Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilenge: Bókómisa kondima na bino makasi

Bilenge: Bókómisa kondima na bino makasi

“Kondima ezali . . . elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.”​—BAEBRE 11:1.

NZEMBO: 41, 69

1, 2. Ntango mosusu, bilenge oyo bazali kosalela Yehova bakoki komituna nini, mpe toli nini Biblia epesi?

NA GRANDE-BRETAGNE, mwana-kelasi moko ayebisaki elenge mwasi moko oyo azali Motatoli: “Yo moto omonanaka mayele, nzokande ondimelaka Nzambe!” Na Allemagne, ndeko mobali moko akomaki: “Balakisi na biso batalelaka lisolo ya bozalisi oyo Biblia elobeli lokola lisapo. Mpe bamonaka ete ezali likambo ya kokamwa te soki bana-kelasi bazali kondima liteya ya evolisyo.” Na France, elenge mwasi moko oyo azali Motatoli alobaki: “Na eteyelo na biso, balakisi bakamwaka komona ete ezali na bana-kelasi oyo bandimela kaka Biblia.”

2 Lelo oyo, bato mingi bandimaka te ete Nzambe akelá biso. Soki ozali elenge oyo azali kosalela Yehova to ozali koyekola koyeba ye, ntango mosusu okoki komituna ndenge oyo okoki komonisa ete ye nde azali Mozalisi na biso. Biblia esalisaka biso tókanisa malamumalamu na makambo oyo tozali koyoka to kotánga mpe tósosola yango. Liloba ya Nzambe elobi: “Likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo.” Na ndenge nini? Ekosalisa yo obengana makanisi oyo ezali solo te mpe okómisa makasi kondima na yo epai ya Yehova.​—Tángá Masese 2:10-12.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Mpo na kozala na kondima makasi epai ya Yehova, tosengeli koyeba ye malamu. (1 Timote 2:4) Yango wana, ntango ozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso, ezali na ntina mingi opemaka mwa moke mpe okanisa likambo oyo bazali kolobela. Luká kokanga ntina ya likambo oyo ozali kotánga. (Matai 13:23) Soki ozali koyekola na ndenge wana, okondimisama mpenza ete Yehova azali Mozalisi na biso mpe ete Biblia eutá epai na ye. (Baebre 11:1) Tótalela ndenge oyo tokoki kosala yango.

NDENGE YA KOKÓMISA KONDIMA NA YO MAKASI

4. (a) Na ndenge nini bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo bakeseni te na bato oyo bandimaka bozalisi? (b) Na yango, biso nyonso tosengeli kosala nini?

4 Moto akoki koloba na yo: “Nandimaka liteya ya evolisyo mpo bato ya siansi balobaki ete ezali solo. Ndenge nini okoki kondimela Nzambe nzokande moto moko te amoná ye?” Bato mingi bakanisaka bongo. Ya solo, moto moko te amoná Nzambe to amoná eloko moko ezali kokelama. (Yoane 1:18) Kasi, tokoloba nini mpo na bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo? Bango mpe bandimaka eloko oyo bamoná te. Moto moko te ya siansi to moto mosusu amoná motindo moko ya ekelamu ya bomoi ekómi motindo mosusu. Na ndakisa, moto moko te amoná nyama oyo ebendanaka na libumu (réptiles) ekómi nyama oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ (mammifères). (Yobo 38:1, 4) Na yango, biso nyonso tosengeli kotalela makambo malamumalamu, kokanisa na yango na mozindo, na nsima koluka koyeba soki emonisi mpenza nini. Bato mingi batalelaki biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mpe ‘bamonaka’ ete Nzambe azali. ‘Bamonaka polelepolele’ ete azali Mozalisi, ete azali na nguya mingi, mpe na ebele ya bizaleli ya malamu mingi.​—Baroma 1:20.

Bisaleli ya bolukiluki ekoki kosalisa yo olimbola basusu makambo oyo ondimaka (Talá paragrafe 5)

5. Bisaleli nini ekoki kosalisa biso tóyeba makambo mingi mpo na bozalisi?

5 Soki totaleli biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mpe tokanisi na yango na mozindo, tokoki komona ete eloko nyonso esalemá na ndenge ya kokamwa. “Na kondima tozali kososola” ete ezali na Mozalisi moko, atako amonanaka te. Tokomona ete azali na bomoto ya malamu mpenza mpe azali na bwanya mingi. (Baebre 11:3, 27) Tokoki koyekola makambo mingi mpo na biloko oyo akelá soki tozali kotánga makambo oyo bato ya siansi bazali komona na bolukiluki na bango. Tokoki kokuta makambo yango mosusu na video Les merveilles de la création révèlent la gloire de Dieu, na mwa buku La vie a-t-elle été créée ? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, mpe na buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? Na zulunalo Lamuká!, mbala mingi ezalaka na mituna-lisolo na bato ya siansi mpe bato mosusu oyo balimbolaka ntina oyo bakómá kondimela Nzambe. Mpe masolo oyo ezalaka na motó ya likambo “Ebimá kaka yango moko?” oyo ebimaka mbala na mbala na Lamuká! elobelaka mpe banyama ná biloko mosusu oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mpe ndenge oyo bato ya siansi bamekoli lolenge biloko yango esalemá.

6. Ndenge nini bisaleli ya bolukiluki ekoki kosalisa yo?

6 Ndeko mobali moko ya mbula 19 na États-Unis alobaki boye mpo na mwa babuku mibale oyo touti kolobela: “Mwa babuku yango esalisaki ngai mingi. Nayekolaki yango mbala ebele.” Ndeko mwasi moko na France akomaki: “Masolo ‘Ebimá kaka yango moko?’ ekamwisaka ngai mingi! Emonisaka ete bato ya mayele mingi bakoki komekola biloko ya kokamwa oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kasi biloko oyo bazali kosala ekoki kokokana te na oyo Nzambe asalá.” Baboti ya mwana moko ya mwasi ya mbula 15 na Afrika ya Sudi balobaki: “Lisolo ya liboso oyo mwana na biso atángaka na Lamuká! ezalaka ‘mituna-lisolo.’” Mikanda yango ekoki mpe kosalisa yo omona bilembeteli oyo emonisi ete Mozalisi azali, mpe ozala na likoki koyeba mateya ya lokuta mpe koboya yango. Kondima na yo ekokóma mpenza makasi mpe okozala lokola nzete oyo epiki misisa, oyo ekoki koningana te ata mopɛpɛ makasi ya ndenge nini.​—Yirimia 17:5-8.

NDIMELÁ BIBLIA

7. Mpo na nini Nzambe alingi ete osalela makoki na yo ya kokanisa?

7 Ezali mabe kotuna mituna lokola ‘Mpo na nini nandimaka makambo oyo Biblia elobaka?’ Ezali mabe te. Yehova alingi te ete ondima likambo moko kaka mpo basusu bandimaka yango. Alingi ete osalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo na koyeba Biblia mpe kozwa bilembeteli oyo emonisi ete Biblia ezali mpenza mokanda na ye. Soki oyebi makambo mingi oyo Biblia elobi, okotyela yango ntembe ata moke te. (Tángá Baroma 12:1, 2; 1 Timote 2:4.) Lolenge moko ya koyeba Biblia ezali koyekola masolo ya sikisiki etali makambo oyo olingi koyeba malamu.

8, 9. (a) Masolo nini bandeko mosusu basepelaka koyekola? (b) Matomba nini bandeko mosusu bazwaki ntango bamanyolaki na makambo oyo batángaki?

8 Bandeko mosusu basepelaka koyekola bisakweli ya Biblia. To balingaka kokokanisa masolo ya Biblia na makambo oyo bato ya mayele na istware, na siansi, to na arkeoloji balobi. Na ndakisa, tózwa Ebandeli 3:15. Yehova apesaki esakweli wana ya ntina mingi ntango kaka Adama ná Eva batombokelaki ye mpe baboyaki lolenge na ye ya koyangela. Ezali esakweli ya liboso na ebele ya bisakweli ya Biblia oyo esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekomonisa ete lolenge ya Nzambe ya koyangela eleki malamu, mpe ndenge oyo ekosukisa bampasi nyonso. Ndenge nini okoki koyekola Ebandeli 3:15? Okoki kosala liste ya bavɛrsɛ oyo elobi makambo mosusu oyo emonisi ndenge esakweli yango esengelaki kokokisama. Na nsima, okoki koluka koyeba ntango nini bavɛrsɛ yango ekomamaki mpe kotya yango na molɔngɔ. Nokinoki, okoyeba ete bakomi wana ya Biblia bazalaki na bomoi na eleko moko te, kasi mokomoko akomaki likambo moko oyo ekómisaki lisusu esakweli yango polele. Yango ekoki kosalisa yo ondima mpenza ete elimo santu ya Yehova etambwisaki bango.​—2 Petro 1:21.

9 Ndeko mobali moko na Allemagne amanyolaki na ndenge oyo buku mokomoko ya Biblia elobeli makambo oyo etali Bokonzi. Alobaki boye: “Ezali bongo, atako bato soki 40 nde bakomaki Biblia. Mpe mingi na bango bazalaki na bomoi na eleko moko te mpe bayebanaki te.” Ndeko mwasi moko na Australie azalaki koyekola lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe amonaki ndenge oyo fɛti ya Elekeli ezalaki na boyokani na Ebandeli 3:15 mpe na Masiya. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Akomaki boye: “Boyekoli yango esalisaki ngai namona mpenza ete Yehova azali malamu. Komona ndenge moto akoki kokanga ntina ya ebongiseli wana oyo esalemaki mpo na Bayisraele mpe ndenge oyo ekokisamaki epai ya Yesu ekamwisaki ngai mingi. Esɛngaki natika naino kotánga mpo na komanyola na ndenge oyo bilei ya Elekeli wana ya esakweli ezali kokamwisa!” Nini esalisaki ndeko mwasi wana aloba bongo? Akanisaki na mozindo na makambo oyo atángaki mpe akangaki ntina na yango. Yango esalisaki ye akómisa kondima na ye makasi mpe apusana lisusu penepene na Yehova.​—Matai 13:23.

10. Ndenge nini bosembo ya bakomi ya Biblia ebakisaka lisusu kondima na biso na Biblia?

10 Kanisá mpe bosembo ya bato oyo bakomaki Biblia. Bazalaki ntango nyonso koloba solo mpe babangaki te kosala bongo. Bakomi mingi ya ntango wana bazalaki mbala mingi kokoma kaka makambo ya malamu mpo na ekólo na bango to bakonzi na bango. Kasi basakoli ya Yehova bakomaki kaka makambo ya malamu te, kasi bakomaki mpe makambo ya mabe oyo bato ya Yisraele mpe bakonzi na bango basalaki. (2 Ntango 16:9, 10; 24:18-22) Balobelaki ata mabunga na bango moko mpe ya basaleli mosusu ya Nzambe. (2 Samwele 12:1-14; Marko 14:50) Ndeko mobali moko ya elenge na Grande-Bretagne alobi: “Bosembo ya ndenge wana emonanaka mingi te. Yango ebakisaka lisusu kondima na biso ete Biblia eutá mpenza epai ya Yehova.”

11. Ndenge nini litambwisi oyo eutaka na Biblia endimisi biso ete Biblia eutá epai ya Nzambe?

11 Ntango bato batikaka ete Biblia etambwisa bomoi na bango, bamonaka matomba na yango. Yango endimisaka bango ete Biblia eutá epai ya Nzambe. (Tángá Nzembo 19:7-11.) Ndeko mwasi moko ya elenge na Japon akomaki: “Ntango libota na biso ezalaki kosalela mateya ya Biblia, tozalaki na esengo mingi. Tozalaki na kimya, bomoko, mpe bolingo.” Biblia esalisi bato mingi báyeba ete makambo mosusu oyo bazalaki kondima ezalaki solo te. (Nzembo 115:3-8) Biblia esalisaka bato bátyela Yehova motema, ye oyo azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe elaki bomoi ya malamu koleka na mikolo ezali koya. Nzokande, bato mosusu oyo balobaka ete Nzambe azali te bakómisaka biloko mosusu oyo ezali na molɔ́ngɔ́ lokola nzambe na bango. Basusu balobaka ete bato bakoki kosala ete bomoi ekóma malamu koleka, kasi soki totali makambo oyo basalá, balongi te kosilisa mikakatano oyo ezali na mokili.​—Nzembo 146:3, 4.

NDENGE YA KOTINDA BATO BÁKANISA

12, 13. Ndenge nini tokoki kosolola na basusu mpo na bozalisi to Biblia?

12 Ntango ozali kosolola ná basusu masolo oyo etali bozalisi to Biblia, liboso, luká koyeba makambo nini mpenza bandimaka. Simbá ete bato mosusu oyo bandimaka liteya ya evolisyo bandimaka mpe ete Nzambe azali. Balobaka ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kosala biloko nyonso oyo ezali na bomoi. Basusu bakanisaka ete liteya ya evolisyo esengeli kozala solo mpo bateyaka yango na kelasi. Mpe basusu batiká kondimela Nzambe mpo mangomba elɛmbisá bango nzoto. Yango wana, liboso tuná moto makambo nini andimaka mpe mpo na nini andimaka yango. Na nsima, yoká na likebi makambo oyo akoloba. Soki osali bongo, na ntembe te, akosepela koyoka yo.​—Tito 3:2.

Na limemya nyonso, tuná moto makambo nini andimaka, na nsima yoká na likebi makambo oyo akoloba

13 Soki moto alobi ete ozali zoba ndenge ondimaka ete Mozalisi azali, okoyanola nini? Na limemya nyonso, tuná moto yango alimbola ndenge oyo ye akanisaka ete bomoi ebandaki. Okoki koloba ete soki bomoi ebandaki na evolisyo, esengelaki ete eloko ya liboso ya bomoi ezala, mpo na nzela na yango mosusu ebima. Kutu, profesɛrɛ moko ya chimie alobaki ete mpo likambo ya ndenge wana esalema, ezali kosɛnga (1) eloko moko lokola mposo mpo na kobatela yango, (2) likoki ya kozwa nguya mpe kosalela yango, (3) makambo oyo esengeli mpo na kolandela ndenge ezali komonana mpe kokola, mpe (4) likoki ya kobimisa biloko mosusu ya ndenge wana. Abakisaki: “Ndenge oyo ata ekelamu ya bomoi ya moke esalemi ekamwisaka moto nyonso.”

14. Makanisi nini ya pɛtɛɛ okoki kosalela ntango ozali kosolola na moto likambo etali bozalisi?

14 Ntango ozali kosolola na moto makambo etali bozalisi, okoki kosalela makanisi ya pɛtɛɛ oyo ntoma Paulo asalelaki. Akomaki boye: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebre 3:4) Ya solo, ndako nyonso ebongisamaka mpe etongamaka kaka na moto. Yango wana, biloko oyo ezali na bomoi, oyo esɛngaka makambo mingi koleka ndako, esengeli mpenza kobongisama mpe kotongama na moto. Okoki mpe kosalela mikanda na biso. Ndeko mwasi moko asololaki na elenge mobali moko oyo azalaki kondima te ete Nzambe azali. Apesaki ye mwa babuku oyo tolobelaki liboso, mpe pɔsɔ soki moko na nsima alobaki: “Sikoyo nakómi kondimela Nzambe.” Elenge mobali yango abandaki koyekola Biblia mpe na nsima akómaki ndeko na biso.

15, 16. (a) Liboso ya koyebisa moto ete Biblia eutá na Nzambe, tosengeli naino kosala nini? (b) Mpe likambo nini tosengeli kobosana te?

15 Soki moto azali kotyela Biblia ntembe, ndenge nini okoki kosalisa ye akanisa? Ndenge tolobaki yango liboso, luká naino koyeba liboso makambo oyo andimaka. Lisusu, luká koyeba makambo oyo asepelaka na yango. (Masese 18:13) Soki alingaka makambo ya siansi, pesá ye bandakisa ya Biblia mpo na komonisa ete makambo ya siansi oyo Biblia elobeli ezalaka ntango nyonso solo. Soki alingaka istware, okoki kolobela likambo moko oyo mikanda ya istware elobi mpe monisá ye ndenge Biblia elobelaki likambo yango bambula mingi liboso ekokisama. Bato mosusu bakoki koyoka yo soki olakisi bango likambo moko na Biblia oyo ekoki kobongisa bomoi na bango, na ndakisa toli oyo ezali na lisolo likoló ya ngomba.

16 Tóbosana te ete tolingi kowelana na bato te. Tolingi ete básepela kosolola na biso mpe báyekola makambo ya Biblia. Na yango, tunáká mituna na limemya, mpe yokáká na likebi. Ntango ozali kolimbolela moto makambo oyo ondimaka, zalá na limemya, mingimingi soki moto yango azali mokóló na yo. Soki ozali komemya basusu, na ntembe te, bango mpe bakomemya yo. Mpe bakokamwa ndenge oyebi malamu mpenza makambo oyo ondimaka, atako ozali naino elenge. Kasi, soki moto alingi kaka kowelana na yo to kosɛka yo, ntina ya kopesa ye eyano ezali te.​—Masese 26:4.

YEKOLÁ MATEYA MOSUSU YA BIBLIA MPE KÓMISÁ KONDIMA NA YO MAKASI

17, 18. (a) Nini ekoki kosalisa yo okómisa makasi kondima na yo na Biblia? (b) Motuna nini tokolobela na lisolo oyo elandi?

17 Tokoki koyeba mateya ya moboko ya Biblia, kasi mpo tókóma na kondima makasi, tozali na mposa ya makambo mosusu. Tosengeli kosala bolukiluki, lokola bato oyo balukaka biloko ya motuya oyo ebombamá, mpo na koyeba makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe. (Masese 2:3-6) Moko ya makambo eleki malamu mpo na kokómisa kondima na biso makasi ezali kotánga Biblia na mobimba na yango. Mbala mosusu okoki kosala makasi otánga yango na boumeli ya mbula moko. Kosala bongo esalisaki mokɛngɛli ya zongazonga moko apusana penepene ya Yehova ntango azalaki elenge. Alobi boye: “Eloko esalisaki ngai namona ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe ezalaki kotánga yango mobimba. Nsukansuka, nakómaki kokanga ntina ya masolo ya Biblia oyo nayekolaki ntango nazalaki naino mwana moke.” Lisusu, kosalela bisaleli ya bolukiluki oyo ezali na monɔkɔ na bino ekosalisa yo okanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga. Okoki kosalela Watchtower Library na DVD, Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET, Index des publications Watchtower, to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova.

18 Baboti, bokoki koteya bana na bino makambo ya Yehova, koleka moto mosusu nyonso. Na yango, ndenge nini bokoki kosalisa bango bakómá na kondima makasi epai na ye? Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge mosusu oyo bokoki kosala yango.