Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na ekateli ya ‘kokoba kolingana ndenge bandeko balinganaka’!

Zalá na ekateli ya ‘kokoba kolingana ndenge bandeko balinganaka’!

“Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.”​—BAEBRE 13:1.

NZEMBO: 72, 119

1, 2. Mpo na nini ntoma Paulo akomelaki bakristo Baebre mokanda?

NA MOBU 61, masangá na Yisraele mobimba ezalaki na mwa kimya. Atako ntoma Paulo azalaki na bolɔkɔ na Roma, azalaki na elikya ete bakobimisa ye mosika te. Timote, moninga na ye ya mobembo, autaki kobima na bolɔkɔ mpe bango mibale bazalaki na elikya ete bakokende kotala bandeko ya Yudea. (Baebre 13:23) Kasi na boumeli ya mbula mitano mpamba, bakristo ya Yudea, mingimingi baoyo bazalaki kofanda na Yerusaleme, basengelaki kosala nokinoki. Mpo na nini? Mwa moke liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ntango kaka bakomona basoda bazingi Yerusaleme, basengeli kokima.​—Luka 21:20-24.

2 Elekaki mbula 28 banda Yesu akebisaki bayekoli na ye ndenge wana. Na ntango wana, bakristo na Yisraele batikalaki sembo atako bakutanaki na minyoko mpe mikakatano mingi. (Baebre 10:32-34) Kasi ntoma Paulo alingaki kobongisa bango mpo na makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ezali koya. Mosika te, kondima na bango esengelaki kokutana na komekama oyo eleki monene. (Matai 24:20, 21; Baebre 12:4) Basengelaki koyika mpiko lisusu mingi mpe kozala na kondima makasi koleka liboso mpo na kotosa etinda ya Yesu ya kokima, mpe yango elingaki kosala ete bábika. (Tángá Baebre 10:36-39.) Na yango, Yehova atindaki ntoma Paulo akomela bandeko wana ya bolingo. Mokanda yango, oyo ebengami lelo mokanda ya Baebre, ekomamaki mpo na kolendisa bango mpo na makambo oyo esengelaki koya.

3. Mpo na nini tosengeli kosepela na mokanda ya Baebre?

3 Lokola tozali basaleli ya Nzambe lelo, tosengeli kosepela na mokanda ya Baebre. Mpo na nini? Mpo bomoi na biso lelo ezali lokola oyo ya bakristo wana ya Yudea. Tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe mingi bayiki mpiko na bosembo nyonso na mikakatano makasi to minyoko. (2 Timote 3:1, 12) Kasi, mingi na biso tozali na kimya mpe tozali kokutana na minyoko mpenza te. Na yango, lokola bakristo ya eleko ya ntoma Paulo, tosengeli kozala ekɛngɛ. Mpo na nini? Mpamba te mosika te, kondima na biso ekokutana na komekama oyo eleki makasi!​—Tángá Luka 21:34-36.

4. Mokapo ya mobu 2016 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?

4 Nini ekosalisa biso tómibongisa mpo na makambo oyo ezali koya? Na mokanda ya Baebre, ntoma Paulo alobi makambo mingi oyo ekosalisa mpo ete kondima na biso ekóma makasi. Toli moko ya ntina mingi ezali na Baebre 13:1. Elendisi biso boye: “Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.” Vɛrsɛ yango eponami mpo ezala mokapo ya mobu 2016.

Mokapo na biso ya mobu 2016: “Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.”​—Baebre 13:1.

KOLINGANA NDENGE BANDEKO BALINGANAKA ELIMBOLI NINI?

5. Kolingana ndenge bandeko balinganaka elimboli nini?

5 Kolingana ndenge bandeko balinganaka elimboli nini? Liloba ya Grɛki oyo ntoma Paulo asalelaki elimboli “bolingo ya bondeko.” Kolingana ndenge bandeko balinganaka ezali nsai to esengo makasi oyo toyokaka mpo na bato ya libota na biso to baninga na biso ya motema. (Yoane 11:36) Tosukaka kaka te na koloba ete tozali bandeko. Tozali mpenza bandeko. (Matai 23:8) Ntoma Paulo alobi: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Baroma 12:10) Maloba wana emonisi bolingo makasi oyo tozalaka na yango mpo na bandeko na biso. Kolingana ndenge bandeko balinganaka bakisá mpe bolingo oyo esimbami na mitinda ya bokristo, esalisaka basaleli ya Nzambe bázala na boninga ya penepene mpe bázala na bomoko.

6. Mpo na bakristo ya solo kolingana ndenge bandeko balinganaka elimboli nini?

6 Maloba “kolingana ndenge bandeko balinganaka” ezali mingi na mikanda ya bakristo. Mpo na Bayuda ya ntango ya kala, liloba “ndeko” ezalaki kosalelama mingi mpo na moto ya libota mpe ntango mosusu mpo na bato ya libota te. Kasi esengelaki kosalelama soki moke te mpo na moto oyo azalaki Moyuda te. Nzokande, lokola biso tozali bakristo ya solo, “ndeko” na biso ezali mokristo nyonso ya solo, ezala azali na mboka nini to auti wapi. (Baroma 10:12) Yehova ateyi biso tólingana lokola bandeko. (1 Batesaloniki 4:9) Kasi, mpo na nini ezali na ntina tókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka?

MPO NA NINI EZALI NA NTINA MINGI TÓKOBA KOLINGANA NDENGE BANDEKO BALINGANAKA?

7. (a) Wapi ntina eleki monene oyo tomonisaka ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka? (b) Wapi ntina mosusu oyo tosengeli kolingana lisusu makasi koleka?

7 Ntina eleki monene oyo tomonisaka ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka ezali mpo Yehova nde asɛngi biso tósala yango. Tokoki te kolinga mpenza Yehova soki tozali koboya kolinga bandeko na biso. (1 Yoane 4:7, 20, 21) Ntina mosusu ezali ete tozalaka na mposa ya basusu, mingimingi na ntango ya mpasi. Ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo Baebre, ayebaki ete mosika te bakotika bandako na bango mpe biloko na bango mosusu. Yesu alobelaki ndenge oyo ntango yango ekozala mpasi mingi. (Marko 13:14-18; Luka 21:21-23) Na yango, liboso ete ntango yango ekóma, bakristo wana basengelaki kolingana lisusu makasi koleka.​—Baroma 12:9.

Sikoyo, tosengeli kolingana makasi ndenge bandeko balinganaka mpo yango ekosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya

8. Tosengeli kosala nini sikoyo liboso ete bolɔzi monene ebanda?

8 Etikali moke bolɔzi monene oyo esalemá naino te banda mokili ebanda eya. (Marko 13:19; Emoniseli 7:1-3) Tosengeli kotosa toli oyo: “Kende, yo ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango kino makaneli ekoleka.” (Yisaya 26:20) ‘Bashambrɛ ya kati’ ekoki kozala masangá na biso. Esika oyo tosambelaka Yehova elongo na bandeko na biso. Kasi, tosengeli kosuka kaka te na koyanganaka mbala na mbala. Ntoma Paulo akundwelaki bakristo Baebre ete basengeli kolendisana mpo na komonisa bolingo mpe kosalelana malamu. (Baebre 10:24, 25) Sikoyo, tosengeli kolingana makasi ndenge bandeko balinganaka mpo yango ekosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya.

9. (a) Mabaku nini tozali na yango lelo ya komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka? (b) Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge basaleli ya Yehova bamonisaki ete balinganaka ndenge bandeko balinganaka?

9 Ata lelo, tozali na mabaku mingi ya komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka, liboso ete bolɔzi monene ebanda. Bandeko na biso mingi bazali komona mpasi mpo na koningana ya mabele, mpela, mipɛpɛ makasi, tsunami to makama mosusu oyo ebimaka yango moko. Bandeko mosusu bazali koyikela minyoko mpiko. (Matai 24:6-9) Lokola tozali kobika na mokili oyo mabe, mokolo na mokolo tozali na mikakatano ya nkita. (Emoniseli 6:5, 6) Lokola bandeko na biso bazali kokutana na mikakatano mingi, yango ezali libaku ya komonisa ete tolingaka bango. Atako na mokili oyo bato mingi balinganaka te, biso tosengeli kokoba komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka. (Matai 24:12) [1]​—Talá maloba na nse ya lokasa.

NDENGE NINI TOKOKI KOKOBA KOLINGANA NDENGE BANDEKO BALINGANAKA?

10. Tokotalela nini sikoyo?

10 Atako tozali na mikakatano, ndenge nini tokoki kondimisama ete tokokoba kolingana ndenge bandeko balinganaka? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bandeko na biso ndenge wana? Nsima ya koloba “bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka,” ntoma Paulo atángaki makambo ndenge na ndenge oyo bakristo bakoki komonisa yango. Tótalela makambo motoba kati na yango.

11, 12. Komonisa ezaleli ya koyamba bapaya elimboli nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya.” (Tángá Baebre 13:2.) Liloba “koyamba bapaya” elimboli nini? Liloba oyo ntoma Paulo asaleli elimboli “komonisela bapaya boboto.” Mbala mosusu liloba yango ekundweli biso Abrahama ná Lota. Mibali wana mibale bamoniselaki bapaya oyo bayebaki te boboto. Nsukansuka, Abrahama ná Lota bayebaki ete bapaya wana bazalaki nde baanzelu. (Ebandeli 18:2-5; 19:1-3) Bandakisa wana elendisaki bakristo Baebre báyambaka bapaya mpo na komonisa ete balinganaka ndenge bandeko balinganaka.

12 Ndenge nini tokoki komonisela basusu ezaleli ya koyamba bapaya? Tokoki kobengisa bandeko mibali mpe basi na ndako na biso mpo na kolya mwa bilei to mpo na kolendisa bango. Ata soki toyebi malamu te mokɛngɛli ya zongazonga na biso mpe mwasi na ye, tokoki kobengisa bango epai na biso ntango bayei kotala lisangá na biso. (3 Yoane 5-8) Ezali kosɛnga te tólamba ebele ya bilei to kobimisa mbongo mingi. Mokano na biso ezali ya kolendisa bandeko na biso, kasi te ya kokamwisa bango na biloko oyo tozali na yango. Mpe tosengeli te kobengisa kaka baoyo bakoki kozongisela biso na lolenge mosusu. (Luka 10:42; 14:12-14) Likambo eleki ntina ezali ete tómonisa ata moke te ete tozali na ntango te mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya!

13, 14. Ndenge nini tokoki ‘kokanisaka baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ’?

13 “Bókanisaka baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ.” (Tángá Baebre 13:3.) Ntango ntoma Paulo akomaki maloba wana, azalaki kolobela bandeko oyo bazalaki na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Ntoma Paulo apesaki bandeko ya lisangá yango longonya mpo bazalaki ‘koyokela baoyo bazalaki na bolɔkɔ mawa.’ (Baebre 10:34) Bandeko mosusu basalisaki ntoma Paulo na boumeli ya mbula 4 oyo alekisaki na bolɔkɔ, atako basusu bazalaki kofanda mosika. Ndenge nini bakokaki kosalisa ntoma Paulo? Bakokaki kobondela mingi mpo na ye.​—Bafilipi 1:12-14; Baebre 13:18, 19.

Tokoki kobondela mpo na bandeko mibali mpe basi ná bana na bango oyo bazali na bolɔkɔ na Érythrée

14 Lelo oyo, Batatoli mingi bazali na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Bandeko mibali mpe basi oyo bafandi mosika te bakoki kosalisa bango na biloko oyo basengeli na yango. Kasi mingi na biso tofandi mosika na bandeko wana oyo bazali na bolɔkɔ. Ndenge nini tokoki kosalisa bango mpe kobosana bango te? Kolingana ndenge bandeko balinganaka ekotinda biso tóbondelaka mingi mpo na bango. Na ndakisa, tokoki kobondela mpo na bandeko mibali mpe basi ná bana na bango oyo bazali na bolɔkɔ na Érythrée, kati na bango tokoki kotánga ndeko Paulos Eyassu, Isaac Mogos, mpe Negede Teklemariam oyo bazali kaka na bolɔkɔ esali sikoyo mbula 20.

15. Ndenge nini tokoki kokumisa libala na biso?

15 “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.” (Tángá Baebre 13:4.) Tokoki mpe komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka soki tozali pɛto na bizaleli. (1 Timote 5:1, 2) Na ndakisa, soki osali pite to ekobo na ndeko mwasi to mobali, okosala ndeko yango ná libota na ye mabe. Bandeko bakotyela biso lisusu motema te. (1 Batesaloniki 4:3-8) Kanisá mpe ndenge mwasi akoyoka soki ayebi ete mobali na ye atalaka pornografi. Akomona mpenza ete mobali na ye alingaka ye mpe amemyaka ebongiseli ya libala?​—Matai 5:28.

16. Ndenge nini kosepela na oyo tozali na yango esalisaka biso tómonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka?

16 “Bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.” (Tángá Baebre 13:5.) Kotyela Yehova motema ekosalisa biso tósepela na oyo tozali na yango. Ndenge nini yango esalisaka biso tólingana ndenge bandeko balinganaka? Soki tozali kosepela na oyo tozali na yango, tokobosana te ete bandeko na biso bakristo bazali na ntina mingi koleka mbongo to biloko. (1 Timote 6:6-8) Tokomilelalela te mpo na bandeko na biso to mpo na makambo oyo ekómeli biso na bomoi. Mpe tokoyokela basusu zuwa te mpe tokozala na lokoso te. Kutu soki tozali kosepela na oyo tozali na yango, tokokabela basusu.​—1 Timote 6:17-19.

17. Ndenge nini kozala ‘na mpiko mpenza’ esalisaka biso tómonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka?

17 ‘Zalá na mpiko mpenza.’ (Tángá Baebre 13:6.) Kotyela Yehova motema epesaka biso makasi ya koyikela mikakatano mpiko. Mpiko yango esalisaka biso tózala na makanisi oyo ebongi. Mpe soki tozali na makanisi oyo ebongi, tokolendisa mpe tokobɔndisa bandeko na biso bakristo mpo na komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka. (1 Batesaloniki 5:14, 15) Ata na boumeli ya bolɔzi monene, tokoki kozala na mpiko mpo toyebi ete lobiko na biso ekómi pene.​—Luka 21:25-28.

Tokoki kozala na mpiko mpo toyebi ete lobiko na biso ekómi pene

18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bankulutu mingi ndenge bandeko balinganaka?

18 “Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino.” (Tángá Baebre 13:7, 17.) Bankulutu na masangá na biso basalelaka ntango na bango mpo na kosala mosala makasi mpo na biso. Soki tokanisi makambo nyonso oyo basalaka, tokolinga bango mingi mpe botɔndi na biso mpo na bango ekobakisama. Tokolinga soki moke te kosilisa esengo na bango to bámilelalela mpo na likambo moko oyo tosali. Kutu, totosaka nde bango na motema moko. Na ndenge yango, ‘topesaka bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.’​—1 Batesaloniki 5:13.

Ozalaka na botɔndi mpo na mosala oyo bankulutu basalaka mpo na biso? (Talá paragrafe 18)

KOBÁ KOSALA YANGO LISUSU MINGI KOLEKA

19, 20. Ndenge nini tokoki kokoba komonisa ete tolinganaka ndenge bandeko balinganaka na ndenge eleki mpenza?

19 Basaleli ya Yehova bayebani mpo na ezaleli na bango ya kolingana ndenge bandeko balinganaka. Ezalaki mpe bongo na mikolo ya ntoma Paulo. Kasi, ntoma Paulo alendisaki bandeko bámonisa bolingo na ndenge eleki mpenza. Alobaki ete: “Bókoba kosala yango malamu koleka.” (1 Batesaloniki 4:9, 10) Emonani polele ete tokoki kobongisa na bisika oyo esengeli!

20 Na yango, ntango tokobanda kotala mokapo na biso ya mobu oyo na Ndako ya Bokonzi, tómanyola na mituna oyo: Nasengeli komonisa lisusu ezaleli ya koyamba bapaya? Ndenge nini nakoki kosalisa bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ? Namemyaka ebongiseli ya libala oyo euti na Nzambe? Nini ekosalisa ngai nasepelaka mpenza na oyo nazali na yango? Ndenge nini nakoki kotyela Yehova motema lisusu mingi? Ndenge nini nakoki kotosa lisusu mingi baoyo bazali kokamba biso? Soki tosali makasi tóbongisa makambo 6 oyo, mokapo ya mobu ekozala kaka te elembo oyo batye na efelo, kasi ekokundwela biso tótosa maloba oyo ya ntoma Paulo: “Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.”​—Baebre 13:1.

^ [1] (paragrafe 9) Mpo na bandakisa oyo emonisi ndenge Batatoli ya Yehova bamonisaka ete balinganaka ndenge bandeko balinganaka na ntango ya makama, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2002, nkasa 8-9, mpe mokapo 19 ya buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.