Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Mpoto

Mpoto
  • MIKILI 47

  • BATO 741 311 996

  • BASAKOLI 1 611 036

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 847 343

Kelasi mobimba ekendaki kotala Ndako ya Bokonzi

Finlande: Bana-kelasi bayei kotala Ndako ya Bokonzi

Ines, mwana moko oyo azali na kelasi ya minei na Finlande, ayokaki ete na liteya ya makambo ya losambo na kelasi, bakolobela Batatoli ya Yehova; na yango asɛngaki kelasi mobimba bákende kotala Ndako ya Bokonzi. Bana-kelasi mpe molakisi na bango bamonaki ete ezali likanisi ya malamu.

Pɔsɔ oyo elandaki, bana-kelasi 38 bakendaki na bavelo na bango tii na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki na kilomɛtrɛ soki 5. Balakisi mibale ná mokambi ya eteyelo mpe bayaki. Na Ndako ya Bokonzi, bakutaki bandeko mibale ya mibali mpe misato ya basi. Ntango bazalaki komɛla mwa masanga ya sukali oyo babongiselaki bango, bana-kelasi bazalaki kotuna mituna oyo etali ndako yango mpe Batatoli, na ndakisa: “Makita esalemaka ndenge nini?” “Shambre wana kuna ezali nini?” Bazalaki kolobela bibliotɛkɛ. “Mpo na nini bakomi ‘6 divisé par 10’ na efelo?” Wana ezalaki mokapo ya mobu, Matai 6:10.

Lokola na eteyelo yango bazalaki koteya bana ndenge ya kosilisa likambo etali kobɛta baninga na kelasi, bandeko balakisaki bango video Bɛtá moto ya matumoli, kasi na makofi te (Mets un harceleur K.-O. sans utiliser les poings) na jw.org. Balakisaki bango mpe makambo mosusu oyo ezali na site Internet na biso mpe batyaki loyembo moko ya Bokonzi. Balekisaki ngonga soki moko.

Mokambi ya eteyelo, balakisi, mpe bana basepelaki mingi. Mokambi asepelaki na makambo oyo ezali na site Internet na biso mpo amonaki ete bakoki kosalela yango na liteya ya makambo ya losambo na kelasi. Asepelaki mingi ntango bandeko bayebisaki ye ete bana mosusu bakoki koya kotala Ndako ya Bokonzi. Na yango, molakisi ya kelasi mosusu abengaki Batatoli ya Yehova kaka na mokolo oyo elandaki mpe atunaki soki bango mpe bakoki koya kotala Ndako ya Bokonzi.

Amonaki eloko ya motuya na kati ya bosɔtɔ

Cristina afandaka na Roumanie; akɔtá kelasi te mpe ayebaki kotánga mpe kokoma te. Azalaki mobola mpenza; mpo na kozwa mbongo ya kobikela, azalaki koluka manzanza mpe milangi ya plastiki na bisika babwakaka bosɔtɔ. Mokolo moko ntango azalaki kopanzapanza matiti, eloko moko ebendaki likebi na ye. Ezalaki mikanda na biso; ezalaki na bililingi ya kitoko ya bato oyo bazali na esengo. Alobaki na nse ya motema: ‘Na ntembe te, bato oyo bazalaka na mboka moko boye.’ Cristina alingaki koyeba makambo oyo bakomá na mikanda yango; asɛngaki moto moko atángela ye yango. Ntango ayokaki ete mikanda yango elobeli makambo ya Nzambe, ayokaki mawa ndenge bato babwakaki mikanda oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Cristina akobaki kokende na esika yango ya bosɔtɔ mpo na kozwa mwa babuku, batrakte, mpe bazulunalo. Mosusu ezalaki ya mobimba, mosusu ekatanakataná. Ayekolaki kotánga mpo ayeba makambo mosusu oyo ezali na mikanda yango.

Na nsima, Batatoli basololaki na Cristina, mpe babandaki koyekola na ye Biblia. Asepelaki mingi koyeba ete Yehova abendaki ye epai na ye na nzela ya mikanda oyo bato mosusu bazalaki kobwaka. Ayanganaka na makita mpe asepelaka mingi na makambo oyo ayekolaka. Likambo mosusu oyo esepelisaka ye mingi ezali ete sikoyo azali na bazulunalo, babuku, mpe mwa babuku ya sika. Esɛngaka lisusu te aluka yango na esika babwakaka bosɔtɔ. Ya solo, Cristina amonaki eloko ya motuya na kati ya bosɔtɔ!

Boyekoli ya Biblia na zamba

Allemagne: Margret azali koyekola Biblia na moto na zamba

Mikolo nyonso na ntɔngɔ, ndeko Margret akendaka kotambola na mbwa na ye na zamba moko na Allemagne. Alobi boye: “Namekaka kosolisa bato oyo nakutanaka na bango na nzela. Soki bazali likolólikoló te, nakɔtisaka makambo ya Biblia na lisolo na biso.”

Mokolo moko akutanaki na mwasi moko ya mbula mwa moke koleka 70, oyo azalaki mpe kotambola na mbwa na ye. Ndeko Margret abandaki kosolisa mwasi yango. Mwasi yango asepelaki mpe ayebisaki Margret ete asambelaka Nzambe mpe atángaka Biblia mikolo nyonso. Banda wana, bakómaki kokutana mikolo nyonso mpe kosolola makambo ya Biblia. Mokolo moko mwasi yango atunaki Margret ete: “Ndenge nini oyebi makambo ya Biblia ebele boye?” Margret ayebisaki ye ete azali Motatoli ya Yehova.

Margret asɛngaki mwasi yango mbala ebele ete ayekola na ye Biblia na ndako, kasi mwasi yango azalaki koboya. Kasi, bazalaki kaka kosolola. Mwa basanza na nsima, Margret asɛngaki ye lisusu soki aya koyekola na ye Biblia na ndako. Na mbala oyo, mwasi yango afungolaki motema; alobaki ete abangaka koyekola mpo mobali oyo afandaka na ye alingaka Batatoli ya Yehova te.

Mokolo oyo elandaki ntango ndeko Margret akendaki kotambola na zamba amemaki Biblia ná buku Biblia eteyaka. Ntango amonaki mwasi yango, alobaki na mpiko ete: “Mbala oyo nakosɛnga yo tóyekola Biblia na ndako te, tokobanda koyekola nde na zamba.” Mwasi yango alelaki mpe andimaki mbala moko. Ayaka koyekola Biblia na zamba mikolo 6 na pɔsɔ moko. Soki mbula ezali kobɛta to soki molili ezali, Margret amemaka lingɛmbu (para-pluie) to mpe torche mpo na boyekoli.

Ya bango koningisa motó

Ndeko mwasi moko na nkombo Delphine azalaki koyekola Biblia na mwana mwasi moko na nkombo Irina, na Bulgarie. Irina asepelaki na makambo oyo azalaki koyekola mpe akómaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, mobali ya Irina azalaki kolinga te asololaka ata moke na Batatoli. Mobali yango amemaki libota na ye na mwa mboka moko moke na Suède; na yango Irina azalaki lisusu kosolola na Delphine te. Nzokande, bandeko basi mibale babongisi-nzela, Alexandra ná Rebecca, bakutanaki na Irina, kasi Irina azalaki koloba monɔkɔ ya Suédois te. Bandeko yango basalelaki mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations mpe bapesaki Irina atánga na esika bakomá na monɔkɔ ya Bulgare. Na nsima, na lisalisi ya mwa buku yango, batunaki ye soki asepeli kozwa mikanda na monɔkɔ na ye. Irina aningisaki motó makasi lokola moto aboyi. Bandeko yango batikaki ye; bamonaki ete aboyi.

Na nsima, Alexandra amikundolaki ete Linda, ndeko mwasi moko ya Suède oyo akendá kosakola na Bulgarie, akoya nsima ya mwa bapɔsɔ. Amonaki ete mbala mosusu Irina akosepela soki ayoki solo na monɔkɔ na ye. Ntango Linda ayaki, akendaki elongo na Alexandra kotala Irina. Irina ayebisaki Linda ete abondelaka Yehova butu nyonso mpo asalisa ye azwa moto oyo akokoba koyekola na ye Biblia. Mbala mingi, azalaki kotambola na buku na ye Biblia eteyaka ya monɔkɔ ya Bulgare. Akanisaki kolakisa yango Batatoli soki akutani na bango na balabala, kasi akutanaki na bango ata mokolo moko te. Irina asepelaki mpenza ndenge azwaki mikanda mosusu ya monɔkɔ ya Bulgare!

Linda atunaki Alexandra ntina oyo alobaki ete Irina asepelaki te ntango bakutanaki na ye mbala ya liboso. Alexandra ayebisaki ye ete aningisaki motó makasi lokola moto aboyi. Linda asɛkaki mpe alobaki ete epai ya bato ya Bulgarie, koningisa motó lokola moto aboyi elimboli kondima; kasi koningisa motó lokola moto andimi elimboli koboya. Na yango, liboso Irina ayeba monɔkɔ ya Suédois, akobaki koyekola Biblia na monɔkɔ ya Bulgare. Ndenge nini? Azongelaki kosolola na Delphine mpe bazali koyekola na nzela ya video na Internet.

Ndakisa malamu ya tata moko

Jemima afandaka na Espagne, mpe bateyaki ye solo na bomwana mpenza. Kasi ntango akómaki na mbula 7, bomoi na ye ebongwanaki makasi. Mama na ye alobaki ete alingi lisusu kozala Motatoli ya Yehova te mpe abomaki libala na tata ya Jemima. Ntango Jemima akómaki na mbula 13, atikaki lisangá ya Batatoli mpe aboyaki tata na ye asalisa ye ata moke na elimo.

Ntango Jemima akolaki, akɔtaki na bituluku ya bato oyo balukaka kobongisa bomoi ya basusu mpe na lisangá moko ya politiki mpo na koluka ete “bosembo” esalema mpo na bato nyonso. Na nsima, ntango azalaki lisusu na mosala te, tata na ye Domingo asɛngaki ye aya kosala elongo na ye mosala ya kotya langi.

Mokolo moko ntango bazalaki kosala, ndeko Domingo asɛngaki Jemima báyekola Biblia. Aboyaki, kasi alobaki ete soki mokolo mosusu asepeli koyekola, akoyebisa ye. Ndeko Domingo azalaki koyoka botángi ya Biblia mpe ya bazulunalo ntango azali kotya langi, kasi mwana na ye azalaki kotya ba-écouteurs na matoi mpe koyoka miziki ya loyenge makasi.

Ndeko Domingo abalaki mwasi mosusu, mpe na sanza ya zomi na moko na 2012, bazwaki lokasa ya libyangi mpo na kokɔta Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá. Jemima akamwaki komona ete tata na ye akokɔta eteyelo moko ya Biblia na boumeli ya sanza mibale, akotika biloko nyonso mpe akokende esika nyonso bakotinda ye. Mpo na mbala ya liboso, Jemima amonaki ete solo efandá mpenza na motema ya tata na ye, mpe alukaki koyeba ntina oyo ezali bongo.

Jemima atikaki koyoka miziki na ye mpe akómaki koyoka makambo oyo tata na ye azalaki koyoka. Akómaki mpe kotuna mituna. Mokolo moko ntango ndeko Domingo azalaki likoló ya eskalye mpe azalaki kotya langi, Jemima atunaki ye: “Oyebi lisusu ntango nalobaki ete nakoyebisa yo soki nalingi koyekola Biblia? Ntango yango ekoki.”

Ndeko Domingo asepelaki koyoka bongo. Na sanza ya yambo na 2013, bakómaki koyekola mbala mibale na pɔsɔ. Eteyelo ya Biblia ebandaki na sanza ya minei, kasi ndeko Domingo akobaki koyekola na Jemima na nzela ya video na Internet. Jemima ayaki mokolo oyo bapesaki bango diplome, mpe asepelaki mingi na likita yango. Na mokolo ya 14/12/2013, Jemima azwaki batisimo.

Jemima alobi boye: “Yehova amoniseli ngai motema molai mpenza, mpe nayebi ete alɛmbaki ngai te. Apesi ngai eloko oyo nazwá te na mokili: baninga ya solosolo. Kozala na bandeko na mokili mobimba esalisaka ngai nasepela lisusu mingi na bolingo monene ya Yehova.”

Ntina ya limemya

Na mokolo ya 30/03/2014, Vasilii, ndeko moko oyo aumeli na Betele ya Russie, atandaki mikanda na shario moko pembeni ya Betele mpo na kosakola; na mbala moko motuka ya bapolisi eyaki esika azalaki. Polisi moko akitaki mpe na boboto nyonso asɛngaki ndeko Vasilii atika kosakola, mpo bato mosusu ya kartye bazali komilela. Polisi mosusu azalaki kozwa bilili ya lisolo yango na kamera. Ndeko Vasilii amonaki ete ekozala malamu atosa polisi mpe aswana na ye te. Na ntango yango, baleki-nzela bazalaki kotala likambo oyo ezalaki koleka. Ndeko Vasilii akendaki, kasi mikolo mibale na nsima, asɛngaki akutana na mokonzi ya bapolisi. Apesaki ye ndingisa. Ntango bazalaki kosolola, apesaki mokonzi yango matɔndi mpo na mosala ya ntina mingi oyo bapolisi basalaka mpe ndenge basololaki na ye na boboto. Mokonzi alobaki na sɛkrɛtɛrɛ na ye ete: “Na mbula 32 oyo nalekisi na mosala oyo, nayoká ata moto moko te apesa biso matɔndi mpo na mosala na biso!” Na lisolo yango, ndeko na biso asalisaki mokonzi ya bapolisi ayeba ete mosala na biso ya kosakola ezalaki kobuka mibeko te. Mokonzi atunaki ndeko Vasilii ete lokola ayebaki ete azali na lotomo ya kosakola, mpo na nini atɛmɛlaki te bapolisi oyo basɛngaki ye atika kosakola? Ndeko Vasilii ayanolaki: “Namemyaka bapolisi. Kanisá ndenge bapolisi balingaki koyoka soki nalobaki na bango na miso ya bato nyonso ete bayebi mibeko te.” Mokonzi ná sɛkrɛtɛrɛ na ye bakamwaki, mpe bayebisaki nde Vasilii ete mindɔndɔ ekozala lisusu te soki atandi mikanda na shario mpo na kosakola.