Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 26

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

Kómisá Yehova Libanga na yo

Kómisá Yehova Libanga na yo

“Libanga moko te epikami makasi lokola Nzambe na biso.”1 SA. 2:2.

NA MOKUSE

Talá bizaleli oyo esali ete Yehova abengama libanga, mpe ndenge oyo tokoki komekola bizaleli yango.

1. Ndenge emonisami na Nzembo 18:​46, Davidi akokanisaki Yehova na nini?

 TOZALI na mokili oyo makambo ya mbalakaka ekoki kobimela biso, to kutu kobongola mpenza bomoi na biso. Ezali esengo mingi ndenge tokoki kozwa lisalisi epai ya Yehova Nzambe! Na lisolo oyo eleki, tomonaki ete Yehova azali Nzambe ya bomoi mpe ete azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso. Ntango tozwi lisungi na ye, yango endimisaka biso ete “Yehova azali na bomoi!” (Tángá Nzembo 18:46.) Kasi, kaka nsima ya koloba ete Yehova azali na bomoi, Davidi abengaki Nzambe “Libanga na ngai.” Mpo na nini akokanisaki Yehova, Nzambe ya bomoi, na libanga, eloko oyo eninganaka te?

2. Ndenge Davidi abengaki Yehova “Libanga na ngai” etindi biso tólobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokotalela ntina oyo Yehova abengami libanga, mpe oyo liloba yango ya elilingi ezali koteya biso mpo na ye. Tokoyekola mpe ndenge oyo tokoki kokómisa ye Libanga na biso. Mpo na kosukisa, tokolobela ndenge oyo tokoki komekola bizaleli yango ya Yehova.

NTINA OYO YEHOVA AZALI LIBANGA

3. Ndenge nini mbala mingi Biblia esalelaka liloba “libanga”? (Talá ezipeli.)

3 Biblia esaleli liloba “libanga” na ndenge ya elilingi mpo na kosalisa biso tókanga ntina ya bizaleli mosusu ya Yehova. Liloba yango emonani mbala mingi na bisika oyo bazali kosanzola Yehova mpo na komonisa ete azali Nzambe oyo akokani na mosusu te. Esika ya liboso oyo babengi Yehova “Libanga” ezali Kolimbola Mibeko 32:4. Na libondeli oyo Hana asalaki, alobaki ete “libanga moko te epikami makasi lokola Nzambe na biso.” (1 Sa. 2:2) Habakuku abengaki Yehova “Libanga na ngai.” (Hab. 1:12) Mokomi ya Nzembo 73 abengaki Nzambe “libanga ya motema na ngai.” (Nz. 73:26) Mpe ata Yehova ye moko amibengaki libanga. (Yis. 44:8) Tokotalela bizaleli misato oyo esalaka ete Yehova azala lokola libanga, mpe tokomona ndenge oyo tokoki kokómisa ye “Libanga na biso.”Mib. 32:31.

Basaleli ya Yehova bamonaka ete azali Libanga monene oyo eninganaka te (Talá paragrafe 3)


4. Na ndenge nini Yehova azali ekimelo na biso? (Nzembo 94:22)

4 Yehova azali ekimelo. Na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi, moto akoki komibomba na nse ya libanga monene. Ndenge moko mpe Yehova abatelaka biso ntango tokutani na makambo ya mpasi na bomoi na biso. (Tángá Nzembo 94:22.) Asalisaka biso tózala na kimya mpe atikaka te ete tózwa likama oyo ekonyokola biso libela. Mpe alaki biso likambo mosusu: Nsukansuka akolongola likambo nyonso oyo ebebisaka kimya na biso mpe bolamu na biso.—Ezk. 34:​25, 26.

5. Ndenge nini Yehova akoki kokóma libanga monene ya Ekimelo na biso?

5 Lolenge moko ya kokómisa Yehova libanga monene na biso ya Ekimelo ezali ya kobondela ye. Ntango tobondeli Yehova, apesaka biso “kimya ya Nzambe” oyo ebatelaka motema mpe makanisi na biso. (Flp. 4:​6, 7) Tótalela ndakisa ya Artem, ndeko mobali oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na ye. Moto moko ya nko azalaki kotuna ye mituna mbala na mbala, azalaki kotya ye mbamba mpe kosambwisa ye. Artem alobaki boye: “Nazalaki kotungisama makasi mbala nyonso oyo moto yango azali kotuna ngai mituna. . . . Nazalaki ntango nyonso kobondela Yehova. Nasɛngaki ye apesa ngai kimya ya motema mpe bwanya. Mayele mabe ya moto yango esimbaki te epai na ngai. . . . Na lisalisi ya Yehova, nayokaki lokola natɛlɛmi nsima ya efelo monene ya libanga.”

6. Mpo na nini tokoki ntango nyonso kotyela Yehova motema? (Yisaya 26:​3, 4)

6 Yehova azali moto ya kotyela motema. Ndenge kaka libanga monene eninganaka te, Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso. Tokoki kotyela ye motema mpo azali “Libanga mpo na seko.” (Tángá Yisaya 26:​3, 4.) Akozala ntango nyonso na bomoi mpo na kokokisa bilaka na ye, koyoka mabondeli na biso, mpe kopesa biso lisungi oyo tosengeli na yango. Tokoki mpe kotyela Yehova motema mpo azalaka sembo epai ya basaleli na ye. (2 Sa. 22:26) Akobosana ata moke te oyo tosalaka, mpe akozanga te kopesa biso mbano.—Ebr. 6:10; 11:6.

7. Likambo nini tokomona ntango totyeli Yehova motema? (Talá mpe elilingi.)

7 Tokokómisa Yehova Libanga na biso ntango tozali kotyela ye motema mobimba. Totyaka motema ete soki totosi ye ata na ntango ya mpasi, ekozala mpo na bolamu na biso. (Yis. 48:​17, 18) Ntango tomoni ndenge asalisi biso, tokotyela ye motema lisusu mingi. Yango ekosalisa biso tóndima ete kaka Yehova nde akoki kosalisa biso tólonga ata mokakatano ya ndenge nini. Mbala mingi ntango tozali komona te moto oyo akoki kosalisa na mokakatano oyo tokutani na yango, tondimaka mpenza ete Yehova abongi kotyelama motema ntango nyonso. Ndeko Vladimir alobaki boye: “Na bomoi na ngai mobimba, ntango oyo nalekisaki na ndako ya bokangami nde esalisaki ngai mpenza nakóma na boyokani makasi na Yehova. Nayekolaki kotyela Yehova motema mobimba mpo nazalaki kaka ngai moko, mpe nakokaki kobongola makambo te.”

Tokokómisa Yehova Libanga na biso ntango totyeli ye motema mobimba (Talá paragrafe 7)


8. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova apikami makasi? (b) Matomba nini tokozwa lokola Yehova azali Libanga na biso? (Nzembo 62:​6, 7)

8 Yehova apikami makasi. Ndenge moko na libanga monene, Yehova apikamá makasi mpe azali bongolabongola te. Bomoto ya Yehova mpe mokano na ye ebongwanaka te. (Mal. 3:6) Ntango botomboki ebimaki na Edene, Yehova abongolaki te mokano na ye mpo na bato. Ndenge ntoma Paulo akomaki yango, Yehova “akoki komiwangana te.” (2 Tim. 2:13) Yango elingi koloba ete ata soki likambo nini esalemi, to soki bato basali nini, Yehova akobongola te bizaleli na ye, mokano na ye, to mibeko na ye. Lokola Nzambe na biso azali bongolabongola te, toyebi ete akopesa biso lobiko mpe akosalisa biso na bantango ya mpasi.—Tángá Nzembo 62:​6, 7.

9. Ndakisa ya Tatyana eteyi yo nini?

9 Tokokómisa Yehova Libanga na biso soki tozali kokanisa lolenge ya Moto oyo azali mpe tozali kobosana mokano na ye te. Kosala bongo ekoki kosalisa biso tópikama makasi na makanisi na biso ntango tozali kobunda na mikakatano. (Nz. 16:8) Ezalaki bongo mpo na ndeko mwasi moko na nkombo Tatyana, oyo batyaki na ndako moko ya bokangami mpo na kondima na ye. Alobaki boye: “Nazalaki kaka ngai moko mpenza. Na ebandeli ezalaki mpasi mingi. Mbala mingi nazalaki kolɛmba nzoto.” Kasi, ntango akanisaki ndenge komekama na ye etaleli mpe boyokani na ye na Yehova mpe mokano na ye, azwaki makasi ya koyika mpiko mpe akómaki na kimya ya makanisi. Alobaki boye: “Koyeba ntina oyo likambo yango ekómelaki ngai esalisaki ngai nabosana te ete ezali mpo na Yehova nde nazalaki na esika wana. Esalaki ete natika komitungisa kaka mpo na ngai moko.”

10. Ndenge nini tokoki kokómisa Yehova libanga na biso sikoyo?

10 Na mikolo ezali koya, tokokutana na mikakatano oyo ekosɛnga tótyela Yehova motema lisusu mingi koleka. Sikoyo nde ntango ya kondima na motema moko ete akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko na bosembo nyonso. Ndenge nini okoki kosala yango? Tángáká masolo ya Biblia mpe masolo ya bomoi ya bandeko ya mikolo na biso. Luká komona ndenge Nzambe amonisaki bizaleli oyo esalaki ete azala libanga mpo na kosunga basaleli na ye. Kanisá malamumalamu mateya oyo ezali na masolo yango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo okómisa Yehova Libanga na yo.

MEKOLÁ BIZALELI YA YEHOVA; ZALÁ LIBANGA

11. Mpo na nini ezali malamu tómekola bizaleli ya Yehova oyo esalaka ete azala libanga? (Talá mpe etanda “ Oyo bilenge mibali bakoki kosala.”)

11 Tomoni bizaleli ya Yehova oyo esalaka ete azala lokola libanga mpo na biso. Sikoyo tótalela ndenge oyo tokoki komekola bizaleli yango ya Yehova. Soki tomekoli yango malamu, tokoyeba mpenza kopesa bandeko ya lisangá makasi. Na ndakisa, Yesu apesaki Simo nkombo Kefa (oyo ebongolami “Petro”), oyo elimboli “Eteni ya libanga.” (Yoa. 1:42) Yango emonisaki ete Petro akobanda kobɔndisa basusu na lisangá mpe kosalisa bango bápikama makasi. Biblia ebengi bankulutu “elili ya libanga monene.” Yango emonisi ndenge babatelaka bandeko ya lisangá. (Yis. 32:2) Kasi, lisangá ezwaka matomba ntango biso nyonso tomekoli bizaleli ya Yehova oyo esalaka ete azala libanga.—Ef. 5:1.

12. Ndenge nini tokoki kozala ekimelo mpo na basusu?

12 Zalá ekimelo. Tokoki kozala mpenza ekimelo ya solo mpo na bandeko na ntango ya makama oyo ebimaka yango moko, na ntango ya mobulu, to bitumba na mboka. Wana makambo na “mikolo ya nsuka” oyo ezali se kobeba, na ntembe te tokozwa lisusu mabaku ebele ya kosalisana. (2 Tim. 3:1) Tokoki mpe kosalisa bango bázala na makanisi oyo ebongi mpe bátikala makasi na elimo. Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya koyamba bango na esengo ntango bayei na makita, mpe na bongo kosalisa lisangá ezala esika ya kozwa makasi. Tozali na mokili moko ya mabe, ya nko, mpe ya mitungisi. Na yango, ntango bandeko bayei na makita, tósalaka nyonso oyo tokoki mpo bámiyoka ete tolingaka bango, bázwa makasi, mpe bámiyoka ete babatelami.

13. Ndenge nini mingimingi bankulutu bakoki kokóma ekimelo mpo na basusu? (Talá mpe elilingi.)

13 Bankulutu bakoki kozala ekimelo epai ya bandeko oyo bazali koyika mpiko na makama to mikakatano. Na ntango ya makama oyo ebimaka yango moko mpe na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga nokinoki, bankulutu bazwaka bibongiseli oyo esengeli mpo na kosalisa. Basalisaka mpe bandeko na toli ya Biblia. Bandeko ya lisangá bakobanga te kosolola na nkulutu moko soki bayebi ete azalaka boboto, amityaka na esika ya basusu, mpe ayokaka basusu na likebi. Bizaleli ya ndenge wana esalisaka bandeko bámiyoka ete balingaka bango; na bongo ezalaka mpasi te mpo básalela toli ya Biblia oyo nkulutu akoki kopesa.—1 Tes. 2:​7, 8, 11.

Ntango bandeko ya lisangá bakutani na makama to na mikakatano, bankulutu bazalaka ekimelo (Talá paragrafe 13) a


14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato ya kotyela motema?

14 Zalá moto ya kotyela motema. Tolingaka ete basusu bátyela biso motema, mingimingi na bantango ya mpasi. (Mas. 17:17) Ndenge nini tokoki koyebana lokola bato oyo basusu bakoki kotyela motema? Tokoki kosala milende mpo na kozala ntango nyonso na bizaleli ya bonzambe, na ndakisa kokokisa maloba na biso mpe kosala makasi tótosaka ngonga. (Mat. 5:37) Tokoki mpe kozwa makanisi ya kosalisa ntango bosɛnga emonani. Lisusu, soki bapesi biso mosala moko, tósalaka makasi tósala yango tii na nsuka na kolanda malako oyo tozwi.

15. Na ndenge nini lisangá ezwaka matomba ntango bankulutu bazali bato ya kotyela motema?

15 Bankulutu oyo bazali bato ya kotyela motema bazali lipamboli mpo na lisangá. Na ndenge nini? Basakoli basepelaka soki bayebi ntango babengi, bakozwa mbala moko bankulutu, na ndakisa mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola. Bandeko bamiyokaka mpe ete babatelami malamu ntango bayebi ete bankulutu bandimaka mbala moko kosalisa bango. Mpe ntango bankulutu bazali kopesa toli oyo euti na Biblia mpe na mikanda ya moombo ya sembo na esika ya kopesa makanisi na bango moko, bandeko batyelaka bango motema lisusu mingi. Lisusu, bandeko basepelaka mpe mingi kotya motema epai ya nkulutu oyo alobaka te makambo ya bato mpe oyo asalaka nyonso akokisa maloba na ye.

16. Na ndenge nini kopikama makasi esalisaka biso moko mpe basusu?

16 Pikamá makasi. Tokoki kopesa basusu ndakisa ya malamu soki tokangamaka na oyo ezali sembo mpe soki tozwaka bikateli oyo eyokani mpenza na mitinda ya Biblia. Wana tozali kokolisa kondima mpe boyebi ya sikisiki, tokopikama lisusu makasi na solo. Tokozala bato ya mitema mibale te, ya bongolabongola te, to oyo bamemamaka na pɛtɛɛ nyonso na mateya ya lokuta mpe na makanisi ya mokili. (Ef. 4:14; Yak. 1:​6-8) Kondimela Yehova mpe bilaka na ye ekosalisa biso tózala na kimya ntango tozwi nsango ya mabe. (Nz. 112:​7, 8) Tokozala mpe na likoki ya kosalisa baoyo bakutani na komekama.—1 Tes. 3:​2, 3.

17. Ndenge nini bankulutu basalisaka basusu bápikama makasi?

17 Bankulutu basengeli kolekisaka ndelo te na bizaleli na bango, kozala na makanisi malamu, bato ya makambo na molɔngɔ, mpe bato ya makambo makasimakasi te. Lokola ‘bakangamaka makasi na liloba ya sembo,’ bankulutu yango basalisaka bandeko bápikama na solo mpe bapesaka bango makasi. (Tito 1:9; 1 Tim. 3:​1-3) Na ndakisa na bango mpe mosala na bango ya kokende kolendisa bampate, bankulutu basalisaka basakoli báyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, bábimaka na mosala ya kosakola, mpe báyekolaka bango moko. Ntango bandeko bakutani na makambo oyo ezali kotungisa bango, bankulutu bakoki kosalisa mingi soki balendisi bandeko yango bákoba kotya makanisi nyonso epai ya Yehova mpe na bilaka na ye.

18. Mpo na nini tolingi kosanzola Yehova mpe kopusana lisusu penepene na ye? (Talá etanda “ Mpo na kopusana penepene na Yehova.”)

18 Nsima ya kotalela bizaleli ya Yehova, tokoki koloba lokola Mokonzi Davidi ete: “Yehova Libanga na ngai asanzolama.” (Nz. 144:1) Yehova akozala ntango nyonso Nzambe oyo tokoki kotyela motema. Na bomoi na biso mobimba, ata na bobange, tokozala na ntina ya koloba: “Ye azali Libanga na ngai,” mpe tokozala na elikya ete akosalisa biso ntango nyonso tótikala penepene na ye.—Nz. 92:​14, 15.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

a NDIMBOLA YA BILILINGI: Na Ndako ya Bokonzi, ndeko mwasi moko abangi te koya kosolola na bankulutu mibale.