Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 24

LOYEMBO 24 Boyá na ngomba ya Yehova

Tikalá mopaya ya Yehova mpo na libela!

Tikalá mopaya ya Yehova mpo na libela!

“Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo?”NZ. 15:1.

NA MOKUSE

Tokotalela oyo tosengeli kosala mpo na kokoba kozala moninga ya Yehova, mpe ndenge oyo Yehova alingi tósalelaka baninga na ye makambo.

1. Mpo na nini kotalela Nzembo 15:​1-5 ekosalisa biso?

 NA LISOLO oyo eleki, tomonaki ete basaleli ya Yehova oyo bamipesi na ye bakoki kozala bapaya na hema na ye ya elilingi soki bakolisi boninga makasi mpe ya pene na Yehova. Kasi ndenge nini tokómaka na boninga ya ndenge wana? Nzembo 15 elobeli yango. (Tángá Nzembo 15:​1-5.) Nzembo yango elobeli makambo ya ntina oyo tokoki kosala mpo na kokóma baninga ya Nzambe.

2. Mbala mosusu Davidi azalaki kokanisa nini ntango alobelaki hema ya Yehova?

2 Nzembo 15 ebandi na maloba oyo: “Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?” (Nz. 15:1) Ntango alobelaki “hema” ya Yehova, ekoki kozala ete Davidi mokomi ya nzembo yango azalaki kokanisa tabernakle, oyo ezalaki na Gibeone mpo na mwa ntango. Mpe lokola alobeli ‘ngomba mosantu’ ya Nzambe, mbala mosusu Davidi azalaki kokanisa Ngomba Siona, na Yerusaleme. Kuna, na bakilomɛtrɛ ebele na sudi ya Gibeone, Davidi atɛlɛmisaki hema mpo na kotya sanduku ya kondimana tii ntango bakotonga esika oyo ebongi mpo na yango.—2 Sa. 6:17.

3. Mpo na nini tosengeli kotyela maloba ya Nzembo 15 likebi? (Talá mpe elilingi.)

3 Bayisraele mingi bazwaki te libaku ya kosala na tabernakle, mpe kaka bato moke nde bazalaki kokɔta na hema esika sanduku ya kondimana ezalaki. Kasi basaleli nyonso ya sembo ya Yehova bakokaki kozala bapaya na hema na ye ya elilingi, soki bakómi mpe batikali baninga na ye. Yango nde mposa na biso nyonso. Nzembo 15 elobeli mwa bizaleli oyo tosengeli kozala na yango mpe kokolisa mpo na kotikala baninga ya Yehova.

Bayisraele ya ntango ya Davidi bakokaki komona na makanisi soki kozala mopaya na hema ya Yehova elimboli nini (Talá paragrafe 3)


KOBÁ KOTOSA NZAMBE MPE KOSALA OYO EZALI SEMBO

4. Ndenge nini toyebi ete masɛngami ya Yehova esuki kaka te na kozwa batisimo? (Yisaya 48:1)

4 Nzembo 15: 2 emonisi ete moninga ya Nzambe ezali “moto oyo atosaka Nzambe ntango nyonso, oyo asalaka makambo oyo ezali sembo.” Maloba “atosaka” mpe “asalaka” emonisi likambo oyo ezali kokoba. Kasi tokoki mpenza ‘kotosa Nzambe ntango nyonso’? Ɛɛ. Moto moko te azali moto ya kokoka, kasi Yehova akomona ete ‘totosaka ye ntango nyonso’ soki tosalaka makasi mpo na kosala makambo oyo asɛngi biso. Ntango tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo nde tobandi mobembo elongo na Nzambe. Na ndakisa, na ntango ya kala, soki moto azali moto ya ekólo Yisraele, elakisaki mbala moko te ete azali mopaya ya Yehova. Bato mosusu bazalaki kobelela ye, kasi “na bosolo te mpe na bosembo te.” (Tángá Yisaya 48:1.) Bayisraele oyo balingaki mpenza kozala bapaya ya Yehova basengelaki koyekola masɛngami na ye mpe kokokisa yango. Ndenge moko mpe, mpo na kondimama na Nzambe lelo oyo, tosengeli kosuka kaka te na kozwa batisimo mpe kokɔta na lisangá ya bokristo. Tosengeli kokoba “kosala makambo oyo ezali sembo.” Yango elingi koloba nini?

5. Kotosa Yehova na makambo nyonso elakisi nini?

5 Na miso ya Yehova, ‘kotosa ntango nyonso’ mpe ‘kosala makambo oyo ezali sembo’ esuki kaka te na kokende makita mbala na mbala. (1 Sa. 15:22) Tosengeli kosala makasi ya kotosa Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso, ata ntango tozali biso moko. (Mas. 3:6; Mos. 12:​13, 14) Ezali na ntina tólukaka kotosa Yehova ata na makambo oyo ezali komonana lokola ya mikemike. Kosala bongo ekomonisa ete tolingaka ye mpenza, mpe ekosala ete ye mpe alinga biso mingi.—Yoa. 14:23; 1 Yoa. 5:3.

6. Na kotalela Baebre 6:​10-12, nini ezali na ntina mingi koleka misala ya bosembo oyo tosalá na kala?

6 Yehova asepelaka mingi na makambo oyo tosalá mpo na ye na kala. Nzokande, lokola tosalá misala wana ya bosembo na kala elakisi te ete tokotikala bapaya na hema ya Yehova. Yango emonisami polele na Baebre 6:​10-12. (Tángá.) Yehova abosanaka te makambo ya malamu oyo tosalá kala. Kasi alingi tókoba kosalela ye na molimo na biso mobimba “tii na nsuka.” Akozala moninga na biso libela na libela “soki tolɛmbi te.”—Gal. 6:9.

LOBÁKÁ SOLO NA MOTEMA NA YO

7. Koloba solo na motema na biso elimboli nini?

7 Moto oyo alingi kozala mopaya na hema ya Yehova asengeli ‘kolobaka solo na motema na ye.’ (Nz. 15:2) Yango esuki kaka te na koboya kokosa. Yehova alingi tózala sembo na maloba mpe na misala na biso. (Ebr. 13:18) Yango ezali na ntina, “mpo Yehova ayinaka moto ya mbilingambilinga, kasi azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”—Mas. 3:32.

8. Etamboli ya ndenge nini tosengeli koboya?

8 Bato oyo ‘balobaka solo na mitema na bango’ bamonisaka te ete batosaka na miso ya bato nzokande babukaka mibeko ya Nzambe na kobombana. (Yis. 29:13) Baboyaka makambo ya mbilingambilinga. Moto ya mbilingambilinga to ya nyamunyamu akoki kobanda komituna soki mibeko mosusu ya Yehova ezali mpenza ya bwanya. (Yak. 1:​5-8) Akoki kobanda kobuka mibeko ya Yehova na makambo oyo amoni lokola ezali na ntina mingi te. Na nsima soki amoni ete abuki mbuma mabe te mpo na kozanga botosi na ye, akoki kobanda kosala makambo ata ya mabe, mpe ata soki akanisi ete asalelaka Nzambe, losambo na ye ekokóma ya bokosi. (Mos. 8:11) Kasi biso tolingi kozala sembo na makambo nyonso.

9. Yesu alobaki nini mbala ya liboso oyo akutanaki na Natanaele, mpe yango eteyi biso nini? (Talá mpe elilingi.)

9 Ezali na ntina mingi kozala moto ya sembo na kati ya motema na biso. Likambo oyo esalemaki ntango Filipe amemaki moninga na ye Natanaele epai ya Yesu emonisi yango. Yesu akutanaki ata mbala moko te na Natanaele liboso, kasi alobaki: “Oyo mpenza Moyisraele ya solo, azali na bokosi te kati na ye.” (Yoa. 1:47) Na ntembe te Yesu ayebaki ete bayekoli na ye mosusu bazalaki sembo, kasi amonaki epai ya Natanaele bosembo moko ya kokamwa. Ndenge moko na biso, Natanaele azalaki moto ya kozanga kokoka. Kasi azalaki nyamunyamu te to na ezaleli ya liso na nse ya lokasa. Yesu asepelaki na ezaleli yango mpe apesaki Natanaele longonya. Malamu mpenza soki Yesu akokaki mpe koloba bongo mpo na biso!

Filipe azali kolakisa Yesu Natanaele, moto oyo azalaki na bokosi te kati na ye. Yesu akokaki koloba mpe bongo mpo na biso? (Talá paragrafe 9)


10. Mpo na nini tosengeli kokeba na lolemo na biso? (Yakobo 1:26)

10 Masɛngami mingi oyo ezali na Nzembo 15 elobeli ndenge oyo tosalelaka basusu makambo. Nzembo 15:3 elobi ete mopaya na hema ya Yehova “akoselaka bato makambo te, asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe, mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.” Kosalela lolemo na biso na ndenge wana ya mabe ekoki kosala basusu mpasi mingi mpe kosala ete tózala lisusu te bapaya na hema ya Yehova.—Tángá Yakobo 1:26.

11. Kokosela moto makambo elakisi nini, mpe nini ekómelaka baoyo bakoselaka basusu makambo mpe baboyi kobongola motema?

11 Mokomi ya nzembo alobeli mpenza kokosela bato makambo. Yango elimboli nini? Elimbolaka mbala mingi koloba makambo ya lokuta oyo ekoki kobebisa lokumu ya moto. Bato oyo bakoselaka basusu makambo mpe baboyi kobongola motema balongolamaka na lisangá.—Yir. 17:10.

12-13. Na makambo nini tokoki kobebisa lokumu ya baninga na biso kozanga kokana? (Talá mpe elilingi.)

12 Nzembo 15:3 ekundweli biso mpe ete bapaya ya Yehova basalelaka bazalani na bango eloko moko te ya mabe mpe babebisaka lokumu ya baninga na bango te. Yango elakisi nini?

13 Tokoki kobebisa lokumu ya moto kozanga kokana soki tozali kopanza nsango moko ya malamu te mpo na ye. Na ndakisa: (1) ndeko mwasi moko akati mosala ya mobongisi-nzela, (2) ndeko moko ná mwasi na ye babimi Betele, to (3) ndeko mobali moko azali lisusu nkulutu to mosaleli na misala te. Ebongi mpenza tókanisa ete basalaki likambo ya mabe yango wana mbongwana yango esalemi mpe tóyebisa basusu likanisi na biso? Ekoki kozala na bantina oyo biso toyebi te, oyo ememi mbongwana wana. Mopaya na hema ya Yehova “asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe, mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.”

Ezalaka pɛtɛɛ kopanza nsango moko ya malamu te mpo na basusu, mpe yango ekoki kokóma kokosela basusu makambo (Talá paragrafe 12-13)


KUMISÁKÁ BAOYO BABANGAKA YEHOVA

14. Limbolá ndenge oyo bapaya ya Yehova baboyaka “moto nyonso ya mpambampamba.”

14 Nzembo 15:4 elobi ete moninga ya Yehova “aboyaka moto nyonso ya mpambampamba.” Ndenge nini tokoki kosala yango? Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali te na likoki ya koyeba soki moto azali moto ya mpambampamba. Mpo na nini? Mpo motema na biso ekoki kosepela na moto oyo tokanisi ete azali na bizaleli malamu, mpe koboya basusu mpo bapesaka biso nkanda. Na yango, tosengeli koboya kaka baoyo Yehova amoni ete bazali bato ya “mpambampamba.” (1 Ko. 5:11) Yango esangisi basali-mabe oyo baboyi kobongola motema, baoyo batyolaka kondima mpe bindimeli na biso, to baoyo balukaka kobebisa boninga na biso ná Yehova.—Mas. 13:20.

15. Wapi lolenge moko ya kokumisa “baoyo babangaka Yehova”?

15 Nzembo 15:4 elobi mpe ete tosengeli kokumisa “baoyo babangaka Yehova.” Yango wana tolukaka mabaku ya komonisela baninga ya Yehova boboto mpe limemya. (Rom. 12:10) Ndenge nini? Na kotalela Nzembo 15:​4, lolenge ya liboso ezali ete “ntango [mopaya na hema ya Yehova] alaki likambo moko, akokisaka yango, ata soki ekoki kobimisela ye mokakatano.” Kozanga kokokisa makambo oyo tolaki ekoki mpenza kopesa basusu mpasi. (Mat. 5:37) Na ndakisa, Yehova azelaka ete bapaya na ye bátosa elako oyo basalaki mokolo ya libala. Asepelaka mpe ntango baboti basalaka nyonso mpo na kokokisa makambo oyo balaki bana na bango. Kolinga Nzambe mpe bazalani na biso ekotinda biso tósalaka nyonso oyo tokoki mpo na kokokisa maloba na biso.

16. Wapi lolenge mosusu ya kokumisa baninga ya Yehova?

16 Lolenge mosusu ya kokumisa baninga ya Nzambe ezali ya kozala moyambi-bapaya mpe lobɔkɔ pɛtɛɛ. (Rom. 12:13) Kolekisa ntango elongo na bandeko na biso ekosalisa biso tókómisa lisusu boninga na biso makasi elongo na bango mpe elongo na Yehova. Longola yango, soki tozali koyamba bapaya, tozali komekola Yehova.

BOYÁ BOLINGO YA MBONGO

17. Mpo na nini Nzembo 15 elobeli mpe mbongo?

17 Biblia elobi ete mopaya ya Yehova “adefisaka mbongo na ye mpo na kozwa benefisi te, mpe azwaka kanyaka te mpo na kokweisa moto oyo asali likambo te.” (Nz. 15:5) Mpo na nini Nzembo yango ya mokuse elobeli mpe mbongo? Mpo kozanga bokatikati na ndenge ya kotalela mbongo ekoki kosala basusu mpasi mpe kobebisa boninga na biso na Nzambe. (1 Tim. 6:10) Na ntango ya kala, basusu bazalaki kolyela bandeko na bango babola na ndenge bazalaki kosɛnga bango benefisi ntango badefisi bango mbongo. Lisusu, bazuzi mosusu bazalaki kondima kanyaka mpe ezalaki kotinda bango bákweisa baoyo basali likambo te. Yehova ayini makambo ya ndenge wana.—Ezk. 22:12.

18. Mituna nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo totalelaka mbongo? (Baebre 13:5)

18 Ezali malamu tóyeba mpenza ndenge totalelaka mbongo. Omituna boye: ‘Makanisi na ngai ekendaka mbala mingi na mbongo mpe na biloko oyo ekoki kosomba? Soki nadefi mbongo, ekómaka kilo nafuta yango, mpo nazali kokanisa ete moto oyo adefisaki ngai azali na mposa na yango te? Soki nazali na mbongo namimonaka ete naleki basusu, kasi ezalaka mpasi nakabela bato? Nakanisaka ete ndeko boye to boye alingá biloko ya mokili kaka mpo azali na mbongo? Nalingaka kozala moninga ya bato ya mbongo mpe nakipaka mpenza te baoyo bazali babola?’ Ezali na ntina kotalela mituna yango mpo tozwi lokumu ya kozala bapaya ya Yehova. Tokotikala bapaya ya Yehova kaka soki bomoi na biso ezali na bolingo ya mbongo te. Soki tosali bongo, Yehova akotika biso soki moke te!—Tángá Baebre 13:5.

YEHOVA ALINGAKA BANINGA NA YE

19. Mpo na nini mpenza Yehova alingi tósala makambo oyo ezali na Nzembo 15?

19 Nzembo 15 esuki na elaka oyo: “Moto nyonso oyo asalaka makambo wana akokwea ata moke te.” (Nz. 15:5) Awa, mokomi ya nzembo amonisi ntina mpenza oyo Yehova alingi tósala makambo oyo ezali na nzembo yango. Yehova alingi ete tózala na esengo. Yango wana ayebisi biso makambo oyo ekosala ete apambola biso mpe abatela biso.—Yis. 48:17.

20. Elikya nini bapaya ya Yehova bazali na yango?

20 Bapaya ya Yehova bazali na elikya ya bomoi ya malamu na mikolo ekoya. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala na ‘bisika mingi ya kofanda’ oyo Yesu abongiseli bango na likoló. (Yoa. 14:2) Baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele bazali kozela kokokisama ya elaka oyo ezali na Emoniseli 21:3. Ya solo, biso nyonso tomonaka ete ezali lokumu monene ndenge Yehova abengisi biso tózala baninga na ye, tózala bapaya libela na libela na hema na ye!

LOYEMBO 39 Tómisalela nkombo malamu epai ya Nzambe