Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso”

“Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso”

“Moto oyo atángaka zulunalo te azali zoba; kutu ye oyo andimaka likambo mpo kaka atángi yango na zulunalo azali zoba koleka.”​—August von Schlözer, moto moko ya istware mpe mokomi (1735-1809).

NA BOUMELI ya mbula koleka 200, bato bandimaka te makambo nyonso oyo bakomi na bazulunalo. Lelo oyo, tosengeli te kondima makambo nyonso oyo totángaka to totalaka na Internet. Na Internet, makambo ezalaka ndenge na ndenge, mpe biloko oyo bato bazali kobimisa lelo, ezali kosalisa biso mpo tómonaka yango kozanga mpasi. Makambo mingi ezalaka solo, epesaka litomba mpe ezalaka likama te, kasi mingi mpe ezalaka lokuta, ezangi ntina mpe ezalaka likama. Yango wana, tosengeli kopona malamumalamu oyo tozali kotánga. Ntango bato babandi kosalela Internet, bakoki kokanisa ete likambo moko ezali solo kaka mpo ezali na Internet to mpo moninga moko nde atindeli bango mesaje yango. Bakoki kondima likambo moko ata soki bayebi ete likambo yango ekoki kosalema ata moke te. Kasi Biblia ekebisi biso ete: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

Tokoki koloba ete moto oyo azangi mayele, to andimaka te makambo nyonso oyo ayokaka azali moto ya ekɛngɛ. Soki tozali bato ya ekɛngɛ, tokobanda kokeba mingi mpe tokobanda kondima kaka likambo oyo toyebi ete ezali solo. Tokokosama te mpe tokondima te likambo ya lokuta oyo totángi na Internet, ata soki likambo yango eyebani mingi. Nini ekoki kosalisa yo ozala ekɛngɛ? Ya liboso, omituna boye: ‘Likambo yango euti mpenza na site Internet oyo endimami to oyo bato batyelaka motema? To euti nde na site Internet oyo moto nyonso akoki kokoma makanisi na ye, to esika oyo euti eyebani te? Site Internet moko oyo bato batyelaka motema emonisaki ete lisolo yango ezali lokuta?’ * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Soki ezali bongo, salelá bososoli. (Masese 7:7) Soki likambo moko emonani lokola ezali solo te, ntango mosusu ekoki kozala bongo. Lisusu, ntango otángi nsango moko mabe mpo na basusu, kanisá soki nani akozwa litomba soki nsango yango epanzani mpe ntina oyo moto azali na mposa ya kopanza yango.

OTINDELAKA BASUSU MBALA MOKO BAMESAJE OYO BATINDELI YO?

Bato mosusu bakoki kotindela baninga na bango bansango kozanga ete bátala naino liboso soki ezali solo to kozanga kokanisa nini ekoki koya na nsima. Ekoki kozala ete basalaka yango mpo balingaka bato bátyelaka bango likebi mingi mpe bázala bato ya liboso oyo bapanzi nsango yango. (2 Samwele 13:28-33) Kasi moto ya ekɛngɛ akanisaka na mabe oyo ekoki kouta na kosala bongo. Na ndakisa, ekoki kobebisa lokumu ya moto to ya ebongiseli mobimba.

Ekoki kozala ete moto oyo atindi nsango yango aluki te koyeba soki ezali likambo ya solo, mpo kosala bongo esɛngaka ntango mpe milende. Akanisaka kaka ete bato oyo bakozwa mesaje na ye nde bakoki kosala yango. Kasi, bango mpe bazali na ntango mingi te lokola ye. (Baefese 5:15, 16) Na yango, na esika ya kotindaka makambo oyo toyebi motó ná makolo na yango te, ekozala malamu mingi tózwa ekateli oyo: “Soki namoni ete likambo yango ezali solo te, nasengeli kotika yango!”

Omituna boye: ‘Natindelaka basusu mbala moko bamesaje oyo batindeli ngai? Esalemá ete nasɛnga bolimbisi epai ya baninga oyo natindelaki nsango ya mabe to ya lokuta? Moto moko ayebisá ngai natika kotinda mbala moko bamesaje oyo batindeli ngai?’ Kobosana te ete soki baninga na yo bazali mpe na adrɛsi e-mail, bakoki mpe kosalela Internet mpe basengeli kaka te kotuna yo mpo na kosalela makambo oyo esepelisi bango. Bazali te na mposa ya kozwa ebele ya bamesaje oyo ezali na masolo, bavideo to bililingi ya kosɛkisa. Ezali mpe mabe kotindela basusu mbala moko badiskur oyo batye na CD to makambo oyo moto ye moko akomi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Mpe tóbosana te ete soki moto asali bolukiluki na ye moko, asaleli bavɛrsɛ ya Biblia, to abongisi biyano oyo akopesa na makita, akozwa litomba mingi koleka soki yo otindeli ye makambo yango.

Nasengeli kotindela bato mosusu mbala moko mesaje oyo?

Osengeli kosala nini soki omoni na Internet ete balobi mpenza makambo ya lokuta mpo na ebongiseli ya Yehova? Bóya makambo yango mbala moko! Kondima yango te. Ekozala malamu te koyebisa basusu makambo oyo otángi mpe kosɛnga bango bápesa makanisi mpo kosala bongo ekopesa nzela ete makambo ya lokuta wana epanzana lisusu mingi koleka. Soki likambo moko oyo omonaki na Internet etungisi yo, sɛngá Yehova apesa yo bwanya mpe sololá na bandeko oyo bakɔmɛli. (Yakobo 1:5, 6; Yuda 22, 23) Tosengeli kokamwa te soki bato bazali kokosela biso makambo. Bato bakoselaki Yesu makambo, mpe Yesu akebisaki bayekoli na ye ete banguna na bango, bakonyokola bango mpe ‘bakokosela bango makambo ya ndenge nyonso.’ (Matai 5:11; 11:19; Yoane 10:19-21) Na yango, soki ozali na bwanya mpe okokanisi malamumalamu, okoyeba soki makambo oyo moto azali koloba ezali lokuta mpe azali koluka kokosa bato.​—Masese 2:10-16.

MONISELÁKÁ BASUSU LIMEMYA

Tosengeli mpe kozala ekɛngɛ ntango tozali koyebisa makambo etali bandeko na biso to makambo oyo toyoki. Ekoki kozala na bantango oyo ekozala malamu te to tokomonisa bolingo te soki topanzi nsango moko ata soki ezali solo. (Matai 7:12) Na ndakisa, tokomonisa bolingo te to ekozala mabe soki topanzi makambo ya lokuta mpo na basusu. (2 Batesaloniki 3:11; 1 Timote 5:13) Mpe bansango mosusu ezali ya koloba te. Bato bakosepela mbala mosusu ete likambo yango eyebana nsima to na ntango oyo ebongi mpenza. Na yango, tosengeli komemya lotomo wana oyo bazali na yango ya kopona ntango mpe lolenge oyo nsango yango ekoki kobima. Na yango, soki toyebisi basusu likambo yango liboso ntango ekoka, tokoki kobɛtisa bankake mpamba.

Lelo oyo, nsango ekoki kopanzana nokinoki, ezala ya solo to ya lokuta, ya ntina to ya ntina te, oyo ekoki kobimisa likama to te. Soki otindeli moto mesaje, moto yango akoki mbala moko kotindela bato mosusu na mokili mobimba kaka na mwa basɛgɔndɛ moke. Na yango, salá makasi otindelaka te bato mbala moko nsango oyo batindeli yo mpe epai ya bato nyonso oyo oyebi. Atako bolingo “endimaka makambo nyonso” mpe esɛngaka te tókanisela basusu mabe, tosengeli te kozala bato oyo bazangi mayele mpe kondimaka likambo nyonso oyo bauti koyebisa biso mpe lisolo moko oyo eningisi mboka. (1 Bakorinti 13:7) Mpe tokondima soki moke te makambo nyonso ya lokuta to ya mabe oyo elobami mpo na ebongiseli ya Yehova mpe bandeko na biso, oyo tolingaka mingi. Tóbosana te ete baoyo babandaka mpe bakobaka kopanza nsango ya lokuta, basepelisaka nde Satana Zabolo, “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Na yango, tiká ete tózala ekɛngɛ mpe tókanisaka na mozindo na lolenge oyo tosalelaka ebele ya makambo oyo tozwaka mokolo na mokolo. Yango wana, Biblia elobi ete: “Bato oyo bazangi mayele bakozwa bozoba, kasi bato ya ekɛngɛ bakolata boyebi lokola eloko ya kolata na motó.”​—Masese 14:18.

^ par. 4 Ntango mosusu, lisolo moko ya lokuta oyo ebimaki liboso ekoki kobima lisusu. Bakoki kobakisa kaka mwa makambo ya sika mpo na komonisa ete ezali solo.

^ par. 8 Talá Mosala na Biso ya Bokonzi ya 04/2010, “Biyano na mituna na bino.”