Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 19

LOYEMBO 22 Bokonzi ezali koyangela—Tiká eya!

Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?

Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?

“Yehova . . . alingi moto ata moko te abomama.”2 PE. 3:9.

NA MOKUSE

Tokoki kondima ete lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya ekozala sembo mpe ya boyengebene.

1. Mpo na nini tokoki koloba ete tozali na ntango moko ya esengo mpenza?

 TOZALI na ntango moko ya esengo mpenza! Mokolo na mokolo, bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na miso na biso. Na ndakisa, tozali komona ndenge “mokonzi ya nɔrdi” ná “mokonzi ya sudi” bazali kowela boyangeli ya mokili. (Dan. 11:​40, msl.) Tozali komona ndenge nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na ndenge oyo esalemá naino te, mpe bamilio ya bato bazali kopona kosambela Yehova. (Yis. 60:22; Mat. 24:14) Lisusu, tozali kozwa ebele ya bilei ya elimo na “ntango oyo ebongi.”—Mat. 24:​45-47.

2. Tokoki kondima likambo nini, mpe tosengeli koyeba likambo nini?

2 Yehova azali kokoba kosalisa biso tósosola malamu makambo minene oyo ekosalema mosika te. (Mas. 4:18; Dan. 2:28) Tokoki kondima ete ntango bolɔzi monene ekobanda, tokoyeba nyonso oyo esengeli tóyeba mpo tóyika mpiko na bosembo nyonso mpe tózala kutu malamu na eleko yango ya mpasi. Kasi, tosengeli koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo toyebi te mpo na mikolo ezali koya. Na lisolo oyo, tokolobela liboso ntina oyo tosemboli makambo oyo tolobaki mpo na makambo yango mosusu oyo ekosalema mosika te. Na nsima, tokotalela mwa makambo oyo toyebi mpo na mikolo ezali koya mpe ndenge oyo Tata na biso ya likoló akosala.

MAKAMBO OYO TOYEBI TE

3. Liboso tolobaki ete ntango nini bato bakokoka te kopona kosambela Yehova, mpe mpo na nini tolobaki bongo?

3 Na kala, tolobaki ete soki kaka bolɔzi monene ebandi, bato bakozala lisusu na likoki te ya kopona kosalela Yehova mpe kobika na Armagedone. Tolobaki bongo mpo tomonaki ete lisolo ya Mpela ezalaki na ndimbola ya elilingi. Na ndakisa, tolobaki ete kaka ndenge Yehova akangaki porte ya masuwa liboso ete Mpela ebanda, ntango bolɔzi monene ekobanda, ‘akokangela mokili ya Satana porte,’ mpo bato bázwa libaku te ya kondimela ye mpe kobika.—Mat. 24:​37-39.

4. Tosengeli lelo komona ete lisolo ya Mpela ezali na ndimbola ya elilingi? Limbolá.

4 Tosengeli komona ete lisolo ya Mpela ezali na ndimbola ya elilingi? Te. Mpo na nini? Mpo eloko moko te na kati ya Biblia epesi biso nzela ya komona yango bongo. a Yesu akokanisaki “mikolo ya Noa” na ntango ya kozala na ye, kasi alobaki te ete Mpela ezalaki na ndimbola ya elilingi, ete moto mokomoko mpe likambo mokomoko oyo esalemaki ezali elilingi ya eloko moko boye. Yesu alobaki mpe te ete ndenge Nzambe akangaki porte ya masuwa ezali na ndimbola moko ya elilingi. Kasi, yango elingi koloba te ete tokoki te kozwa mateya na lisolo ya Noa mpe ya Mpela.

5. (a) Noa asalaki nini mpo na komonisa kondima na ye? (Baebre 11:7; 1 Petro 3:20) (b) Na oyo etali mosala ya kosakola, na ndenge nini tokokani na Noa?

5 Ntango Noa ayokaki nsango ya lisambisi ya Yehova, amonisaki kondima na ye na ndenge atongaki masuwa. (Tángá Baebre 11:7; 1 Petro 3:20.) Ndenge moko mpe, bato oyo bayoki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe basengeli komonisa kondima mpe kosalela makambo oyo bayoki. (Mis. 3:​17-20) Petro abengaki Noa “mosakoli ya bosembo.” (2 Pe. 2:5) Kasi, ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, toyebi te soki Noa azwaki bibongiseli mpo na kosakwela moto mokomoko oyo azalaki na bomoi na mabele liboso ya Mpela. Lelo oyo, tozali kosala makasi tósakwela bato na mokili mobimba, mpe tosalaka makasi tózala na molende na mosala ya kosakola. Kasi, ata soki tosali makasi ndenge nini, tokokoka te koyebisa moto mokomoko oyo azali awa na mabele nsango malamu liboso nsuka eya. Mpo na nini?

6-7. Limbolá ntina oyo tokoki koloba ete tokokoka te koyebisa moto mokomoko awa na mabele nsango malamu liboso ete nsuka eya.

6 Tótalela makambo oyo Yesu alobaki mpo na bonene ya mosala ya kosakola. Alobaki ete nsango malamu ekosakolama “na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Esakweli yango ezali kokokisama lelo na ndenge oyo esalemá naino te. Nsango ya Bokonzi ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 1000, mpe bato mingi mpenza na mokili mobimba bakoki kozwa yango na nzela ya site jw.org.

7 Kasi, Yesu ayebisaki mpe bayekoli na ye ete ‘bakosilisa te koleka na bingumba nyonso,’ to kosakwela moto nyonso, liboso ete aya. (Mat. 10:23; 25:​31-33) Maloba ya Yesu ekokokisama mpe na mikolo na biso. Lelo oyo, bamilio ya bato bafandi na bisika oyo bipekiseli ezali makasi mpo tósakola nsango malamu. Lisusu, bankama ya bana bazali kobotama nsima ya miniti mokomoko. Tozali kosala oyo tokoki mpo na koyebisa bato ya “bikólo nyonso, mabota nyonso, [mpe] minɔkɔ nyonso” nsango malamu. (Em. 14:6) Kasi likambo ya solo ezali ete tokokoka te koyebisa nsango malamu epai ya moto mokomoko awa na mabele liboso ete nsuka eya.

8. Motuna nini tokoki mbala mosusu komituna mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya? (Talá mpe bililingi.)

8 Na yango, motuna mosusu ebimi: Ekozala ndenge nini mpo na bato oyo mbala mosusu bakozwa libaku te ya koyoka nsango malamu liboso bolɔzi monene ebanda? Yehova ná Mwana na ye, oyo ye apesi mokumba ya kosambisa, bakosala na bango ndenge nini? (Yoa. 5:​19, 22, 27; Mis. 17:31) Vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo elobi ete Yehova “alingi ata moto moko te abomama.” Yehova alingi nde “bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9; 1 Tim. 2:4) Atako bongo, tosengeli koyeba ete Yehova amonisi biso naino te makambo oyo akosala mpo na baoyo bakozwa te libaku ya koyoka nsango malamu. Kutu, asɛngisami te koyebisa biso nyonso oyo asalaka to akosala.

Yehova akosala ndenge nini na bato oyo mbala mosusu bakozwa libaku te ya koyoka nsango malamu liboso bolɔzi monene ebanda? (Talá paragrafe 8) c


9. Yehova amonisi biso nini na kati ya Biblia?

9 Na Liloba na ye, Yehova amonisi biso makambo mosusu oyo akosala. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete Yehova akozongisa na bomoi “bato oyo bazangi bosembo,” oyo bazwaki libaku te ya komonisa ete bandimi nsango malamu mpe ya kobongola bizaleli na bango. (Mis. 24:15; Luka 23:​42, 43) Yango ebimisi mituna mosusu ya ntina mingi.

10. Mituna nini mosusu tokoki komituna?

10 Bato nyonso oyo bakokufa na eleko ya bolɔzi monene bakokufa libela, kozanga elikya ya lisekwa? Biblia emonisi polele ete batɛmɛli ya makasi oyo Yehova ná mampinga na ye bakobebisa na Armagedone bakosekwa te. (2 Tes. 1:​6-10) Bongo tokoki koloba nini mpo na bato mosusu, na ndakisa, baoyo bakoki kokufa na makama oyo ebimaka yango moko, na aksida, to na mabɔkɔ ya bato mosusu na ntango ya bolɔzi monene? (Mos. 9:11; Zek. 14:13) Bato yango mosusu bakoki nde kozala na kati ya “bato oyo bazangi bosembo,” oyo bakosekwa na mokili ya sika? Na mokuse, toyebi te.

MAKAMBO OYO TOYEBI

11. Na Armagedone, bato bakosambisama na kotalela nini?

11 Toyebi makambo ebele oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Na ndakisa, toyebi ete na Armagedone, bato bakosambisama na kotalela ndenge oyo basalelaki bandeko ya Kristo makambo. (Mat. 25:40) Baoyo bakosambisama lokola bampate ekozala baoyo bapesaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe Kristo mabɔkɔ. Toyebi mpe ete bandeko mosusu ya Kristo bakozala naino awa na mabele na ebandeli ya bolɔzi monene mpe ete bakokende na likoló mwa moke kaka liboso etumba ya Armagedone ebanda. Ntango nyonso oyo bandeko mosusu ya Kristo bakozala naino awa na mabele, bato ya mitema sembo bakozala kaka na libaku ya kopesa bango mabɔkɔ mpe kosunga bango na mosala oyo bazali kosala. (Mat. 25:​31, 32; Em. 12:17) Mpo na nini koyeba makambo yango ezali na ntina?

12-13. Bato mosusu bakoki kosala nini nsima ya komona ete “Babilone Monene” ebebisami? (Talá mpe bililingi.)

12 Ata nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, ekoki kaka kosalema ete bato mosusu oyo bamoni kobebisama ya “Babilone Monene” bámikundwela ete Batatoli ya Yehova bazalaki kolobela likambo yango banda kala. Bato mosusu oyo bamoni makambo wana bakoki nde kobongola motema?—Em. 17:5; Ezk. 33:33.

13 Soki likambo ya ndenge wana esalemi, ekozala lokola likambo oyo esalemaki na Ezipito na mikolo ya Moize. Tómikundwela ete “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge” babimaki na Ezipito elongo na Yisraele. Ekoki kozala ete bato yango mosusu babandaki kokolisa kondima epai ya Yehova ntango bamonaki ete makambo oyo Moize alobaki mpo na Malɔzi Zomi ekokisamaki. (Kob. 12:38) Soki likambo ya ndenge wana esalemi nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, tokoyoka nde mabe mpo bato bayei kosangana na biso kaka mwa moke liboso nsuka eya? Te, tokoyoka mabe te! Tolingaka komekola bizaleli ya Tata na biso ya likoló, “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo mpe na solo.” bKob. 34:6.

Bato mosusu oyo bakomona kobebisama ya “Babilone Monene” bakomikundwela ete Batatoli ya Yehova bazalaki kolobela likambo yango banda kala (Talá paragrafe 12-13) d


14-15. Mpo moto azwa bomoi ya seko etaleli ntango oyo akufi to esika oyo afandaka? Limbolá. (Nzembo 33:​4, 5)

14 Toyokaka bato mosusu balobaka: “Ekoleka malamu soki bandeko na ngai ya libota bakufi liboso bolɔzi monene ebanda mpo bázala na elikya ya lisekwa.” Na ntembe te bato oyo balobaka bongo bazalaka na makanisi ya mabe te. Kasi, mpo moto azwa bomoi ya seko etaleli te ntango oyo moto yango akufi. Yehova azali Mosambisi ya kokoka; bikateli na ye ezalaka sembo mpe ya boyengebene. (Tángá Nzembo 33:​4, 5.) Tokoki kotya motema ete “Mosambisi ya mabele mobimba” akosala oyo ezali sembo.—Eba. 18:25.

15 Ebongi mpe tóloba ete mpo moto azwa bomoi ya seko etaleli te esika oyo afandaka. Ekoki kosalema te ete Yehova akata mbala moko bamilio ya bato ete bazali “bantaba, kaka mpo bafandaka na bisika oyo bazwá libaku te ya koyoka mpe kondima nsango ya Bokonzi.” (Mat. 25:46) Mosambisi ya sembo ya mabele mobimba atyelaka bato yango likebi mingi koleka ndenge oyo biso tokoki kosala yango. Toyebi te ndenge oyo Yehova akotambwisa makambo na ntango ya bolɔzi monene. Mbala mosusu bato yango mosusu bakozwa libaku ya koyeba Yehova, kondimela ye, mpe kopona kozala na ngámbo na ye ntango akomisantisa liboso ya bikólo nyonso.—Ezk. 38:16.

Nsima ya kobanda ya bolɔzi monene . . . bato mosusu oyo bamoni makambo wana bakoki nde kobongola motema?

16. Makambo nini toyekoli mpo na Yehova? (Talá mpe elilingi.)

16 Na nzela ya boyekoli na biso ya Biblia, toyekoli ete Yehova azwaka bomoi ya bato na motuya mingi mpenza. Apesaki bomoi ya Mwana na ye mpo biso nyonso tózala na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. (Yoa. 3:16) Biso nyonso toyebi ndenge Yehova alingaka biso mingi. (Yis. 49:15) Ayebi nkombo ya mokomoko na biso. Kutu, ayebi biso malamu mpenza na boye ete soki tokufi, akoki kozongisa biso na bomoi ná makambo ya mikemike ya bomoto na biso mpe makanisi na biso nyonso oyo esalaka ete tózala ndenge oyo tozali! (Mat. 10:​29-31) Ya solo mpenza, tozali na ntina ya kotya motema ete Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akosambisa moto mokomoko na ndenge ya bokatikati ya kokoka, ya sembo, mpe na motema mawa.—Yak. 2:13.

Tokoki kotya motema ete Yehova akosambisa moto mokomoko na ndenge ya bokatikati ya kokoka, ya sembo, mpe na motema mawa (Talá paragrafe 16)


17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Makambo oyo esembolami na boyebi na biso emonisi ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu koleka. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpe nini etindaka biso tókoba kosakola nsango malamu na molende? Tokolobela biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 76 Oyokaka nini?

a Mpo omona ntina oyo bambongwana yango esalemaki, talá lisolo “Omonaki malamu kosala bongo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2015, nk. 3-8.

b Nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, basaleli nyonso ya Yehova bakomekama na ntango ya etumba ya Goge ya Magoge. Moto nyonso oyo akoya na ngámbo ya basaleli ya Nzambe nsima ya kobebisama ya Babilone monene akomekama mpe.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntina misato oyo mbala mosusu nsango oyo tozali kosakola na mokili mobimba ezali kokómela bato mosusu te: (1) Mwasi moko na esika oyo lingomba monene ya mboka esalaka makambo oyo ebangisaka ye, (2) mwasi ná mobali oyo bafandi na mboka oyo makambo ya politiki epekisi mosala na biso, mpe (3) mobali moko oyo afandaka na esika oyo ezali mpenza mpasi kokóma kuna.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Elenge mwasi moko oyo atiká solo amikundweli makambo oyo ayekolaki mpo na kobebisama ya “Babilone Monene.” Abongoli motema mpe azongi epai ya boboti na ye oyo bazali bakristo. Soki makambo ya ndenge wana esalemi, tolingi komekola motema mawa mpe ngɔlu ya tata na biso ya likoló mpe kosepela ete mosumuki moko azongeli ye.