Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo ezali esika na biso ya losambo

Oyo ezali esika na biso ya losambo

“Molende mpo na ndako na yo ekolya ngai.”​—YOANE 2:17.

NZEMBO: 127, 118

1, 2. (a) Na ntango ya kala, epai wapi basaleli ya Yehova bazalaki kosambela ye? (b) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela tempelo ya Yehova oyo ezalaki na Yerusaleme? (c) Tokolobela nini na lisolo oyo?

BASALELI ya Nzambe, ezala na ntango ya kala mpe lelo, bazalaka na bisika ya kosambela Nzambe. Na ndakisa, ntango Abele apesaki Yehova bambeka, ekoki kozala ete atongaki etumbelo. (Ebandeli 4:3, 4) Noa, Abrahama, Yisaka, Yakobo mpe Moize batongaki mpe bitumbelo. (Ebandeli 8:20; 12:7; 26:25; 35:1; Kobima 17:15) Yehova ayebisaki Bayisraele ete bátonga tabernakle. (Kobima 25:8) Na nsima, ayebisaki bango bátonga tempelo. (1 Bakonzi 8:27, 29) Nsima ya kouta na boombo na Babilone, basaleli ya Nzambe bazalaki kokutana mbala na mbala na basinagoga. (Marko 6:2; Yoane 18:20; Misala 15:21) Mpe bakristo ya liboso bazalaki koyangana na bandako. (Misala 12:12; 1 Bakorinti 16:19) Lelo oyo, basaleli ya Yehova ya mokili mobimba, bayanganaka na bankóto ya Bandako ya Bokonzi, epai bayekolaka makambo etali Yehova mpe basambelaka ye.

2 Yesu azalaki na limemya makasi mpo na tempelo ya Yehova oyo ezalaki na Yerusaleme. Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na tempelo ekundwelaki bayekoli na ye maloba ya mokomi moko ya nzembo oyo alobaki ete: “Molende mpo na ndako na yo elei ngai.” (Nzembo 69:9; Yoane 2:17) Ndako ya Bokonzi ezali te “ndako ya Yehova” ndenge tempelo ya Yerusaleme ezalaki. (2 Ntango 5:13; 33:4) Kasi tosengeli kozala na limemya makasi mpo na bisika na biso ya losambo. Na lisolo oyo, tokolobela mitinda ya Biblia oyo ekolakisa biso ndenge tosengeli komitambwisa ntango tozali na Bandako ya Bokonzi, ndenge tosengeli kobatela yango, mpe ndenge tokoki kopesaka makabo mpo na yango. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

TOMONISAKA LIMEMYA MPO NA MAKITA NA BISO

3-5. Ndako ya Bokonzi ezali nini, mpe ndenge nini tosengeli kotalelaka makita na biso?

3 Ndako ya Bokonzi ezali esika ya libosoliboso oyo bato bakoki koyangana mpo na kosambela Yehova. Makita ezali likabo ya Nzambe, mpe esalisaka biso tókóma na boyokani malamu mpenza elongo na ye. Na makita na biso, ebongiseli na ye epesaka biso bilendiseli mpe malako oyo tosengeli na yango. Ezali likambo ya esengo kobengama epai ya Yehova mpe mwana na ye mpo na kolya na “mesa ya Yehova” pɔsɔ nyonso. (1 Bakorinti 10:21) Tosengeli soki moke te kobosana ete ezali mpenza libyangi moko ya ntina mingi.

4 Yehova ayebisi biso polele ete alingaka tózala na makita mpo na kosambela ye mpe tólendisana. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Lokola tomemyaka Yehova, tokozangisa makita te longola kaka soki ezali na likambo moko oyo esɛngi tókende te. Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na makita na biso ntango tozali kobongisa yango mpe tozali kozela yango na esengo mpo na kopesa biyano.​—Nzembo 22:22.

5 Lolenge oyo tomitambwisaka na makita mpe tobatelaka Bandako na biso ya bokonzi emonisaka mpenza soki tomemyaka Yehova mingi. Tolingaka ete etamboli na biso ekumisa nkombo ya Yehova, oyo emonanaka na makomi oyo ezalaka na efelo ya Ndako ya Bokonzi.​—Talá mpe 1 Bakonzi 8:17.

6. Bato balobaka nini mpo na Bandako na biso ya bokonzi mpe mpo na bayangani? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Soki tozali komonisa limemya mpo na Bandako na biso ya bokonzi, bato mosusu bakomona yango. Na ndakisa, moto moko na Turquie alobaki boye: “Bopɛto mpe kosala makambo na molɔngɔ oyo namonaki na Ndako ya Bokonzi ekamwisaki ngai. Bato balataki malamu, bazalaki komungamunga mpe kopesa ngai mbote na esengo mpenza. Likambo yango ekamwisaki ngai mingi.” Mobali yango abandaki koya na makita nyonso mpe mosika te azwaki batisimo. Na engumba moko na Indonésie, bandeko babengaki bato ya kartye na bango, mokonzi ya engumba yango mpe bakonzi mosusu ya Leta mpo báya kotala Ndako ya Bokonzi ya sika. Mokonzi yango akamwaki mingi na kitoko ya ndako yango, ndenge etongamaki mpe bafololo na yango kitoko. Alobaki ete: “Bopɛto ya ndako oyo emonisi mpenza ete bozali na kondima ya solo.”

Etamboli na biso ekoki komonisa ete tozali na limemya te mpo na Nzambe (Talá paragrafe 7, 8)

7, 8. Ndenge nini tokomonisa ete tomemyaka Yehova ntango tozali na Ndako ya Bokonzi?

7 Yehova nde abengaka biso na makita, mpe atyaka likebi na lolenge oyo tomonanaka mpe tomitambwisaka kuna. Na yango, toboyaka kolekisa ndelo. Lisusu, tolobaka te ete kaka lolenge boye nde ebongi na makita, mpe epai mosusu, tokolinga mpe te kolata ndenge tokendeke kosala masano. Yehova alingaka ete biso ná bato oyo tobengaka na Ndako ya Bokonzi, tómiyoka malamu kuna. Kasi tolingaka ata moke te komonisa ezaleli ya kozanga limemya mpo na makita. Yango wana tolataka te bilamba lokola bato ya mobulu to oyo tolataka ntango ya masano, tosengeli mpe koboya kotindelana bamesaje, kobɛta masolo, kolya, komɛlamɛla ntango makita ezali kosalema. Mpe baboti basengeli koteya bana na bango ete bákimakimaka te to basakanaka te na Ndako ya Bokonzi.​—Mosakoli 3:1.

8 Ntango Yesu amonaki bato bazali kotɛka na tempelo ya Nzambe, asilikaki mpe abenganaki bango. (Yoane 2:13-17) Na Bandako na biso ya bokonzi, tosambelaka Yehova mpe toyekolaka makambo etali ye. Na yango, ekozala malamu te tóbanda kosala mombongo ntango tozali kuna.​—Talá mpe Nehemia 13:7, 8.

TOPESAKA MABƆKƆ MPO NA KOTONGA BANDAKO YA BOKONZI

9, 10. (a) Ndenge nini basaleli ya Yehova batongaka Bandako ya Bokonzi, mpe matomba nini emonani? (b) Ndenge nini ebongiseli ya Yehova esalisaka masangá oyo ezali na mbongo te ya komitongela Ndako ya Bokonzi?

9 Basaleli ya Yehova na mokili mobimba basalaka mosala makasi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Bandeko oyo basalaka mosala kozanga lifuti nde basalaka baplan, batongaka mpe babongisaka yango. Mpo na yango, na boumeli ya mbula 15 oyo euti koleka, totongi Bandako ya Bokonzi ya kitoko 28 000 na mokili mobimba, elingi koloba Bandako ya Bokonzi soki mitano mokolo na mokolo.

10 Ebongiseli ya Yehova etindaka bandeko ya bolingo malamu mpe esalelaka makabo mpo na kosalisa ete Bandako ya Bokonzi etongama esika nyonso oyo mposa ezali. Tolandaka etinda ya Biblia oyo elobaka ete baoyo bazali na mingi bakoki kosalisa baoyo bazali na yango mingi te. (Tángá 2 Bakorinti 8:13-15.) Matomba nini emonani? Bandako ya Bokonzi mingi etongami mpo na masangá oyo ezali na mbongo mingi te.

11. Bandeko mosusu balobi nini mpo na ndako na bango ya bokonzi ya sika, mpe omiyoki ndenge nini?

11 Bandeko oyo bautaki na lisangá moko ya Costa Rica bakomaki boye: “Ntango totɛlɛmaka liboso ya Ndako ya Bokonzi, tomonaka yango lokola ndɔtɔ! Totikalaka monɔkɔ polele. Ndako na biso ya bokonzi ya kitoko esilaki na mobimba mpenza na boumeli ya mikolo mwambe! Tolongaki kosala bongo na lisalisi ya lipamboli ya Yehova, bibongiseli oyo ezwami na ebongiseli na ye mpe lisungi ya bandeko na biso ya motema. Esika oyo ya losambo ezali mpenza likabo ya motuya, to lokola biju oyo Yehova apesi biso. Tosepelaka na yango makasi.” Esepelisaka biso mpenza koyoka ndenge bandeko na biso bazali kotɔnda Yehova mpo na oyo asali mpo na bango. Mpe tozali na esengo ete bandeko ya mokili mobimba bakoki kozala na ndako na bango ya bokonzi. Emonani polele ete Yehova azali kopambola mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, mpo soki kaka esili kotongama, bato mingi babandaka koya koyangana mpo na koyoka mateya ya Yehova.​—Nzembo 127:1.

12. Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi?

12 Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi? Ntango mosusu okoki komipesa mpo na kosala mosala yango. Mpe biso nyonso tokoki kopesa makabo ya mbongo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Soki tosali nyonso oyo tokoki kosala mpo na kosunga mosala yango, tokoyoka esengo ya kopesa, mpe likambo eleki ntina, tokosanzola Yehova. Tolandaka ndakisa ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala oyo bazalaki kosepela kopesa makabo mpo na kotonga bisika na bango ya losambo.​—Kobima 25:2; 2 Bakorinti 9:7.

TOBATELAKA NDAKO NA BISO YA BOKONZI PƐTO

13, 14. Makambo nini totángaka na Biblia oyo emonisi ete tosengeli kobatelaka ndako na biso ya Bokonzi pɛto mpe makambo ezalaka na molɔngɔ?

13 Yehova azali Nzambe moko ya pɛto mpe mosantu. Azali Nzambe oyo asalaka makambo na molɔngɔ. Yango wana tosengeli kobatelaka ndako na biso ya bokonzi pɛto mpe makambo esalemaka na molɔngɔ. (Tángá 1 Bakorinti 14:33, 40.) Lisusu, mpo na kozala pɛto mpe mosantu lokola Yehova, tosengeli te kaka kosuka na kobatela losambo, makanisi, misala na biso pɛto, kasi tosengeli mpe kozala pɛto na nzoto na biso.​—Emoniseli 19:8.

14 Ntango tozali kobatela ndako na biso ya bokonzi pɛto mpe tozali kosala makambo na molɔngɔ, tokozala na esengo ya kobenga bato na makita na biso. Mpe bato bakomona ete tosalelaka mpenza makambo oyo tosakwelaka bango mpo na mokili ya sika ya pɛto. Bakomona ete tosambelaka Nzambe moko mosantu mpe ya pɛto oyo akobongola mabele paradiso moko kitoko.​—Yisaya 6:1-3; Emoniseli 11:18.

15, 16. (a) Mpo na nini ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi pɛto? Mpo na nini tosengeli kobatelaka yango pɛto? (b) Programɛ ya bopɛto ya ndako na bino ya bokonzi esalemaka ndenge nini, mpe biso nyonso tozali na libaku nini ya malamu?

15 Bato na bato bazali na lolenge oyo batalelaka bopɛto. Mpo na nini? Ekoki kozala na lolenge oyo babɔkɔlamá. Lisusu, basusu bafandaka na bisika ya salite to bisika banzela ezali salite mpe pɔtɔpɔtɔ. Basusu bazalaka na mai mingi te to bankisi ya kotya bopɛto. Kasi, ezala tozali wapi mpe ezala bato batalelaka bopɛto ndenge nini, tosengeli kokoba kobatela ndako na biso ya bokonzi pɛto mpe kotya makambo na molɔngɔ. Ezali esika oyo tosambelaka Yehova.​—Kolimbola Mibeko 23:14.

16 Soki tolingi ndako na biso ya bokonzi ezala pɛto, tosengeli kobongisaka makambo malamu. Bankulutu basalaka programɛ ya lisangá mpe balandelaka ete bankisi mpe bisaleli ya kotya bopɛto ezala ebele. Bankulutu babongisaka mpe mosala yango mpo esalema. Ezali na biloko mosusu oyo esengeli kotyaka yango bopɛto nsima ya makita nyonso, kasi mosusu esɛngaka kosala bopɛto nsima ya mwa ntango. Biso nyonso tozali na libaku malamu ya kotya bopɛto na ndako na biso ya bokonzi.

TOBATELAKA NDAKO NA BISO YA BOKONZI

17, 18. (a) Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo basaleli ya Yehova na ntango ya kala babatelaki tempelo? (b) Mpo na nini tosengeli kobatelaka ndako na biso ya bokonzi?

17 Tobatelaka mpe ndako na biso ya bokonzi malamu soki tozali kobongisaka bisika nyonso oyo esengeli. Basaleli ya Yehova na ntango ya kala basalaki mpe bongo. Na ndakisa, ntango Yehoashe azalaki koyangela Yuda, bato bapesaki makabo ya mbongo mpo na tempelo. Mokonzi yango asɛngaki banganga-nzambe básalela mbongo yango mpo na kobongisa tempelo bisika nyonso oyo ebebaki. (2 Bakonzi 12:4, 5) Mbula koleka 200 na nsima, mokonzi Yosiya mpe asalelaki makabo ya tempelo mpo na kobongisa yango.​—Tángá 2 Ntango 34:9-11.

18 Bakomite ya filiale mosusu emonaki ete bato ya bikólo na bango bamesaná te kobatela bandako to biloko ya mosala malamu. Ekoki kozala ete kaka bato moke na bikólo yango nde bayebi mosala wana. To ekoki kozala ete bazali na mbongo mingi te mpo na kobongisa bandako yango. Kasi, soki biso tobongisi te ndako na biso ya bokonzi na ntango esengeli, bato bakobanda komona yango salite. Ekozala litatoli ya malamu te mpo na bango. Kasi, soki biso nyonso tozali kosala oyo tokoki mpo na kobatela ndako na biso ya bokonzi, tokopesa Yehova nkembo mpe tokobebisa te mbongo oyo bandeko na biso bapesaki makabo.

Tosengeli kobatela ndako na biso ya bokonzi pɛto mpe na ndenge ebongi (Talá paragrafe 16, 18)

19. Okosala nini mpo na komonisa limemya na yo na esika oyo osambelaka Yehova?

19 Ndako ya Bokonzi ezali ndako oyo epesamá na mabɔkɔ ya Yehova. Ezali ya moto moko te to ya lisangá moko te. Ndenge tolobeli yango na lisolo oyo, mitinda ya Biblia ekosalisa biso tózala na makanisi ebongi na likambo etali esika oyo tosambelaka Nzambe. Lokola tomemyaka Yehova, tomonisaka limemya mpo na makita na biso mpe mpo na Ndako ya Bokonzi. Tozali na esengo ya kopesa makabo ya mbongo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, mpe tosalaka mosala makasi mpo na kobatela yango pɛto. Na ndakisa ya Yesu, tomonisaka molende mpe limemya mpo na esika oyo tosambelaka Yehova.​—Yoane 2:17.

^ par. 2 Lisolo oyo elobeli Bandako ya Bokonzi. Kasi makambo oyo tokolobela ekotalela mpe Bandako ya mayangani mpe bisika mosusu oyo tosalelaka mpo na kosambela Yehova.