaka Biblia na lisalisi ya mikanda ya moombo ya sembo. Na ndakisa, esalisaka biso tókokanisa mateya ya Biblia ná malako oyo euti na ebongiseli na biso. Ntango tomoni ete litambwisi oyo tozwi euti na Biblia, tokómaka kotyela ebongiseli ya Yehova motema mingi.—Rom. 12:2.

7. Nsango nini Yesu asakolaki, mpe ndenge nini ebongiseli ya Yehova elandaka ndakisa na ye?

7 Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:​43, 44) Yesu atindaki mpe bayekoli na ye básakola Bokonzi yango. (Luka 9:​1, 2; 10:​8, 9) Lelo oyo, moto nyonso oyo azali na kati ya ebongiseli ya Yehova asakolaka nsango ya Bokonzi ata soki afandaka wapi to azali na mikumba mingi.

8. Lokumu nini tozali na yango?

8 Tomonaka ete ezali libaku malamu koyebisa basusu solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe! Libaku yango epesami na moto nyonso te. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki na mabele, aboyaki bademo bápesa litatoli mpo na ye. (Luka 4:41) Lelo, liboso moto abanda kobima na mosala ya kosakola elongo na basaleli ya Yehova, asengeli kokokisa masɛngami mpo azwa libaku yango. Tokomonisa ete tosepelaka na lokumu ya kosakola soki tozali kopesa litatoli ntango nyonso mpe esika nyonso oyo tokoki. Lokola Yesu, mokano na biso ezali ya kolona mboto ya solo ya Bokonzi na mitema ya bato mpe kosopela yango mai.—Mat. 13:​3, 23; 1 Ko. 3:6.

9. Ndenge nini ebongiseli na biso esalisi bato báyeba nkombo ya Nzambe?

9 Yesu ayebisaki nkombo ya Nzambe. Na libondeli oyo asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, Yesu alobaki: “Nayebisi . . . nkombo na yo.” (Yoa. 17:26) Mpo na kolanda ndakisa ya Yesu, ebongiseli ya Yehova esali nyonso oyo ekoki mpo na kosalisa bato báyeba nkombo ya Nzambe. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi mingi na likambo yango na ndenge ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika oyo ezalaki na makomi na ebandeli. Libongoli yango ezali sikoyo na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 270. Na Apɛndisi A4 mpe A5 ya libongoli yango, okomona makambo etali kozongisa nkombo ya Nzambe na Biblia. Apɛndisi A5 epesi mpe bilembeteli ya polele oyo emonisi ete Nkombo ya Nzambe esengeli kozala mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo.

10. Maloba ya mwasi moko oyo afandaka na Myanmar eteyi yo nini?

10 Lokola Yesu, tolingaka kosalisa bato ebele mpenza báyeba nkombo ya Nzambe. Ntango mwasi moko ya mbula 67 oyo afandaka na Myanmar ayebaki ete Nzambe azali na nkombo, alelaki mpe alobaki: “Oyo mbala ya liboso na bomoi na ngai nayoka ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. . . . Boteyi ngai likambo oyo eleki makambo nyonso oyo nakoki koyekola.” Ndenge ndakisa yango emonisi, koyeba nkombo ya Nzambe ekoki mpenza kobongola bomoi ya bato ya mitema sembo.

KOBÁ KOMONISA ETE OSEPELAKA NA EBONGISELI NA BISO

11. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete basepelaka na ebongiseli ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)

11 Wapi lolenge moko oyo bankulutu bakoki komonisa ete basepelaka na ebongiseli ya Nzambe? Ntango bazwi malako, bankulutu basengeli kotánga yango na likebi mpe na nsima kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalela yango. Na ndakisa, bazwaka malako mpo na ndenge ya kosala masolo na makita, mpo na ndenge ya kobondela na lisangá, kasi mpe mpo na ndenge ya kobatela bampate ya Kristo. Bankulutu oyo balandaka malako yango oyo euti na ebongiseli ya Nzambe basalisaka bandeko bámiyoka ete babatelami mpe balingami.

Bankulutu basalakisa biso tósepela na malako oyo euti na ebongiseli ya Yehova (Talá paragrafe 11) b


12. (a) Mpo na nini tosengeli kosala na bomoko na baoyo bazali kokamba biso? (Baebre 13:​7, 17) (b) Mpo na nini tosengeli kotala bizaleli malamu ya baoyo bazali kokamba biso?

12 Ntango tozwi malako epai ya bankulutu, tosengeli kondima yango kozanga mindɔndɔ. Soki tozali kosala bongo, tokosalisa baoyo bazali kokamba biso bákokisa mokumba na bango malamu. Biblia elendisi biso tótosa baoyo bazali kokamba biso mpe tómikitisa liboso na bango. (Tángá Baebre 13:​7, 17.) yango ekoki kozala mokakatano na bantango mosusu. Mpo na nini? Mpo bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, soki tozali kotala kaka bizaleli na bango ya mabe na esika tótala makambo na bango ya malamu, ekozala lokola nde tozali kosalisa banguna na biso. Na ndenge nini? Tokotyela lisusu ebongiseli ya Nzambe motema mingi te, nzokande banguna balingi tósala bongo. Tokoki mpenza kosala nini mpo tóyeba mpe tóboya makanisi mabe ya banguna na biso?

KOTIKA TE BASUSU BÁTINDA YO OTIKA KOSEPALA NA EBONGISELI NA BISO

13. Ndenge nini banguna ya Nzambe balukaka komonisa lokola ete ebongiseli na ye ezali mabe?

13 Banguna ya Nzambe balukaka kosala ete makambo ya malamu ya ebongiseli na ye emonana ete ezali mabe. Na ndakisa, toyekolá na Biblia ete Yehova alingi ete basaleli na ye bázala pɛto na nzoto, na bizaleli, mpe na elimo. Asɛngi ete moto nyonso oyo azali kokoba kosala makambo ya mbindo kozanga kobongola motema alongolama na lisangá. (1 Ko. 5:​11-13; 6:​9, 10) Totosaka etinda yango ya Biblia. Kasi, banguna na biso balukaka kosalela yango mpo na kofunda biso ete tozali makambo makasimakasi, tosambisaka basusu, mpe ete tolingaka bato te.

14. Masapo ya lokuta mpo na ebongiseli na biso eutaka epai ya nani?

14 Kobosana te moto oyo azali nsima ya banguna yango. Satana Zabolo nde apanzaka makambo ya lokuta. Azali “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44; Eba. 3:​1-5) Na yango, tosengeli koyeba ete Satana akosalela bato na ye mpo na kotambwisa masapo ya lokuta mpo na ebongiseli ya Yehova. Ezalaki mpe bongo na siɛklɛ ya liboso.

15. Makambo nini bakonzi ya mangomba basalaki Yesu mpe bayekoli na ye?

15 Na siɛklɛ ya liboso, bato ya Satana balobaki makambo ebele ya lokuta mpo na Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka mpe moto oyo azalaki kosala makamwisi. Na ndakisa, bakonzi ya mangomba bayebisaki bato ete nguya ya Yesu ya kobimisa bademo eutaki epai ya “mokonzi ya bademo.” (Mrk. 3:22) Ntango bazalaki kosambisa Yesu, bakonzi ya mangomba bafundaki ye ete afingi Nzambe mpe batindaki ebele ya bato básɛnga ete abomama. (Mat. 27:20) Na nsima, ntango bayekoli ya Kristo bazalaki kosakola nsango malamu, baoyo bazalaki kotɛmɛla bango “batombokisaki bato” mpo bányokola bakristo yango. (Mis. 14:​2, 19) Mpo na Misala 14:​2, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1998 elobaki: “Na esika básuka na koboya nsango bango moko, Bayuda oyo batɛmɛlaki baklisto babandaki kopanza nsango ya lokuta mpo ete bato ya mabota bákóma na makanisi ya mabe mpo na baklisto.”

16. Tosengeli kokanisa nini soki toyoki masapo ya lokuta?

16 Satana asukisaki lokuta na siɛklɛ ya liboso te. Lelo oyo mpe, azali kaka “kokosa mokili mobimba.” (Em. 12:9) Soki oyoki masapo ya lokuta mpo na ebongiseli na biso to mpo na bandeko oyo bakambaka biso, kanisá makambo oyo banguna ya Nzambe basalaki Yesu ná bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kokutana na minyoko mpe bazali kokosela bango makambo, kaka ndenge Biblia esakolaki. (Mat. 5:​11, 12) Masapo ya lokuta ekobungisa biso nzela te soki toyebi moto oyo apanzaka yango mpe tomibateli nokinoki. Ndenge nini tosengeli komibatela?

17. Ndenge nini tokoki kokima masapo ya lokuta? (2 Timote 1:13) (Talá mpe etanda “ Ndenge ya kosala liboso ya masapo ya lokuta.”)

17 Boyá masapo ya lokuta. Ntoma Paulo apesaki malako ya polele mpo na ndenge ya kosala soki toyoki masapo ya lokuta. Ayebisaki Timote ‘apesa basusu mitindo ete bátya likebi te na masapo ya lokuta’ mpe ‘aboya masapo ya lokuta oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu.’ (1 Tim. 1:​3, 4; 4:7) Mwana moke oyo azangi mayele akoki kolɔkɔta eloko na mabele mpe kotya yango na monɔkɔ na ye; kasi moto ya mayele oyo ayebi likama ya kosala bongo akosala yango te. Toboyaka masapo ya lokuta mpo toyebi esika eutaka. Tokangamaka makasi na “maloba [ya solo] oyo epesaka litomba.”—Tángá 2 Timote 1:13.

18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na ebongiseli ya Yehova?

18 Totaleli kaka ndenge misato kati na balolenge ebele oyo ebongiseli ya Nzambe emekolaka Yesu. Wana ozali koyekola Biblia, luká komona balolenge mosusu oyo ebongiseli na biso elandaka ndakisa ya Yesu. Salisá bandeko ya lisangá na bino básepela na ebongiseli na biso. Mpe kobá komonisa ete osepelaka na ebongiseli yango; salelá Yehova na bosembo mpe kangamá na ebongiseli oyo azali kosalela mpo na kokokisa mokano na ye. (Nz. 37:28) Tiká ete tókoba kozwa na motuya lokumu ya kozala na kati ya basaleli ya Yehova, oyo batondi na bolingo mpe bazali sembo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Na makambo nini basaleli ya Nzambe bamekolaka Yesu?

  • Ndenge nini tokoki kokoba komonisa ete tosepelaka na ebongiseli ya Yehova?

  • Tosengeli kosala nini soki toyoki masapo ya lokuta?

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato

a Talá etanda “Mpo na nini 1919?” na buku Losambo ya pɛto ya Yehova—Nsukansuka ezongisami! nk. 102-103.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Bankulutu balobeli bibongiseli oyo ezwami mpo na kosakola na esika ya bato ebele, na nsima nkulutu moko azali kopesa basakoli ya etuluku na ye malako yango, ete bápesa mokɔngɔ na efelo ntango bazali kosakola