Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA KOYEKOLA

Bato ya elimo bazwaka bikateli ya bwanya

Bato ya elimo bazwaka bikateli ya bwanya

Tángá Ebandeli 25:​29-34 mpo na koyeba soki Esau ná Yakobo bazwaki bikateli ya bwanya.

Kɔtá na mozindo ya lisolo yango. Nini esalemaki liboso? (Eba. 25:​20-28) Nini esalemaki na nsima?—Eba. 27:​1-46.

Kɔtá na mozindo mpo oyeba makambo ya mikemike. Na ntango wana, mwana mobali ya liboso azalaki na ntomo mpe mikumba nini?—Eba. 18:​18, 19; w10 1/5 13.

  • Ntomo yango esɛngaki kaka ete moto azala mwana ya liboso mpo azala nkɔkɔ ya Masiya? (w17.12 par. 14-15)

Bimisá mateya, mpe salelá yango. Mpo nini Yakobo apesaki lotomo ya kozala mwana ya liboso motuya mingi koleka Esau? (Ebr. 12:​16, 17; w03 15/10 lok. 28-29) Ndenge nini Yehova atalelaki bandeko yango mibale, mpe mpo na nini? (Mal. 1:​2, 3) Esau akokaki kosala makambo ndenge nini mpo azwa bikateli ya malamu koleka?

  • Omituna boye: Ndenge nini nakoki komonisa ete nazwaka makambo ya elimo na motuya pɔsɔ na pɔsɔ, na ndakisa na oyo etali programɛ ya losambo na kati ya libota?