Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mpo na nini bapaya bazalaki na kati ya limpinga ya Mokonzi Davidi?

NA KATI ya mibali ya etumba oyo bazalaki bapaya na kati ya limpinga ya Davidi, tokoki kotánga Zeleke Moamone, Uria Mohiti, mpe Yitima Momoabe. a (1 Nt. 11:​39, 41, 46) Ezalaki mpe na “Bakerete, Bapelete, ná mibali ya Gate.” (2 Sa. 15:18) Balobaka ete Bakerete ná Bapelete bazalaki bandeko ya Bafilistia. (Ezk. 25:16) Mibali ya Gate bazalaki liboso kofanda na Gate, engumba ya Bafilistia.—Yos. 13:​2, 3; 1 Sa. 6:​17, 18.

Mpo na nini Davidi andimaki mibali ya bikólo bapaya na limpinga na ye? Amonaki ete bazalaki sembo epai na ye mpe, oyo eleki ntina, bazalaki sembo epai ya Yehova. Na ndakisa, mpo na Bakerete ná Bapelete, buku moko (The New Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete: “Batikalaki sembo epai ya Davidi na bantango ya mpasi mpenza na boyangeli na ye.” Na ndenge nini? Ntango “mibali nyonso ya Yisraele” bakimaki Mokonzi Davidi mpe balandaki “moto moko ya mobulu na nkombo Sheba,” Bakerete ná Bapelete batikalaki epai ya Davidi mpe basalisaki ye mpo na kosukisa botomboki ya Sheba. (2 Sa. 20:​1, 2, 7) Na libaku mosusu, Adoniya mwana ya Mokonzi Davidi alukaki kokóma mokonzi na esika ya Salomo. Kasi, Bakerete ná Bapelete batikalaki sembo epai ya Davidi mpe basalisaki na kotya Salomo, moto oyo Yehova aponaki, mokonzi na esika na ya Davidi.—1 Bak. 1:​24-27, 38, 39.

Mobali mosusu ya ekólo ya bapaya oyo atikalaki mpenza sembo epai ya Davidi ezalaki Itai moto ya Gate. Itai ná mibali ya etumba 600 bapesaki Mokonzi Davidi mabɔkɔ ntango mwana na ye Abisalome atombokelaki ye mpe asalaki ete mibali ya Yisraele bálanda ye. Liboso, Davidi ayebisaki Itai ete lokola azali mopaya, asengeli kobunda mpo na ye. Kasi Itai alobaki: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali solo na bomoi, Ee mokonzi, esika nyonso oyo okozala, mosaleli na yo mpe akozala kuna. Kutu nandimi kokufa elongo na yo!”—2 Sa. 15:​6, 18-21.

Itai atikalaki sembo epai ya Davidi, mokonzi oyo Yehova aponaki

Atako Bakerete, Bapelete ná bato ya Gate bazalaki bapaya, bandimaki ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe ete Davidi nde moto oyo Yehova aponaki. Na ntembe te Davidi asepelaki mingi kozala na mibali yango ya sembo pene na ye!

a Mobeko ya Nzambe oyo ezali na Kolimbola Mibeko 23:​3-6 epekisaki Baamone ná Bamoabe bákɔta na lisangá ya Yisraele. Kasi, emonani ete mobeko yango ezalaki kolobela nde kokóma moto ya ekólo yango mpe epekisaki te bato ya bikólo wana ya bapaya básangana to báfanda na kati ya basaleli ya Nzambe. Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, lok. 100, na Français.