Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe

Tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe

“Biso nyonso tozwi . . . boboto monene likoló ya boboto monene.”​—YOANE 1:16.

NZEMBO: 95, 13

1, 2. (a) Limbolá ndakisa ya nkolo ya elanga ya vinyo oyo Yesu apesaki. (b) Ndenge nini ndakisa yango emonisi ezaleli ya kokaba mpe boboto monene?

MOKOLO moko na ntɔngɔ, nkolo elanga moko ya vinyo akendaki na zando mpo na koluka bato ya kosala mosala epai na ye. Ayebisaki bango motángo ya mbongo oyo akofuta bango, mpe bato yango bandimaki lifuti yango. Kasi, lokola nkolo yango asengelaki na basali mingi koleka, azongaki na zando mbala ebele na mokolo mpo na koluka basali mosusu. Alobaki ete akofuta bato wana nyonso motángo ya mbongo oyo ebongi. Na nsuka ya mokolo, nkolo yango ayanganisaki basali yango mpo afuta bango. Mpe ezala baoyo basalaki mosala mokolo mobimba to baoyo basalaki kaka ngonga moko, afutaki bango nyonso motángo ya mbongo ndenge moko. Kasi, ntango bato oyo basalaki mosala mokolo mobimba babandaki koimaima, nkolo yango alobaki: ‘Oyokanaki na ngai te ete nakofuta yo mbongo oyo toyokanaki? Nazali na lotomo ya kosala na biloko na ngai ndenge nalingi, boye te? Oyoki mabe mpo na bolamu oyo nasali?’​—Matai 20:1-15.

2 Ndakisa wana ya Yesu eteyi biso likambo moko ya ntina mingi mpo na “boboto monene” ya Yehova. (Tángá 2 Bakorinti 6:1.) Na ndenge nini? Basusu bakoki kokanisa ete bato oyo basalaki mosala mokolo mobimba basengelaki kozwa mbongo mingi koleka basusu. Kasi, nkolo yango amoniselaki bato oyo basalaki mosala kaka mwa bangonga na mokolo boboto monene. Moto moko ya mayele alobaki boye mpo na maloba “boboto monene” oyo Biblia esaleli: “Maloba yango ezali kopesa likanisi ya likabo ya ofele mpe oyo epesami na motema boboto, ya eloko oyo bapesi moto oyo asalaki molende moko te mpe abongi na yango te.”

LIKABO OYO EMONISI BOKABI YA YEHOVA

3, 4. Mpo na nini Yehova amoniseli bato nyonso boboto monene, mpe ndenge nini asalaki yango?

3 Biblia eyebisi biso ete boboto monene ya Nzambe ezali “likabo ya ofele.” (Baefese 3:7) Lokola tokoki te kotosa Yehova na ndenge ya kokoka, tobongi te na boboto monene na ye. Kutu, tobongi nde na liwa. Mokonzi Salomo alobaki: “Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” (Mosakoli 7:20) Na nsima, ntoma Paulo alobaki: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te,” mpe “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.”​—Baroma 3:23; 6:23a.

4 Lokola Yehova alingaka bato mingi, atindaki “Mwana na ye se moko oyo abotamaki” mpo akufela biso. Yango ezalaki likambo eleki monene ya boboto monene na ye. (Yoane 3:16) Ntoma Paulo alobaki ete Yesu “alati motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo anyokwamaki mpe akufaki, mpo, na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufela moto nyonso.” (Baebre 2:9) Ya solo, “likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”​—Baroma 6:23b.

5, 6. Makambo nini emonanaka ntango (a) lisumu ezali koyangela biso? (b) boboto monene ezali koyangela biso?

5 Mpo na nini tosalaka masumu mpe tokufaka? Biblia elobi ete “na libunga ya moto kaka moko liwa eyangelaki.” Na yango, lokola tozali bakitani ya Adama, tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokufaka. (Baroma 5:12, 14, 17) Kasi, tokoki koboya ete lisumu eyangela biso, to ezala na bokonzi likoló na biso. Ndenge nini ekoki kosalema? Soki tomonisi kondima na mbeka ya lisiko ya Kristo, tokozwa matomba na boboto monene ya Yehova. Biblia elobi: “Epai lisumu ekómaki mingi, boboto monene emonisamaki mingi lisusu koleka. Mpo na nini? Mpo, ndenge lisumu eyangelaki esika moko na liwa, boboto monene mpe eyangela na nzela ya boyengebene mpo na bomoi ya seko na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso.”​—Baroma 5:20, 21.

6 Atako tozali kaka bato ya masumu, tosengeli te kotika ete lisumu ezala na bokonzi likoló na biso. Na yango, soki tosali likambo moko ya mabe, tosɛngaka Yehova alimbisa biso. Ntoma Paulo akebisi biso boye: “Lisumu esengeli te kozala na bokonzi likoló na bino, mpo bozali na nse ya mibeko te kasi nde na nse ya boboto monene.” (Baroma 6:14) Kasi, ndenge nini tokoki kozwa matomba na boboto monene ya Nzambe? Ntoma Paulo alobaki ete: “Boboto monene ya Nzambe . . . elakisi biso tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.”​—Tito 2:11, 12.

BOBOTO MONENE “EMONISAMI NA NDENGE MINGI”

7, 8. Maloba boboto monene ya Yehova “emonisami na ndenge mingi” elimboli nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Ntoma Paulo akomaki ete: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na ndenge mingi.” (1 Petro 4:10) Boboto monene ya Yehova “emonisami na ndenge mingi.” Maloba yango elimboli nini? Elimboli ete ezala tokutani na mikakatano nini na bomoi, Yehova akopesa biso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. (1 Petro 1:6) Lisusu, akopesa biso ntango nyonso oyo tosengeli na yango mpo tókoka kolonga komekama nyonso.

Ezala tokutani na komekama to mikakatano nini na bomoi, Yehova akopesa biso oyo tosengeli na yango mpenza mpo na koyikela yango mpiko

8 Ntoma Yoane akomaki: “Biso nyonso tozwi na ebele ya biloko oyo atondi na yango, ɛɛ boboto monene likoló ya boboto monene.” (Yoane 1:16) Lokola Yehova amonisaka boboto monene na ye na ndenge mingi, tozwaka mapamboli mingi. Wapi mapamboli yango mosusu?

9. Ndenge nini tozwaka mapamboli na boboto monene ya Yehova, mpe ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na yango?

9 Yehova alimbisaka masumu na biso. Mpo na boboto monene na ye, Yehova alimbisaka masumu na biso. Kasi, asalaka bongo kaka soki tobongoli motema mpe tokobi kobundisa bamposa mabe oyo tozali na yango. (Tángá 1 Yoane 1:8, 9.) Ntoma Paulo alimbwelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ya eleko na ye ndenge oyo Yehova alimbisaka masumu. Alobaki ete: “[Nzambe] asikoli biso na nguya ya molili mpe akɔtisi biso na bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye, oyo na nzela na ye tosikolami na nzela ya lisiko, tolimbisami masumu na biso.” (Bakolose 1:13, 14) Tozali na botɔndi mingi mpo Nzambe amoniseli biso motema mawa mpe tolingi kosanzola ye. Mpe lokola Yehova alimbisaka masumu na biso, tokoki mpe kozwa mapamboli mosusu mingi.

10. Litomba nini tozwi mpo na boboto monene ya Nzambe?

10 Tokoki kozala na kimya elongo na Nzambe. Tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana banda ntango tobotamaki, tozali banguna ya Nzambe. Atako bongo, ntoma Paulo alobaki: “Ntango tozalaki banguna, tozongisaki boyokani na Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.” (Baroma 5:10) Na nzela ya lisiko, tokoki kozongisa boyokani na Nzambe, elingi koloba, tokoki kozala na kimya elongo na ye mpe kokóma baninga na ye. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango mpe amonisaki ndenge oyo yango eyokani na boboto monene ya Yehova ntango alobaki na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Lokola totángami bayengebene mpo na kondima, tiká tózala na kimya elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo, oyo na nzela na ye, na kondima mpe, tokoki kopusana pene na Nzambe mpo na kozwa boboto monene wana oyo azali komonisela biso sikoyo.” (Baroma 5:1, 2) Tozali na botɔndi mingi ndenge tozali na boyokani ya kimya elongo na Yehova!

Ndenge oyo boboto monene ya Nzambe emonanaka: Libaku malamu ya koyoka nsango malamu (Talá paragrafe 11)

11. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamemaka “bampate mosusu” na boyengebene?

11 Tokoki kotángama sembo na miso ya Nzambe. Mosakoli Danyele akomaki ete na ntango ya nsuka, “baoyo bazali na mayele ya kososola,” elingi koloba, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bakomema “ebele epai ya boyengebene.” (Tángá Danyele 12:3.) Ndenge nini bakristo wana basalaka yango? Basakolaka nsango malamu mpe bateyaka bamilio ya “bampate mosusu” mibeko ya Yehova. (Yoane 10:16) Basalisaka bango bákóma bato ya sembo na miso ya Nzambe, likambo oyo ekoki kosalema kaka mpo na boboto monene ya Yehova. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Ezali lokola nde bazwi likabo ya ofele na ndenge bazali kotángama bayengebene na boboto monene [ya Nzambe], na kosikolama oyo basikolami na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.”​—Baroma 3:23, 24.

Libaku malamu ya kobondela (Talá paragrafe 12)

12. Na ndenge nini libondeli ezali na boyokani na boboto monene ya Nzambe?

12 Tokoki kopusana penepene ya Nzambe na nzela ya libondeli. Tokoki kobondela Yehova, mpo na boboto monene na ye. Ntoma Paulo abengi kiti ya bokonzi ya Yehova “kiti ya bokonzi ya boboto monene,” mpe asɛngi biso tópusana penepene na yango “na elobeli ya polele mpe na bosembo.” (Baebre 4:16a) Tokoki kobondela Yehova ntango nyonso na nzela ya Yesu. Tozali mpenza na lokumu monene! Ntoma Paulo alobaki ete: “Tozali koloba polele mpe na bosembo mpe tozali kopusana pene kozanga kobanga mpo tondimeli ye.”​—Baefese 3:12.

Lisalisi na ntango oyo ebongi (Talá paragrafe 13)

13. Ndenge nini boboto monene ekoki kosalisa biso “ntango tozali na mposa ya lisalisi”?

13 Tokoki kozwa lisalisi na ntango oyo ebongi. Ntoma Paulo alendisaki biso ete tóbondela Yehova ntango nyonso soki esengeli, “mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Baebre 4:16b) Ezala ntango tozali komekama to tozali na mikakatano na bomoi na biso, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso. Mpe ayanolaka na mabondeli na biso atako asengeli kosala bongo te. Mbala mingi, asalelaka bandeko na biso mpo básalisa biso. Yehova ayanolaka na mabondeli na biso “mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’”​—Baebre 13:6.

14. Ndenge nini boboto monene ya Yehova ezali libɔndisi mpo na mitema na biso?

14 Tokoki kozwa libɔndisi mpo na mitema na biso. Ezali lipamboli monene ndenge Yehova abɔndisaka biso ntango nyonso oyo tozali kotungisama na makanisi. (Nzembo 51:17) Ntango bakristo ya Tesaloniki bazalaki konyokwama na bampasi, ntoma Paulo akomaki ete: “Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu na nzela ya boboto monene, bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi.” (2 Batesaloniki 2:16, 17) Koyeba ete na nzela ya boboto monene na ye, Yehova alingaka biso mpe akipaka biso ezali mpenza kobɔndisa biso!

15. Elikya nini tozali na yango mpo na boboto monene ya Nzambe?

15 Tozali na elikya ya bomoi ya seko. Lokola tozali bato ya masumu, tokoki kozala na elikya te soki lisalisi ya Yehova ezali te. (Tángá Nzembo 49:7, 8.) Kasi, Yehova apesi biso elikya moko kitoko. Elikya nini? Yesu alobaki ete: “Oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo azali komona Mwana mpe azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.” (Yoane 6:40) Na yango, tozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela mpo na boboto monene ya Yehova. Ntoma Paulo alobaki ete: “Boboto monene ya Nzambe oyo ezali kobikisa bato ya ndenge nyonso emonani polele.”​—Tito 2:11.

TÓKÓMISA TE BOBOTO MONENE YA NZAMBE LIBAKU YA KOSALA LISUMU

16. Ndenge nini bakristo mosusu ya liboso bazalaki kotyola boboto monene ya Nzambe?

16 Tozwaka mapamboli mingi mpo na boboto monene ya Yehova. Kasi, tosengeli te kobebisa boboto na ye, elingi koloba, kozwa yango lokola libaku ya kosala lisumu. Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso balukaki “kozwa boboto monene ya Nzambe na biso libaku ya kozala na etamboli ya nsɔni.” (Yuda 4) Emonanaki lokola ete bakristo oyo bazalaki sembo te bazalaki kokanisa ete bakoki kosala masumu mpe ete Yehova akolimbisa bango kaka. Bazalaki ata koluka kobenda bandeko mosusu mpo básangana na bango na masumu na bango. Lelo oyo mpe, moto nyonso oyo asalaka bongo ‘afingaka elimo ya boboto monene.’​—Baebre 10:29.

17. Toli nini ya makasi ntoma Petro apesaki?

17 Lelo oyo mpe, Satana akosaka bakristo mosusu na ndenge atindaka bango bákanisa ete bakoki kosala masumu mpe Yehova akolimbisa bango mbala moko. Ezali solo ete Yehova alingaka kolimbisa bato ya masumu oyo babongoli motema; kasi, asɛngaka ete tóbundisa bamposa na biso ya masumu. Yehova atindaki ntoma Petro akoma boye: “Yango wana, bino bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso, bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te. Ɛɛ, kasi bókoba nde kokola na kati ya boboto monene mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.”​—2 Petro 3:17, 18.

BOBOTO MONENE EMEMISI BISO MOKUMBA

18. Mikumba nini tozali na yango mpo na boboto monene ya Yehova?

18 Tozali na botɔndi mingi mpo na boboto monene ya Yehova. Yango wana, tosengeli kosalela makabo na biso mpo na kokumisa Yehova mpe kosalisa basusu, mpo basengeli na yango. Ndenge nini tokoki kosalela makabo yango? Ntoma Paulo alobi: “Yango wana, lokola tozali na makabo ndenge na ndenge na kolanda boboto monene oyo bamoniselaki biso, soki . . . mosala, tómipesa na mosala yango; to moto oyo ateyaka, amipesa na koteya na ye; to moto oyo alendisaka, amipesa na kolendisa na ye; . . . moto oyo ayokelaka bato mawa, asala yango na esengo.” (Baroma 12:6-8) Na yango, mpo na boboto monene ya Yehova, tozali na mokumba ya kosala mosala ya kosakola na molende, koteya basusu Biblia, kolendisa bandeko na biso, mpe kolimbisa moto nyonso oyo akoki kozokisa biso.

19. Mokumba nini tozali na yango tokotalela na lisolo oyo elandi?

19 Lokola tozali bato oyo bazwi mapamboli mpo na boboto monene ya Yehova, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (Misala 20:24) Tokotalela mokumba yango na lisolo oyo elandi.