Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 25

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”

Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”

“Yehova azali na bomoi!”NZ. 18:46.

NA MOKUSE

Tokozwa matomba mingi soki tozali kobosana te ete Nzambe oyo tosambelaka azali “Nzambe ya bomoi.”

1. Nini esalisaka basaleli ya Yehova bákoba kosambela ye atako mikakatano?

 BIBLIA elobi ete eleko oyo tozali ezali “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Longola mikakatano oyo moto nyonso akutanaka na yango na mokili oyo, basaleli ya Yehova bakutanaka na botɛmɛli mpe minyoko. Nini ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova atako mikakatano yango? Ntina moko monene ezali ete toyekoli koyeba Yehova mpe tomoni ete azali “Nzambe ya bomoi.”—Yir. 10:10; 2 Tim. 1:12.

2. Lokola Yehova azali Nzambe ya bomoi, asalaka nini?

2 Yehova azali Moto ya solo oyo asungaka biso na ntango ya mikakatano mpe alukaka mabaku ya kosalisa biso. (2 Nt. 16:9; Nz. 23:4) Komona ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekoki kosalisa biso tólonga mokakatano nyonso oyo tokutani na yango. Tótalela ndenge ezalaki mpo na Mokonzi Davidi.

3. Davidi alingaki koloba nini na maloba “Yehova azali na bomoi”?

3 Davidi ayebaki Yehova mpe azalaki kotyela Ye motema. Ntango banguna, ata mpe Mokonzi Saulo, bazalaki koluka koboma ye, Davidi abondelaki Yehova asalisa ye. (Nz. 18:6) Na nsima ntango Nzambe ayanolaki na libondeli na ye mpe abikisaki ye, Davidi alobaki: “Yehova azali na bomoi!” (Nz. 18:46) Na maloba yango, Davidi azalaki kaka kondima te ete Nzambe azalaka. Buku moko elobi ete Davidi azalaki komonisa ndenge atyelaki Yehova motema lokola “Nzambe ya bomoi oyo asalaka ntango nyonso mpo na bolamu ya bato na ye.” Ya solo, makambo oyo Davidi akutanaki na yango esalisaki ye amona ete Nzambe na ye azalaki na bomoi, mpe yango ebakiselaki ye mpiko ya kosalela Yehova mpe kosanzola ye.—Nz. 18:​28, 29, 49.

4. Ndenge nini komona ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekosalisa biso?

4 Komindimisa ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekoki kosalisa biso tósalela ye na molende. Tokozala na makasi ya koyikela mikakatano mpiko mpe tokolinga kokoba kosala mingi na mosala na ye. Tokozala mpe na ekateli ya kotikala penepene na Yehova.

NZAMBE YA BOMOI AKOPESA YO MAKASI

5. Tokoki komindimisa likambo nini ntango tokutani na mikakatano? (Bafilipi 4:13)

5 Tokolonga koyikela komekama nyonso mpiko, ezala ya moke to ya monene, soki tozali kobosana te ete Yehova azali na bomoi mpe asalisaka biso ntango nyonso. Mokakatano moko te ezali makasi mpo na Nzambe na biso. Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe akoki kopesa biso nguya mpo tóyika mpiko. (Tángá Bafilipi 4:13.) Yango endimisi biso ete tokoki kobundisa mikakatano nyonso mpe kolonga yango. Komona ndenge Yehova asalisi biso na mikakatano ya mikemike endimisaka biso ete akosalisa mpe biso ntango tokokutana na mikakatano ya minene.

6. Makambo nini oyo Davidi akutanaki na yango na bolenge etindaki ye atyela lisusu Yehova motema mingi?

6 Tótalela makambo mibale oyo Davidi akutanaki na yango oyo etindaki ye atyela lisusu Yehova motema mingi. Ntango Davidi azalaki elenge mpe mobateli ya bampate, urse mpe na nsima nkɔsi ememaki moko ya bampate ya tata na ye. Na libaku mokomoko, Davidi alandaki nyama yango na mpiko mpenza mpe abikisaki mpate. Kasi, Davidi alobaki te ete abikisaki yango na makasi na ye moko. Ayebaki ete Yehova nde apesaki ye nguya ya kosala yango. (1 Sa. 17:​34-37) Davidi abosanaki te makambo wana oyo Nzambe asalelaki ye. Komanyola makambo yango esalisaki ye atya lisusu motema ete Nzambe ya bomoi akopesa ye makasi na mikolo ekoya.

7. Makambo nini Davidi azalaki kokanisa, mpe mpo na nini yango esalisaki ye abundisa Goliate?

7 Na nsima, emonani ete liboso kutu akokisa mbula 20, Davidi akendaki na kaa ya limpinga ya Bayisraele. Amonaki ete basoda bayokaki nsɔmɔ mpo engambe Mofilistia moko na nkombo Goliate abimaki mpo na “kotumola limpinga ya basoda ya Yisraele.” (1 Sa. 17:​10, 11) Basoda babangaki mpo batyaki likebi nyonso epai ya engambe wana mpe na makambo oyo azalaki koloba. (1 Sa. 17:​24, 25) Kasi, Davidi atalelaki likambo yango ndenge mosusu. Davidi ayebaki ete ndenge Goliate azalaki kotumola limpinga ya Yisraele, azalaki kotumola nde “limpinga ya basoda ya Nzambe ya bomoi.” (1 Sa. 17:26) Davidi azalaki kokanisa libosoliboso Yehova. Davidi atyaki motema ete Nzambe oyo asalisaki ye ntango azalaki mobateli ya bampate akosalisa ye mpe na mbala oyo. Lokola ayebaki ete Yehova akosalisa ye, Davidi abundaki na Goliate, mpe alongaki ye!—1 Sa. 17:​45-51.

8. Ntango tokutani na mikakatano, nini ekosalisa biso tóbosana te ete Yehova akosalisa biso? (Talá mpe elilingi.)

8 Biso mpe tokoki kolonga mikakatano na biso soki tozali kobosana te ete Nzambe ya bomoi alingaka kosalisa biso. (Nz. 118:6) Tokondima mpenza likambo yango soki tozali kotalela makambo oyo asalá na kala. Tángáká masolo ya Biblia oyo ekomonisa yo ndenge Yehova abikisaki basaleli na ye. (Yis. 37:​17, 33-37) Lisusu, talá na site jw.org masolo oyo emonisi ndenge Yehova azali kosalisa bandeko na mikolo na biso. Longola yango, kanisá makabu oyo Yehova asalisaki yo. Komitungisa te soki omoni te likambo ya kokamwa oyo Yehova asalelá yo, lokola kolonga urse to nkɔsi. Mpo na nini omitungisa te? Mpo likambo ya solo ezali ete Yehova asali makambo mingi na bomoi na yo! Abendi yo okóma moninga na ye. (Yoa. 6:44) Ata sikoyo, ezali kaka mpo na lisalisi na ye nde ozali na solo tii lelo. Mpo na nini te osɛnga ye asalisa yo omikundwela mabaku oyo ayanolaki na mabondeli na yo, ndenge asalisaki yo ntango ozalaki mpenza na bosɛnga, to atyelaki yo likebi na likambo moko ya mpasi oyo okutanaki na yango? Kokanisa makambo wana ekosalisa yo otya lisusu motema mingi ete Yehova akokoba kosalisa yo.

Mikakatano na biso etaleli ntembe ya bosembo na biso epai ya Yehova (Talá paragrafe 8-9)


9. Mikakatano oyo tokutani na yango epesaka biso libaku nini? (Masese 27:11)

9 Komona ete Yehova azali Moto ya solo ekosalisa biso tótalela mikakatano na biso na ndenge oyo ebongi. Na ndenge nini? Tokobanda komona ete mikakatano na biso etaleli ntembe monene kati na Yehova mpe Satana. Satana alobaka ete soki tokutani makambo ya mpasi, tokosundola Yehova. (Yobo 1:​10, 11; tángá Masese 27:11.) Kasi ntango totikali sembo epai ya Yehova atako mikakatano na biso, tokomonisa ete tolingaka Yehova mpe ete Satana azali moto ya lokuta. Ozali kokutana na botɛmɛli ya guvɛrnema, mikakatano ya mbongo, bato ya teritware bazali kosepela na solo te, to mokakatano mosusu? Soki ezali bongo, kobosana te ete makambo oyo ozali kokutana na yango epesi yo libaku ya kosepelisa motema ya Yehova. Kobosana mpe te ete Yehova akotika ata moke te omekama koleka oyo okoki kokangela motema. (1 Ko. 10:13) Akopesa yo makasi ya koyika mpiko.

NZAMBE YA BOMOI AKOPESA YO MBANO

10. Nzambe ya bomoi akosala nini epai ya baoyo basambelaka ye?

10 Yehova azangaka te kopesa mbano na baoyo basambelaka ye. (Ebr. 11:6) Apesaka biso kimya mpe esengo sikoyo mpe akopesa biso bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Tokoki kotya elikya na biso epai ya Yehova, mpe kondima ete azali na mposa mpe na nguya ya kopesa biso mbano. Mpe kondima yango ekotinda biso tókoba komipesa na makambo na biso ya losambo, kaka ndenge basaleli ya Nzambe ya sembo ya kala basalaki. Ezalaki bongo mpo na Timote na siɛklɛ ya liboso.—Ebr. 6:​10-12.

11. Nini etindaki Timote amipesa mingi na kosalisa lisangá? (1 Timote 4:10)

11 Tángá 1 Timote 4:10. Timote atyaki elikya na ye epai ya Nzambe ya bomoi. Yango etindaki ye amipesa na mosala ya Nzambe mpe na kosalisa basusu. Ndenge nini asalaki yango? Ntoma Paulo alendisaki ye akolisa makoki ya koteya mpe ya koloba liboso ya bato. Timote asengelaki mpe kozala ndakisa malamu mpo na bandeko na ye bakristo, ezala bilenge to mibange. Azwaki mpe mikumba mosusu ya mpasi, na ndakisa kopesa toli ya makasi, kasi na boboto epai ya baoyo basengelaki na yango. (1 Tim. 4:​11-16; 2 Tim. 4:​1-5) Timote akokaki kotya motema ete ata soki na bantango mosusu bato bazalaki te komona mosala na ye to kosepela na yango, Yehova akopesa ye mbano.—Rom. 2:​6, 7.

12. Nini ekoki kotinda bankulutu bákoba komipesa na mosala na bango? (Talá mpe elilingi.)

12 Lelo oyo mpe, bankulutu bakoki kotya motema ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mosala na bango ya malamu. Longola kolendisa bandeko, koteya, mpe kosakola, bankulutu mingi bapesaka mabɔkɔ na mosala ya botongi mpe basalisaka bandeko oyo bazwi makama. Basusu bapesaka mabɔkɔ na bituluku ya bandeko oyo batalaka bato ya maladi to na Bakomite ya boyokani na minganga. Bankulutu oyo bamipesaka na misala wana bamonaka ete lisangá ezali ebongiseli ya Yehova, kasi ya moto te. Yango wana, bamipesaka na mikumba na bango mpe batyaka motema ete Yehova akopesa bango mbano mpo na oyo bazali kosala.—Kol. 3:​23, 24.

Nzambe ya bomoi akopesa yo mbano lokola ozali kosala makasi mpo na lisangá (Talá paragrafe 12-13)


13. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na milende oyo tosalaka na mosala na ye?

13 Biso nyonso tokoki kozala bankulutu te. Kasi biso nyonso tokoki kopesa Yehova mwa eloko. Mpe asepelaka mingi ntango tosalaka nyonso ekoki mpo na kosalela ye. Amonaka makabo oyo totyaka mpo na mosala na biso na mokili mobimba, ata soki ezali mingi te. Asepelaka ntango tosalaka makasi tólonga ezaleli na biso ya nsɔninsɔni mpe tótombola lobɔkɔ mpo na kopesa eyano na makita; asepelaka mpe ntango toboyi kolandela mabe oyo basali biso mpe tolimbisi. Ata soki omoni ete okokoka kosala mingi te na mosala ya Yehova, tyá motema ete azwaka na motuya oyo osalaka. Alingaka yo mpo na yango, mpe akopesa yo mbano.—Luka 21:​1-4.

TIKALÁ PENEPENE NA NZAMBE YA BOMOI

14. Ndenge nini kotikala penepene na Yehova ekosalisa biso tótikala sembo? (Talá mpe elilingi.)

14 Soki Yehova azali mpenza Moto ya solo na miso na biso, ekozala mpasi te mpo tótikala sembo epai na ye. Ezalaki bongo mpo na Yozefe. Aboyaki na mpiko nyonso kosala pite. Nzambe azalaki Moto ya solo mpo na ye, mpe alingaki te koyokisa Ye mpasi. (Eba. 39:9) Mpo Yehova azala Moto ya solo na miso na biso, tosengeli kozwaka ntango ya kobondela ye mpe koyekola Liloba na ye. Na ndenge yango boninga na biso na ye ekokóma makasi. Lokola Yozefe, ntango tozali na boninga makasi na Yehova, tokolinga kosala ata eloko moko te oyo ekoyokisa Ye mpasi.—Yak. 4:8.

Kotikala penepene ya Nzambe ya bomoi ekosalisa yo otikala sembo (Tala paragrafe 14-15)


15. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Bayisraele na esobe? (Baebre 3:12)

15 Baoyo babosanaka ete Yehova azali Nzambe ya bomoi bazangaka mbala mingi bosembo epai na ye. Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele ntango bazalaki na esobe. Bayebaki ete Yehova azali, kasi bakómaki komituna soki akokisa bamposa na bango. Batunaki kutu: “Yehova azali kati na biso to te?” (Kob. 17:​2, 7) Yango wana na nsima, batombokelaki Nzambe. Ya solo, tolingi ata moke te kolanda ndakisa na bango ya kozanga botosi, ezali likebisi mpo na biso.—Tángá Baebre 3:12.

16. Nini ekoki kokitisa kondima na biso?

16 Mokili ezali kosala ete ezala mpasi kotikala penepene na Yehova. Bato mingi bandimaka te ete Nzambe azalaka. Mbala mingi, emonanaka lokola ete baoyo batosaka Nzambe te bazali na bomoi ya malamu. Ntango tozali komona likambo yango, kondima na biso ekoki kokita. Atako tokowangana te ete Nzambe azalaka, tokoki kobanda komituna soki akosalisa biso. Mokomi ya nzembo 73 amiyokaki bongo na ntango moko boye. Amonaki ete zingazinga na ye, baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe te bazalaki na bomoi ya malamu. Na yango, akómaki komituna soki ezali na ntina kosalela Nzambe.—Nz. 73:​11-13.

17. Nini ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova?

17 Nini esalisaki mokomi ya nzembo asembola makanisi na ye? Amanyolaki na oyo ekokómela baoyo babosanaka Yehova. (Nz. 73:​18, 19, 27) Akanisaki mpe matomba oyo kosalela Nzambe epesaka. (Nz. 73:24) Biso mpe tokoki kokanisaka mapamboli oyo Yehova apesi biso. Tókanisa sikoyo ndenge oyo bomoi na biso elingaki kozala soki tozalaki kosalela Yehova te. Kosala bongo ekosalisa biso tótikala sembo mpe tóloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Mpo na ngai, kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.”—Nz. 73:28.

18. Mpo na nini tosengeli kobanga te mpo na mikolo ezali koya?

18 Tokoki kobundisa mikakatano nyonso oyo ekoki koyela biso na mikolo oyo ya nsuka mpo tozali “kosala lokola baombo mpo na Nzambe ya bomoi mpe ya solo.” (1 Tes. 1:9) Nzambe na biso azali Moto ya solo oyo asalisaka baoyo basambelaka ye. Azalaki elongo na basaleli na ye ya kala, mpe azali elongo na biso lelo. Mosika te, tokokutana na bolɔzi moko monene mpenza oyo ekosalema na mabele mobimba. Kasi tokozala biso moko te, Yehova akozala elongo na biso. (Yis. 41:10) Tiká ete “tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.’”—Ebr. 13:​5, 6.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai