Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bikateli ya batribinale

Bikateli ya batribinale

ARMÉNIE endimi kopesa Batatoli misala mosusu na esika ya mosala ya soda

Arménie: Guvɛrnema etindi bandeko mosusu na bamboka ya mosika mpo na kosala misala mosusu lokola baboyi mosala ya soda. Kuna, bandeko bazali kokoba kosakola na molende

Na 2013, guvɛrnema ya Arménie ezwaki ekateli ya kopesa bato nzela ya kosala misala mosusu na esika ya mosala ya soda; yango epesi Batatoli ya Yehova ya Arménie likoki ya kopona mosala mosusu ya Leta na esika bákɔta bolɔkɔ mpo lisosoli na bango eboyi mosala ya soda. Na sanza ya yambo na 2014, lapolo ya biro ya filiale elobaki ete bandeko mibali 71 babandaki kosala misala oyo Leta epesaki bango. Na ndakisa, bandeko mosusu bazali kolamba to kosunga bato na balopitalo. Bakambi ya ebongiseli yango bazali kokumisa bandeko na biso mpo bazali na makanisi ya malamu mpe bazali kosala malamu mosala oyo bapesi bango, atako mbala mingi ezalaka ya mpasi. Bandeko bazali kosepela na bibongiseli oyo ezwamaki mpo bakoka kosala misala mosusu ya Leta mpo bákoba kozala na lisosoli ya pɛto. * Ndeko moko alobaki boye: “Topesi Yehova matɔndi ndenge tokoki kosala misala mosusu, oyo ekopekisa biso tókɔta na makambo ya politiki mpe tózala na bonsomi ya kosambela ye.”

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE Leta andimi libala ya liboso oyo Batatoli ya Yehova basali

Na 1954, République dominicaine esalaki boyokani moko ná Vatican; na yango kaka Lingomba ya Katolike nde ezwaki lotomo ya kobalisa bato. Soki bato babalani na Lingomba ya Katolike te, mokonzi moko ya Leta akokaki kobalisa bango. Nzokande, na 2010, guvɛrnema ebimisaki mobeko moko ya sika oyo epesaki mpe bakambi ya mangomba mosusu ndingisa ya kobalisa bato. Guvɛrnema ezwaki bibongiseli mpo na kopesa formasyo na baoyo balingi Leta apesa bango ndingisa ya kobalisa bato. Biro ya filiale ya République dominicaine eponaki bankulutu 30 bákende kolanda formasyo, mpe kati na bato koleka 2 000 oyo bayaki kozwa formasyo, kaka bato 32 nde balongaki. Nzokande, bandeko na biso nyonso 30 bazwaki ndingisa mpo na kobalisa Batatoli ya Yehova.

INDE Bazali na ekateli ya kosakola na mpiko

Sundeep Muniswamy ná mwasi na ye Deepalakshmi

Na mokolo ya 27/01/2014, biro oyo etalelaka ntomo ya bato na etúká ya Karnataka emonisaki ete mokonzi ya bapolisi ya mboka Old Hubli atosaki te lotomo ya ndeko Sundeep Muniswamy na ndenge apekisaki te bato ya mobulu oyo bayaki kobundisa ndeko yango na mokolo ya 28/06/2011. Biro yango ekweisaki mokonzi ya bapolisi mpo atosaki ntomo ya bato te mpe esɛngaki bakonzi ya etúká ya Karnataka bápesa mokonzi wana ya bapolisi etumbu. Kasi basukaki wana te, basɛngaki ye afuta ndeko Muniswamy lomande ya 20 000 rupees (dolare 326). Biro oyo etalelaka ntomo ya bato esɛngaki bakonzi bákata mbongo yango na lifuti ya mokonzi yango ya bapolisi.

Ndeko Muniswamy alobaki ete ye ná libota na ye bapesi Yehova matɔndi mpo na ekateli wana ya kokamwa oyo ezwamaki mpe bazali na ekateli ya kokoba kosakola nsango malamu na mpiko. Ekateli yango elendisi kondima ya bandeko mpe esalisi bango bátya motema na likoki oyo Yehova azali na yango ya kobatela basaleli na ye. Eteyaki mpe bakonzi ya Leta ete basengeli kotosa ntomo ya Batatoli ya Yehova na Karnataka. Likambo mosusu oyo bafundaki ndeko Muniswamy ná ndeko mosusu ekatami naino te na batribinale.

KIRGHIZISTAN Bazuzi minene ya ekólo bandimi lotomo ya koboya mosala ya soda na kolanda lisosoli

Mokolo ya 19/11/2013 ezalaki mokolo monene mpo na bato oyo baboyaka mosala ya soda na kolanda lisosoli na bango. Bazuzi minene ya ekólo bazwaki ekateli moko mpo na Batatoli ya Yehova 11 mpe balobaki ete ndenge oyo Kirghizistan ezali kosalisa bato misala mosusu soki baboyi mosala ya soda eyokanaki na mibeko te. Mobeko esɛngaki na baoyo bazalaki kosala misala mosusu na esika ya mosala ya soda bápesaka basoda mbongo mpo na misala na bango. Mobeko yango esɛngaki mpe baoyo baboyi mosala ya soda mpo na lisosoli na bango bázala na liste ya basoda soki misala mosusu oyo bapesaki bango esili. Bazuzi minene bamonisaki ete kosɛnga bato makambo ya ndenge wana mpo lisosoli na bango eboyi mosala ya soda ezali kobebisa ntomo na bango ya kozala na bonsomi ya losambo. Na yango, na ebandeli ya mobu 2014, Tribinale monene ya Kirghizistan esalelaki ekateli oyo bazuzi minene ya ekólo bazwaki mpe elongisaki Batatoli ya Yehova 14 oyo bakɔtaki bolɔkɔ kaka mpamba na kolanda mobeko wana ya kala. Sikoyo, bikateli wana oyo elongisi biso esukisi etumba ya mbula nsambo mpo na ntomo ya kozwa bonsomi ya losambo mpe koboya mosala ya soda na kolanda lisosoli. Mpiko ya bilenge yango ya kimya ekumisi nkombo ya Yehova mpe epesi biso bonsomi ya losambo na ekólo Kirghizistan.

Kirghizistan: Bandeko oyo likambo na bango ekendeki na tribinale monene ya Kirgyzstan

NIGÉRIA “Yehova apesaki ngai mbano”

Na etúká ya Abia, mbala mingi bakanelaka Batatoli ya Yehova mpe bayinaka bango mpo baboyaka kokɔta na bamoziki ya baninga *, oyo mbala mingi basalaka mobulu mpe makambo ya bikelakela. Na ebandeli ya sanza ya 11 na 2005, mokolo moko na ntɔngɔ, bato ya moziki ya mboka Asaga Ohafia bayaki epai ya ndeko Emmanuel Ogwo ná mwasi na ye; babɔtɔlaki bango biloko nyonso, mpe basɛngaki bango na makasi báfuta mbongo ya moziki. Ndeko yango ná mwasi na ye batikalaki kaka na bilamba oyo balataki. Na 2006, bato ya moziki babenganaki ndeko Ogwo na mboka. Ndeko Ogwo ná mwasi na ye bakendaki kofanda epai ya ndeko moko na mboka mosusu, mpe ndeko yango azalaki kokokisa bamposa na bango. Ndeko Ogwo azongaki na mboka na bango na mbula oyo elandaki, kasi bato wana ya moziki bazalaki kaka kotungisa ye, mpe bazalaki koboya kozongisela ye lopango na ye.

Nsukansuka na mokolo ya 15/04/2014, Tribinale monene ya etúká ya Abia elongisaki ndeko Ogwo; emonisaki ete na kolanda mibeko, azali na lotomo ya kopona baninga mpe lingomba oyo alingi. Bazongiselaki ndeko Ogwo lopango na ye, batungisaka lisusu Batatoli ya Yehova mingi te na mboka yango, mpe sikoyo bandeko ya Asaga Ohafia basakolaka na kimya.

Ntango tribinale eyebisaki ekateli oyo ezwamaki, ndeko Ogwo alobaki boye: “Napumbwaki na esengo. Nasepelaki mingi. Namonaki ete Yehova nde alongi mpe ete baanzelu bazalaki elongo na ngai. Yehova apesaki ngai mbano.”

RUSSIE Ekateli oyo elongisi site jw.org

Makambo mingi oyo bandeko ya Russie bazali kosamba na batribinale ekómi sikoyo ‘kotambola malamu mpo nsango malamu ekende liboso’ na ekólo yango. (Flp. 1:12) Atako bakonzi mosusu ya Leta mpe ya mangomba bazali kotɛmɛla losambo na biso makasi mpenza, bandeko ya Russie bazali kobatela bosembo na bango, mpe Yehova azali kopambola milende na bango.

Na ndakisa, tólobela likambo oyo balongaki na tribinale ya engumba Tver’. Na 2013, prokirɛrɛ ya engumba Tver’ atindaki mokanda na tribinale mpo bápekisa site jw.org na Russie mobimba. Tribinale yango ebengisaki ata bandeko oyo bakambaka mosala ya Batatoli ya Yehova te, endimaki mbala moko makambo oyo prokirɛrɛ akomaki. Ntango bandeko bayokaki ekateli oyo tribinale ezwaki, basɛngaki bákende kosamba. Na mokolo ya 22/01/2014, Tribinale monene ya Tver’ ekweisaki ekateli ya tribinale ya moke mpe elongisaki biso. Na lisalisi ya Yehova mpe mpo na mabondeli ya bandeko ya mokili mobimba, bandeko mingi ya Russie bakoki sikoyo kozwa ebele ya makambo ya elimo oyo ezali na site jw.org.

TURQUIE Bazali kaka kondima te kotosa lotomo ya moto ya koboya mosala ya soda na kolanda lisosoli

Ndeko moko ya Turquie na nkombo Bariş Görmez asalaki mbula koleka 4 na bolɔkɔ mpo aboyaki kokóma soda. Na bolɔkɔ yango, basoda bamonisaki ye bwale mpenza; bazalaki konyatanyata ye mpe kobɛta ye na fimbo ya ebende. Anyokwamaki mpe mingi na kasho. Lokola azali molai, ndeko Görmez azalaki kokoka te kolala na mbeto ya kasho, kasi balobaki na ye alala kaka, agumbi makolo mpe atye yango na mbeto mosusu. Nsukansuka, bakonzi ya bolɔkɔ bandimaki azwa matela ya molai, oyo bandeko ya lisangá bamemelaki ye.

Na 2008, ndeko Görmez ná Batatoli mosusu misato basɛngaki bákende kosamba na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato; balobaki ete bakonzi ya Turquie batosaki te ntomo na bango ya kozala na bonsomi ya losambo na ndenge baboyaki kondima ete bazali na lotomo ya koboya mosala ya soda. Na mokolo ya 03/06/2014, Tribinale yango elongisaki bandeko yango minei * mpe elobaki ete guvɛrnema ya Turquie efuta bango lomande. Ezali mbala ya misato Tribinale monene ya Mpoto elongisa Batatoli ya Yehova mpe ekweisa guvɛrnema ya Turquie na likambo yango. Lelo oyo, ata Motatoli ya Yehova moko te azali na bolɔkɔ na Turquie, kasi likambo yango ekosila mpenza te soki Leta ya Turquie ezali kaka koboya kondima lotomo ya moto ya koboya mosala ya soda na kolanda lisosoli na ye.

Bansango mosusu

Azerbaïdjan: Bandeko bazali kaka konyokwama: bapolisi bayaka kokata makita na bango, bapekisaka mikanda na bango, bakangaka bango ntango bazali koteya, mpe banyokolaka bango na ndenge mosusu. Nzokande, guvɛrnema mpe ezali kaka koboya kokoma lisangá ya Batatoli ya Yehova na mikanda ya Leta. Batatoli ya Yehova bafundi guvɛrnema ya ekólo Azerbaïdjan na likambo yango mbala 19 na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Atako mikakatano nyonso wana, emonani ete Yehova azali kaka kopambola basaleli na ye mpo motángo ya basakoli ezali se kobakisama. Kobima ya Biblia mobimba Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya mboka, azéri, ezalaki esengo monene.

Érythrée: Na ekólo yango, bandeko na biso bazali kaka kosalela Yehova na bosembo atako minyoko ezali makasi. Bandeko misato Paulos Eyassu, Isaac Mogos, mpe Negede Teklemariam basali sikoyo mbula 20 na bolɔkɔ: banda mokolo ya 24/09/1994. Na Ekaniseli na mokolo ya 14/04/2014, bakonzi ya Érythrée bakangaki Batatoli soki 150 mpe bapaya oyo bayambaki. Mwana oyo alekaki moke azalaki na sanza 16, mpe moto oyo alekaki mokóló azalaki na mbula koleka 85. Bakonzi bakangaki lisusu Batatoli soki 30 mpe bapaya na diskur ya ntina mingi oyo esalemaki na mokolo ya 27/04/2014. Mingi kati na bango babimá bolɔkɔ.

Kazakhstan: Biro oyo etalelaka makambo ya losambo eboyi mikanda na biso 14 ekɔta na mboka to mpe ekabolama na ekólo Kazakhstan. Longola yango, bapekisá bandeko kosakola mpe koyebisa bato mosusu mateya na bango, mpe bafundaki bandeko soki 50 ete mosala na bango ya misionɛrɛ ezali kobuka mibeko. Mpo na kolongisa bonsomi ya kosakola, bandeko batindaki mikanda 26 na Tribinale monene mpo na ntomo ya bato na États-Unis.

^ par. 1 Kondima to koboya kosala mosala mosusu ya Leta etali lisosoli ya moto na moto.

^ par. 1 Bato oyo basalaka moziki ya baninga ezalaka mingimingi mibali ya bambula moko mpe oyo bafandi na mboka moko.

^ par. 2 Buldu and Others v. Turkey, No. 14017/08, 03/06/2014.